Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 59
  • Davidi akimi Saulo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Davidi akimi Saulo
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Davidi ná Saulo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Davidi akómi Mokonzi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Na kati ya 1 Samwele
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 59

Lisolo 59

Davidi akimi Saulo

NTANGO Davidi abomi Goliate, na nsima Abinere, mokonzi ya basoda ya Yisraele, akei na Davidi epai na Saulo. Saulo asepeli na Davidi mingi. Atye ye mokonzi ya basoda; azwi ye akóma kofanda na ndako na ye.

Mokolo moko, basoda bauti etumba, balongi Bafilistia; basi bazali koyemba ete: ‘Saulo abomi bankóto kasi Davidi abomi bankóto zomi zomi.’ Saulo ayoki zuwa mpo bakumisi Davidi koleka ye. Kasi Yonatane, mwana ya Saulo, ayoki zuwa te. Alingi Davidi mingi mpenza, Davidi mpe alingi ye mingi mpenza. Yango wana, bapesani elaka ete bakozala baninga libela.

Davidi ayebi kobɛta nzɛnzɛ mpe Saulo azali kolinga miziki ya Davidi. Kasi, mokolo moko, zuwa ya Saulo etindi ye asala likambo moko ya nsɔmɔ. Ntango Davidi azali kobɛta nzɛnzɛ, Saulo akamati likɔnga na ye abambi Davidi, mpe alobi ete: ‘Nakobaka Davidi na efelo!’ Kasi Davidi akimisi nzoto, likɔnga yango ezwi ye te. Na nsima, Saulo abambi ye lisusu likɔnga kasi ezwi ye mpe te. Bongo Davidi ayebi ete asengeli kokeba makasi.

Bozali koyeba lisusu elaka oyo Saulo apesaki? Alobaki ete akopesa moto oyo akoboma Goliate mwana na ye ya mwasi. Na nsima, Saulo ayebisi Davidi ete akopesa ye mwana na ye Mikale azala mwasi na ye, kasi liboso aboma naino Bafilistia nkama moko (100). Bozali koyeba motambo oyo? Saulo azali na elikya ete Bafilistia bakoboma Davidi. Kasi babomi Davidi te. Bongo Saulo akamati mwana na ye Mikale, apesi ye Davidi mpo azala mwasi na ye.

Mokolo moko, Saulo ayebisi Yonatane ná basaleli na ye nyonso ete alingi aboma Davidi. Kasi Yonatane ayebisi tata na ye ete: ‘Kosala Davidi mabe te. Ye asaleli yo mabe te. Kutu makambo nyonso oyo asali esalisi yo mingi. Atyaki bomoi na ye na likama mokolo abomaki Goliate. Omonaki yango mpe osepelaki.’

Saulo ayokeli mwana na ye, mpe alaki ete akoboma Davidi te. Bongo Davidi ayei lisusu epai ya Saulo mpe azongeli mosala na ye. Kasi, mokolo moko boye, Davidi azali kobɛta nzɛnzɛ, Saulo abambi ye lisusu likɔnga. Davidi akimisi nzoto mpe likɔnga ekɔti na efelo. Wana mbala ya misato. Na yango, Davidi amoni ete asengeli kokima.

Na butu wana, Davidi akei na ndako na ye. Kasi Saulo atindi bato kuna mpo báboma ye. Mikale ayebi likambo tata na ye alingi kosala. Yango wana, ayebisi Davidi ete: ‘Soki okimi na butu oyo te, lobi okozala ebembe.’ Kaka na butu yango, Mikale akimisi Davidi na lininisa. Na boumeli ya mbula soki nsambo, Davidi akómi komibombabomba, mpo Saulo azwa ye te.

1 Samwele 18:1-30; 19:1-18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto