Nkombo ya Nzambe mpe babóngoli ya Biblia
UTA ebandeli ya ekeke ya mibale, nsima na liwa ya ntóma ya nsuka, kopɛngwa na kondima ya boklisto oyo esakolamaki na Yesu mpe bayekoli na ye, ebandaki komonana polele. Filozofi mpe mateya ya bapakano ekɔtaki na lisangá ya boklisto; mikabwano mpe mangomba mikemike esalemaki, na yango, bopɛto ya kondima ya ebandeli ebebaki. Mpe nkombo ya Nzambe etikaki kosalelama.
Lokola lipɛngwi wana lizalaki kokóla kati na boklisto ya lokutá, mposa emonanaki mpo na kobongola Biblia na minoko misusu longwa na Liebele mpe Greke ya ebandeli. Lolenge nini babongoli wana bayeisaki nkombo ya Nzambe kati na mabongoli na bango? Ntalo monene na bango basalelaki liloba oyo likokani na “Nkolo.” Libongoli oyo liyebanaki mingi na eleko wana ezalaki Vulgate, libongoli oyo lisalemaki na Jérôme na lokotá ya Latin ya pɛtɛɛ. Jérôme abongolaki Tétragramme (YHWH) na liloba Dominus, oyo elimboli “Nkolo.”
Na nsima, minoko ya sika lokola Lifalansé, Lingelesi mpe Espagnol, ebandaki kolobama mingi na mikili ya Mpótó. Atako bongo, Lingomba ya katolike lipekisaki ete Biblia ebongolama na minoko ya sika te. Bayuda bazalaki koboya kotanga nkombo ya Nzambe na bisika oyo yango ezwamaki wana ezalaki bango kosalela Biblia na monoko ya Liebele ya ebandeli, mpe “baklisto” mingi bazalaki koyoka botangi ya Biblia na libongoli ya Latin, epai nkombo yango ekomamaki te.
Na boumeli ya ntango, bazongelaki kosalela nkombo ya Nzambe. Na 1278, sángo moko ya Espagne, nkombo na ye Raymond Martini, asalelaki nkombo yango kati na mokanda na ye ya Latin Pugio fidei (Mbɛli ya kondima), kokomáká yango ete Yohoua.a Nsima mwa moke, na 1303, Porchetus de Salvaticis akomaki mokanda na motó ya likambo Victoria Porcheti adversus impios Hebraeos (Elónga ya Porchetus likoló na Baebele ya mabe.) Kati na mokanda yango, akomaki mpe nkombo ya Nzambe na ndenge ekeseni ete Iohouah, Iohoua mpe Ihouah. Na 1518, Pierre Galatin abimisaki mokanda na motó ya likambo De arcanis catholicae veritatis (Mabombami matali solo ya molóngó mobimba) epai akomaki nkombo ya Nzambe ete Iehoua.
Nkombo yango esalelamaki mpo na mbala ya liboso na mobu 1530 kati na Biblia ya Lingelesi, na ntango William Tyndale abimisaki libongoli ya mikanda mitano ya liboso ya Biblia. Kati na yango, atyaki nkombo ya Nzambe mbala mingi na motindo oyo ete Iehouah, kati na ba versets mingib mpe na note moko ezali na ebimeli yango, Tyndale akomaki ete: “Iehovah ezali nkombo ya Nzambe . . . Lisusu, esika nyonso oyo bozali komona liloba NKOLO na makomi minene (longola bobele libunga ya enyateli), na Liebele ezali Iehovah.” Longwa na momeseno wana, nkombo ya Yehova ekómaki kosalelama mingi kati na mwa mikapo mpe ekomamaki ete “NKOLO” to “NZAMBE” na bisika mosusu epai Tétragramme ezwami na makomi ya Liebele.
Na 1611, Authorized Version ebimaki, libongoli ya Biblia na Lingelesi oyo lizalaki kosalelama na bisika mingi. Kati na yango, nkombo ya Nzambe ezwami mbala minei. (Exode 6:3; Nzembo 83:18; Yisaya 12:2; 26:4) “Yah” nkomá mokuse ya nkombo ya Nzambe, ezwami na Nzembo 68:4. Mpe nkombo wana ezwami na mobimba na yango na bankombo ya bisika lokola “Yehova-Yiré.” (Genese 22:14; Exode 17:15; Basambisi 6:24; tala Darby, libongoli ya Lifalansé oyo lisali mpe motindo moko.) Na yango, na ndakisa ya Tyndale, mbala mingi babongoli basili kotya liloba “NKOLO” to “NZAMBE” na esika na nkombo ya Nzambe. Na yango, soki bamonaki mabe moko te na kokoma nkombo ya Nzambe na ba versets oyo minei, mpo na nini esengeli komonana te na ebele na ba versets mosusu epai kuna yango ekomamaki na Liebele ya ebandeli?
Makambo motindo wana mamonanaki mpe na lokotá Allemand. Na 1534, Martin Luther abimisaki libongoli ya Biblia na mobimba na yango, longwa na makomi ya minoko ya ebandeli. Nzokande ye mpe atyaki nkombo ya Nzambe te, kasi na esika na yango, asalelaki nde maloba lokola HERR (“NKOLO”). Atako bongo, ayebaki motuya ya nkombo ya Nzambe, mpo ete na 1526, kati na lisoló na ye litongamaki likoló na Yilimia 23:1-8, alobaki ete: “Nkombo oyo, Yehova, Nkolo, ezali bobele mpo na Nzambe ya solo.”
Na 1543, Luther akomaki na bosembo nyonso ete: “Ezali bango [Bayuda] koloba ete nkombo ya Nzambe ekoki kobéngama te, bayebi te oyo bango bazali koloba . . . Soki yango ekoki kokomama na mai na mokanda mpe na ekomeli, mpo na nini ekoki kobéngama te, mpo ete kotanga nde eleki malamu? Soki te, mpo na nini bapekisi te kokoma yango, kotanga yango mpe kokanisa yango? Na kotalela nyonso wana, ezali na bososoli malamu te.” Atako bongo, Luther asembolaki mbeba wana te kati na libongoli na ye ya Biblia. Kasi na bambula elandaki, ba Biblia mosusu na lokotá ya Allemand ezalaki na nkombo ya Nzambe kati na Exode 6:3.
Na boumeli ya bikeke bilandaki, babongoli ya Biblia bakabwanaki na bituluku mibale. Bamoko baboyaki mpenza kosalela nkombo ya Nzambe, kasi basusu basalelaki yango mingi na Makomami ya Liebele ete, Yehova to Yawe. Totalela mabongoli mibale epai nkombo ya Nzambe ezwami kati na yango te, mpo na koyeba ntina oyo babongoli baboyaki kosalela yango.
Mpo na nini balongolaki yango
Na 1983, ntango Alliance biblique universelle ebimisaki libongoli ya sika ya Makomami oyo babéngi Bible en français courant, batangi bamonaki ete NKOLO mpe NZAMBE esalelamaki na esika na nkombo ya Mozalisi. Na maloba ya ebandeli, bamonisi ntina oyo bango mpe balongolaki yango: “Mpo na oyo etali BANKOMBO YA NZAMBE, tolandi bobele motindo na bato nyonso . . . Nde mpo na nkombo ya Nzambe ya Yisraele, YHWH, oyo ekoki kolimbolama te, tomonaki malamu ete na libongoli oyo, tólanda momeseno ya Bayuda, . . . oyo ete nkombo wana ekoki kobengama te, kasi bakoki kokitanya yango na nkombo mosusu, lokola Nkolo.” Babongoli mosusu na Lifalansé bazali mpe kolanda momeseno ya Bayuda mpo na kobungisa nkombo ya Nzambe. Na yango, libóngoli Traduction Œcuménique de la Bible (ebimeli ya 1977) epesi ndimbola oyo kati na note na nsé na lokasa, ete: “Bayuda baboyaki kobénga nkombo wana (mpo ete babénga yango na libungá te, tala [Exode] 20:7), kasi bandimaki kobénga Nkolo (mbala mingi) to kokitanya yango na maloba mosusu, lokola Ngai nazali ([Exode 3:]14), Nkombo (Lv 24:11). Na esika nyonso oyo makomi ya Liebele etii nkombo ya Yahweh to moko na bankombo ekoki kotyama na esika na yango, ebongolami ete NKOLO, NGAI NAZALI, NKOMBO, na makomi minene.”
Bobele bongo, kati na libongoli na bango oyo babimisaki na Lingelesi (na 1935), J. M. Powis Smith mpe Edgar J. Goodspeed balimbolaki lolenge moko kati na maloba na bango ya ebandeli. Nzokande, bayaki kobongwana pwasa; kozanga kolanda momeseno ya Bayuda oyo bakotangaka “Nkolo” na esika oyo bazali komona YHWH, Smith mpe Goodspeed babakisi ete: “Moto na moto oyo alingi kotanga na lolenge yango ebéngamaki na ebandeli, asengeli kotanga ‘Yahweh’ na esika oyo azali kokuta liloba NKOLO to NZAMBE”!
Na kotangáká maloba oyo, mituna oyo mikoya nokinoki na makanisi, ete: Soki “Yahweh” ezali “lolenge [nkombo] yango ebéngamaki na ebandeli” na esika na “NKOLO,” mpo na nini babongoli baboyi kosalela “Yahweh” kati na mabongoli na bango? Mpo na nini bango moko bazwaki ekateli ya kotya liloba “NKOLO” na esika ya nkombo ya Nzambe, likambo oyo libebisi makomi ya ebandeli?
Babongoli balobi ete bazali kolanda momeseno ya Bayuda. Kasi, wana ezali likanisi ya baklisto? Tomikundola ete, ezali Bafalisai, balakisi na mibeko ya Bayuda, bango bato baboyaki Yesu mpe ye alobaki na bango ete: “Bosili kobebisa liloba na Nzambe mpo na mibeko na bino mpenza.” (Matai 15:6, NW) Nzokande kotya nkombo mosusu na esika na nkombo ya Nzambe, ezali kobebisa Liloba na Nzambe.
Na 1952, Makomami ya Liebele mabimisamaki na Lingelesi kati na libongoli Revised Standard Version; Biblia wana esalelaki bankombo mosusu na esika ya nkombo ya Nzambe. Kasi, lokola Biblia wana ezali nde ebimeli ya sika ya libongoli American Standard Version, oyo esalelaki nkombo Yehova na Makomami nyonso ya Liebele, bato bamonaki mbongwana wana polele. Ndenge nini babongoli balongisaki yango?
Totangi kati na maloba ya ebandeli ya libongoli Revised Standard Version, ete: “Comité ya kobongola ezongeli kosala lokola King James Version esalaki yango [elingi koloba kolongola nkombo ya Nzambe], mpo na bantina mibale: (1) liloba ‘Jéhovah’ likokani soko moke te na motindo nkombo ya Nzambe esalelami na Liebele; mpe (2) kosalela nkombo mpenza ya Nzambe bobele moko, lokola nde banzambe mosusu bazali, oyo esengeli kokesenisa ye elongo na bango, etikamaki na lingomba ya Bayuda kala mingi liboso na eleko ya boklisto mpe ezali na ntina moko te mpo na kondima ya Eklezia na molóngó mobimba.”
Makanisi oyo mazali na moboko makasi? Lokola tomonisaki yango liboso, ebéngeli oyo ete Yesu ekokani soko moke te na lolenge oyo bayekoli ya liboso bazalaki kobénga nkombo ya Mwana na Nzambe. Nzokande, yango epusaki te ete comité ya bobongoli ekitanya nkombo lokola “Moyokanisi” to “Klisto” na esika na yango. Ya solo, bankombo wana esalelami elongo na nkombo Yesu, kasi ezwi esika na yango te.
Likanisi oyo ete esengeli te kokesenisa Nzambe ya solo na banzambe mosusu, ezali solo soko moke te. Bato bazali kosambela bamilió ya banzambe. Ntóma Paulo akomaki ete: “‘Banzambe’ bazali mingi.” (1 Bakolinti 8:5; Bafilipi 3:19) Nzokande, Nzambe ya solo azali bobele moko, lokola Paulo alobaki yango na nsima. Kasi, kosalela nkombo ya Nzambe ya solo ezali na ntina monene mpo na kokesenisa ye na banzambe nyonso ya lokutá. Bongo, soki kosalelama ya nkombo ya Nzambe “ezali na ntina moko te mpo na kondima,” mpo na nini ezwami soko mbala 7 000 kati na Makomami ya Liebele ya ebandeli?
Likambo ya esengo, babongoli mingi bandimisami ete nkombo ya Nzambe mpe lolenge yango ebéngami lelo, esengeli kozala kati na Biblia. Yango wana, batyaki yango kati na mabongoli na bango, mpe na yango, mabongoli na bango mazali mpenza kokumisa Mobandisi na Biblia mpe, mabongoli yango mazali pene mpo na kokokana na makomi ya ebandeli. Kati na mabongoli oyo masalelaki nkombo ya Nzambe, totangi Valera (ebimisamaki na Espagnol na 1602), Almeida (ebimisamaki na Portugais na 1681), Elberfelder (ebimisamaki na Allemand na 1871), mpe American Standard Version (ebimisamaki na Lingelesi na 1901). Mabongoli mosusu ya Lingala masalelaki mpe nkombo ya Nzambe, na lolenge oyo ete YEHOVA kati na mwa mikapo (lokola na Exode 6:3, Biblia Lingala Uele, 1960); mpe YAWE (mbala mingi kati na Biblia Lingala Haut-fleuve, 1970).
Kasi totala sikawa, bandimbola epesami na mwa babongoli oyo basalelaki nkombo ya Nzambe, mpo na kokokanisa yango na makanisi ya baoyo basalelaki yango te.
Mpo na nini basusu basalelaki yango
Babongoli ya Biblia American Standard Version ya 1901, bapesi ndimbola oyo ete: “[Babongoli] bazalaki bango nyonso na likanisi moko ete biyambayamba ya Bayuda oyo bazalaki kotalela nkombo ya Nzambe ete ebongaki te kobénga yango, mpo ete elekaki bulee, esengelaki te komonana na mabongoli ya Kondimana na Kala na Lingelesi to na minoko misusu . . . Nkombo yango monene elimbolami na Ex. iii. 14, 15 mpe emonani mbala na mbala kati na makomi ya ebandeli ya Kondimana na Kala, mpo na komonisa nkombo mpenza ya Nzambe Oyo aleki likoló, Nzambe ya kondimana, Nzambe ya emoniseli, Mosikoli mpe Moninga ya basaleli na ye . . . Nkombo wana ya Nzambe mpenza, mpe makambo nyonso ya bulee oyo masangani na yango, esili kozongisama sikawa na esika na yango kati na makomi ya bulee.”
Totangi mpe kati na maloba ya ebandeli ya Biblia Elberfelder Bibel, oyo ebongolami na Allemand ya ebandeli, ete: “Jehova. Tobateli nkombo ya Nzambe ya kondimana ya Yisraele, mpo ete batangi bameseni na yango esili koleka bambula mingi.”
Steven T. Byington, mobongoli ya Biblia The Bible in Living English, alimboli ntina oyo asalelaki nkombo ya Nzambe, ete: “Lolenge ya kokoma mpe ebéngeli na yango ezali na ntina mingi te. Oyo eleki ntina ezali bongo komonisa polele ete, yango ezali nkombo ya Nzambe mpenza. Ezali na mikapo misusu mikoki kozala mpasi na kokanga ntina soki tobongoli yango na nkombo-lisangá (nom commun) lokola ‘Nkolo,’ to, oyo eleki mabe mpenza, ezali ya kosalela libakema (adjectif substantif) [lokola, Oyo-na-seko to Eternel] mpo ekóma nkombo mpenza.”
Ezali na ntina na kotalela libongoli mosusu lisalemaki na J. B. Rotherham. Asalelaki nkombo ya Nzambe kati na libongoli na ye, nde asepelaki kokoma yango ete Yahweh. Kasi, na nsima, kati na mokanda Studies in the Psalms (Boyekoli ya Nzembo) oyo abimisaki na 1911, azongelaki kokoma Yehova. Mpo na nini? Alimboli ete: “YEHOVA: Soki tosalelaki nkombo wana ya kokanisama (Exo. 3:18) kati na libongoli oyo ya Nzembo, ezali te mpo ete tozali kokakatana mbala mosusu na ntina na ebéngeli Yahwéh; kasi ezali bobele liponi ya biso, oyo ezwi moboko na yango likoló na bilembeteli bibongi mpenza. Tokanisi ete ebongi koyoka mpe kososola likanisi ya bato mingi mpo na likambo motindo oyo. Likambo lileki ntina ezali ete toyeba nkombo ya Nzambe kozanga nkaká.”
Na Nzembo 34:3, basambeli ya Yehova bazwi libyangi oyo ete: “Bokumisa Yehova elongo na ngai, mpe tosanzola nkombo na ye elongo!” Kasi lolenge nini batangi ya mabongoli ya Biblia oyo esaleli nkombo ya Nzambe te, bakoki koyanola na libyangi yango? Esengo mpo na baklisto lokola babongoli mosusu basalelaki nkombo ya Nzambe kati na mabongoli na bango ya Makomami ya Liebele, mpo na kobatela oyo Smith mpe Goodspeed babéngaki ete “lolenge yango ebéngamaki na ebandeli.”
Nzokande, mabongoli mingi, ata oyo ezali kotya nkombo ya Nzambe kati na Makomami ya Liebele, etii yango te kati na Makomami ya Greke ya boklisto, “Kondimana ya Sika.” Mpo na ntina nini? Ezali na bantina oyo basengelaki kotya nkombo ya Nzambe kati na eteni wana ya nsuka ya Biblia?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokanda yango mobimisamaki lisusu mbala mingi na bikeke bilandaki nsima, kasi nkombo ya Nzambe ekómaki ete Jehova.
b Genese 15:2; Exode 6:3; 15:3; 17:16; 23:17; 33:19; 34:23; Deteronome 3:24. Tyndale akomaki mpe nkombo ya Nzambe na Ezekiele 18:23 mpe 36:23, kati na mabongoli na ye, bakisa mpe Kondimana ya Sika, oyo ebimaki na Antwerp, na 1534.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 17]
Babongoli ya Biblia King James Version babatelaki nkombo ya Nzambe, Yehova, bobele na ba versets minei, kasi bakitanyaki yango na liloba NZAMBE mpe NKOLO na bisika mosusu
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Soki kosalelama ya nkombo ya Nzambe “ezali na ntina moko te mpo na kondima,” mpo na nini ezwami soko mbala 7 000 kati na Makomami ya Liebele ya ebandeli?
[Etanda/Bililingi na lokasa 21]
Nkombo ya Nzambe ekoki koyinama?
Lelo, tozali ata na libongoli moko te ya sika ya Biblia na lokotá Afrikaans (lokotá ya bakitani ya ba Hollandais oyo bayaki na Afrique du Sud), oyo ezali na nkombo ya Nzambe. Nzokande, yango ekoki kokamwisa, mpamba te mabongoli na nkotá ya Baindo ya Afrique du Sud esaleli yango mingi. Totala ntina ya mbébá wana.
Na le 24 Août 1878, na likita moko lisalemaki na Lisangani ya bakitani ya solo ya ba Néerlandais oyo bayaki na Afrique du Sud (G.R.A.), mingi basɛngaki ete Biblia ebongolama na lokotá Afrikaans. Mibu motoba na nsima, likambo yango likundolamaki lisusu, kino ekateli ezwamaki mpo ete Biblia ebongolama longwa na nkotá ya ebandeli. Mokumba wana mopesamaki epai na S. J. du Toit, mokambi ya makambo matali biteyelo na Transvaal.
Na mokanda moko batindelaki ye mpo na likambo yango, S. J. du Toit azwaki lilako oyo ete: “Okotika nkombo mpenza ya Nkolo, Yehova to Jahvê, na bisika nyonso oyo yango ezwami, kozanga kobongola yango [elingi koloba, esengeli te kotya Nkolo to Nzambe na esika na yango].” S. J. du Toit abongolaki mikanda nsambo ya Biblia na lokotá Afrikaans, mpe nkombo Yehova ekomamaki na bisika nyonso epai yango ezwamaki.
Nkombo ya Nzambe ezwamaki mpe kati na mikanda mosusu ya Afrique du Sud. Na ndakisa, kati na mokanda De Korte Catechismus (Mokanda moke ya malóngi), mokomami na J. A. Malherbe, na 1914, motuna mobimaki ete: “Nkombo mpenza ya Nzambe ezali nini?” Eyano ezalaki nini? “Ezali Yehova; ekomami NKOLO na nkomá minene kati na Biblia na biso. [Nkombo] wana epesami ata na ekelamu moko te.”
Kati na mokanda Die Katkisasieboek (mokanda ya malóngi mokomami na Lisangani ya lingomba libengami Eglise réformée hollandaise na Afrique du Sud mpo na malóngi ya lomingo), motuna oyo mobimaki ete: “Tokoki soko moke te kosalela nkombo Yehova to NKOLO? Bayuda bakanisi bongo . . . Kasi mobeko molimboli bongo te. . . . Tokoki kosalela Nkombo wana, kasi tosengeli kotanga yango mpambampamba te.” Kala mingi te, nkombo Yehova ezwamaki mpe na nzembo mosusu, kati na ebimeli ya sika ya Die Halleluja (mokanda ya nzembo).
Nzokande, bato mingi basepelaki te na libongoli ya du Toit, mpe na 1916, Comité moko epesamelaki mokumba ya kotambwisa mosala ya kobongola Biblia na lokotá Afrikaans. Kasi Comité wana ezwaki ekateli ya kolongola nkombo ya Yehova na Biblia. Na 1971, Société biblique d’Afrique du Sud ebimisaki mwa mikanda ya Biblia kati na “libongoli mpo na bomeki” na lokotá Afrikaans. Nkombo ya Nzambe ezalaki na maloba ya ebandeli, kasi esalelami ata esika moko te kati na maloba ya Biblia mpenza na libongoli wana. Bobele bongo, na 1979, libongoli ya sika ya “Kondimana ya Sika” mpe Nzembo ebimaki, mpe esalelaki nkombo ya Nzambe te.
Lisusu, uta 1970, nkombo Yehova elongolamaki na bisika nyonso epai yango ezalaki na mokanda Die Halleluja. Bobele bongo, ebimeli ya mokanda Die Katkisasieboek oyo enyatamaki lisusu na Eglise réformée hollandaise na Afrique du Sud, esili kolongola nkombo yango.
Epai mosusu, milende mpo na kolongola nkombo Yehova misukaki bobele na mikanda te. Likoló na libangá ya ndakonzambe moko ya Eglise réformée hollandaise na mboka Paarl, ezalaki na likomi JÉHOVAH JIREH (“Yehova akopesa”). Elilingi ya ndakonzambe wana mpe libangá na yango, ebimisamaki kati na Réveillez-vous! ya 22 Octobre 1974, na lokota ya Afrikaans. Uta ntango wana, balongolaki libangá yango mpe batyaki libangá mosusu oyo lizalaki na maloba oyo ete DIE HERE SAL VOORSIEN (“NKOLO akopesa”). Mokapo ya Biblia mpe date ebongwani te, kasi nkombo Yehova elongolami.
Yango wana, kino lelo oyo ba Afrikaners mingi bayebi te ete Nzambe azali na nkombo. Mwa bandimi moke oyo bayebi yango, baboyi kosalela yango. Basusu nkutu bazali mpenza kotɛmɛla yango; bakolobaka ete nkombo ya Nzambe ezali NKOLO mpe bazali koloba ete Batatoli ya Yehova nde babimisaki nkombo Yehova.
[Bililingi]
Ndakonzambe ya Eglise réformée hollandaise, na Paarl, Afrique du Sud. Na ebandeli, nkombo Yehova ekomamaki na libangá (na lobɔkɔ ya mobali awa na likoló). Na nsima, bakitanyaki yango na mosusu (na lobɔkɔ ya mwasi awa na likoló)
[Elilingi na lokasa 18]
Na 1278, nkombo ya Nzambe ekomamaki na lolenge oyo ete Yohoua kati na mokanda Pugio fidei lokola yango emonisami na makomi oyo ya ekeke ya zomi na misato to ya zomi na minei mabatelami na bibliotɛkɛ ya Sainte-Geneviève, na Paris, France (folio 162b)
[Elilingi na lokasa 19]
Na libongoli na ye ya mikanda mitano ya liboso ya Biblia, oyo abimisaki na 1530, William Tyndale atyaki nkombo ya Nzambe na Exode 6:3. Alimbolaki ntina oyo asalelaki nkombo yango kati na note ya libongoli wana
[Eutelo ya bafɔtɔ]
(Fɔtɔ́ ebimisami na ndingisa ya American Bible Society Library, New York)