Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 108
  • Na nzela ya Damasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na nzela ya Damasi
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yesu aponi Saulo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Monyokoli amoni kongɛnga ya makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bato oyo basalaka mabe bakoki nde kobongwana?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Mosala ya kosakola ya Saulo ebimisi botɛmɛli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 108

Lisolo 108

Na nzela ya Damasi

BOYEBI moto oyo akwei na mabele? Ezali Saulo. Kobosana te, ye nde moto oyo abatelaki bilamba ya likoló ya bato oyo babomaki Stefano. Kasi talá pole oyo ezali kongɛnga! Likambo nini ezali kosalema?

Nsima ya liwa ya Stefano, Saulo abandi konyokola bayekoli ya Yesu. Azali kokɔta na ndako mokomoko, azali kobimisa bayekoli libándá, azali kobwaka bango na bolɔkɔ. Bayekoli mingi bakimi na bingumba mosusu mpe babandi kosakola “nsango malamu” kuna. Bongo Saulo akei koluka bayekoli ya Yesu na bingumba mosusu. Awa azali kokende na Damasi. Nzokande, na nzela, likambo moko ya kokamwa esalami.

Na mbala moko, pole moko euti na likoló engɛngi zingazinga ya Saulo. Akwei na mabele ndenge bozali komona awa. Bongo mongongo moko elobi na ye ete: ‘Saulo, Saulo! Mpo na nini ozali konyokola ngai?’ Bato oyo bazali na ye bamoni kongɛnga wana mpe bayoki lokito ya mongongo moko boye, kasi bakangi ntina ya maloba yango te.

Saulo atuni ete: ‘Yo nani, Nkolo?’

Mongongo yango elobi ete: ‘Ngai Yesu oyo yo ozali konyokola.’ Yesu alobi bongo mpo, ntango Saulo azali konyokola bayekoli na ye, azali koyoka lokola nde azali konyokola ye Yesu.

Saulo atuni ete: ‘Nkolo, nasengeli kosala nini?’

Yesu alobi na ye ete: ‘Tɛlɛmá, kende na Damasi. Kuna bakoyebisa yo oyo osengeli kosala.’ Ntango Saulo atɛlɛmi, afungoli miso kasi akoki komona eloko te. Miso na ye ekufi. Bongo basimbi ye na lobɔkɔ mpe bakei na ye na Damasi.

Sikoyo, Yesu alobi na moyekoli na ye moko na Damasi, nkombo na ye Ananiasi ete: ‘Ananiasi, tɛlɛmá. Kende na balabala oyo ebengami Alima. Na ndako ya Yudasi, luká moto moko nkombo na ye Saulo. Naponi ye mpo azala mosaleli na ngai monene.’

Ananiasi akei. Ntango akutani na Saulo, atyeli ye mabɔkɔ mpe alobi ete: ‘Nkolo atindi ngai epai na yo mpo yo omona lisusu mpe otonda na elimo santu.’ Na mbala moko, biloko moko lokola mposo ya mbisi euti na miso ya Saulo ekwei, mpe akómi komona lisusu.

Yesu apesaki Saulo nguya ya kosakola “nsango malamu” epai ya bato ya bikólo mingi. Ayebani sikoyo na nkombo ntoma Paulo, tokolobela ye mwa nsima. Kasi tótala naino likambo oyo Nzambe atindi ntoma Petro asala.

Misala 8:1-4; 9:1-20; 22:6-16; 26:8-20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto