Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 27 nk. 133-138
  • Kozongelaka teme mpe komonisaka polele bapwɛ́ minene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozongelaka teme mpe komonisaka polele bapwɛ́ minene
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Motó ya likambo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Kobimisa polele makanisi ya ntina
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Kobimisa makanisi ya ntina polele
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge nini okoki kosala plan ya lisolo na yo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 27 nk. 133-138

Liteya 27

Kozongelaka teme mpe komonisaka polele bapwɛ́ minene

1-4. Teme ya diskur elimboli nini?

1 Diskur nyonso esengeli kozala na teme to motó ya likambo. Teme nde ezali kolakisa nzela nini diskur ezali kokende mpe ezali kokangisa na lolenge kitoko biteni na yango ndenge na ndenge. Teme oyo oponaki esengeli komonana polele kati na diskur na yo mobimba. Ezali motema ya diskur. Ekoki kozala ata fraze moko, nzokande esengeli komema makanisi nyonso malakisami. Bayangani nyonso basengeli komona polele wapi teme na yo, yango wana esengeli na yo ete olobela yango mbala mingi.

2 Teme ya diskur ezalaka eloko ya bongo na bongo te, na ndakisa “kondima”. Esengeli nde kolakisa eloko nini ekotalelama kati na kondima. Na ndakisa, teme ekoki kozala “Kondima na yo ezali monene?”, “Tosengeli kozala na kondima mpo na kosepelisa Nzambe”, “Moboko ya kondima na yo”, to “Kolisa kondima na yo ntango nyonso”. Atako teme oyo nyonso etali kondima, mokomoko na yango ezali kotalela likambo oyo na lolenge moko ekeseni na mosusu.

3 Ntango mosusu, tokobongisaka makambo tokoloba kati na diskur kasi toponi naino teme na yango te. Kasi esengeli toyeba yango liboso ya kopona makambo ya ntina mpe liboso ya kobongisa plan ya diskur. Na ndakisa, nsima na boyekoli nyonso ya Biblia elongo na moto na ndako, okolinga mbala mosusu kolobela ye makambo matali lisangá ya ba Témoins de Jéhovah. Likambo oyo ezali monene mingi. Mpo na koyeba eloko nini okoloba, kanisa mpo na bayoki na yo mpe na mokano oyo ozali kolanda kati na lisolo na yo, na nsima opona teme. Soki ozali na mposa ya kobyanga moto kosangana na mosala ya kosakola, okoki komonisa ye ete ba Témoins de Jéhovah bazali komekola Yesu Klisto na kosakolaka ndako na ndako. Yango ekozala teme na yo. Nyonso oyo okoloba ekozala na mokano ya kolakisa eteni moko ya lisolo oyo eluti monene: ba Témoins de Jéhovah.

4 Ndenge nini okoki kozongela teme ya diskur na yo mbala na mbala? Ya liboso, esengeli ete teme yango ekokana mpenza na lisolo na yo mpe ebonga na mokano oyo ozali koluka. Mpo na yango esengeli ete omilengela liboso. Soki diskur na yo elandi teme yango, wana okobanda kozongela yango mbala mingi, soki nde okolanda plan oyo obongisaki. Nzokande, na boumeli ya lisolo, ekozala malamu ete ozongelaka maloba ya ntina masimbi teme mobimba mpo ete teme yango ebima polele.

5, 6. Ndenge nini okoki koyeba soki teme oyo oponi ebongi na diskur na yo?

5 Teme ebongi na lisolo. Na eteyelo ya mosala ya Nzambe, ekozalaka mpasi te mpo na kozwa teme ebongi, mpamba te masolo mingi mazali na teme na yango esili kopesama. Nzokande ezali boye te mpo na badiskur nyonso oyo epesameli yo. Yango wana ebongi otalela malamu teme na yo.

6 Nini ekomonisa soki teme ebongi to ebongi te? Makambo mingi. Osengeli kotalela bayoki na yo, mokano oyo ozali kolanda na lisolo na yo, mpe ntango mosusu kotalela mpe makambo ya motindo nini bapesi yo ete oloba. Soki omoni ete na badiskur na yo ozongelaka teme te, wana elingi koloba ete masolo na yo mazalaka na likanisi moko te oyo ezali lokola moboko na yango. Mbala mosusu okotisaka bapwɛ́ mingi kati na badiskur na yo oyo ezali mpenza komonisa teme na yo te.

7, 8. Limbola ndenge nini okoki kozongela teme mbala na mbala.

7 Kozongela maloba ya ntina to likanisi ya ntina. Metode moko malamu mpo na kobimisa teme polele na boumeli ya diskur na yo mobimba ezali boye ete ozongelaka maloba ya ntina to mpe likanisi oyo esimbi teme mobimba. Na miziki, teme ezali mélodie oyo ezali kozonga mbala mingi kati na nzembo mobimba. Mbala mingi, mwa banote ekoki mpo moyoki akoka kososola nzembo nini wana bazali koyemba. Mélodie ekozongaka ntango nyonso na lolenge moko te. Mbala mosusu, fraze bobele moko to elobeli mosusu ya teme nde ezongelami, kasi na lolenge moko to na mosusu, mosali nzembo azali kotonga zongazonga na teme oyo aponaki mpo na nzembo na ye.

8 Esengeli kozala bongo mpo na teme ya diskur. Maloba ya ntina to likanisi oyo esimbi teme mobimba ezali lokola mélodie oyo ezali kozonga mbala na mbala. Maloba makeseni oyo mazali na ndimbola moko na yango to likanisi oyo esimbi teme mobimba kasi elakisami na lolenge ekeseni, nyonso wana ezali lolenge ya kozongela teme na mitindo mingi. Esengeli te ete bozongeli ezala se ndenge moko ntango nyonso; nzokande soki esalemi na mayele mpe na mitindo mingi, teme ekobunga te kati na diskur mobimba, mpe bayoki bakosimba likanisi oyo ya ntina monene.

9-13. Monisa nini ezali bapwɛ́ minene ya diskur. Pesa ndakisa.

9 Nsima na kopona teme ya diskur na yo, eteni elandi kati na bobongisi na yo ezali boye ete opona bapwɛ́ minene oyo okosalela mpo na kolimbola teme na yo wana. Pwé oyo esengami kati na fiche ya Toli mpo na balobi na motó ya likambo ete “Komonisa polele makambo minene ya lisolo”.

10 Bapwɛ́ minene na diskur ezali nini? Ezali bobele makanisi ya elengi te soki mpe makanisi oyo ozali koleka yango bobele likolólikoló. Ezali nde biteni ya ntina mingi kati na diskur, makanisi oyo ndimbola na yango ezali na ntina monene. Ezali lokola mabaya to pankarte oyo ezali kokesenisa milongo ndenge na ndenge oyo batandi biloko na zando; yango ekosalisaka kiliya mpo na koyeba epai wapi akoki koluka eloko boye to eloko boye. Na molongo ya MBISI, kiliya akokamwa soki akuti sapato. Bobele bongo na molongo ya BILAMBA akokamwa soki akuti mafuta. Soki pankarte ezali te to ebombami mpo biloko bileki mingi, kiliya akooka mpasi mpo na koluka eloko oyo azali na yango mposa. Nzokande soki mabaya to pankarte ezali polele na ndenge ete moto nyonso akoki kotanga yango, wana bakiliya bakomona noki biloko oyo bazali na yango mposa. Bobele bongo mpo na bapwɛ́ minene kati na diskur. Soki bayoki na yo bakoki komona yango polele mpe kosimba yango na motó na bango, ekokoka na bango bobele mwa banote mpo na kolanda yo kino na esukiseli ya diskur na yo.

11 Eloko mosusu yango oyo: Bapwɛ́ minene oyo molobi akoki kopona mpe kosalela ekesenaka engebene bayoki na ye mpe mokano azali kolanda kati na diskur. Yango wana mokengeli na eteyelo akotalela motuya ya bapwɛ́ minene oyo moyekoli aponi engebene kosalela oyo moyekoli azali kosalela yango kasi engebene eponeli na ye moko te.

12 Wana ezali yo kopona bapwɛ́ oyo okobimisa polele, simba bobele oyo omoni ete ekoki kozanga te. Kasi ndenge nini okoki koyeba ete pwɛ́ boye to pwɛ́ boye ekoki kozanga te? Soki okoki kokoma te kino na mokano ya diskur na yo kozanga kolobela pwɛ́ yango, elingi koloba ete ezali pwɛ́ moko ya ntina mingi, oyo ekoki kozanga te kati na diskur na yo. Na ndakisa, soki ozali koloba na ntina na lisiko epai na moto oyo ayebi liteya yango te, esengeli naino omonisa ete Yesu azalaki bobele moto awa na mabelé, soki te okokoka te kolimbola ndenge nini apesaki lisiko ekokani motuya na oyo Adam abungisaki. Wana ekozala moko kati na bapwɛ́ minene ya lisolo na yo. Kasi soki osili komonisa epai na moto ete la trinité ezali liteya moko ya lokuta, pwɛ́ oyo touti kolobela ekoki kozala na ntina mingi te mpamba te moto asili kondima yango. Soki ezali boye, ekozala mpasi te mpo na komonisa na lolenge ya petee motuya na lisiko na Klisto ekokani na motuya na eloko oyo Adam abungisaki; na yango, kolakisa ete Yesu azalaki bobele moto, ekozala pwɛ́ ya monene te.

13 Omituna mituna miye: Boyebi nini bayoki na ngai bazali na yango? Mpo na kokokisa mokano na ngai, nasengeli komonisa nini? Soki ozwi eyano na motuna ya liboso, mpo na koyanola na oyo ya mibale ekosengela na yo koyanganisa makambo nyonso oyo olingi koloba kati na diskur na yo, kotya pembeni makambo oyo bayoki bayebi yango mpe oyo etikali otanda yango na nse na mitó na makambo oyo ekozala mingi te. Yango nde ekozala liste ya bilei ya elimo oyo olingi koleisa yango bayoki na yo. Bapankarte to bapwɛ́ minene esengeli kobombama te. Monisa yango polele.

14-17. Mpo na ntina nini ebongi te ete tosalela bapwɛ́ minene mingi?

14 Ezala mingi te. Ntalo monene ya masolo ezalaka na bapwɛ́ minene mingi te. Mingimingi ekoki koleka mitano te, atako okoki kozala na ntango mingi mpo na kolobela yango. Kosala libunga oyo te lokola emonanaka na bandeko mingi oyo balingaka kosalela bapwɛ́ ebele. Soki magasin to zando eluti monene mpe etondi na biloko bebo, bakiliya babungaka. Bayoki bakoki kosimba makanisi mingi na mbala moko te. Soki diskur na yo ezali molai, esengeli ete ezala petee mpe bapwɛ́ minene emonana polele. Kosengisa bayoki na yo te ete bamikundola ebele ya bapwɛ́. Pona oyo omoni ete basengeli kobosana yango te mpe salela ntango nyonso epesameli yo mpo na kolobela yango.

15 Ndenge nini okoki koyeba ete bapwɛ́ eleki mingi kati na diskur? Na mokuse, soki okoki kotika likanisi moko pembeni kasi ata bongo okomi na mokano ya diskur na yo, elingi koloba ete likanisi yango ezali na ntina monene te. Mpo na kokokisa likanisi na yo to mpo na koleka na likanisi mosusu, okoki kolobela likanisi yango, nzokande kozanga kobimisa yango polele lokola osengeli kosala yango na bapwɛ́ oyo ekoki kozanga te kati na diskur na yo.

16 Esengeli mpe minite mingi mpo na kolimbola pwɛ́ mokomoko kino na nsuka na yango. Soki obongisaki makambo mingi nzokande ntango ezali moke, wana loba bobele mokusemokuse makambo oyo bayoki na yo basili koyeba yango. Okopesa ntango mingi bobele na makambo oyo bayebi yango te to bameseni na yango te mpe limbola yango polele mpo ete babosana yango te.

17 Tokosukisa eteni oyo na lilako oyo ete diskur na yo esengeli kozala petee. Yango ezali ntango nyonso kotalela motuya na makanisi malakisami te. Mbala mingi, ndenge na yo ya kotya bapwɛ́ na molongo, yango nde ekokata soki diskur na yo ekozala petee to te. Na ndakisa, soki biloko ndenge na ndenge oyo bazali koteka na magasin esangisami nyonso esika moko na katikati ya magasin, mobulu ekozala mpe bakiliya bakoyoka mpasi mpo na kozwa eloko bazali na yango mposa. Nzokande soko marchandize nyonso ebongisami malamu, motindo na motindo na esika na yango mpe na etikete na yango, ezali elengi na komona na miso, mpe bakiliya bakoyoka mpasi te mpo na komona eloko bazali koluka. Bongisa diskur na yo ete ezala petee, na kosangisaka makanisi ndenge na ndenge na nse na mitó na makambo ekokani na yango, ezala mpe mingi te.

18. Ndenge nini bapwɛ́ minene esengeli kolimbolama?

18 Makanisi minene malimbolami engebene kokesena na yango. Likanisi nyonso ya monene esengeli ebima polele mpe kolimbolama engebene kokesena na yango na oyo mosusu nyonso. Nzokande epekisami te kosala rézimé mokuse ya bapwɛ́ nyonso minene kati na maloba na yo ya ebandeli to na esukiseli na yo. Nzokande na nzoto ya diskur to diskur mpenzampenza, okobanda kolimbola likanisi moko na moko, longola bobele mwa bokundoli mpo na konyata pwɛ́ moko malamumalamu to liboso ya koleka na likambo mosusu. Soki oyekoli kosala plan ya maloba ya ntina to mots clés, wana ekozala na yo mpasi te mpo na kolimbola pwɛ́ mokomoko ya monene, na kokesenisa yango na mosusu.

19-21. Motindo nini tosengeli kosalela bapwɛ́ mosusu oyo elandi bapwɛ́ minene?

19 Ndimbola mosusu esimbi makanisi minene. Bilembeteli, mikapo mpe makanisi mosusu esengeli komonisa polele likanisi monene mpe kokembisa yango.

20 Na ntango ozali kobongisa diskur na yo, bimisa pwɛ́ nyonso ya mikemike mpe simba bobele oyo ezali kolimbola malamumalamu makanisi minene, oyo ezali kobakisa kongenga na yango to ezali kokembisa yango. Longola nyonso oyo etali mpenza motó na likambo na yo te mpe oyo ekotya bobele mobulu na lisolo na yo.

21 Likambo nyonso ya moke oyo ezali na boyokani na likanisi monene esengeli ekangana na yango malamumalamu. Limbola boyokani nini ezali na kati wana; kotikela bayoki te ete baluka ndimbola bango moko. Eloko oyo yo moko olimboli yango sikisiki te, bato bakokanga ntina na yango te. Okoki komonisa boyokani yango soki okobanda kozongela likanisi ya ntina to maloba ya ntina ya likanisi yango. Ekokoma yo na momeseno malamu ya kokangisa naino bapwɛ́ nyonso mike na makanisi minene ya diskur, na nsima kokangisa makanisi nyonso minene na teme na yo, masolo na yo makozala kitoko mpe petee. Wana okoyoka mpasi te mpo na kosala yango mpe bato bakokoka kobosana yango te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto