Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 1 lok. 3
  • Bwanya oyo ekotambwisa yo mpe ekopesa yo esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bwanya oyo ekotambwisa yo mpe ekopesa yo esengo
  • Lamuká!—2021
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo ezali na kati
    Lamuká!—2021
  • Ndenge ya kozwa esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ndenge ya kozwa bolamu ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 1 lok. 3

Bwanya oyo ekotambwisa yo mpe ekopesa yo esengo

“Atako nasepelaka te ntango namonaka makambo ya mabe oyo ezali na mokili, na ndakisa bitumba, bobola, maladi, konyokola bana, nazali na elikya ete makambo ekobonga.”​—RANI.a

Rani azwaki esengo ya solosolo ntango ayebaki esika oyo bwanya ya solosolo eutaka, epai ya Mozalisi na biso, Nzambe oyo azali na nguya koleka banguya nyonso. Ntango okotánga masolo oyo elandi, talá ndenge mateya yango ekoki kosalisa yo . . .

  • ozala na libota ya esengo

  • ozala na boyokani malamu na bato mosusu

  • osepela na oyo ozali na yango

  • oyeba ntina oyo bato bakufaka mpe bamonaka mpasi

  • ondima ete mosika te Nzambe akosilisa bampasi nyonso mpe akopesa biso bomoi ya esengo

  • oyeba Nzambe oyo asalá biso mpe okóma moninga na ye

Okoyeba mpe ete Nzambe aponaka te bato ya kopesa bwanya, kasi apesaka yango na moto nyonso oyo alukaka ye.

a Topesi bato yango bankombo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto