Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 21
  • Bandeko ya Yozefe batɛki ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandeko ya Yozefe batɛki ye
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Ozalaka na zuwa? Bandeko ya Yozefe bayokelaki ye zuwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Moombo oyo atosaki Nzambe
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 21

Lisolo 21

Bandeko ya Yozefe batɛki ye

ELENGE mobali oyo bozali komona na elilingi oyo azali na mawa! Nkombo na ye Yozefe. Bandeko na ye batɛki ye epai ya bato ya mombongo oyo bakei na Ezipito. Kuna na Ezipito, Yozefe akokóma moombo. Mpo na nini bandeko na ye batɛki ye? Batɛki ye mpo bazali koyokela ye zuwa.

Tata na bango Yakobo alingaki Yozefe mingi mpenza. Lokola alingaki ye mingi, asalelaki ye elamba moko molai ya kitoko. Lokola bandeko na ye zomi bamonaki ete tata na bango alingi Yozefe mingi, bayokelaki ye zuwa, bayinaki ye. Kasi likambo mosusu mpe esalaki ete báyina ye.

Yozefe alɔtaki ndɔtɔ mibale. Na ndɔtɔ mokomoko oyo alɔtaki, bandeko na ye bazalaki kogumbamela ye. Ntango ayebisi bandeko na ye bandɔtɔ yango, bayini ye lisusu koleka.

Mokolo moko, bayaya ya Yozefe bazalaki koleisa bampate ya tata na bango; Yakobo atindi Yozefe epai na bango mpo na kotala ndenge bazali. Ntango bandeko ya Yozefe bamoni ye azali koya, balobi ete: ‘Tóboma ye!’ Kasi yaya na bango Rubene alobi ete: ‘Te, bóboma ye te!’ Na esika ya koboma ye, bakangi ye mpe babwaki ye na libulu moko oyo mai ekauká. Na nsima bafandi mpo na kokata soki bakosala ye nini.

Kasi, na ntango yango mpe Bayishimaele baleki wana. Bongo Yuda alobi na bandeko na ye ete: ‘Tótɛka ye epai ya Bayishimaele!’ Basalaki mpe bongo. Batɛki Yozefe na palata ntuku mibale (20). Likambo yango ezalaki mabe mpenza!

Bandeko na ye bakoloba na tata na bango nini? Talá eloko basalaki: babomi ntaba mpe bazindisi elamba kitoko ya Yozefe na makila ya ntaba yango mbala mingi. Na nsima, batindeli tata na bango Yakobo elamba yango mpe bayebisi ye ete: ‘Tolɔkɔti elamba oyo. Talá soki ezali elamba ya Yozefe.’

Yakobo amoni ete ezali yango. Bongo agangi ete: ‘Nyama ya zamba elei ye!’ Kasi yango nde likambo bandeko ya Yozefe balukaki kondimisa tata na bango. Yakobo ayokaki mawa mingi mpenza. Alelaki mwana na ye mikolo mingi. Kasi Yozefe akufaki te. Nini ekómelaki ye na Ezipito?

Ebandeli 37:1-35.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto