Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • re mok. 4 nk. 18-21
  • Yesu ayei na maloba na kolendisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu ayei na maloba na kolendisa
  • Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Motatoli na sembo”
  • “Azali koya na mapata”
  • “Alfa na Oméga”
  • Emoniseli mpe yo
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Bózala batangi ya esengo ya mokanda ya emoniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Makambo masengeli kobima noki
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Yoka makambo oyo elimo ezali koloba na masangá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
re mok. 4 nk. 18-21

Mokapo 4

Yesu ayei na maloba na kolendisa

1. Yoane akomeli banani, mpe makambo ye akomaki mazali na litomba monene mpo na banani lelo?

NSANGO oyo elandi esengeli kosepelisa makasi moto nyonso oyo azali kosangana na libota ya Nzambe. Nsango yango ezali na ndimbola ya ntina mingi awa ezali biso kobelema na “elaka.” (Emoniseli 1:3) Tosimba maloba yango na motema na biso mpe tokozwela yango bolamu ya seko. Tala oyo Yoane akomaki: “Yoane, epai na masanga nsambo kati na Asia: Ngolu mpe kimya na bino, kouta na Oyo azali, mpe azalaki, mpe akozala, mpe na elimo nsambo liboso na kiti na bokonzi na ye, mpe na Yesu Klisto.”—Emoniseli 1:4, 5a.

2. (a) Motango “nsambo” elakisi nini? (b) Na mokolo na Nkolo, mikanda mitindamaki na “masangá nsambo” etali banani?

2 Yoane akomeli “masangá nsambo,” oyo atangi nkombo na yango kati na esakweli na ye. Motango oyo “nsambo” ezongelami mbala mingi kati na Emoniseli. Motango yango ezali mpo na kolakisa eloko oyo ezali ya kokoka, mingimingi na makambo matali Nzambe mpe lisangá na ye epakolami. Nzokande, lokola motuya na masangá na libota na Nzambe awa na mabelé ezali sikawa bankoto mingi na mokolo ya Nkolo, ntembe ezali te ete makambo oyo malobami na “masangá nsambo” ya bapakolami matali libota mobimba ya Nzambe na mikolo na biso. (Emoniseli 1:10) Ee, Yoane azali na nsango ya bomoi mpo na masangá nyonso ya ba Témoins de Jéhovah mpe mpo na baoyo bazali kosangana na bango, ata na esika nini bazali.

3. (a) Engebene liloba ya mbote esalelamki na Yoane, ‘ngolu mpe kimya’ euti epai na nani? (b) Liloba nini ya motindo moko ntoma Paulo asalelaki?

3 “Ngolu mpe kimya”—biloko bileki kitoko mingi, na koleka wana eyebi biso eutelo na yango. “Oyo” azali liziba na yango, ezali Nkolo Moyangeli Jéhovah ye moko, “Mokonzi na seko” oyo azali na bomoi “lobiko na lobiko.” (1 Timote 1:17; Nzembo 90:2) Elobelami lisusu mpo na “elimo nsambo,” liloba yango elakisi nguya nyonso oyo Nzambe asalaka na yango mosala, elingi koloba elimo santu na ye na mobimba na yango nyonso, na boye ete ezali kopesa mayele mpe mapamboli epai na baoyo nyonso bazali kotya likebi na maloba ya esakweli. Lisusu elobelami mpo na “Yesu Klisto,” oyo azali na esika ya ntina mingi mpe mpo na ye Yoane akomaki na nsima ete: “Atondi na ngolu mpe na solo.” (Yoane 1:14) Na motindo yango, liloba ya mbote esalelami na Yoane ekokani na oyo ntoma Paulo asalelaki na nsuka ya mokanda ya mibale oyo akomelaki lisangá ya Kolinti; akomaki boye: “Tika ete ngolu na Nkolo Yesu Klisto mpe bolingo na Nzambe mpe kozalana na elimo santu ezala na bino nyonso!” (2 Bakolinti 13:14) Tika ete maloba oyo mazala mpe mpo na moko na moko kati na biso oyo tolingi solo!—Nzembo 119:97.

“Motatoli na sembo”

4. Na nsima, ndenge nini Yoane alakisi Yesu Klisto, mpe mpo na nini maloba asaleli mabongi mpenza?

4 Nsima na Jéhovah, Yesu azali moto aleki nkembo kati na molongo, mpe Yoane andimaki likambo yango mpo ete abengi ye “Motatoli na sembo, ye mobotami na liboso kati na bakufi, mpe mokonzi na bakonzi na nse.” (Emoniseli 1:5b) Lokola sanza kati na likoló, atelemisami makasi na motindo na ye ya Motatoli monene na Jéhovah Nzambe. (Nzembo 89:37) Nsima na kotikala sembo kino na kufa, kufa lokola mbeka, akomaki moto ya liboso oyo asekwaki mpo na bomoi ya elimo, akoki kobomama lisusu te. (Bakolose 1:18) Uta ntango yango, na miso na Jéhovah, atombwami koleka mikonzi nyonso ya nse, mpamba te asili kozwa “nguya nyonso . . . na likoló mpe na mabelé.” (Matai 28:18; Nzembo 89:27; 1 Timote 6:15) Na 1914, aponamaki Mokonzi likoló na mabota ya mokili.—Nzembo 2:6-9.

5. (a) Ndenge nini Yoane amonisi lisusu botondi na ye epai na Nkolo Yesu Klisto? (b) Banani bazali kozwa litomba na mbeka ya bomoi ya bomoto ya kokoka oyo Yesu apesaki, mpe baklisto bapakolami bazwi libaku malamu nini?

5 Yoane amonisi lisusu botondi na ye epai na Nkolo Yesu Klisto na maloba oyo na esengo mingi: “Ye alingi biso, mpe asukoli biso na masumu na biso na makila na ye, mpe azalisi biso bokonzi na banganga mpo na Nzambe Tata na ye; mpo na ye nkembo, na nguya, libela na libela! Amen.” (Emoniseli 1:5c, 6) Yesu apesaki bomoi na ye ya bomoto ya kokoka mpo ete baoyo kati na mokili bakondimela ye bakoka kozwa bomoi ya kokoka. Elikya oyo epesameli mpe yo, ndeko motangi. (Yoane 3:16) Kasi kufa na Yesu lokola mbeka efungolaki nzela na libaku malamu ya ntina mingi mpo na baoyo, lokola Yoane, bakomi baklisto bapakolami. Batangami bayengebene na nzela na mbeka na lisiko na Yesu. Bazali kotya lisusu motema na bomoi ya mabelé te, yango wana na ndakisa na Yesu, etonga moke basili kobotama na elimo na Nzambe mpe bazali na elikya ya kosekwisama mpo na kozala mikonzi mpe banganga esika moko na Yesu Klisto kati na Bokonzi na ye. (Luka 12:32; Baloma 8:18; 1 Petelo 2:5; Emoniseli 20:6) Oyo nde libaku malamu! Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete Yoane asakolaki na makasi nyonso ete nkembo mpe nguya ezali mpo na Yesu.

“Azali koya na mapata”

6. (a) Yoane asakoli nini na ntina na Yesu oyo “azali koya na mapata,” mpe esakweli nini ya Yesu boye ezongelaki Yoane na makanisi? (b) Na ndimbola nini Yesu azali “koya,” mpe banani awa na mabelé bakozwa mpasi monene?

6 Na nsima Yoane asakoli na esengo nyonso: “Tala, azali koya na mapata, mpe miso nyonso makotala ye, ata bango batobolaki ye, mpe mabota nyonso na nse bakolela na ntina na ye. Ee, amen.” (Emoniseli 1:7) Na ntembe te awa Yoane amikundolaki esakweli oyo Yesu asilaki kopesa na ntina etali nsuka na biloko na ntango oyo. Alobaki: “Bongo elembo na Mwana na moto ekomonana na likoló mpe mabota nyonso na mokili bakolela mpe bakomona Mwana na moto azali koya na mapata na likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo.” (Matai 24:3, 30) Na yango, Yesu “azali koya” na ntina boye ete atii likebi na ye nyonso likoló na kokokisama ya bikateli ya Jéhovah likoló na mabota. Na bongo, mabongwani minene makosalema na mokili, mpe lokola “bikolo nyonso ya nse” baboi kondima bokonzi ya Klisto, “nkanda na nkele na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” ekokweila bango.—Emoniseli 19:11-21; Nzembo 2:2, 3, 8, 9.

7. Na ndimbola nini “miso nyonso makotala” Yesu, ata miso ya bato bazangi botosi?

7 Mpokwa ya nsuka oyo alekisaki elongo na bayekoli na ye, Yesu alobaki na bango: “Nsima na ntango moke, bamokili bakomona ngai lisusu te.” (Yoane 14:19) Bongo, ndenge nini “miso nyonso makotala ye”? Tokanisa te ete banguna na Yesu bakomona ye na miso na bango mpenza, mpamba te ntoma Paulo alobaki mpo na Yesu nsima na komata na ye na likoló ete “azali kofanda na pole oyo moto ayebi kobelema na yango te. Moto te amoni ye, moto mpe te akokoka komona ye.” (1 Timote 6:16) Ezali polele ete “kotala” to komona oyo Yoane alobeli awa ezali nde “kososola,” motindo moko tokoki komona to kososola bizaleli na Nzambe bizangi komonana, na nzela na biloko oyo azalisaki. (Baloma 1:20) Yesu “azali koya na mapata,” elimboli ete miso na bato ekoki komona ye te, ndenge moko lokola tokokoka te komona moi, wana ezali yango kobombama nsima na mapata. Ata ntango mapata mazipaka moi, toyebaka ete moi ezali, mpamba te kongenga ezali kokomela biso mpe butu ezali lisusu te; bobele bongo, atako Nkolo Yesu azali komonana na miso polele te, nzokande ekomonana ete ayei “kati na epelelo na móto ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu” na ntina na ye. Baoyo wana mpe bakosengela “komona” ye.—2 Batesalonike 1:6-8; 2:8.

8. (a) Banani ‘batobolaki’ Yesu na mobu 33 ya ntango na biso, mpe banani bazali kosala bongo lelo? (b) Lokola Yesu azali lisusu na mabelé te, ndenge nini bakoki ‘kotobola’ ye?

8 “Baoyo batobolaki Yesu” bakomona mpe ye. Ezali banani? Ntango Yesu abomamaki na mobu 33 ya ntango na biso, basoda baromé batobolaki ye na mosuni. Bayuda bandimaki likambo oyo basoda basalaki mpo na koboma Yesu, mpamba te Petelo alobaki na bamosusu na bango na mokolo na Pantekote ete: “Nzambe azalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo bino bobakisi ye na nzete.” (Misala 2:5-11, 36; tala Zakari 12:10; Yoane 19:37.) Nzokande, Baromé wana mpe Bayuda wana basila kokufa ekoki sikawa bambula soko 2 000. Na yango, baoyo ‘bazali kotobola ye’ bazali lelo mabota mpe bato oyo bayini ye makasi ndenge bato na ntango na Yesu bayinaki ye ntango abakisamaki na nzete. Kasi Yesu azali lisusu awa na mabelé te. Nzokande, ntango banguna bazali konyokola ba Témoins de Jéhovah oyo bazali kotatola mpo na Yesu to ntango banguna yango bazali kosepela na komona minyoko ya ba Témoins de Jéhovah, ezali lokola ete bazali ‘kotobola’ Yesu mpenza.—Matai 25:33, 41-46.

“Alfa na Oméga”

9. (a) Ekomi biso na esika oyo, nani akamati maloba, mpe mbala boni asali yango kati na Emoniseli? (b) Awa Jéhovah amibengi “Alfa” mpe “Oméga” mpe “Mozwi-na-Nguya-nyonso,” yango elimboli nini?

