Epai ya batángi
KOBANDA na nimero oyo, mwa mbongwana ekosalema na masolo oyo ebimaka na Lamuká! Atako makambo mosusu ekobongwana, kasi mingi ekotikala kaka ndenge ezalaka.
Lamuká! ezali kokoba kokokisa mokano oyo yango emityelá eleki sikoyo ebele ya bambula. Ndenge emonisami na lokasa 4, “zulunalo oyo ebimisami mpo na kotalela mosangani moko na moko kati na libota.” Lamuká! ekokoba kotalela makambo oyo ezali koleka na mokili, kolobela mimeseno ya bato ndenge na ndenge, kolimbola biloko kitoko oyo Nzambe akelá, kolobela bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, to kolimbola makambo ya siansi epai ya bato oyo bayekolá makambo ya siansi te, mpe koyebisa batángi makambo ya sika, kosalisa bango bázala ekɛngɛ na makambo oyo ezali koleka na mokili.
Na nimero na yango ya 22 Augusto 1946, Lamuká! epesaki elaka oyo: “Ntina ya zulunalo oyo ezali ya koyebisa bato solo ndenge yango ezali mpenza.” Na boyokani na elaka yango, Lamuká! esalaka ntango nyonso makasi elobela kaka makambo oyo esalemaka mpenza. Mpo na yango, bato oyo bakomaka masolo yango, balukalukaka mpe bayekolaka yango na likebi mpenza mpo na komindimisa ete makambo nyonso ezali solo. Kasi, zulunalo yango emonisaki mpenza ete elobelaka “solo ndenge yango ezali mpenza” na lolenge mosusu oyo ezali kutu na ntina koleka.
Banda kala, Lamuká! ebendaka likebi ya batángi na Biblia. Nzokande, kobanda na nimero oyo, Lamuká! ekozala na masolo mingi ya Biblia koleka ndenge ezalaki liboso. (Yoane 17:17) Lamuká! ekokoba mpe kobimisa masolo oyo emonisaka ndenge toli oyo ebongi mpenza mpe euti na Biblia ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu lelo oyo. Na ndakisa, mitinda mingi ya Biblia oyo esalisaka moto azala na bomoi ya malamu, oyo ebimaka mbala na mbala na masolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” mpe “Engebene Biblia,” ekokoba kobima mbala na mbala na zulunalo oyo. Longola yango, Lamuká! ekokoba kobenda likebi ya batángi na elaka oyo Biblia epesi ya mokili moko ya sika mpe ya kimya, oyo etikali moke ezwa esika ya ebongiseli ya lelo oyo etosaka mibeko te.—Emoniseli 21:3, 4.
Makambo nini mosusu ekobongwana? Kobanda na nimero oyo Lamuká! ekobanda kobima mbala moko na sanza na minɔkɔ koleka 82 oyo yango ebimaka (ezalaki kobima mbala mibale na sanza na minɔkɔ mingi).a Lisolo, “Makambo mazali koleka na mokili,” oyo ebimaka mbala na mbala, kobanda 1946, ekokoba kobima na nimero nyonso, kasi ekozala kaka lokasa moko na esika ya nkasa mibale. Na lokasa 31, tobakisi mpe lisolo moko ya sika oyo ekobenda mpenza likebi ya bato mingi mpe ekobanda kobima mbala na mbala, ezali na moto ya likambo “Okopesa eyano nini?” Lisolo yango ekozala na makambo nini mpe ndenge nini okoki kosalela yango?
Meká naino kotala makambo oyo ezali na lokasa 31 ya Lamuká! oyo. Makambo mosusu oyo ezali na lokasa yango ebongi na batángi oyo bazali bana mike; mosusu ekosalisa bato oyo bameseni na Biblia mpo bámeka mayele na bango. Motó moke ya likambo “Esalemaki ntango nini?” ekosalisa yo omonisa ntango nini bato oyo Biblia elobeli bazalaki na bomoi mpe ntango oyo makambo mosusu ya ntina esalemaki. Mpo na mituna oyo ezali na nse ya motó moke ya likambo “Ezali na zulunalo oyo,” ekosɛnga kotánga masolo ya Lamuká! yango mpo na kozwa biyano, nzokande biyano ya mituna mosusu ekobima kaka na Lamuká! oyo mituna ezali, mpe bakomonisa lokasa oyo yango ezali, epai bakokoma yango motó na nse makolo likoló. Mpo na nini te koluka biyano yo moko liboso ya kotánga biyano yango mpe kolobela makambo oyo otángi elongo na basusu? Okoki ata kosalela lisolo yango ya sika, “Okopesa eyano nini?” mpo na kosolola na libota to na baninga.
Eleki sikoyo mbula soki 60, Lamuká! epesaki elaka oyo: “Ezala lisolo nini zulunalo oyo ekobimisa, ekosala makasi elobela likambo yango ndenge bato ya mokili mobimba batalelaka yango, na esika ya kolobela yango kaka ndenge bato ya mboka moko batalelaka yango. Ekosepelisa bato ya sembo ya bikólo nyonso. . . . Masolo mpe makambo oyo ekolobelama na zulunalo yango . . . ekoteya bato mingi makambo ya sika, ekofungola bango mayele, mpe ekosepelisa bango, bázala mikóló to bana mike.” Bato oyo batángaka Lamuká! na mokili mobimba, bakondima mpenza ete Lamuká! ezali kokokisa elaka yango. Tolingi bóyeba ete makambo ekokoba kosalema kaka ndenge wana.
Babimisi
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na minɔkɔ mosusu, Lamuká! ebimaka mbala moko nsima ya sanza misato, mpe mbala mosusu masolo nyonso oyo tolobeli ekobima te na minɔkɔ yango.
[Bililingi na lokasa 3]
Ezalaki kobengama “L’Âge d’Or” na 1919, ekómaki kobengama “Consolation” na 1937, mpe kobanda 1946 ekómá kobengama “Lamuká!”
[Bililingi na lokasa 4]
Banda kala, “Lamuká!” ebendaka likebi ya batángi na Biblia
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Mindoki: Fɔtɔ ya U.S. National Archives; mwana ya nzala: OMS fɔtɔ ya W. Cutting