Liteya 22
Ndenge nini okoki kobanda diskur na lolenge malamu
1-3. Na maloba ya ebandeli ya diskur, myango nini okoki kosalela mpo na kolamusa mposa ya bayoki?
1 Kolamusa mposa ya bayoki. Ebandeli ya diskur esengeli kolamusa mposa ya bayoki. Mokano na yango ezali ya kosimba likebi ya bayoki mpe kobongisa elimo na bango mpo balanda malamu makambo okoyebisa bango na nsima. Mpo na kolonga na yango, osengeli komonisa na bayoki na yo motuya ya lisolo na yo.
2 Mwango moko eleki malamu mpo na kolamusa mposa ya bayoki ezali ya komonisa bango ete lisolo etali bango mpe kososolisa bango ete ezali na ntina mpo na lobiko na bango. Osengeli bongo kotalela boyebi nini bayoki na yo bazali na yango, mpamba te moyangani mokomoko asengeli kosimba maloba na yo ya ebandeli. Ebandeli yango ekoki kozala lisese to ndakisa, ekoki mpe kozala mokakatano moko oyo okolakisa bayoki ndenge ya kosilisa yango to mituna mibale to misato oyo okoyanola kati na lisolo na yo. Nzokande, ata oponi oyo to oyo kuna, esengeli ntango nyonso kozala eloko oyo bayoki bayebi yango, mpo ete bakoka komitya bango moko na esika wana.
3 Ntango mosusu tokosalelaka maloba ya ebandeli mpo na kolonga makanisi ya libunga, mingimingi soki likambo tolingi kolobela ebimisaka ntembe. Na makambo motindo oyo, ebandeli ezali na ntina mingi, mpamba te yango nde ekosalisa yo ete okoka kosimba likebi ya bayoki mpo na kozelisa bango kino ntango okobimisela bango makanisi oyo makondimisa bango. Na mosala ya ndako na ndako, mbala mingi likoki ezali ya kolonga ntembe moko oyo elobamaka mingi, soki tokobanda naino koyebisa yango kozanga kozokisa moto, mpe na nsima kokotisa lisolo oyo olingi kosolola yango elongo na moto.
4-6. Makambo mosusu nini makosalisa yo na kopona maloba na ebandeli oyo makolamusa mposa ya bayoki?
4 Makambo mazali yo koloba mazali na ntina, kasi na ebandeli ya lisolo, oyo esengeli kolamusa mposa ya bayoki, lolenge ya koloba yango eleki ntina koleka na biteni mosusu ya diskur. Ebandeli esengeli bongo kobongisama malamu, ezala makanisi na yango to maloba oyo okosalela mpo na koyebisa yango.
5 Mingimingi, bafraze ya mikuse mpe ya petee, yango nde ebongi malamu mpo na ebandeli ya lisolo. Lokola ozali na minite mingi te mpo na ebandeli, osengeli kopona malamu maloba oyo okosalela; yango wana ebongi malamu ete okoma na ebandeli ya plan na yo bafraze mibale to misato oyo obongisi yango malamumalamu lokola maloba na yo ya ebandeli. Okoki kotanga yango to mpe kokanga yango na motó. Na motindo yango, maloba na yo ya liboso makozala na kilo ndenge esengeli na yango. Epai mosusu, kosala motindo boye ekolongola yo kobanga mpe okolanda diskur na yo oyo plan ezali bobele na makanisi ya ntina.
6 Toli mosusu yango oyo, atako mokengeli na eteyelo akotalela yango te mpo na kokoma yango na fiche na yo. Soki omoni ete motema ekomi kobeta makasi, loba malembe mpe kitisa mongongo. Monisa ete oyekolaki, kasi koloba lokola moto azali kopesa mibeko te mpo bayoki na yo bakoki koyina yo uta ebandeli.
7. Ntango nini osengeli kobongisa maloba na yo ya ebandeli?
7 Atako maloba ya ebandeli ezali eteni ya liboso ya diskur, nzokande ekobongisamaka malamu nsima na kosangisa makambo nyonso oyo masengeli kokota kati na diskur mpenza. Wana nde okoyeba maloba nini maleki malamu, oyo okoki kosalela na ebandeli mpo na kolamusa mposa ya bayoki ete balanda makanisi obongiseli bango.
8-10. Tokoki kosala nini mpo ete maloba na biso na ebandeli mazala na boyokani na teme na biso?
8 Ebandeli ekoki na teme. Mpo na kobanda malamu lisolo na yo, maloba ya ebandeli masengeli kokokana na teme. Na ebandeli na yo, salela bobele makanisi oyo mazali na boyokani mpenza na lisolo na yo. Epai mosusu, maloba ya ebandeli masengeli kozala na lokumu ebongi na nsango ya Bokonzi mpe kozanga kozokisa bapaya.
9 Maloba na yo ya ebandeli ezali bobele mpo na koyebisa lisolo na yo te, kasi lisusu komonisa sikisiki eteni nini ya lisolo yango yo okolobela. Mpo na kolonga na yango, ebongi omiponela naino teme, mpe kosala nyonso mpo na koyebisa teme yango kati na maloba na yo ya ebandeli. Ata olobi teme mobimba te kati na maloba na yo ya ebandeli, nzokande okoki kosalela mwa maloba ya ntina oyo mazwami na teme yango. Na motindo yango, bayoki na yo bakomona ete makambo ozali kolobela bango ezali solo oyo eyebisamaki na titre ya lisolo na yo kasi eloko mosusu te.
10 Diskur nyonso esengeli kokangana malamu na biteni na yango nyonso. Ekoki te ete ebanda ndenge mosusu mpe esuka ndenge mosusu. Epai mosusu, ata esengeli ete maloba ya ebandeli elamusa mposa ya bayoki mpo na lisolo na yo, nzokande esengeli mpe koyokana na teme. Na maloba mosusu, osengeli te kotika teme na yo pembeni bobele mpo ete ozwi lisese moko malamu oyo olingi kosolola yango lokola ebandeli ya diskur na yo. Mokano ozali koluka kati na diskur na yo, yango nde ekosalisa yo na koyeba makanisi nini osengeli kosalela na maloba na yo ya ebandeli, mpe yango esengeli koyokana na diskur mobimba.
11-14. Ndenge nini tokoki koyeba soki bolai ya maloba ya ebandeli ekoki?
11 Bolai ya maloba ya ebandeli. Bolai ya maloba ya ebandeli esengeli kozala boni? Eyano ya sikisiki na motuna oyo ezali te. Ezali kotalela bolai ya diskur, mokano oyo ozali koluka, motindo na bayoki mpe makambo mingi lisusu.
12 Bayoki basengeli komona te epai wapi maloba na ebandeli esuki mpe epai wapi diskur mpenza ebandi; nyonso esengeli kokangisama malamumalamu. Mopesi na toli akotalela yo na pwɛ́ yango ntango akokoma na esika oyo na fiche ya Toli mpo na balobi. Moyekoli nyonso apesaka mwa maloba na ebandeli ya lisolo na ye, kasi mopesi-toli akomituna motuna oyo: Ebandeli na yo, ezalaki bitenibiteni oyo ezangi boyokani kati na yango? Ezalaki na makambo mingi na kati mpe na molai mingi kino ete bayoki babaye lisolo na yo naino olobeli bango te bapwɛ́ minene oyo obongisaki?
13 Maloba ya ebandeli masengeli kozala mingi te; masengeli kozala na makanisi mabongisami na molongo mpo na kokotisa lisolo mpe kolamusa mposa ya bayoki. Esengeli kokoka na makambo na yango nyonso mpe kozanga kokatana. Yango wana kokanisa na mozindo ezali na ntina. Soki omoni ete lolenge oyo olingi kobandela lisolo ezali na boyokani te na diskur na yo mpe ezali kosenga yo ete opesa ndimbola milai, eleki malamu otika lolenge wana ya ebandeli mpe oluka mosusu.
14 Soki bayoki bakoki te komona esika nini maloba ya ebandeli esuki mpe esika nini diskur mpenza ebandi, wana emonisi ete maloba na yo ya ebandeli mazalaki na bolai ekoki. Wana okolonga kokotisa bayoki na yo kati na diskur mpe bakolanda makanisi obongiselaki bango, kozanga koyeba ete basili kokota kati na diskur mpenza. Nzokande, soki bayoki bazali komituna ete ntango nini okokota kati na diskur mpenza, ezali elembo emonisi ete ebandeli na yo ezalaki molai mingi. Bolembu oyo emonanaka mingi na masolo oyo tosalaka ndako na ndako, mpamba te na porte mokomoko esengeli mbala mingi kobongola bolai ya maloba ya ebandeli.
15, 16. Bolai nini esengeli kozala na maloba ya ebandeli ya diskur oyo ezali na ba oratere mingi?
15 Soki oratere ezali bobele yo moko to ozali kopesa lisolo ya moyekoli na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, maloba na yo ya ebandeli makoki kozala na bolai ekoki, elingi koloba mokuse mingi te, molai mingi mpe te. Nzokande soki bozali ba oratere mibale to misato, to lisusu lokola ekozalaka na likita ya mosala bandeko mingi bazali kolandana, maloba na yo ya ebandeli makozala mokuse, mpamba te diskur na yo esangani lokola na liboke moko oyo moto mosusu asilaki kopesa maloba na yango ya ebandeli. Bandeko babungisaka ntango mingi mpambampamba na kolukaka mindondo milai mpo na maloba na ebandeli. Nzoto ya diskur to diskur mpenzampenza, yango nde ekoyebisa bato makanisi oyo obongiselaki bango.
16 Na mokuse, ntina na maloba na ebandeli ezali bobele mpo na kobongisa boyokani elongo na bayoki, kolamusa mposa na bango mpe komonisa bango lisolo ya motindo nini bakoyoka. Koumela mingi na maloba na ebandeli te, sala noki ete oleka na diskur na yo mpenzampenza.