4. Nzambe asalá biso mpo tómonaka mpasi?
Ntina ya koyeba yango
Eyano na motuna yango ekobongola ndenge oyo totalelaka bomoi.
Kanisá naino
Mpo na nini Nzambe oyo asalá biloko ya kitoko atiki biso tómonaka mpasi?
Bato oyo basambelaka te balobaka ete soki tozali komona mpasi ezali mpo Nzambe azali motema mabe to mpe azalaka te. Bakanisaka ete bampasi ezali mpo (1) Nzambe azali na nguya te ya kosilisa yango, (2) Nzambe alingi te kosilisa yango, to (3) Nzambe azalaka te.
Makanisi yango ezali solo?
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU
Talá video Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo? ezali na jw.org.
Oyo Biblia elobi
Nzambe asalá biso te mpo tómonaka mpasi.
Alingi ete tózala na esengo.
“Eloko oyo eleki malamu mpo na bango ezali te, longola kaka kosepela mpe kosala malamu na boumeli ya bomoi; mpe lisusu ete moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.”—MOSAKOLI 3:12, 13.
Nzambe apesaki Adama ná Eva nyonso oyo esengeli mpo bázala na esengo.
Alingaki te ete bango mpe bana na bango bámona mpasi.
“Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.’”—EBANDELI 1:28.
Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe.
Yango wana ebimiselaki bango mpe bana na bango bampasi.
“Kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” —BAROMA 5:12.a
Nzambe asalá bato te mpo bámitambwisa bango moko.
Kaka ndenge tosalemá te mpo tófandaka na nse ya mai, tosalemá mpe te mpo tómitambwisa biso moko.
“Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.”—YIRIMIA 10:23.
Nzambe alingaka te tómona mpasi.
Alingaka ete tósala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa mibeko na ye mpo tózala na kimya.
“Soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale.”—YISAYA 48:18.
a Ntango Biblia elobelaka lisumu, emonisaka makambo ya mabe mpe emonisaka lisumu oyo eutá epai ya Adama, oyo bato nyonso babotamaka na yango.