9 Ekomi sikawa ntango na esengo monene mpo ete Nkolo Moyangeli monene Jéhovah ye moko akamati maloba. Ebandeli oyo mpo na bimonaneli bilingi kolakisama ebongi solo, mpamba te Jéhovah azali Molakisi na biso monene mpe Liziba to Eutelo mpenza na Emoniseli. (Yisaya 30:20) Nzambe na biso alobi: “Ngai nazali Alfa na Oméga, . . . ye oyo azali mpe azalaki mpe akozala, Oyo-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 1:8) Mbala misato kati na Emoniseli Jéhovah alobi uta na makolo; oyo mbala ya liboso kati na yango misato. (Tala mpe Emoniseli 21:5-8; 22:12-15.) Baklisto ya ekeke ya liboso boye basosolaki nokinoki ndimbola na Alfa mpe Oméga, oyo ezali likomi ya liboso mpe mosusu likomi ya nsuka na alfabe ya greke. Lokola Jéhovah amibengi na makomi oyo mibale emonisi na makasi nyonso ete liboso na ye Nzambe moko na nguya-nyonso azalaki te, mpe nsima na ye, mosusu akozala te. Akokata malamumalamu mpe mpo na libela, likambo etali bonzambe. Akomonisa mpo na libela ete ye azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso bobele moko, Nkolo Moyangeli monene na biloko nyonso bizalisami.—Tala Yisaya 46:10; 55:10, 11.

10. (a) Na nsima, maloba nini Yoane alobi mpo na ye moko, mpe azalaki mokangami wapi? (b) Na lisungi ya banani Emoniseli ekokaki kokoma na masangá? (c) Lelo oyo, ndenge nini mbala mingi bilei ya elimo bizali kopesama?

10 Na elikya nyonso ete Jéhovah akolongisa makambo, Yoane alobaki epai na baninga na ye ya boombo ete: “Ngai Yoane, ndeko na bino, mosangani na bino kati na mpasi, na bokonzi, na mpiko, kati na Yesu. Ngai nazalaki na esanga ebiangami Patamo mpo na Liloba na Nzambe mpe mpo na litatoli na ntina na Yesu.” (Emoniseli 1:9) Mokangami na Patamo mpo na nsango malamu, moyiki mpiko na bolozi elongo na bandeko na ye mpe kobatelaka elikya ya kosangana na Bokonzi bozali koya, Yoane oyo asilaki kokoma mpaka, azwi emonaneli ya liboso ekomami na Emoniseli. Na ntembe te bimonaneli oyo bilendisaki ye mingi, motindo moko kelasi na Yoane lelo bayikisami mpiko na komona kokokisama na yango. Toyebi te na nzela nini Yoane atindaki mokanda ya Emoniseli epai na masangá, mpamba te ye azalaki mokangami na ntango wana. (Emoniseli 1:11; 22:18, 19) Na ntembe te baanzelu ya Jéhovah basalisaki ye, lokola babatelaki mbala mingi ba Témoins de Jéhovah ya sembo na ntango na biso; atako bazali konyokwama mpe kopekisama, batemwe bazali kolonga kopesa bilei ya elimo epai na bandeko na bango oyo bazali na mposa na solo.—Nzembo 34:6, 7.

11. Libaku malamu nini, ezalaki na Yoane, kelasi na Yoane na ntango na biso bazali mpe kosepela na yango?

11 Kanisa esengo ezalaki na Yoane na ndenge Jéhovah asalelaki ye mpo na kokomisa nsango na ye epai na masangá! Bobele bongo lelo, kelasi na Yoane basepeli na libaku malamu ya kopesa ‘bilei ya elimo na ntango ekoki’ epai na basaleli na Nzambe. (Matai 24:45) Tika ete ozala moko na baoyo balendisami na ebongiseli oyo ya elimo mpo na kozwa eloko na motuya mingi: bomoi ya seko!—Masese 3:13-18; Yoane 17:3.

[Etanda na lokasa 21]

Bilei ya elimo bizali kokabolama na ntango ya mpasi

Na mikolo oyo ya nsuka, ntango ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na minyoko makasi mpe na mpasi mingi, bazalaki mpenza na mposa ya kozwa bilei ya elimo oyo esalisaki bango na kotikala makasi kati na kondima. Mbala mingi, bazwaki bilei oyo bikoki mpo na bango nyonso, mingimingi wana Jéhovah amonisaki nguya na ye makasi.

Na ndakisa, na boyangeli ya banazi na Allemagne, Batemwe bazalaki kosala fotokopi mpe kokabola banimero ya La Tour de Garde, oyo epekisamaki makasi na bakonzi mabe ya banazi. Na Hambourg, Gestapo (bapolisié) bakendaki kosala ankete na ndako moko kati na yango bazalaki kosala fotokopi; ndako yango ezalaki moke, esika ezalaki te mpo na kobomba biloko ya mosala. Masini ya kokoma etikalaki na kati ya armoire, mpe masini ya fotokopi etyamaki na ndako ya nse, kati na kitunga ya mbala. Nsima na kitunga yango, ezalaki na valise moko etondaki na bazulunalo. Biloko yango bibombamaki mpenza te. Polisié moko afungolaki armoire, kasi ndenge afungolaki yango epekisaki ye amona masini. Mama Nkolo ndako alobi: “Na nse bapolisié misato batelemaki na katikati ya kave, mpenzampenza liboso na kitunga oyo ezipaki valise etondaki na bazulunalo La Tour de Garde. Kasi moko te kati na bango amonaki eloko; bazalaki lokola bato babomi bango miso.” Na bongo, na lisalisi ya Nzambe, ndako yango ezalaki ntango nyonso kosalelama mpo na kopesa bilei ya elimo na ntango wana ya mpasi mpe ya likama.

Na 1967 kino 1970, etumba makasi ekweaki kati na Nigéria mpe batomboki bazalaki na Biafra. Mboka Biafra ezingamaki mobimba na yango na Nigéria. Nzela bobele moko mpo na kokenda na bamboka mosusu ezalaki nzela ya mpepo. Na ndenge yango, Batemwe ya Biafra balingaki kozanga bilei ya elimo. Na 1968, bakonzi ya Biafra baponaki basali na bango mibale ya Leta mpo na kosala na bisika minene, moko atindamaki na Mpoto mpe mosusu na libanda ya mpepo na Biafra. Nzokande bango mibale bazalaki ba Témoins de Jéhovah mpe bazalaki moko na nsuka oyo mpe mosusu na nsuka oyo kuna ya nzela bobele moko oyo ezalaki kati na Biafra mpe mikili misusu, yango nzela ya mpepo. Lokola bakangaki ntina ete ebongiseli yango elingamaki na Jéhovah, baklisto yango bandimaki mokumba monene oyo ekokaki kozala likama, ya kokotisa bilei ya elimo kati na Biafra. Basalaki bongo na boumeli ya eleko nyonso oyo etumba eumelaki. Moko na bango alobaki: “Ebongiseli wana elekaki mpenza makanisi ya bato.”

[Etanda na lokasa 19]

Mituya na elilingi mizwami na Emoniseli

Motuya Ndimbola ya elilingi

2 Elimboli ete likambo lizali solo mpenza.

(Emoniseli 11: 3, 4; tala Deteronome 17:6.)

3 Ezali mpo na konyata to kolobela makasi likambo moko.

(Emoniseli 4:8; 8:13; 16:13, 19)

4 Ezali komonisa likambo oyo etali mokili mobimba to kokokana bipai nyonso lokola carré.

(Emoniseli 4:6; 7:1, 2; 9:14; 20:8; 21:16)

6 Ezali komonisa ezaleli ya kozanga kokoka, likambo oyo ebongi te, oyo ezali nsomo.

(Emoniseli 13:18; tala 2 Samwele 21:20.)

7 Ezali kolobela likambo oyo ezali ya kokoka na miso ya Nzambe, ezala mpo na mikano ya Jéhovah to ya Satana.

(Emoniseli 1:4, 12, 16; 4:5; 5:1, 6; 10:3, 4; 12:3)

10 Elimboli likambo to eloko oyo ezali mobimba, oyo ezangi ata ndambo te na ndimbola ya mosuni mpo na makambo matali mabelé.

(Emoniseli 2:10; 12:3; 13:1; 17:3, 12, 16)

12 Ezali komonisa ebongiseli to molongo na makambo ya Nzambe kati na makoló to na mabelé.

(Emoniseli 7:5-8; 12:1; 21:12, 16; 22:2)

24 Ezali komonisa ebongiseli makasi mpenza etombwami oyo esalemi na Jéhovah.

(Emoniseli 4:4)

Mituya misusu mizali na Emoniseli mizali mituya ya elilingi te. Mingimingi, ba versets ya zongazonga ekosalisa na koyeba likambo yango. (Tala Emoniseli 7:4, 9; 11:2, 3; 12:6, 14; 17:3, 9-11; 20:3-5.)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto