Mokapo 8
Bazali koluka nzela nyonso na kozala balongi
SUMULUNA
1. (a) Lisangá nini mosusu ezwi nsango na Yesu nsima na kosekwa na ye mpe kokembisama? (b) Na komibengaka ye moko ete “Moto na Liboso mpe Moto na Nsuka,” Yesu azalaki kokundola nini na baklisto ya lisangá yango?
LELO oyo, mboka ya kala ya Efese ekufa. Kasi esika ezaláká mboka oyo Yesu atindaki mokanda na ye ya mibale, ezali naino na mboka mosusu wana oyo bato mingi bafandi. Soki otiki esika ezaláká kala mboka Efese mpe otamboli kilometre 55 na nord, okokuta mboka Izmir, mboka moko ya mokili ya Turquie; ata lelo, lisangá moko ya ba Témoins de Jéhovah ya molende ezali wana, na esika oyo lisangá ya Sumuluna ezaláká na ekeke ya liboso. Sika totya likebi na maloba oyo ya Yesu: “Komélá anzelu na lisangá na Sumuluna ete, Moto na Liboso mpe Moto na Nsuka, oyo akufaki mpe asili kozonga na bomoi alobi boye ete.” (Emoniseli 2:8) Yesu akundoli bongo na baklisto ya Sumuluna ete ye nde moto ya liboso ya sembo na makambo nyonso oyo Jéhovah ye moko asili kosekwisa ye mpo na bomoi ya elimo mpe bomoi bokoki kosuka te, azali mpe moto ya nsuka oyo asekwisamaki na motindo yango. Yesu ye moko nde akosekwisa baklisto mosusu bapakolami. Azali bongo na makoki nyonso mpo na kopesa toli na bandeko na ye oyo lokola ye bazali na elikya na bomoi bokoki kosuka te kati na makoló.
2. Mpo na nini baklisto nyonso bazali kolendisama na maloba na “ye oyo akufaki mpe asili kozonga na bomoi”?
2 Yesu apesaki ndakisa na ndenge ayikaki mpiko mpo na boyengebene, mpe azwaki mbano elakamaki na ye. Bosembo na ye kino na kufa mpe lisekwa na ye ezali moboko na elikya na baklisto. (Misala 17:31) Likambo oyo ete Yesu ‘akufaki mpe azongi na bomoi’ emonisi ete ata makambo nini tokoyika mpiko mpo na solo, ezali mpamba te. Lisekwa na Yesu ezali liziba mozindo ya koyikisama mpiko mpo na baklisto nyonso, mingimingi wana ezali bango konyokwama mpo na kondima na bango. Ezali bongo mpo na yo? Na bongo okolendisama mpe na maloba malandi oyo Yesu atindelaki lisangá ya Sumuluna.
3. (a) Maloba nini ya koyikisa mpiko Yesu atindelaki baklisto ya Sumuluna? (b) Atako baklisto ya Sumuluna bazalaki babola, mpo na nini Yesu alobaki ete bazali “bazwi”?
3 “Nayebi monyoko na yo, na bobola na yo, kasi ozali mozwi. Nayebi mpe kotuka na bango bakolobaka ete bazali Bayuda, nde bazali bongo te kasi bazali lingomba na Satana.” (Emoniseli 2:9) Yesu apameli bandeko na ye ya Sumuluna na likambo moko te; nkutu azali nde kokumisa bango. Bayiki mpiko na bolozi mingi mpo na kondima na bango. Bazali babola na mosuni, mbala mosusu mpo na bosembo na bango. (Baebele 10:34) Nde ata bongo, lobanzo na bango ya liboso etali makambo na elimo, mpe basili komibombela biloko na motuya na likoló, na boyokani na toli na Yesu. (Matai 6:19, 20) Yango wana Mobateli na mpate mokonzi azali komona bango ete bazali “bazwi.”—Tala Yakobo 2:5.
4. Baklisto ya Sumuluna bazwaki monyoko monene uta na banani, mpe Yesu abengi banguna yango na nkombo nini?
4 Yesu alobi ete baklisto ya Sumuluna bakutanaki na botemeli makasi uta na Bayuda na mosuni. Na ebandeli, basambeli mingi na lingomba ya Bayuda batemelaki makasi losambo ya boklisto ete epalangana te. (Misala 13:44, 45; 14:19) Nzokande, bambula koleka ntuku mibale nsima na kokwea na Yelusaleme, Bayuda wana ya Sumuluna bazali se na makanisi ya Satana. Ntina wana Yesu abengi bango ete “lingomba na Satana.”a
5. Mimekamo nini mizalaki liboso na baklisto ya Sumuluna?
5 Na koyinama makasi boye, baklisto ya Sumuluna balendisami na maloba malandi mauti na Yesu: “Banga bolozi bokozwa yo te. Tala, Satana alingi kobwaka bamosusu na BINO kati na boloko ete BOMEKAMA, mpe BOKOZWA monyoko mikolo zomi. Zala sembo kino kufa, mpe nakopesa yo motole na bomoi.” (Emoniseli 2:10) Na kosalelaka maloba “bino,” “bokomekama,” “bokozwa,” Yesu amonisi awa ete maloba na ye matali lisangá mobimba. Akokaki te kolaka na baklisto ya Sumuluna ete bolozi na bango bolingi kosuka. Bamosusu kati na bango bakolanda konyokwama mpe kobwakama na boloko. Baklisto yango bakozwa bolozi “mikolo zomi.” Ata baklisto wana ya sembo mpe bazwi na elimo bakomekama na makambo nyonso kati na nzoto.
6. (a) Mpo na nini baklisto ya Sumuluna basengelaki kobanga te? (b) Na maloba nini Yesu asukisaki nsango na ye oyo atindelaki lisangá ya Sumuluna?
6 Kasi baklisto ya Sumuluna basengeli kobanga te soko mpe kotika etelemelo na bango te. Tika ete batikala sembo kino na nsuka, mpe “motole ya bomoi,” mpo na bango elimboli bomoi bokoki kosuka te na makolo, ekopesamela bango lokola mbano. (1 Bakolinti 9:25; 2 Timote 4:6-8) Mpo na ntoma Paulo, mbano oyo ya motuya mingi ebongaki komonela yango mpasi nyonso, ata kotika bomoi na ye na mabelé mpo na yango. (Bafilipi 3:8) Solo, baklisto ya sembo na Sumuluna bazalaki na makanisi motindo moko na Paulo. Yesu asukisi nsango na ye boye: “Oyo azali na matoi ayoka yango elobi elimo na masangá ete, Molongi akozwa mpasi na kufa na mibale te.” (Emoniseli 2:11) Molongi akozwa bomoi bokoki kosuka te kuna na likoló, mpe kufa ezali na nguya likoló na bomoi wana te.—1 Bakolinti 15:53, 54.
“Bolozi mpo na mikolo zomi”
7, 8. Lokola mpo na lisangá ya Sumuluna, ndenge nini lisangá ya boklisto ‘emekamaki mpenza’ na 1918?
7 Lokola mpo na baklisto ya Sumuluna, baoyo na kelasi ya Yoane mpe baninga na bango lelo bamekamaki mpe bazali naino ‘komekama na makambo nyonso.’ Bosembo na bango kati na monyokoli ezali komonisa ete bazali solo libota na Nzambe. (Malako 13:9, 10) Mwa ntango moke nsima wana mokolo na Nkolo ebandaki, nsango ya Yesu epai na baklisto ya Sumuluna elendisaki mpenza etuluku moke ya bato na mikili mikeseni oyo bazalaki libota na Jéhovah. (Emoniseli 1:10) Uta 1879, baklisto yango bazalaki kotóka bozwi ya elimo kati na Liloba na Nzambe mpe bazalaki kokabolana yango na bazalani na bango. Kasi na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, banguna batemelaki bango makasi mpe bayinaki bango makasi, mpo ete baboyaki komikotisa na makambo na bitumba, mpe epai mosusu mpo ete bazalaki kobimisa polele mabe ya mangomba ya boklisto ya mokili oyo. Bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo babimiselaki bango monyokoli mpe monyokoli yango ekomaki makasi mpenza na 1918, kokokanaka bongo na monyokoli oyo baklisto ya Sumuluna bazwaki uta na Bayuda oyo bafandaki na mboka yango mpe bayikelaki yango mpiko.
8 Monyokoli makasi ebimaki na Etats-Unis mpe endongwanaki mpenza ntango mokambi ya sika ya la Société Watch Tower, Joseph Rutherford elongo na bandeko mosusu nsambo batambwisi ya la Société, bakangamaki na boloko na le 22 Juin 1918, ntalo monene na bango bakatelaki bango boloko ya mibu 20. Sanza libwa na nsima, batikaki bango nsima na kosimbisa mbongo. Na le 14 Mai 1919, tribinale ya cour d’appel elongolaki bitumbu nyonso oyo bakatelaki bango, mpamba te ezalaki sembo te; mbeba 130 emonanaki kati na lolenge oyo basambisaki bango. Zuzi Manton, mosambeli na lingomba ya katolike ya Loma mpe Mosimbi medaye ebengami Ordre de Saint Grégoire le Grand, aboyaki na 1918 kobimisa baklisto oyo na boloko ata bakokaki kosimbisa mbongo; nzokande, na 1939, zuzi yango bakatelaki ye etumbu ya mbula mibale ya boloko mpe lomande ya 10 000 dolare mpo ete afundamaki na makambo motoba mpo na yango asengaki mpe azwaki kanyaka.
9. Ba Témoins de Jéhovah bazalaki ndenge nini na nse ya bokonzi ya Hitler na Alemanye nazi, mpe bakonzi ya mangomba balobaki nini?
9 Na Alemanye oyo ekomaki kotambwisama na bokonzi ya nazi, Hitler apekisaki mosala ya kosakola oyo ba Témoins de Jéhovah bazalaki kosala. Na boumeli ya mbula mingi, bankoto na Batemwe bakangamaki na boloko mpe banyokwamaki makasi na ba camps de concentration epai kuna mingi bakufaki, mpe bilenge mibali soki 200 oyo baboyaki kosala mosala ya soda mpo na kobundela Hitler, babomamaki. Bakonzi na mangomba bandimaki bikateli oyo, lokola emonisi yango maloba malandi ya sango moko ya katolike, maloba mabimisamaki kati na zulunalo La Voie allemande ya le 29 Mai 1938. Tala moko na makambo makomamaki kati na yango: “Ezali lelo na mokili moko epai lingomba ya Bayekoli ya Biblia [Témoins de Jéhovah] epekisami. Mokili yango ezali bongo Alemanye! Ntango Adolf Hitler akamataki bokonzi, mpe basángó na Alemanye basengaki ye ete apekisa bayekoli ya Biblia, Hitler, oyo bazalaki kobenga ye ete Führer (mokonzi, motambwisi) ayanolaki boye: ‘Bayekoli wana ya Biblia bazali kotya bato kati na mobulu. . . . Mpo na ngai, bazali bato ya lokuta mpe nakotika nzela te ete bakatolike na Alemanye babebisama na zuzi oyo Ameriké Rutherford. Nasukisi [ba Témoins de Jéhovah] na Alemanye.’” Mpe sángó wana abakisaki: “Bravo!”
10. (a) Wana mokolo na Nkolo ezalaki kolandana, monyoko nini ba Témoins de Jéhovah bazwaki? (b) Matomba nini masili kozwama na makambo mingi masambisamaki mpo na kobatela bonsomi ya losambo?
10 Wana mokolo na Nkolo elandanaki, Nyoka mpe libota na ye batikaki te kobundisa baklisto bapakolami mpe baninga na bango. Mingi kati na bango bakangamaki na boloko mpe banyokwamaki makasi. (Emoniseli 12:17) Banguna yango balandi ‘koyanga mwango mabe kati na mibeko,’ kasi libota ya Jéhovah babateli etelemelo na bango: “Ekoki ete totosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Nzembo 94:20; Misala 5:29) Na 1954, zulunalo La Tour de Garde elobaki boye: “Na boumeli ya mibu ntuku minei oyo mileki, mikili koleka ntuku nsambo bakamataki ekateli ya kopekisa Batemwe mpe banyokolaki bango.” Na mikili epai likoki ezalaki ya komema makambo na tribinale mpo na kobatela bonsomi ya kosambela Nzambe, Batemwe basalaki bongo mpe batribinale na mikili mwa mingi elongisaki bango. Bobele na Cour suprême ya Etats-Unis, ba Témoins de Jéhovah bazwaki elonga kati na makambo 50.
11. Esakweli nini ya Yesu na ntina etali elembo na koya na ye ekokanaki likoló na ba Témoins de Jéhovah na mokolo na Nkolo?
11 Etuluku mosusu te etosaki na lisosoli malamu nyonso maloba na Yesu oyo atindaki ete topesa biloko ya César na César. (Luka 20:25; Baloma 13:1, 7) Nzokande, bobele etuluku oyo moko nde babwakamaki mingi na boloko kati na mikili mingi mitambwisami na biyangeli ndenge nyonso, mpe likambo yango elandani kino na mikolo na biso, ezala na Amerike, na Mpoto, na Afrike to na Asie. Esakweli monene ya Yesu na ntina etali elembo ya koya na ye ezalaki na maloba oyo: “Bongo, bakobimisa bino mpo na minyoko mpe bakoboma bino; mabota nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:3, 9) Maloba oyo masili kokokana solo likoló na baklisto ba Témoins de Jéhovah na mokolo na Nkolo.
12. Ndenge nini kelasi na Yoane elendisi libota na Nzambe mpo na kolonga monyoko?
12 Mpo na kolendisa libota na Nzambe na ntina na minyoko, kelasi na Yoane bazali ntango nyonso kokundola bango maloba na Yesu epai na baklisto ya Sumuluna. Na ndakisa, wana ebandaki monyoko na nse na bokonzi ya nazi, na bambula 1933 mpe 1934, La Tour de Garde ebimisaki masolo lokola oyo: “Bobanga te!,” etongamaki likoló na Matai 10:26-33, “Kati na fulu na mɔ́to,” lisolo etongamaki likoló na Danyele 3:17, 18 mpe “Na monoko na nkosi,” etongamaki likoló na Danyele 6:22. Na bambula ya 1980, ntango buku oyo ebimaki mbala ya liboso, ba Témoins de Jéhovah bazalaki konyokwama makasi kati na mikili koleka 40, La Tour de Garde elendisaki bango na nzela na masolo lokola oyo “Banyokwami kasi bazali na esengo” mpe “Baklisto bazali koyika mpiko na monyoko.”b
13. Motindo moko na baklisto ya Sumuluna, mpo na nini ba Témoins de Jéhovah baklisto babangaki monyoko te?
13 Ba Témoins de Jéhovah bazali solo konyokwama na nzoto mpe bazali komekama na makambo mosusu na boumeli ya mikolo zomi ya elilingi. Lokola baklisto ya Sumuluna, babangaki te, mpe moko te kati na biso asengeli kolenga na komonaka ndenge monyoko ezali kobakisama na mokili. Toselingwi koyika mpiko na bampasi mpe kondima na esengo ata ‘babotola biloko na biso.’ (Baebele 10:32-34) Na koyekolaka Liloba na Nzambe mpe na komikotela yango malamu mpenza, tokoselingwa mpo na kozala makasi kati na kondima. Ntembe ezali te, Jéhovah akoki kosalisa biso mpe akosalisa biso mpo tokoka kotikala sembo. ‘Topesa epai na ye makambo nyonso mazali kotungisa biso, mpo ete ye akobatelaka biso.’—1 Petelo 5:6-11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbula soko 60 nsima na liwa na Yoane, Polycarpe, oyo azalaki na mibu 86 atumbamaki na móto na mboka Sumuluna mpo aboyaki kowangana Yesu. Na mokanda Le Martyre de Polycarpe, mokanda oyo mbala mosusu ekomamaki na eleko oyo likambo yango esalamaki, eyebisami ete ntango bazalaki kolokota nkoni mpo na kopelisa móto, “Bayuda bamonisaki, engebene ezaleli na bango, molende makasi mpo na kosangana na mosala yango,” atako likambo yango esalemaki na mokolo na “sabata monene.”
b Tala La Tour de Garde ya le 15 Février 1934, ya 1er Janvier 1935, ya 1er Mars 1935, ya 1er Août 1983.
[Etanda/Elilingi na lokasa 39]
Na boumeli na bambula ebele, bakomi na Lisolo na bato batatolaki mpo na bosembo ya ba Témoins de Jéhovah ya Alemanye na boyangeli ya banazi. Mokanda Mothers in the Fatherland ya mokomi Claudia Koonz, oyo ebimaki na 1986, elobi boye: “Mingi na ba Allemands oyo bazalaki banazi te bazwaki mwayé ya kobika na boyangeli oyo bazalaki koyina. . . . Nzokande, mpo na oyo etali motuya mpe makanisi, ezalaki na ba Témoins de Jéhovah 20 000 oyo baboyaki mpenza kotosa ata na lolenge nini Boyangeli ya nazi. . . . Bato oyo bayikaki mpiko koleka mpe oyo bazalaki na likanisi se moko bazalaki kozwa nguya na bango na lingomba. Uta ebandeli, ba Témoins de Jéhovah baboyaki kosangana ata na lolenge nini na Boyangeli ya banazi. Ata nsima wana Gestapo ekangaki biro na bango na 1933 mpe epekisaki lingomba na bango na 1935, bazalaki koboya koloba: ‘Heil Hitler.’ Pene na katikati na ba Témoins de Jéhovah (mingimingi mibali) batindamaki na ba camps ya concentration, koleka 1 000 babomamaki mpe 1 000 mosusu bakufaki kobanda 1933 kino 1945. . . . Bakatolike mpe baprotestá balandaki maloba ya bakonzi na mangomba na bango mpo na kopesa maboko na Hitler. Soko bamoko baboyaki kolanda yango, ezalaki mpo baboyaki kotosa mibeko na Lingomba mpe na Leta.”