Mpo na nini tosengeli koyeba nkombo ya Nzambe
“MOTO na moto oyo akobelela nkombo ya Yehova, akobika.” (Baloma 10:13, NW) Na maloba oyo, ntóma Paulo amonisaki ete koyeba nkombo ya Nzambe ezali eloko ya liboso mpo na kozwa bomoi. Maloba na ye mazongisi biso na motuna ya ebandeli ete: Mpo na nini Yesu abandaki libondeli ya ndakisa, na kosɛngáká ete nkombo ya Nzambe ‘ezala mosantu,’ to ‘ebulisama’ liboso na makambo mosusu ya ntina? Soki tolingi koyeba yango, tosengeli koluka ndimbola ya maloba wana mibale ya ntina.
Ya liboso, liloba ‘kosantisa,’ to ‘kobulisa,’ elimboli mpenza nini? Elimboli sikisiki ete: “koyeisa mosantu.” Nzokande nkombo ya Nzambe ezali mosantu, boye te? Ezali bongo. Na yango, wana ezali biso kobulisa nkombo ya Nzambe, tozali kobakisa eloko moko te na bosantu na yango. Kasi tozali nde kondima ete yango ezali mosantu, na bongo tosengeli kobulisa yango mpe kotalela yango na motuya mingi. Wana ezali biso kobondela mpo ete nkombo ya Nzambe ezala mosantu, tozali nde kokanisa na eleko oyo bikelamu nyonso bakomemya yango lokola eloko na bulee.
Ya mibale, liloba “nkombo” elimboli mpenza nini? Tomonaki ete Nzambe azali na nkombo, Yehova, mpe ete nkombo na ye wana ezwami mbala mingi mpenza na Biblia. Tolobelaki lisusu ntina ya kozongisa nkombo wana na bisika oyo yango ezwami na mikapo ya Biblia. Mpamba te, soki nkombo yango ekomami te, ekoki kozala mpasi mpo na kokokisa maloba oyo ya mokomi na Nzembo, ete: “Baoyo bayebi nkombo na yo bakondima yo; mpo ete yo [Yehova, NW], okotikaka bango te baoyo bajali kolukaluka yo.”—Nzembo 9:10.
Kasi, mpo na ‘koyeba nkombo ya Nzambe’ esengeli bobele koyeba ete nkombo ya Nzambe ezali YHWH, na Liebele to Yehova na minoko mingi? Te, ndimbola na yango eleki oyo wana. Na ntango Mose azalaki na ngomba Sinai, “Yehova akitaki kati na lipatá mpe atɛlɛmaki esika moko na ye [Mose], mpe asakolaki nkombo ya Yehova.” Maloba oyo na ntina na nkombo ya Yehova malimboli nini? Bizaleli na ye bimonisami ete: “Yehova, Yehova, Nzambe na ngolu mpe na motema mawa, akookaka nkanda noki te. Aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:5, 6, NW) Mpe, mwa moke liboso ya liwa na ye, Mose alobaki epai na Bayisraele ete: “Nakosakola nkombo ya Yehova.” Na nsima asalaki nini? Mose alobelaki bizaleli minene ya Nzambe, mpe akundolaki makambo oyo asalelaki Yisraele na ntina na nkombo na Ye. (Deteronome 32:3-43) Na yango, koyeba nkombo ya Nzambe elimboli koyekola ndimbola na yango mpe kosambela Nzambe oyo abéngami na nkombo yango.
Lokola Yehova akangisi nkombo na ye esika moko na bizaleli na ye, na mikano na ye mpe na misala na ye, tokoki kokanga ntina oyo Biblia elobi ete nkombo ya Nzambe ezali mosantu. (Levitike 22:32) Eleki na nkembo, ezali monene, ezali nsɔmɔ mpe eleki likoló. (Nzembo 8:1; 99:3; 148:13) Ya solo, nkombo ya Nzambe ezali elembo mpamba te. Ezali komonisa bomoto na ye. Nkombo yango esengelaki te kosalelama bobele mpo na mwa ntango moke mpo ete baya kotya bankombo mosusu na esika na yango, lokola “Nkolo.” Yehova ye moko alobaki na Mose ete: “‘Yawe [Yehova, NW] . . . ’ Wana ezali nkombo na ngai mpo na lobiko na lobiko, mpe nakokanisama na yango kino libota na libota.”—Exode 3:15.
Atako bato basili kosala nyonso mpo na kolongola nkombo ya Nzambe awa na mabelé, nde bakolonga te. “‘Nkombo na ngai ekozala monene kati na mabota longwa na kobima na moi kino kolimwa na moi, mpe bakotumba mpaka na malasi na bisika nyonso; bakopesa makabo mpo na nkombo na ngai, ee, makabo na pɛto; mpo ete nkombo na ngai ekozala monene kati na mabota,’ Yawe [Yehova, NW] na bibele alobi bongo.”—Malaki 1:11; Exode 9:16; Ezekiele 36:23.
Na yango, kobulisama ya nkombo ya Nzambe eleki makambo nyonso mosusu na ntina mingi. Mikano nyonso ya Nzambe mikangisami na nkombo na ye. Mpasi ya bato ebandaki ntango Satana atukaki nkombo ya Yehova mpo na mbala ya liboso, na kofundáká Ye ete azali mobuki ya lokutá mpe abongi te mpo na koyangela bato. (Genese 3:1-6; Yoane 8:44) Bato bakolongolama na mpasi nyonso euti na Satana bobele ntango nkombo ya Nzambe ekolóngisama mpenza. Yango wana baklisto bazali ntango nyonso kobondela ete nkombo ya Nzambe ebulisama. Nzokande, ezali mpe na makambo oyo bakoki kosala yango.
Lolenge nini tokoki kobulisa nkombo ya Nzambe?
Moko kati na mitindo oyo tokoki kobulisa nkombo ya Nzambe ezali bongo koloba na ntina na Yehova epai na bato mosusu, mpe komonisa Bokonzi na ye oyo asili kopesa epai na Klisto Yesu lokola elikya bobele moko mpo na bato. (Emoniseli 12:10) Na mikolo na biso, bato mingi bazali kosala yango mpe bazali kokokisa esakweli oyo ya mosakoli Yisaya, ete: “Na mokolo yango bokoloba mpenza ete: ‘Botɔndo Yehova, bino mabota! Bobelela nkombo na ye. Boyebisa misala na ye epai na mabota. Boloba ete nkombo na ye ezali likolo. Yemba nzembo mpo na Yehova, mpo ete asali misala minene. Bazali koyebisa yango na mokili mobimba.’”—Yisaya 12:4, 5, NW.
Esengeli lisusu kotósa mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Yehova alobaki na libota ya Yisraele ete: “Bino bokotósa mibeko na ngai mpe bokosalela yango. Ngai nazali Yehova. Mpe bokotuka te nkombo na ngai mosantu, mpe nakobulisama kati na bato na Yisraele. Ngai nazali Yehova oyo abulisi bino.”—Levitike 22:31, 32, NW.
Lolenge nini nkombo ya Yehova ebulisamaki mpo na botósi oyo Bayisraele bazalaki na yango na Mibeko na ye? Mibeko oyo mipesamaki na Bayisraele mitongamaki likoló ya nkombo na ye. (Exode 20:2-17) Na yango, wana ezalaki bango kotósa mibeko, bazalaki kopesa lokumu mpe limemya libongi na nkombo yango. Lisusu, na mobimba na yango, libota ya Yisraele libéngamaki na nkombo ya Yehova. (Deteronome 28:10; 2 Ntango 7:14) Wana ezalaki bango kosala makambo malamu, lokumu lopesamaki epai na ye, lokola tata akokumisamaka na etamboli malamu ya mwana na ye.
Kasi, wana Bayisraele baboyaki kotósa Mibeko ya Nzambe, bazalaki kotuka nkombo na ye. Yango wana, kati na Biblia, masumu lokola kopesa mbeka na bikeko, kolapa ndai ya lokutá, konyokola babólá mpe kosala pite, ‘ezalaki kotuka nkombo ya Nzambe.’—Levitike 18:21; 19:12; Yilimia 34:16; Ezekiele 43:7.
Bobele bongo, baklisto bazwaki mpe mitinda na ntina na nkombo ya Nzambe. (Yoane 8:28) Epai mosusu, bazali ‘libota mpo na nkombo ya Yehova.’ (Misala 15:14) Na yango, moklisto oyo azali kobondela na motema sembo ete: “Nkombo na yo ezala mosantu,” akobulisa nkombo yango na bomoi na ye na kotósáká mibeko nyonso ya Nzambe. (1 Yoane 5:3) Esengeli na bango kotósa mitinda mipesamaki na Yesu, Mwana na Nzambe, oyo akumisaki ntango nyonso Tata na ye.—Yoane 13:31, 34; Matai 24:14; 28:19, 20.
Na butu oyo ezalaki liboso na kobomama na ye, Yesu amonisaki motuya ya nkombo ya Nzambe epai na baklisto. Nsima na koloba epai na Tata na ye, ete: “Nasili koyebisa bango nkombo na yo, mpe nakoyebisa yango lisusu,” apesaki ndimbola oyo: “ete bolingo oyo olingaki ngai ezala kati na bango, mpe ngai kati na bango.” (Yoane 17:26, NW) Bayekoli bayebaki nkombo ya Nzambe mpo na bopusi bazwaki na bolingo na ye. Yesu apesaki bango likoki ya kokóma na boyebi malamu ya Nzambe lokola Tata na bango ya bolingo.—Yoane 17:3.
Ezali na bopusi nini epai na yo?
Na likita moko lisalemaki na bantóma mpe bankulutu na Yelusaleme, na ekeke ya liboso, moyekoli Yakobo alobaki ete: “Simeona asili mpenza koyebisa lolenge oyo Nzambe atalaki bapakano mpo na mbala ya liboso, ete akamata bato mpo na nkombo na ye.” Okoki kotangama kati na bato oyo azali koyanganisa “mpo na nkombo na ye” soki oboyi kosalela nkombo na ye?—Misala 15:14, NW.
Ya solo, bato mingi baboyi kosalela nkombo Yehova, mpe babongoli mingi ya Biblia basili kolongola yango na mabongoli na bango; nzokande, bamilió na bato na mokili mobimba basili kondima libaku kitoko wana ya komema nkombo ya Nzambe na esengo, kosalela yango kati na losambo na bango mpe na masoló na bango ya mokolo na mokolo, mpe koloba na ntina na yango epai na bato mosusu. Soki moto moko alobeli yo na ntina na Nzambe ya Biblia mpe asaleli nkombo Yehova, okoloba ete azali na lingomba nini? Batatoli ya Yehova bazali lingomba bobele moko na mokili mobimba, oyo ezali kosalela nkombo ya Nzambe ntango nyonso kati na losambo na bango, lokola basambeli ya Nzambe na ntango ya kala.
Nkombo Batatoli ya Yehova oyo euti na Biblia, ezali komonisa baklisto wana ete bazali ‘libota mpo na nkombo ya Nzambe.’ Bazali kosepela na nkombo yango, mpamba te ezali Yehova ye moko nde apesaki yango epai na basambeli na ye ya solo. Totangi na Yisaya 43:10, ete: “Yawe [Yehova, NW] alobi ete, Bino bojali batatoli na ngai mpe moombo na ngai, oyo nasili kopona yo.” Nzambe azalaki koloba epai na nani? Totalela biteni bizwami likoló na oyo.
Na eteni 5 kino eteni 7 (NW) ya mokapo wana, Yisaya alobi ete: “Banga te, mpo ete ngai nazali na yo elongo; nakoyeisa libota na yo longwa na ebimeli ya moi, mpe nakoyanganisa yo longwa epai moi mokolalaka. Nakoloba na epai na likoló ete: ‘Zongisa!’ mpe na epai na ngɛlɛ ete: ‘Pekisa te! Yeisa bana mibali na ngai longwa na mosika, mpe bana basi na ngai longwa na nsuka ya mokili, baoyo nyonso babéngami na nkombo na ngai, oyo nasili kozalisa mpo na nkembo na ngai mpenza, mpe oyo natongaki, ee, nasalaki bango.’” Na mikolo na biso, esakweli oyo ezali kokokana likoló na baoyo Nzambe asili kobyanga bango longwa na mabota nyonso mpo na kosanzola ye mpe kotatola mpo na ye. Na bongo, nkombo wana ezali komonisa bobele Nzambe te, kasi ezali lisusu komonisa baoyo bazali basambeli na ye ya solo awa na mabelé na mikolo na biso.
Mapamboli mauti na koyeba nkombo ya Nzambe
Yehova azali kobatela baoyo balingi nkombo na ye. Mokomi moko ya Nzembo alobaki ete: “Nakobikisa ye mpo ete ye alingi ngai. Nakotombola ye likoló mpo ete ye ayebi nkombo na ngai.” (Nzembo 91:14, NW) Lisusu, akokanisa bango ntango nyonso. “Na ntango yango, baoyo bakobangaka Yehova balobanaki moto na moninga na ye, mpe Yehova atyaki likebi mpe ayokaki. Bongo mokanda na kokanisama mokomamaki liboso na ye mpo na baoyo bakobangaka Yehova, mpe mpo na baoyo bakokanisaka nkombo na ye.”—Malaki 3:16, NW.
Na yango, bolamu bobómbami mpo na baoyo bayebi mpe balingi nkombo ya Nzambe esuki te bobele na bomoi ya ntango oyo. Epai na bato ya botósi, Yehova asili kolaka bomoi ya seko kati na Paradis ya esengo awa na mabelé. Wana apemamaki na Nzambe, Davidi akomaki ete: “Basali na mabe bakosuka, nde baoyo bazali kolikya epai na Yehova bakosangola mokili. Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, mpe bakosepela na kimya ya solo.”—Nzembo 37:9, 11, NW.
Lolenge nini yango ekokokana? Yesu apesaki eyano. Bobele na libondeli na ye ya ndakisa, epai alakisi biso ete tobondelaka boye: “Tika ete nkombo na yo ebulisama,” abakisaki ete: “Tika ete bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalema na nsé lokola na likoló!” (Matai 6:9, 10, NW) Ee, Bokonzi ya Nzambe oyo esili kopesama na Yesu Klisto, ekobulisa nkombo ya Nzambe mpe ekomema makambo malamu na mabelé oyo. Ekolongola bokesene mpe ekosilisa bitumba, mabe, nzala, maladi mpe liwa.—Nzembo 46:8, 9; Yisaya 11:9; 25:6; 33:24; Emoniseli 21:3, 4.
Okoki kozala na bomoi ya seko na nsé na Bokonzi wana. Ndenge nini? Osengeli bongo koyeba Nzambe. “Oyo ezali bomoi ya seko: ete bayekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo ete okóma na boyebi oyo bokopesaka bomoi.—Misala 8:29-31.
Tokanisi ete makambo mazali na mokanda oyo mandimisi yo ete Mozalisi azali na nkombo na ye oyo atalelaka yango na motuya mingi. Yo mpe osengeli kotalela yango na motuya. Tika ete okanga ntina ya koyeba mpe ya kosalela nkombo wana, mingi mpenza kati na losambo.
Tika ete ozwa ekateli ya koloba lokola mosakoli Mika oyo alobaki na molende nyonso, esili koleka bikeke mingi ete: “Mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo ya nzambe na ye; nde biso tokotambola seko na nkombo ya Yehova, Nzambe na biso, ee, libela na libela.”—Mika 4:5, NW.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]
‘Koyeba nkombo ya Nzambe’ elimboli te bobele koyeba ete nkombo na ye ezali Yehova
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
Nkombo ya Yehova ‘eleki na nkembo, ezali monene, ezali nsɔmɔ mpe eleki likoló.’ Mikano nyonso ya Nzambe misimbami na nkombo na ye
[Etanda na lokasa 29]
Kati na lisoló moko ya zulunalo Anglican Theological Review (Octobre 1959), Dr. Walter Lowrie amonisaki ntina ya koyeba nkombo ya Nzambe. Akomaki ete: “Na boyokani kati na bato, koyeba nkombo mpenza ya bato ezali na ntina mingi; ezala nkombo ya bato oyo tolingi, baoyo tozali kolobela mpe baoyo tozali kolobana na bango. Ezali bobele bongo kati na boyokani ya Nzambe mpe bato. Moto oyo ayebi Nzambe na nkombo na ye te, ayebi mpenza te ete Nzambe azali moto; boye akoki te kosolola na ye (na nzela ya libondeli), mpe akoki kolinga ye te, soki atalelaka ye bobele lokola nguya moko nde lokola moto te.”