1. Bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe?
Ntina ya koyeba yango
Bato mingi baboyaka kosambela Nzambe mpo balobaka ete Nzambe nde abimiselaka biso bampasi.
Kanisá naino
Bakonzi mingi ya mangomba bateyaka ete bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe. Na ndakisa, basusu balobaka ete:
Makama oyo ebimaka yango moko ezali etumbu ya Nzambe.
Nzambe abomaka bana mpo bákóma baanzelu na ye na likoló.
Nzambe alingaka bitumba, nzokande bitumba ebimisaka bampasi mingi.
Kasi ekoki kozala ete bakonzi ya mangomba bazali kokosela Nzambe makambo? Bongo soki Nzambe apesá bango mokɔngɔ, tosengeli kondima makambo oyo bazali koteya?
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU
Talá video Mpo na nini koyekola Biblia? ezali na jw.org.
Oyo Biblia elobi
Bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe te.
Tolobi bongo mpo Biblia emonisi ete Nzambe azali na bizaleli oyo ekoki kotinda ye soki moke te abimisela bato bampasi. Na ndakisa:
“Banzela [ya Nzambe] nyonso ezali bosembo. . . . Azali moyengebene mpe sembo.”—KOLIMBOLA MIBEKO 32:4.
“Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki ata moke te kosala makambo oyo ezangi bosembo!”—YOBO 34:10.
“Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ye moko abebisaka lisambisi te.”—YOBO 34:12.
Nzambe andimaka te mangomba oyo elobaka lokuta mpo na ye.
Andimaka mpe te mangomba oyo eteyaka ete bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe ná mangomba oyo ekɔtaka na bitumba mpe na mobulu.
“Basakoli bazali kosakola nde lokuta na nkombo na ngai [Nzambe]. Natindi bango te, napesi mpe bango mitindo te mpe nalobi na bango te. Emonaneli ya lokuta . . . mpe bokosi ya motema na bango, yango nde bazali koloba na bino na maloba ya esakweli.”—YIRIMIA 14:14.
Yesu abimisaki polele lokuta ya mangomba.
“Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló. Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te? mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te? mpe tosalaki ebele ya misala mingi ya nguya na nkombo na yo te?’ Nzokande nakoyebisa bango polele ete: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.”—MATAI 7:21-23.