Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 6/14 nk. 14-15
  • Ndenge ya kosalela mbongo na mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosalela mbongo na mayele
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • Ndenge ya kosalela mbongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ndenge nakoki kosalela mbongo malamu
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini mpo natika bisombasomba?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu
    Okoki kozala na libota ya esengo
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 6/14 nk. 14-15
Mobali ná mwasi moko oyo bauti kobalana sika bazali kosomba biloko

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya kosalela mbongo na mayele

MOKAKATANO

Ntango otali kɔnti na yo ya banki mpe bafaktire, omoni lokola mbongo na yo ezali kolimwa na mopɛpɛ. Outi kobala kala mingi te, mpe bozali koyeba kobatela mbongo te. Osengeli nde kopesa molongani na yo foti? Kowela kosala bongo te! Bópesana nde makanisi, mpe bótalela makambo mosusu oyo mbala mosusu ekɔtisi bino na mokakatano wana.a

NINI ESALAKA BONGO?

Mbongwana. Soki ozalaki kofanda epai na bino liboso obala, kofuta bafaktire mpe kosangisa mbongo mpo na kosomba biloko ekoki kozala likambo ya sika mpo na yo. Ekoki mpe kozala ete yo ná molongani na yo bosalelaka mbongo ndenge moko te. Na ndakisa, moko akoki kozala na mposa ya kobimisaka mbongo mpambampamba kasi mosusu akoki kozala na mposa ya kobatela yango. Esɛngaka ntango mpo babalani bámesana mpe báyokana na ndenge ya kosalela mbongo.

Matiti ezali kokola zingazinga ya makolo ya mobali ná mwasi na ye

Ndenge kaka matiti ekolaka na elanga, nyongo oyo moto azali kokipe te ekoki kobanda kobakisama

Kozongisa makambo nsima. Jim, oyo mombongo na ye ezali kotambola malamu alobi ete ntango abalaki sika, kozanga kobongisa makambo malamu ememelaki ye mikakatano mpenza. Alobi boye: “Lokola nazalaki kofuta bafaktire na retare, ngai ná mwasi na ngai tozalaki kobimisa ebele ya badolare na nsima mpo na kofuta lomande. Mbongo na biso esilaki nyonso!”

“Mbongo oyo obombá” na banki. Ezalaka mpasi te kobebisa mbongo oyo oyebi te soki etikali boni. Ekoki kozala bongo soki osalelaka mingi karte ya kredi, Internet to banki mpo na kosomba biloko. Kozala na likoki ya kodefa mbongo na pɛtɛɛ nyonso ekoki kosala ete baoyo bauti kobala sika bábebisa mbongo mpambampamba.

Ezala mpo na likambo nini, mbongo ekoki kobimisa mikakatano na libala na bino. Buku moko (Fighting for Your Marriage) elobi boye: “Babalani mingi balobi ete mbongo nde likambo ya liboso oyo ebimisaka mikakatano na libala ata soki bazali na yango mingi to te. Mbala mingi baswanaka nde mpo na likambo ya mbongo.”

OKOKI KOSALA BOYE

Bózala na ekateli ya kopesana mabɔkɔ. Na esika ya kopesana foti, bópesana mabɔkɔ mpo bósalelaka mbongo na bino na mayele. Na ebandeli bóyokana ete bokotika te ete mbongo ekabola bino.​—Toli ya Biblia: Baefese 4:32.

Bóyokana liboso ndenge bokosalela mbongo. Bósala liste ya biloko nyonso oyo bokosomba na sanza mobimba, ezala ya minene to ya mike. Yango ekosalisa bino bóyeba epai mbongo ezali kokende mpe bóyeba biloko oyo ezali na ntina te kosomba.

Bósala liste ya biloko oyo ezali na ntina, ata mpe ya biloko ya kolya, ya bilamba, mbongo ya kofuta ndako, ya motuka mpe makambo mosusu. Bókoma ‘ntalo’ ya eloko mokomoko oyo ezali na liste, mpe bótala soki yango ekosɛnga bóbimisa mbongo boni na ntango boye, mbala mosusu mpo na sanza mobimba.​—Toli ya Biblia: Luka 14:28.

“Modefi azali mosaleli ya moto oyo azali kodefisa.”​—Masese 22:7

Sanza nyonso, tyáká mbongo ya eloko na eloko na esika na yango (ya bilei, ya nyongo, ya esansi mpe bongo na bongo). Mpo na kosala bongo, basusu batyaka mbongo ya eloko na eloko na ba anvelɔpɛ.b Soki anvelɔpɛ ya eloko moko elingi kotikala mpamba, bakoki kotika kobimisa mbongo na anvelɔpɛ yango mpo na kosomba eloko yango to kotya mbongo oyo etikali na anvelɔpɛ mosusu.

Taleláká biloko ya mokili na ndenge ebongi. Kozala na eloko nyonso oyo ebimi sika te nde epesaka moto esengo. Kutu, Yesu alobaki boye: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Mbala mingi, ndenge oyo osombaka biloko emonisaka soki ondimaka maloba yango.​—Toli ya Biblia: 1 Timote 6:8.

Bongolá makambo. Aaron, oyo abalá ekokisi sikoyo mbula mibale, alobi boye: “Makambo lokola kotya ba antennes mosusu ya TV mpe kolya na barestora ekoki komonana malamu, kasi nsima ya mikolo ekoki kosilisa moto mbongo. Tosengeli koboya makambo mosusu soki tolingi kotambwisa bomoi na kotalela makoki na biso.”

a Atako lisolo oyo ezali mpo na baoyo bauti kobala sika, batoli yango etaleli mpe babalani nyonso.

b Soki osalelaka karte ya kredi mpo na kosomba biloko, bombáká bafaktire ya eloko oyo osombi na anvelɔpɛ oyo etali eloko yango.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko.”​—Baefese 4:32.

  • “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga?”​—Luka 14:28.

  • “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.”​—1 Timote 6:8.

Micah ná Megan

MICAH NÁ MEGAN

“Ata soki molongani moko nde azali kosalela mbongo mpe kofuta bafaktire, bino nyonso mibale bosengeli koyeba mbongo boni botikali na yango. Kosolola nde esalaka ete matata ebima te.”

David ná Nataleine

DAVID NÁ NATALEINE

“Bóbongisa makambo liboso. Bóloba te ete mbongo nyonso oyo bozali na yango na banki ezali wana mpo na kosalela yango. Soki boyebi kobatela mbongo te, miso ekotela bino ntango makambo ya mbalakaka eyaka, na ndakisa kobongisa motuka.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto