Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/08 nk. 12-14
  • Ndenge nini nakoki koboya pornografi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini nakoki koboya pornografi?
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Omitalela
  • Ndenge ya kotika momeseno yango
  • Mpo na nini koboya pornografi?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Pornografi—Ezali lisano mpamba to pwazɔ?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mpo na nini koboya kotala porno?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Nakosala nini soki nakómá moombo ya pornografi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 7/08 nk. 12-14

Mituna oyo bilenge batunaka

Ndenge nini nakoki koboya pornografi?

“Na kelasi, mwana mobali moko atyaki fɔtɔ ya mwasi moko oyo azali bolumbu na ngámbo ya kati ya porte ya armware na ye, oyo ezalaki pembeni ya oyo ya ngai.”​—Robert.a

“Nazalaki kosala bolukiluki na Internet mpo na kobongisa devuare ya kelasi, mpe namonaki mbala moko esika oyo ezali na bafɔtɔ ya mabe.”​—Annette.

NTANGO baboti na yo bazalaki bilenge, bato oyo bazalaki kolinga makambo ya pornografi basengelaki koluka yango koluka. Lelo oyo, emonani ete pornografi ezali kolanda yo bisika nyonso. Kozanga ete olinga yango, ekoki kokóma ete miso na yo ekwea na bafɔtɔ ya pornografi ya moninga moko ya kelasi, ndenge ekómelaki Robert oyo tozongeli maloba na ye na ebandeli, to omona yango na Internet, ndenge ekómelaki Annette. Elenge mwasi moko ya mbula 19 alobi boye: “Ntango nasalelaka Internet mpo na kosala bolukiluki, kosomba biloko, to kotala mbongo oyo natikali na yango na banki, ekómelaka ngai mbala mosusu namona pornografi na mbalakaka!”b

Likambo yango ekómelaka bilenge mingi. Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki, bilenge mingi (90 %) ya mbula kobanda 8 tii 16 balobaki ete ekómelaki bango bámona bililingi ya mbindo na Internet kozanga ete báluka yango, mbala mingi ntango bazalaki kobongisa badevuare ya kelasi. Lelo oyo, lokola Internet ezali na bamilio ya bisika oyo elakisaka bililingi ya mbindo to elobelaka makambo ya kosangisa nzoto polelepolele, ezali lisusu mpasi te komona pornografi. Okoki komona yango ata na telefone ya mabɔkɔ. Denise, elenge mwasi moko ya mbula 16, alobi boye: “Bana mingi ya eteyelo na biso basepelaka na likambo yango. Okomona na mokolo ya mosala moko bazali kotunana boye: ‘Bafɔtɔ nini ya Internet okɔtisi na telefone na yo na wikende oyo?’”

Lokola bato mingi batalaka pornografi, ntango mosusu okoki komituna boye: ‘Pornografi ezali mpenza mabe?’ Eyano ezali ɛɛ, mpe bantina ezali mingi. Tótalela kaka bantina misato:

◼ Pornografi esilisaka moto valɛrɛ, ezala oyo asali yango to oyo atali yango.​—1 Batesaloniki 4:3-5.

◼ Kozala na mposa makasi ya kotala pornografi ezali komekola bilimo mabe ya ntango ya Noa oyo balonaki mposa mabe ya kosangisa nzoto.​—Genese 6:2; Yuda 6, 7.

◼ Mbala mingi, kotala pornografi ememaka na lisumu ya pite to ekobo.​—Yakobo 1:14, 15.

Pornografi ebebisaka mpenza bomoi ya bato oyo bakweaka na motambo yango. Tózwa kaka bandakisa mibale:

Elenge mwasi moko na nkombo Erica alobi boye: “Nabandaki kotala pornografi ntango nazalaki mwana moke, mpe nazalaki kokoka te kotika momeseno yango. Eleki sikoyo bambula ebele, kasi bililingi yango elongwaka te na makanisi na ngai. Ezali lokola nde ebombami na mwa eteni moko ya bɔɔngɔ na yo mpe okomona ntango nyonso ete lisosoli na yo ezali mpenza pɛto te. Pornografi esalaka ete omityela lisusu motema te; okoki komiyoka mbindo mpe komona ete ozali lisusu na ntina te. Ozali ntango nyonso komiyoka lokola omemi kilo oyo bato mosusu bazali komona te.”

Elenge mobali moko na nkombo Jeff alobi boye: “Na boumeli ya mbula 10 nazalaki moombo ya pornografi. Eleki sikoyo mbula 14 banda natiká kotala yango, kasi tii lelo oyo nabundaka etumba mokolo na mokolo mpo natala yango te. Atako mposa ya kotala yango ekitá, kasi esilá te. Nayokaka kaka mposa ya kotala bililingi ya sika. Bililingi oyo namoná ezali naino na makanisi na ngai. Nayokaka mawa ndenge natyaki lokolo na nzela wana ya mabe. Na ebandeli, nakanisaki ete ekosala ngai mabe te. Sikoyo, nayebi ete esalaka mpenza mabe. Pornografi ezali mabe, ebebisaka bomoi ya moto mpe esilisaka moto valɛrɛ, ezala oyo asali yango to oyo atali yango. Ata soki bato oyo bakumisaka pornografi balobi nini, pornografi ezali na eloko moko te ya malamu.”

Omitalela

Okoki kosala nini mpo otala pornografi te kozanga ete olinga yango? Liboso, talelá naino malamu likambo yango.

Mbala boni omonaka pornografi kozanga ete olinga yango?

□ Ata mbala moko te □ Mbala mokomoko

□ Pɔsɔ nyonso □ Mikolo nyonso

Omonaka yango mbala mingi wapi?

□ Na Internet □ Na kelasi

□ Na TV □ Na bisika mosusu

Likambo yango ezongelamaka mbala mingi?

Talelá bandakisa oyo:

Ezali na baninga mosusu ya kelasi oyo bakoki kotindela yo biloko ya pornografi na ordinatɛrɛ to na telefone? Soki oyebi bongo, yango ekoki kotinda yo oboma yango kozanga ete ofungola yango.

Ntango ozali kosalela Internet mpe okɔtisi liloba moko mpo na kosala bolukiluki, omonaka mbala moko bililingi to maloba oyo ezali kosɛnga yo ofungola esika mosusu ya Internet? Soki ezali bongo, ekozala malamu oyebaka maloba nini okoki kokɔtisa ntango ozali kosala bolukiluki na Internet.

Komá awa na nse makambo oyo esalaki ete omona pornografi kozanga ete olinga yango.

․․․․․

Na kotalela makambo wana, okoki kosala nini mpo likambo yango ekómelaka yo mingi te? (Komá makanisi na yo awa.)

․․․․․

Osalaka nini soki omoni pornografi na mbalakaka?

□ Nalongolaka miso mbala moko.

□ Mposa ya koyeba etindaka ngai natala yango mwa moke.

□ Nakobaka kotala yango mpe nalukaka kutu mosusu.

Soki otyaki elembo na eyano ya mibale to ya misato, mokano nini okoki komityela na likambo yango?

․․․․․

Ndenge ya kotika momeseno yango

Bilenge mosusu oyo bamonaki pornografi kozanga ete bálinga yango bakómaki na mposa ya kotala yango lisusu, mpe nsukansuka bakómaki na momeseno ya kotala yango. Ezali pɛtɛɛ te kotika momeseno yango. Jeff, oyo tozongelaki maloba na ye liboso, alobi boye: “Liboso ya kobanda koyekola Biblia, nazalaki kosalela bilangwiseli ya ndenge na ndenge. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kotika yango, kasi kotika pornografi ezalaki kutu mpasi koleka.”

Soki okómi na momeseno ya kotala pornografi, kokanisa te ete okoki kotika te. Okoki kozwa lisalisi. Ndenge nini?

◼ Talelá pornografi ndenge yango ezali mpenza. Pornografi ezali mayele mabe oyo Satana asalelaka mpo na kosilisa valɛrɛ ya eloko oyo Yehova asalá mpo ezala na lokumu. Soki otaleli pornografi ndenge wana, ‘okoyina oyo ezali mabe.’​—Nzembo 97:10, NW.

◼ Kanisá na makama na yango. Pornografi ebebisaka mabala. Etindaka bato bámona basi to mibali mpamba. Esilisaka valɛrɛ ya moto oyo azali kotala yango. Yango wana, Biblia elobi ete: “Moto ya mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba.” (Masese 22:3) Komá awa na nse mabe moko oyo ekoki kokómela yo soki ozwi momeseno ya kotala pornografi.

◼ Omityela mibeko. Yobo, moto moko ya sembo, alobaki boye: “Napesaki miso ma ngai mobeko moye: natala elenge mwasi na miso ma boluli te.” (Yob 31:1, Liloba lya Nzambe) Talá mwa ‘mibeko’ elandi oyo okoki komityela:

□ Nakosalela Internet te soki nazali kaka ngai moko na ndako.

□ Nakokanga mbala moko bililingi, maloba, to esika nyonso ya Internet oyo balobeli polelepolele makambo ya kosangisa nzoto.

□ Soki nakwei lisusu na likambo yango, nakoyebisa moninga moko oyo akɔmeli.

Okoki kokanisa mobeko mosusu moko to mibale oyo ekoki kosalisa yo olonga momeseno ya kotala pornografi? Soki ɛɛ, komá yango awa na nse.

․․․․․

◼ Bondelá mpo na likambo yango. Mokomi ya nzembo abondelaki Yehova ete: “Bendá miso na ngai ete natala biloko mpamba te.” (Nzembo 119:37) Ya solo, ezali pɛtɛɛ te koboya eloko oyo nzoto na biso ya masumu esepelaka na yango. Kasi, Yehova Nzambe alingi ete olonga etumba yango mpe akoki kopesa yo “nguya oyo eleki makasi” mpo osala oyo ezali sembo!​—2 Bakolinti 4:7.

◼ Sololá na moto mosusu. Ozali nde koyoka nsɔni? Ntango mosusu! Kasi, kanisá ndenge oyo okomiyoka malamu soki olongoli kilo wana. Moto oyo okoyebisa likambo yango akoki kozala lokola “ndeko abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Kozala na moto ya koyebisa likambo wana esalisaka mingi mpo na kotika momeseno yango.

Soki ozali na momeseno ya kotala pornografi, komá awa na nse nkombo ya moto moko oyo akɔmeli, oyo okobanga te koyebisa likambo yango.

․․․․․

Yebá ete okoki kolonga etumba ya koboya kotala pornografi. Mbala nyonso oyo oboyi kotala yango, olongi etumba. Yebisá Yehova ndenge olongi mpe pesá ye matɔndi ndenge apesaki yo makasi. Yebá ntango nyonso ete soki oboyi pornografi, ozali kosepelisa motema ya Yehova!​—Masese 27:11.

Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/​ypf

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa na lisolo oyo.

b Liloba pornografi ezali komonisa biloko nyonso oyo esalemi mpo na kopesa moto mposa ya kosangisa nzoto. Yango esangisi bililingi, bafɔtɔ, mikanda mpe miziki oyo elobelaka makambo ya kosangisa nzoto polelepolele.

MITUNA YA KOMANYOLA

◼ Ndenge nini pornografi esilisaka valɛrɛ ya eloko oyo ezali na lokumu?

◼ Makambo nini mpenza ekoki kosalisa yo oboya pornografi?

◼ Ndenge nini okoki kosalisa ndeko na yo moko oyo akokaka te kotika kotala pornografi?

[Elilingi na lokasa 13]

Ezali na baninga mosusu ya kelasi oyo bakoki kotindela yo biloko ya pornografi na telefone?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto