Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 20 nk. 100-108
  • Batoli elendisaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batoli elendisaka
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Malako mpo na bakɛngɛli na eteyelo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Makanisi mabongi na koteya, malakisami polele
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 20 nk. 100-108

Liteya 20

Batoli elendisaka

1, 2. Mpo na nini tolukaka toli, mpe motindo nini toyambaka yango?

1 Basambeli na Nzambe na solo balukaka ntango nyonso kotambwisama na ye kati na makambo na bango nyonso. Na elikya nyonso, moko na bakomi na nzembo alobaki boye: “Okotambolisaka ngai na toli na yo.” (Nz. 73:24) Kati na libondeli moko, Jérémie alobaki boye: “Likambo moko eleki makasi mpo na yo te; . . . Nzambe monene mpe na nguya, Jéhovah na bibele ezali nkombo na [yo]. Monene mpo na toli, mpe na nguya mpo na mosala.”​—Yil. 32:17-19.

2 Na mikolo na biso, baklisto basambeli ya Jéhovah bazali kozwa batoli na ye na nsima na Liloba na ye epemami mpe na nsima na lisangá ya basaleli na ye ya solo. Baoyo bakomisi nkombo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe bazali komona noki ete toli oyo epesameli bango mpe motindo oyo bapeseli bango toli yango etongámi likoló na mitinda kitoko ya Biblia.

3-5. Limbola motindo nini fiche ya Toli mpo na balobi mpe makambo mazali banda Liteya 21 kino 37 mabongisamaki mpo na kosalelama elongo.

3 Toli ya kolandana. Fiche ya Toli mpo na balobi esalami na motindo boye ete esalisa bayekoli mpe esalisa mokengeli na eteyelo. Ezali na bapwɛ́ ntuku misato na motoba oyo ekosunga bayekoli mpo ete bakolisa makoki na bango ya kolakisa solo na lolenge malamu mpenza. Bokokuta ndimbola mikuse na ntina na mokomoko na bapwɛ́ yango kati na Liteya 21 kino Liteya 37 ya mokanda oyo, Liteya mokomoko elakisami na nimero moko na fiche ya Toli mpo na balobi. Ntina na Liteya yango ezali ete esalelama nzela moko na fiche oyo. Bisika mingi, bapwɛ́ mibale to misato oyo ezali na boyokani kati na yango, etyami na Liteya moko, mpo ezali malamu kotalela yango elongo.

4 Mpo na bayekoli ya sika na eteyelo, ekozala litomba ete bamilengela malamu, na kotyaka likebi likoló na bapwɛ́ oyo ezali na ebandeli ya fiche ya Toli mpo na balobi. Nsima na lisolo ya moyekoli nyonso, mokengeli na eteyelo (to motambwisi mosusu soki bayekoli baleki mingi) akokumisa moyekoli bobele na bapwɛ́ oyo asali malamu. Na nsima, mopesi na toli akobenda likebi ya moyekoli likolo na pwɛ́ moko oyo asengeli kobongisa yango mpe akolakisa moyekoli lolenge nini kobongisa yango mpo na lisolo ya mbala ekoya. Mopesi na toli akoyebisa na moyekoli mokomoko ntango nini ekokoka na ye koleka na pwɛ́ mosusu.

5 Bamoko bayekoli bakoki kokola noki, nzokande bamosusu bakosengela kolanda pwɛ́ mokomoko, na esika ete bameka bapwɛ́ nyonso oyo elobelami kati na Liteya moko. Mokengeli na eteyelo akoki kosenga na bamoko bayekoli ete basala masolo mingi mpo na kozongela pwɛ́ moko oyo bazali kokoka yango te, kino bakolonga kosala yango malamu liboso ya koleka na pwɛ́ mosusu.

6, 7. Toli ya mokengeli na eteyelo ekotalela makambo nini?

6 Batoli epesami nsima na lisolo nyonso esengeli kozala ya boboto kati na mokano ya kosalisa moyekoli ete abongisa makoki na ye ya molobi. Soki mokengeli na eteyelo azali na toli ya kopesa epai na ndeko oyo asali lisolo ya liboso to na ndeko oyo apesi ndimbola ya mikapo ya Biblia, akopesa toli yango na nkuku nsima na likita. Mingimingi akopesa ye toli soki alekisi minite oyo bapesaki ye. Ndeko oyo azwi lisolo ya liboso to diskur ya koteya lisanga, asengeli kosala yango na motindo boye ete ezala ndakisa na makambo nyonso; soki asali bongo, mbala mingi ntina ya kobenga ye pembeni mpo na toli ekozala te.

7 Bapwɛ́ oyo mokengeli akopesela toli ezali bobele oyo asilaki koyebisa moyekoli ete abongisa yango lisusu. Ya solo, soki pwɛ́ mosusu ezali, oyo moyekoli asali yango malamu ata esengamaki te, mokengeli na eteyelo akoki kopesa ye longonya, kasi akokoma yango kati na fiche ya batoli te. Bilembo asengeli kosalela ezali oyo: “Z” (Zongela pwɛ́ oyo), soki esengeli ete moyekoli alanda kotya likebi na ye likoló na pwɛ́ wana kino ntango akokoka yango; “B” (Bongisa), soki moyekoli asili kokoka pwɛ́, nzokande esengeli ete abongisa lisusu; “M” (Malamu) ntango moyekoli alongi malamu na pwɛ́ wana, mpe akoki koleka na bapwɛ́ mosusu na mbala ekoya. Soki ezali botangi ya Biblia, motambwisi akopesa epai na moyekoli bapwɛ́ ya fiche ya toli oyo ekokani malamu na devuare ya lolenge wana.

8-10. Ntango mokengeli na eteyelo azali kotya bilembo na fiche ya toli, eloko nini akoki kobosana te soki alingi komona bokoli epai na bayekoli?

8 Mokengeli na eteyelo asengeli kozala na bososoli mingi mpo ete toli na ye ekoka kobota matomba malamu. Bayekoli ya sika bakozala na mposa ya koyikisama mpiko. Bayekoli mosusu, oyo bazali kosala badevuare na eteyelo uta kala, bakoki kobongisa masolo na bango malamumalamu mpe kotya likebi na bapwɛ́ oyo basengi bango, nzokande ntango mosusu bazali na makoki mingi te. Soki ezali boye, na ntango moyekoli asali mingi pwɛ́ wana, ata akokisi nyonso esengami te, mokengeli na eteyelo akoki kokoma “M” na fiche ya toli.

9 Nzokande, moyekoli mosusu akoki kozala na eksperianse mingi mpe na makoki mingi oyo abotami na yango. Kasi, na esika ete abongisa devuare na ye malamu mpe atalela bapwɛ́ oyo basengaki ye, asali bongo te mpo azalaki mbala mosusu na makambo mosusu ya kosala, ntina wana devuare na ye ebongi te. Mpo na ndeko ya boye, soki mokengeli ya eteyelo akopesa ye “M” na fiche na ye ya toli mpe apesi nzela ete aleka na pwɛ́ mosusu, ekozala mabe mpo na ye. Soki lolenge ya diskur ekokaki na moyekoli ete asala malamu koleka pwɛ́ oyo basengaki ye kasi ye asali bongo te, mokengeli na eteyelo to ndeko mosusu oyo azali kopesa toli akokoma “Z” (Zongela pwɛ́ oyo) na fiche na ye mpe akopesa ye mwa makanisi ya boboto, mpo na kosalisa ye ete akola. Na motindo yango, bayekoli bakoyikisama mpiko ete babongisaka masolo na bango nyonso bobele mpo na kokokisa devuare oyo bapesaki bango te, kasi lokola matambe oyo basengeli kosala mpo na bokoli na bango ete bazala balobi malamu.

10 Kobosana te ete formation oyo mpo na kozala molobi malamu ezali bokoli ya mokemoke. Kokanisa te ete lelo na lobi okokoma molobi malamu na makambo nyonso. Ezali nde bokoli oyo ekolandana na boumeli ya mikolo mingi, na kosalaka makasi mpenza. Soki ozali kolanda malamu batoli oyo ezali kopesama na bandeko ndenge na ndenge oyo bazali koleka liboso mpo na kosala badevuare mpe soki ozali kobongisa badevuare na yo moko malamumalamu, kokola na yo ekomonana polele na baoyo nyonso bazali kotala yo.​—1 Tim. 4:15.

11-16. Makambo minene nini mokengeli asengeli kolanda soki alingi ete toli na ye ekoka kolendisa bayekoli?

11 Mopesi na toli. Mokengeli na eteyelo asengeli koyekola malamumalamu mateya ya poso na poso, mpo na kokoka komona soki makambo nyonso malobami mpe kosembola libunga nyonso oyo ekoki kokota kati na mateya. Nzokande, akopesa ntango na ye nyonso te bobele mpo na koluka mabunga kati na masolo ya bayekoli mpe na ndenge na bango ya kosala yango; ebongi ete ye mpe azwa litomba na masolo nyonso, kati na yango makambo ya solo mpe ya kitoko malakisami.

12 Liboso ya kopesa toli na moyekoli, ebongi akumisa naino ye mpo na molende oyo asali. Na nsima, akolimbola bapwɛ́ oyo esengamaki na moyekoli mpe likoló na yango bakopesa ye toli. Soki moko na yango esengeli ete ebongisama lisusu, mokengeli akolobela mingi bolembu ya moyekoli te, kasi akolakisa nde motindo nini pwɛ́ yango ekoki kobongisama. Na motindo yango, toli epesami ekozala litomba bobele mpo na moyekoli te kasi mpo na bayangani nyonso.

13 Ekoki te bobele koloba na moyekoli ete osali malamu pwɛ́ boye to osengeli kozongela pwɛ́ boye. Mokengeli na eteyelo to ndeko mosusu oyo azali kopesa toli akosalisa bayangani nyonso soki akolimbola mpo na nini pwɛ́ yango ezalaki malamu to mpo na nini mpe ndenge nini moyekoli asengeli kobongisa yango. Epai mosusu, ekozala litomba na komonisa mpo na nini pwɛ́ boye to pwɛ́ boye ezali na ntina mingi kati na mosala ya kosakola to na makita ya lisangá. Wana lisangá mobimba bakomona ntina ya pwɛ́ yango mpe moyekoli akolendisama ete alanda kotya likebi mingi na pwɛ́ yango.

14 Mokengeli na eteyelo to ndeko mosusu oyo aponami mpo na kopesa toli azali na mokumba ya kozongela lisolo ya moyekoli te. Maloba na ye masengeli kozala mokuse mpe sikisiki wana ezali ye kopesa toli, mpo ete azali bobele na minite mibale nsima na lisolo ya moyekoli mokomoko. Na motindo yango, toli na ye mpe makanisi oyo azali kopesa, ekobunga te kati na ebele na maloba. Epai mosusu, ebongi kolobela moyekoli bankasa nini ya mokanda oyo akoki kotala mpo na kozwa ndimbola mingi na ntina na pwɛ́ oyo basengaki ye.

15 Mokengeli na eteyelo to ndeko mosusu oyo aponamaki mpo na kopesa toli akolanda te mabunga mikemike ya elobeli to ya gramere. Akotalela nde motindo moyekoli abongisi lisolo na ye. Bato bakoki kolanda yango mpe ekoki koteya bango eloko? Plan na yango ezali malamu mpe bato bakoki kolanda yango kozanga mindondo? Moyekoli azali kosala yango kozanga mabunga mpe kozanga ntembe? Motindo na elongi na ye mpe bageste na ye emonisi ete ye moko andimi makambo azali koloba mpe azali komibanzabanza koyebisa solo kitoko epai na bayoki na ye na esika ya koluka lokumu epai na bango? Soki moyekoli akotya likebi na makambo oyo ya ntina mingi, bayangani bakokipe te mabunga na ye mikemike ya elobeli mpe ya gramere.

16 Mokengeli na Eteyelo ya mosala ya Nzambe asengeli ntango nyonso kopesa toli ya boboto mpe ya litomba. Asengeli kozala na mposa mpenza ya kosalisa bayekoli. Talela bomoto ya moyekoli oyo ozali kopesa toli. Azokaka mpambampamba? Akotaki kelasi mingi te? Ozali na bantina ya kozanga kolanda mabunga na ye? Toli na yo ebongi kozala lisalisi kasi kotiola te. Luka koyeba soki asimbi eloko nini olingi koloba kati na toli mpe mpo na nini opesi yango.

17-19. Mpo na kokola malamumalamu na libaku nyonso oyo azwi devuare, moyekoli asengeli kosala nini liboso ya kobongisa yango mpe nsima na kosala yango?

17 Zwa litomba na toli. Ntango ozwi devuare na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, kobosana te ete ezali bobele mpo na koteya lisangá te, kasi lisusu mpo na kobongisa motindo na yo ya koloba. Mpo na kozwa matomba malamu na nzela yango, ezali likambo ya ntina ete okamata ntango ya koyekola pwɛ́ nyonso oyo basengi yo. Tanga na likebi nyonso Liteya oyo ezali kolobela pwɛ́ yango kati na mokanda oyo, mpo oyeba motindo nini osengeli komibongisa mpe motindo nini okoki komonisa ezaleli yango ntango okosala lisolo na yo. Mpo na kosalisa yo, eteni mokomoko na pwɛ́ nyonso enyatami na makomi ya moindo koleka. Ezali wana makambo ya ntina oyo osengeli kotalela.

18 Nsima na kosala devuare na yo, yoka na likebi nyonso toli oyo bazali kopesa yo. Ndima yango na botondi nyonso, na nsima sala makasi na bapwɛ́ oyo basengi yo ete obongisa. Soki olingi kokola noki, kozela te bobele ntango okozwa lisusu devuare na eteyelo. Yekola biteni ya mokanda oyo ezali kolobela bapwɛ́ oyo osengeli kobongisa. Tya molende ya kosalela toli epesameli yo, kati na masolo na yo ya mikolo nyonso. Na yango, ntango okozwa lisusu devuare na eteyelo, ekozala ete osili komesana na bapwɛ́ yango.

19 Moyekoli nyonso asengeli kozala na mokano ya kokola mbala nyonso oyo asali devuare na eteyelo. Ya solo, ezali kosenga milende mingi, kasi na ntembe te Jéhovah akopambola yo. Mpo na ndeko nyonso oyo alingi kozwa litomba mpenza na formation oyo ezali kopesama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, maloba malandi, oyo makomami na Masese 19:20 mazali na ntina mingi mpo na ye: “Yoka toli mpe yamba kolakisama ete ozala na mayele na nsima.”

[Etanda na lokasa 104, 105]

TOLI MPO NA MOLOBI

Molobi ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․

(Nkombo nyonso)

Bilembo: Z - Zongela pwɛ oyo

B - Bongisa

M - Malamu

Dati Lisolo No.

Makanisi mabongi na koteya (21)*

Polele, bakoki kolanda yango malamu (21)

Ebandeli elamusi mposa ya bayoki (22)

Ebandeli ekoki na teme (22)

Bolai ya maloba ya ebandeli (22)

Volime ya mongongo (23)

Poze to kopema (23)

Kosenga bayoki ete bakamata Biblia (24)

Mikapo mibimisami malamu (24)

Komonisa maloba ya ntina (25)

Kolimbola ndenge ya kosalela mikapo (25)

Kozongela makambo ya ntina (26)

Gestes (26)

Kozongelaka teme (27)

Komonisa makambo minene ya lisolo (27)

Kotalaka bayoki, kosalela banote (28)

Kosalela plan (28)

Remarke: ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․

․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․

․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․

* Motuya nyonso kati na paranteze ekokani na mokapo to Liteya ya Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe epai lisengami wana elimbolami.

(S-48-LI)

Lisolo No.

Kozanga kokakatana na maloba (29)

Koloba lokola lisolo (29)

Kotosa ebengeli ya maloba (29)

Kosalela maloba ya bokangisi lisolo (30)

Molongo ebongi, kozanga kokatama (30)

Makanisi makoki kosilisa ntembe (31)

Bayoki bapusami na kokanisa (31)

Konyata maloba ya ntina (32)

Kobongola mongongo (32)

Esengo (33)

Mɔ́tɔ, mayoki (33)

Bandakisa ebongi na lisolo (34)

Bandakisa ebongi na bayoki (34)

Makanisi mabongi na kosakola (35)

Esukiseli malamu, elongobani (36)

Bolai ya esukiseli (36)

Boumeli ya lisolo (36)

Kozanga kobanga (37)

Ebimeli ya molobi (37)

Liyebisi: Mpo na lisolo mokomoko, mopesi-toli akotalela moyekoli na bapwɛ oyo elobelami na Liteya se moko ya Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, kolandaka molongo kati na lokasa ya Toli mpo na balobi. Mbala nyonso oyo mopesi-toli amoni ete akolanda molongo te, akoyebisa moyekoli libela na esika bakomi “Remarke.” Bisika bitikali mpamba na nse bikoki kosalelama mpo na kopesa toli na bapwɛ mosusu oyo ekomami te; lokola oyo: kozanga kobunga na motuya ya mikapo mpe makambo mosusu, elobeli, elateli, vokabilere, gramere, kotika mimeseno mabe, kolongobana, metode ya koteya mpe lolenge ya mongongo.

[Etanda na lokasa 106, 107]

NDIMBOLA MOKUSE YA BIZALELI BISENGAMI NA BALOBI

Makanisi mabongi na koteya (21)

Makanisi ya sikisiki

Mabongi na bayoki

Makanisi mazali na motuya mpo na kosalela yango

Makambo malobami mazali se bongo

Bingengiseli mosusu

Polele, bakoki kolanda yango kozanga mpasi (21)

Maloba ya petee

Kolimbola maloba mayebani malamu te

Makanisi mingi te

Ebandeli elamusi mposa ya bayoki (22)

Ebandeli ekoki na teme (22)

Bolai ya maloba ya ebandeli (22)

Volime ya mongongo (23)

Bakoki koyoka yo malamu

Ebongi na makambo okutani na yango

Ebongi na makanisi malakisami

Poze to kopema (23)

Poze mpo na kotosa bilembo ya bopemi

Poze liboso ya koleka na likambo mosusu

Poze mpo na komonisa likambo ya ntina

Poze mpo na makelele

Kosenga bayoki ete bakamata Biblia (24)

Kosenga bango bakamata Biblia

Kotikela bango ntango ya komona esika olingi kotanga

Mikapo mibimisami malamu (24)

Kolamusa mposa mpo na mikapo

Koyebisa ntina oyo otangeli yango

Komonisa maloba ya ntina kati na mikapo (25)

Konyata maloba ya ntina

Salela metode malamu

Mikapo oyo otangisi na moto mosusu

Kolimbola malamu ndenge ya kosalela mikapo (25)

Komonisa maloba ya ntina polele

Monisa lisusu ntina oyo otangeli mokapo yango

Kozongela makambo ya ntina (26)

Kozongela makambo ya ntina monene

Kozongela makambo oyo bato basimbaki ntina na yango te

Gestes (26)

Bageste mpo na kolakisa ndenge eloko ezali

Bageste mpo na kobakisa bokasi ya maloba

Kozongela teme (27)

Teme ebongi na lisolo

Kozongela maloba ya ntina to makanisi ya ntina

Komonisa polele makambo minene ya lisolo (27)

Ezala mingi te

Makanisi minene malimbolami engebene kokesana na yango

Ndimbola mosusu esimbi makanisi minene

Kotalaka bayoki, kosalelaka banote (28)

Kotalaka bayoki

Koloba lokola ete ozali kosolola na moto moko

Kosalela plan (28)

Kozanga kokakatana na maloba (29)

Koloba lokola lisolo (29)

Maloba oyo okosalela

Na elobeli to style

Kotosa ebengeli ya maloba (prononciation) (29)

Kosalela maloba ya bokangisi lisolo (30)

Kosalela maloba ya bokangisi

Ekangiseli ebongi na bayoki

Lisolo epesami na molongo ebongi, kozanga kokatama (30)

Makanisi mapesami na molongo ebongi

Tika pembeni makanisi oyo matali teme na yo te

Kobosana likanisi ya ntina ata moko te

Makanisi makoki kosilisa ntembe (31)

Tya moboko

Pesa bilembeteli mpo na kondimisa

Rézimé malamu

Bayoki bapusami na kokanisa (31)

Luka likanisi oyo bokoki koyokana na yango

Kolimbola pwɛ́ nyonso malamumalamu

Komonisa na bayoki ete makambo yango etali bango

Konyata maloba ya ntina (32)

Nyata maloba oyo masimbi likanisi

Lobela makasi makanisi minene ya diskur

Kobongola mongongo (32)

Kobongola volime

Kobongola vitese

Kobongola ton

Ebongi na likanisi to na liyoki emonisami

Esengo (33)

Emonisami na elobeli mpe na ezaleli liboso ya bayoki

Ekokani na lisolo

Mɔ́tɔ, mayoki (33)

Na miso

Na ton ya mongongo

Ekokani na lisolo

Bandakisa ebongi na lisolo (34)

Ezali na mindondo te

Kolimbola polele ntina na yango

Makambo ya ntina mabimisami polele

Bandakisa ebongi na bayoki (34)

Ezwami na makambo ya mokolo na mokolo

Ezali na nsoni te

Makanisi mabongi na mosala ya kosakola (35)

Kolimbwela bato maloba ya kwokoso

Kopona makanisi mabongi

Komonisa motuya na makanisi mpo na kosalela yango

Esukiseli malamu, elongobani (36)

Esukiseli ekangisami na teme ya diskur

Esukiseli emonisi bayoki eloko nini basengeli kosala

Bolai ya esukiseli (36)

Boumeli ya lisolo (36)

Mpiko mpe kozanga kobanga (37)

Ndenge emonanaka na nzoto

Ndenge emonanaka na mongongo

Ebimeli ya molobi (37)

Peto na nzoto na ye

Etelemeli malamu

Kobongisa malamu biloko azali na yango

Elongi ebongi na lisolo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto