Bandakisa ya mabota ya malamu—Eteni ya liboso
Ndenge nimero oyo ya ntina mingi ya Lamuká! esili komonisa yango, mabota ya malamu mpe ezangi mikakatano te. Yango esengeli kokamwisa te, mpo tozali na eleko oyo Biblia ebengi “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Mikakatano ya ndenge nyonso ekoki kobima ata na libota nini.
Atako bongo, tóyeba ete kozala na libota ya malamu eutaka te na makambo oyo bato bakanisaka ete yango nde ezali malamu. Kasi, Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Mabota oyo ekokisaka bamposa na yango ya elimo na ndenge etosaka mitinda ya Biblia bayebá sekele ya kozala na esengo—ata ntango bazali na mikakatano. Tótala mwa bandakisa.
Kobatela mwana oyo abɛlaka. Biblia emonisi ete kobatela bato ya libota, ata mpe baoyo babɛlaka, ezali likambo ya kotya na esika ya liboso. Elobi boye: “Soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya ndako na ye, biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.”—1 Timote 5:8.
Na lokasa 15, Victor, tata moko ya Afrika ya Sudi, ayebisi ndenge oyo ye ná mwasi na ye bazali kobatela mwana na bango oyo abɛlaka banda bambula koleka 40.
Kobɔkwama na baboti mosusu. Mitinda ya Biblia ekoki kosalisa moto abatela lokumu na ye, ata soki baboti oyo babotaki ye basundolaki ye. Kutu, Biblia elobi ete Yehova Nzambe azali “mosungi” ya bana oyo batata na bango bakufá.—Nzembo 10:14.
Na lokasa 16, Kenyatta, elenge mwasi moko ya États-Unis, alobeli ndenge azali koyekola komesana na mpasi oyo azalaka na yango na motema mpo naino amoná te baboti oyo babotaki ye.
Ndenge ya kosala ntango moboti akufi. Liwa ya mama to ya tata ekoki kotika bampota na motema, oyo ezalaka mpasi mpo esila. Biblia ekoki kosalisa. Nkolo na yango, Yehova, azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”—2 Bakorinti 1:3.
Na lokasa 17, Angela, elenge mwasi moko ya Australie, ayebisi ndenge oyo boyokani na ye na Nzambe ezali kosalisa ye amesana na mpasi ya kobungisa moboti.
Mabota nyonso ezalaka na mikakatano. Ndenge masolo oyo ezali na nkasa elandi ekomonisa yango, baoyo batosaka mitinda ya Biblia bayebá sekele oyo ezali kosalisa bango báyeba ndenge ya kosala liboso ya mikakatano oyo bazali kokutana na yango.
[Etanda/Elilingi na lokasa 15]
Kobatela mwana oyo abɛlaka
Lisolo ya Victor Maynes, Afrika ya Sudi
“Banda Andrew abotamá, kaka biso nde tolatisaka ye, tosukolaka ye, mpe ntango mosusu kutu tosalisaka ye na kolya. Azali lelo na mbula 44.”
LOKOLA Andrew atambolaki te na mbula na ye ya liboso, tomonaki ete likambo ezali. Mwa moke na nsima, akangamaki na maladi. Tomemaki ye mbangu na lopitalo mpe kuna, bayebisaki biso ete azali na maladi ya ndɛkɛ. Kasi, esukaki kaka wana te. Baekzame mosusu oyo tosalisaki emonisaki ete bɔɔngɔ ya Andrew ebebaki.
Nsima ya kokende epai ya minganga ndenge na ndenge, tolongaki kosala ete Andrew akweaka lisusu mingi te na maladi. Asengelaki komɛla bankisi minei mbala misato na mokolo na boumeli ya mwa ntango. Ya solo, bankisi yango ekokaki te kosalisa ye na maladi ya bɔɔngɔ. Ata ndenge akómi lelo na mbula 44, Andrew akanisaka lokola mwana ya mbula 5 to 6.
Minganga bapesaki biso toli ete tókende kotika Andrew na esika oyo babatelaka bato ya ndenge wana, kasi toboyaki kosala bongo. Tozalaki na likoki ya kokokisa bamposa ya Andrew, yango wana tozwaki ekateli ya kobatela ye na ndako, atako toyebaki ete mikakatano ekozanga te.
Na yango, kobatela ye ekómaki likambo ya libota mobimba. Bana na biso mosusu—tozalaki na bana mibale ya basi mpe moko ya mobali na ndako—bazalaki kosunga mingi, mpe nazali kopesa bango botɔndi mpo na yango! Longola yango, lokola tozali Batatoli ya Yehova, bandeko na biso ya lisangá mpe basalisaki biso mingi mpenza. Mbala mosusu, bazalaki komemela biso bilei to kutu kobatela Andrew ntango tobimi na mosala ya kosakola to tozali kosala makambo mosusu.
Tokanisaka ntango nyonso maloba ya Yisaya 33:24, oyo elobeli elaka ya Nzambe ete mokolo mosusu “moto moko te . . . akoloba: ‘Nazali na maladi.’” Tondimaka mpenza ete Nzambe akokokisa mokano na ye ya kosala mokili ya sika mpe ya kolongola maladi nyonso. (2 Petro 3:13) Na yango, tozelaka mokolo oyo Andrew akobonga. Liboso ntango yango ekóma, tozali kondima maloba ya Yesu ete soki tozali kotya matomba ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso, bakobakisela biso biloko oyo tozali na yango mposa. (Matai 6:33) Tomonaka ete Nzambe apesaka biso biloko oyo tozali na yango mposa. Tozangaka eloko te.
Ya solo, mabota nyonso te nde ekokoka kobatela moto oyo abɛlaka na ndako. Mpo na baoyo bazali kofanda na ndako na moto oyo abɛlaka, nakosɛnga bango ya liboso ete bábondelaka mingi mpe mbala na mbala. (1 Petro 5:6, 7) Ya mibale, básalisaka mwana na bango na bolingo nyonso mpe bákanisaka soki moke te ete akoki te koyekola kolinga Yehova Nzambe. (Baefese 6:4) Ya misato, kobatela ye ezala likambo ya libota mobimba, bápesaka bato ya libota nzela ya kosalisa ye. Ya minei, bábosana te ete ndako na bango nde esika mwana na bango akozwa bolingo mingi koleka. Ya solo, mabota nyonso ezali ndenge moko te. Mpo na biso, toyokaka mawa ata moke te ndenge tobatelaka Andrew na ndako na biso. Mpo na ngai, azali mwana to mobali ya malamu koleka.
[Etanda/Bililingi na lokasa 16]
Kobɔkwama na baboti mosusu
Lisolo ya Kenyatta Young, États-Unis
“Soki ofandi na baboti oyo moko na bango abotá yo te, ozali na makila ata ya moboti oyo abotá yo. Kasi lokola baboti oyo babɔkɔlaki ngai bazali bato mosusu, nazali na makila ata ya moboti moko te. Nayebi kutu te soki nazwá elongi ya nani.”
NAZALI ata na likanisi moko te soki tata na ngai nde nani, mpe namoná naino te mama oyo abotá ngai. Azalaki komɛla masanga mingi mpe bangi ntango azalaki na zemi na ngai. Ntango kaka nabotamaki atikaki ngai na esika moko oyo babatelaka bana oyo basundolá mpe nakɔtaki na bisika mingi ya ndenge wana tii bato bazwaki ngai mpo na kobɔkɔla ngai wana nakómaki pene na mbula 2.
Tata mobɔkɔli na ngai alobaka ete ntango mwasi oyo azalaki kosala na esika yango alakisaki ye fɔtɔ na ngai, amonaki ete asengeli kaka kokómisa ngai mwana na ye. Na mbala moko, nasepelaki na mama na ngai ya sika. Nayebisaki ye ete azali mama na ngai mpe ete nalingi kokende na ye na ndako.
Kasi, nakanisaka lisusu ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kobanga nasala likambo moko ya mabe, bongo bázongisa ngai na esika oyo bazwaki ngai. Nazalaki komona ete nakoki kosilikasilika to kobɛla te ndenge bana mosusu basalaka. Kutu, nazalaki kobanga ata kozwa miyoyo ya mpamba! Baboti na ngai bazalaki ntango nyonso koyebisa ngai ete balingaka ngai mpe ete bakosundola ngai te.
Ata ndenge nakómi mokóló boye, ntango mosusu nabundaka mpo nalongola makanisi ya komimona ete nakokani mpenza te na bana oyo babɔkwamaki na baboti oyo babotaki bango mpenza. Soki kaka nakómi na mwa makanisi ya malamu, okomona kaka moto moko alobi na ngai: “Osengeli kosepela ndenge ozwá baboti ya malamu oyo bandimaki kokómisa yo mwana na bango!” Nazali kosepela, kasi maloba ya ndenge wana etindaka ngai nakanisa ete nazali na likambo mpe ete esɛngaki milende mingi mpo moto alinga ngai mpenza.
Ezalaka mpasi nandima ete mbala mosusu nakoyeba te soki tata oyo abotá ngai nde nani. Ntango mosusu nayokaka mpasi ndenge mama oyo abotaki ngai atikaki te komɛla masanga mpe bangi mpo akoka kobɔkɔla ngai, lokola nde nabongaki te asalela ngai milende wana. Ntango mosusu nayokaka mawa mpo na ye. Mbala mingi nakanisaka ete soki nakutani na ye mokolo mosusu, nakolinga koyebisa ye ete nazali na bomoi ya esengo mpe ete asengeli te koyoka mabe ndenge asundolaki ngai.
Baboti oyo babɔkɔlá ngai bazali Batatoli ya Yehova, mpe moko na makabo kitoko oyo bapesá ngai ezali boyebi ya Biblia. Ntango nyonso, maloba oyo ya Nzembo 27:10 ebɔndisaka ngai: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.” Yango esalemá mpo na ngai. Ezali na matomba mosusu ya kobɔkwama na baboti mosusu. Na ndakisa, nasepelaka mingi na bato—ndenge babɔkwamá mpe bomoi na bango—mbala mosusu mpo ngai nayebaka te baboti oyo babotá ngai mpenza. Nalingaka bato, mpe ezali na ntina mingi na mosala ya kosakola. Kozala Motatoli ya Yehova mpe koteya bato mosusu Biblia epesaka ngai lokumu mpe ntina na bomoi. Soki nazali konyokwama na makanisi, nabimaka mpo na kosalisa basusu. Soki nazali koteya basusu Biblia, namonaka ete nakoki mpenza kozala na boyokani na bango. Moto na moto azali na lisolo na ye.
[Etanda/Bililingi na lokasa 17]
Ndenge ya kosala ntango moboti akufi
Lisolo ya Angela Rutgers, Australie
“Ntango papa akufaki, nayokaki lokola nazali lisusu na libateli te. Moto oyo ayebaki makambo nyonso mpe oyo akokaki kobongisa makambo nyonso ya bomoi na ngai azalaki lisusu te.”
TATA na ngai akufaki esili koleka mbula zomi, ntango nazalaki naino elenge. Sanza motoba liboso, basalaki ye lipaso, mpe ntango azalaki naino na mbeto ya lopitalo, monganga ayebisaki biso ete bazali na eloko mosusu ya kosala te. Mama asilaki mayele mpe alukaki koyeba likambo yango malamu, yaya na ngai ya mobali abungisaki makanisi, mpe ngai nabulunganaki mingi. Sanza motoba na nsima, papa akufaki.
Nalekisaki ntango moko oyo natungisamaki na makanisi ndenge na ndenge. Nalingaki baninga na ngai báyeba mpasi na ngai, kasi nazalaki kolinga te ete bámona ete nazali konyokwama na yango. Yango wana, nazalaki kosala makasi mpo namonisa bango te ndenge nazalaki komiyoka. Kasi, nazalaki komona ete mpo básepela na ngai nasengelaki kozala na bomoi lokola ya bato nyonso, nzokande ezalaki bongo te. Soki nakanisi makambo oyo nazalaki kosala na ntango wana, namonaka ete baninga bazalaki mpenza na motema molai!
Namipesaka foti mpo na liwa ya Papa? Ɛɛ! Esengelaki nayebisa ye mbala mingi ete “Nalingaka yo!” Esengelaki napɛpwa ye mbala mingi to nalekisa ntango mingi ná ye. Ata soki namilobeli na nse ya motema ete, ‘Alingaki kosepela te ete nazala na makanisi ya ndenge wana,’ etungisaka ngai kaka.
Lokola nazali Motatoli ya Yehova, elikya ya lisekwa oyo ezali na Biblia ebɔndisaka ngai mingi. (Yoane 5:28, 29) Namekaka komona lokola ete papa akendá kaka mobembo moko ya molai mpe akozonga mokolo mosusu, kasi nayebi mokolo yango te. Likambo ya kokamwa, ntango bato bazalaki koloba na ngai ete, “Papa na yo akozonga na bomoi na lisekwa,” na ebandeli ezalaki kolendisa ngai te. Nazalaki koloba na nse ya motema ete, ‘Nalingi papa na ngai azonga na bomoi nde sikoyo!’ Kasi, ndakisa ya moto akei na mobembo molai esalisaki ngai. Emonisaki ete lisekwa ekozala, mpe esalisaki ngai nayika mpiko na liwa ya papa.
Bandeko na ngai bakristo basalisaki ngai mingi mpenza. Nakanisaka mingimingi ndeko moko oyo ayebisaki ngai ete azalaki kokoka te kolobela liwa ya papa na ngai, kasi azalaki ntango nyonso kokanisa ngai ná libota na ngai. Nazalaki kokanisa maloba yango ntango nyonso. Esalisaki ngai na mikolo oyo moto moko te azalaki koyebisa ngai likambo, mpo etindaki ngai namona ete ata soki bazali kolobela yango te, bazali kokanisa ngai ná libota na ngai. Ezalaki kosalisa ngai mingi!
Sanza minei nsima ya liwa ya Papa, Mama amipesaki mingi na mosala ya kosakola, mpe nazalaki komona ete esengo na ye ezalaki kouta na mosala yango. Ngai mpe nakómaki kosala elongo na ye. Ezali likambo ya kokamwa: nzokande kosalisa basusu epesaka moto ye moko makasi! Elendisaki kondima na ngai na Liloba ya Yehova mpe na bilaka na ye, mpe esalisaka ngai ata sikoyo natika kotya makanisi kaka na mpasi na ngai.