Makila
Ndimbola: Eloko ya maimai oyo etambolaka na misisa ya nzoto ya bato mpe ya banyama mosusu. Eleisaka nzoto mpe ememelaka yango mpema, elongolaka bosɔtɔ oyo ezali na kati ya nzoto, mpe ebatelaka yango mpo ezwa maladi te. Lokola makila nde esimbi bomoi, Biblia elobi ete “molimo ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila.” (Lev. 17:11) Lokola Yehova azali Liziba ya bomoi, apesá malako ya sikisiki mpo na koyeba ndenge ya kosalela makila.
Bakristo bazwi mobeko ya ‘koboya makila’
Mis. 15:28, 29: “Elimo santu mpe biso moko [lisangani ya mikóló-bakambi ya lisangá ya bokristo] tomoni malamu kobakisela bino kilo mosusu te, longola kaka makambo oyo ya ntina, bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka na bikeko mpe makila mpe banyama oyo ekamolamá [to banyama oyo makila na yango esopami malamu te] mpe pite. Soki bomibateli malamumalamu na makambo wana, bokozala malamu. Bótikala malamu!” (Na vɛrsɛ oyo, kolya makila ezali ndenge moko na kosambela bikeko ná kosala pite, makambo oyo tosengeli kosala te.)
Tokoki kolya mosuni ya nyama, kasi makila na yango te
Eba. 9:3, 4: “Nyama nyonso oyo etambolaka oyo ezali na bomoi ekoki kozala bilei na bino. Ndenge napesaki bino milona, napesi bino yango nyonso. Kaka nde bosengeli kolya mosuni ná molimo na yango te, elingi koloba makila na yango.”
Liboso ya kolya nyama nyonso, esengeli kosopa makila na yango malamumalamu. Nyama oyo ekamolami to oyo ekufi na motambo to oyo ekufi yango moko esengeli kolyama te. (Mis. 15:19, 20; talá Balevi 17:13-16.) Ndenge moko mpe, esengeli te kolya eloko nyonso oyo basangisi yango na makila to biloko mosusu ya ntina oyo ezalaka na kati ya makila.
Nzambe andimaki ete makila esalelama kaka mpo na mbeka
Lev. 17:11, 12: “Molimo ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila, mpe ngai moko natye yango likoló ya etumbelo mpo na bino mpo na kozipa masumu ya milimo na bino, mpamba te makila nde ezipaka masumu mpo molimo ezali na kati na yango. Yango wana nalobi na bana ya Yisraele ete: ‘Molimo moko te na kati na bino asengeli kolya makila mpe mopaya moko te oyo azali kofanda mopaya na kati na bino akolya makila.’” (Na Mibeko ya Moize, mbeka nyonso ya nyama oyo bazalaki kopesa ezalaki elilingi ya mbeka ya Yesu Kristo.)
Ebr. 9:11-14, 22: “Ntango Kristo ayaki—nganga-nzambe monene . . . akɔtaki, na makila ya bantaba mpe ya bana-ngɔmbɛ ya mibali te, kasi nde na makila na ye moko, mbala moko mpo na libela, akɔtaki na esika mosantu mpe azwelaki biso kosikolama ya seko. Mpo soki makila ya bantaba mpe ya bangɔmbɛ-mibali mpe putulu ya mwana-ngɔmbɛ ya mwasi oyo emwangisami likoló ya bato oyo bakómi mbindo ezali kosantisa tii kopɛtola nzoto, bongo makila ya Kristo, oyo na nzela ya elimo moko ya seko amikabaki epai ya Nzambe na litɔnɔ te, ekopɛtola lisosoli na biso koleka te na misala oyo ezali kobota mbuma te mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu? . . . Soki makila esopami te bolimbisi ezali te.”
Ef. 1:7: “Mpo na ye [Yesu Kristo] tosikolami na nzela ya lisiko na makila ya moto wana, ɛɛ, tolimbisami mabunga na biso, na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye.”
Na siɛklɛ ya liboso na ntango na biso, ndenge nini bakristo bazalaki kotalela mobeko etali makila?
Tertullien (soki na 160-230 T.B.): “Tiká bóyoka nsɔni liboso ya bakristo. Biso totyaka makila ya nyama na bilei na biso ata moke te, atako bato nyonso balyaka yango. . . . Bino [bapakano ya Roma] bopesaka bakristo budɛ oyo etondi na makila mpo na komeka bango. Nzokande, boyebi malamu ete mibeko na bango epekisá bango kolya makila mpe bozali kosala yango mpo na kopɛngwisa bango. Boyebi ete balingaka ata moke te komona makila ya nyama, bongo bokanisi ete bakowela kolya makila ya bato?”—Tertullian, Apologetical Works, and Minucius Felix, Octavius (New York, 1950), ebongolami na Emily Daly, lok. 33.
Minucius Felix (na siɛklɛ ya misato T.B.): “Toyinaka mpenza makila ya bato, yango wana na bilei na biso totyaka te ata makila ya banyama oyo ekoki kolyama.”—The Ante-Nicene Fathers (Grand Rapids, Mich.; 1956), ekomami na A. Roberts ná J. Donaldson, Vol. IV, lok. 192.
Kokɔtisa makila na nzoto
Mobeko ya Biblia oyo epekisi makila etali mpe makila ya bato?
Ɛɛ, ata mpe bakristo ya liboso bayebaki ete ezali bongo. Misala 15:29 elobi ete esengeli ‘kokoba koboya . . . makila.’ Vɛrsɛ yango elobi te ete esengeli koboya kaka makila ya nyama. (Talá Balevi 17:10; vɛrsɛ yango epekisi kolya “lolenge nyonso ya makila.”) Tertullien (oyo akomaki mpo na kokɔtela bindimeli ya bakristo ya liboso) alobaki: “Tosengeli koyeba ete epekiseli ya ‘makila’ ezali (epekiseli) oyo etali mingi nde makila ya bato.”—The Ante-Nicene Fathers, Vol. IV, lok. 86.
Kokɔtisa makila na nzoto ezali ndenge moko na kolya makila?
Ntango moto akɔti lopitalo, soki azali na likoki ya kolya na monɔkɔ te, baleisaka ye na nzela ya misisa. Sikoyo, soki moto oyo alyá naino makila te, kasi andimi bákɔtisa ye yango na nzoto, azali mpenza kotosa mobeko oyo elobi ete “bókoba koboya . . . makila”? (Mis. 15:29) Tózwa ndakisa ya moto moko oyo monganga apekisi ye komɛla masanga. Tokoki koloba ete atosi mobeko yango soki atiki komɛla masanga kasi akɔtisi yango na misisa na ye?
Soki moto ya maladi aboyi makila, ezali nde na bankisi mosusu oyo ekoki kosalisa ye?
Mbala mingi bakoki kosalela bankisi lokola solution saline, solution de Ringer Lactate, mpe dextran mpo na kobakisa mai na makila mpo etambola malamu, mpe lelo oyo bankisi yango ezalaka na balopitalo mingi. Ya solo, soki moto asaleli bankisi yango, akozwa te makama oyo eutaka na kokɔtisa makila na nzoto. Zulunalo moko (Canadian Anaesthetists’ Society Journal, Yanuali 1975, lok. 12) elobi: “Kosalela bankisi oyo ebakisaka mai na makila ezali na matomba mingi: moto akozwa mikrobe te, ezala mpe mikakatano oyo ebimaka nsima ya kokɔtisa moto makila na nzoto, to mpe oyo eutaka na kokɔtisa moto makila oyo ekokani na oyo ya ye te.” Batatoli ya Yehova bandimaka bankisi oyo esalemi na makila te, oyo ebakisaka mai na makila mpo etambola malamu.
Lokola Batatoli ya Yehova baboyaka makila, basalisaka bango na ndenge ya malamu koleka. Ntango monganga moko akomelaki zulunalo moko (American Journal of Obstetrics and Gynecology, 1 Yuni 1968, lok. 395) alobaki boye: “Na ntembe te, ntango monganga ya lipaso ayebi ete akosalela makila te, amibongisaka mpo asala mosala na ye malamu. Akosala nyonso mpo akanga misisa nyonso oyo ezali kobimisa makila.”
Lipaso ya ndenge nyonso ekoki kosalema ata soki bakɔtisi moto makila na nzoto te. Ekoki kozala lipaso ya motema, ya bɔɔngɔ, kokata lobɔkɔ to lokolo, mpe kolongola eteni moko boye ya nzoto oyo ezali na maladi ya kansɛr. Ntango monganga Philip Roen akomelaki zulunalo moko (New York State Journal of Medicine, 15 Ɔkɔtɔbɛ 1972, lok. 2527) alobaki boye: “Tokakatanaki te kosala lipaso ya ndenge nyonso ata soki moto aboyi makila.” Denton Cooley, monganga na lopitalo oyo basalisaka maladi ya motema, na Texas, alobaki ete: “Tokamwaki mingi komona ndenge Batatoli ya Yehova bazali kobika [ntango tosalisaki bango na nkisi oyo esalemi na makila te oyo ebakisaka mai na makila]; yango wana tokómi kosala bongo mpo na kosalisa moto nyonso oyo azali na maladi ya motema.” (The San Diego Union, 27 Desɛmbɛ 1970, lok. A-10) “Bato ya liboso oyo tobandaki kosala lipaso ya motema ‘kozanga kosalela makila’ ezali Batatoli ya Yehova oyo bakómi mikóló mpo losambo na bango epekisi kokɔtisa moto makila; kasi sikoyo, tozali kosalisa ata bana mike oyo bazali na maladi ya motema, mpe likama ezali kobima te.”—Cardiovascular News, Febwali 1984, lok. 5.
Soki moto alobi—
‘Botikaka bana na bino bákufa mpo boboyaka makila. Bozali bato mabe mpenza’
Okoki koyanola: ‘Kasi tondimaka básalisa bango na bankisi oyo ekobimisa mindɔndɔ te. Tondimaka básalisa biso na bankisi oyo ekoki kopesa moto maladi lokola sida, epatite, mpe malaria te. Tolingaka ete bana na biso bázwa nkisi ya malamu mpenza, ndenge moboti nyonso ya bolingo alingaka.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Soki makila ya moto ekiti mingi, likambo ya ntina mingi ezali nde kosala ete mai ebakisama na makila. Na ntembe te oyebi ete na makila na biso mai nde ezali mingi (koleka 50%); ezali mpe na baglobile ya motane (globules rouges), baglobile ya mpɛmbɛ (globules blancs), mpe biloko mosusu. Ntango moto abungisi makila mingi, nzoto yango moko ebimisaka ebele ya baselile ya makila, mpe esalaka ete baselile mosusu ya makila ebotama nokinoki. Atako bongo, esengeli kobakisa mai na makila. Mpo na yango, bakoki kosalela bankisi oyo esalemi na makila te, oyo ebakisaka mai na makila mpo etambola malamu, mpe tondimaka bankisi ya ndenge wana.’ (2) ‘Bankisi oyo ebakisaka mai na makila mpo etambola malamu esalisaka malamu mpenza.’ (3) ‘Kasi mpo na biso, likambo ya ntina mingi ezali nde oyo Biblia elobi na Misala 15:28, 29.’
To okoki koloba: ‘Nayoki likanisi na yo. Mbala mosusu ozali kokanisa mwana na yo. Soki yango ekómeli mwana na biso, tokosala nyonso mpo na kobatela ye, boye te? Soki baboti lokola ngai na yo toboyi básalisa mwana na biso na nkisi moko boye, na ntembe te ntina ezali.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Okanisi ete baboti mosusu bakoki kolanda makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi na Misala 15:28, 29?’ (2) ‘Na yango, tokoki komituna boye: Tozali mpenza na kondima oyo esengeli mpo na kotosa mibeko ya Nzambe?’
‘Bino boboyaka makila’
Okoki koyanola: ‘Ntango mosusu bazulunalo elobelaka Batatoli ya Yehova oyo bakufaki mpo baboyaki makila. Yango nde ozali kokanisa? . . . Mpo na nini toboyaka makila?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Olingaka mwasi na yo (to mobali na yo) mingi mpenza na ndenge oyo okoki kotya bomoi na yo na likama mpo na ye? . . . Ezali mpe na bato oyo batyaka bomoi na bango na likama mpo na ekólo na bango, mpe bato bamonaka ete bazali bilombe, boye te? Kasi ezali na moto moko oyo aleki bato nyonso mpe biloko nyonso awa na mabele; moto yango nde Nzambe. Okoki kotya bomoi na yo na likama mpo olingaka ye mpe ondimaka boyangeli na ye?’ (2) ‘Oyo ezali nde likambo ya bosembo na biso epai ya Nzambe. Liloba ya Nzambe nde esɛngi biso tóboya makila. (Mis. 15:28, 29)’
To okoki koloba: ‘Lelo oyo, ezali na makambo mingi oyo bato basalaka kasi Batatoli ya Yehova basalaka yango te—na ndakisa, kobuka lokuta, kosala ekobo, koyiba, komɛla likaya, mpe, ndenge olobi yango, kosalela makila. Mpo na nini? Mpo totikaka Liloba ya Nzambe etambwisa bomoi na biso.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Oyebaka ete Biblia elobi ete tosengeli “koboya makila”? Tiká nalakisa yo likambo yango na Biblia. (Mis. 15:28, 29)’ (2) ‘Mbala mosusu oyebi ete Nzambe ayebisaki baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, ete bakoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya Edene, longola kaka moko. Kasi batosaki te; balyaki mbuma yango oyo epekisamaki, mpe babungisaki nyonso. Basalaki bozoba mpenza! Ya solo, lelo oyo, ezali na nzete moko te oyo mbuma na yango epekisami. Kasi nsima ya Mpela ya ntango ya Noa, Nzambe apekisaki bato eloko moko. Eloko yango nde makila. (Eba. 9:3, 4)’ (3) ‘Kasi, motuna yango oyo: Tondimelaka mpenza Nzambe? Soki totosi ye, tokozala na libaku ya kozwa bomoi ya seko na nzoto ya kokoka, na Bokonzi na ye. Ata soki tokufi, alaki biso lisekwa.’
‘Bongo soki monganga alobi ete, “Soki oboyi makila okokufa”?’
Okoki koyanola: ‘Soki bomoi ekómi mpenzampenza na likama, monganga akoki kopesa moto ndanga ete akokufa te soki bapesi ye makila?’ Okoki kobakisa: ‘Ezali na moto oyo akoki kopesa lisusu moto bomoi, mpe moto yango nde Nzambe. Omoni te ete ntango moto akómi kobunda na liwa, kopesa Nzambe mokɔngɔ mpe kobuka mobeko na ye ezali mabe? Ngai nandimelaka Nzambe. Bongo yo? Liloba na ye elaki ete baoyo bakondimela Mwana na ye bakosekwa. Ondimaka likambo yango? (Yoa. 11:25)’
To okoki koloba: ‘Ekoki mpe kozala ete monganga yango ayebi te ndenge ya kosalisa moto kozanga kosalela makila. Soki likoki ezali, tokoki kolakisa ye monganga oyo ayebi kosalisa moto kozanga kosalela makila, to tokoki kokende epai ya monganga mosusu.’