Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 2/14 lok. 16
  • Miinda ya mwa nyama babengi luciole to epela mwinda

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Miinda ya mwa nyama babengi luciole to epela mwinda
  • Lamuká!—2014
  • Masolo mosusu
  • “Pole ya kokoka”
    Lamuká!—2003
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2014
  • Lipapu ya lipekapeka
    Lamuká!—2014
  • Ndenge lipapu ya lipekapeka ebendaka pole
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 2/14 lok. 16
Epela mwinda

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Miinda ya mwa nyama babengi luciole to epela mwinda

MIINDA, to eteni ya nzoto ya mwa nyama yango oyo ebimisaka pole, ezipamá na mposo (écailles) oyo ebakisaka pole oyo mwa nyama yango ebimisaka.a

Mposo ya mikemike

Mposo (écailles)

Tókanisa naino: Bato ya mayele bamonaki ete mposo (écailles) yango ya mikemike oyo ezalaka na esika oyo mwinda epelaka na nzoto ya mwa nyama yango ezalaka lokola manzanza oyo batyaka na ndako to lokola bakaro oyo batyaka na pavema. Mposo yango elandaná moko nsima ya mosusu na ntaka ya mikromɛtrɛ 3, mwa moke mbala 20 koleka ndenge nsuki ya motó na biso ezalaka. Atako ekangamakangamá ndenge wana, mposo yango esalaka ete miinda yango epela makasi (50%) koleka ndenge elingaki kopela soki ezalaka bongo te!

Bakoki kosalela mayele yango mpo na kobongisa lisusu ndenge miinda ya baaparɛyi epelaka? Mpo na koyeba yango, bato ya siansi bakangisaki bansinga oyo elekisa kura mpo na kopelisa miinda ya baaparɛyi na eloko moko oyo ekokani na mposo ya mwa nyama yango. Nini esalemaki? Bansinga yango ebimisaki pole makasi (55%) koleka ndenge ebimisaka! Annick Bay moto moko ya siansi alobi boye: “Likambo eleki ntina ezali ete mosala yango emonisi ete moto akoki koyekola makambo mingi soki atali malamumalamu biloko oyo Nzambe akelá.”

Okanisi nini? Miinda oyo epelaka na nzoto ya mwa nyama yango, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?

a Bato ya siansi bayekoli naino te mitindo nyonso ya mwa nyama yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto