Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 39-lok. 44
  • Badati

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Badati
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • 1914—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Badati ya Biblia emonisi nini mpo na mobu 1914?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ntango nini Yesu akómaki Mokonzi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Boyekoli nimero 2—Ntango mpe Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 39-lok. 44

Badati

Ndimbola: Dati ezali eloko oyo esalisaka moto ayeba ntango oyo makambo esalemaki. Biblia esalelaka badati mpo na kolobela ntango oyo moto aumeli na bomoi, ntango oyo bakonzi mosusu bayangelaki, mpe ntango oyo makambo mosusu ya ntina esalemaki. Kaka Biblia nde elobeli na molɔngɔ makambo nyonso oyo esalemaki banda kozalisama ya Adama. Badati yango ya Biblia emonisaki mpe banda kala ntango oyo makambo mosusu ya ntina ekosalema mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Manaka ya Grégoire, oyo bato bazali kosalela lelo na mikili mingi, ebandaki na 1582. Mpo na makambo oyo esalemaki kala, mikanda ya mokili epesaka badati ndenge moko te. Atako bongo, ezali na badati mosusu ya ntina oyo endimamá mpenza bipai nyonso, na ndakisa mobu 539 L.T.B., dati oyo Babilone ekweaki, mpe lisusu mobu 537 L.T.B., mbula oyo Bayuda balongwaki na boombo na Babilone. (Ezr. 1:1-3) Soki tozwi badati yango mpo na kobanda kotánga bambula, tokoki koyeba ntango nini makambo oyo Biblia elobi esalemaki na kolanda manaka oyo tozali na yango lelo.

Biblia emonisi ete bato bazali awa na mabele esili koleka mwa bankóto ya bambula, nzokande bato ya siansi balobaka ete esili koleka nde bamilio ya bambula, bango bazali mpenza na bilembeteli?

Mayele oyo bato ya siansi basalelaka mpo na koyeba badati eutaka kaka na makanisi na bango moko, kasi atako makanisi yango ekoki kozala ya ntina, mbala mingi eyokanaka te. Yango wana, bazongelaka mbala na mbala kotalela badati oyo bapesaki.

Mokanda moko (New Scientist ya 18 Marsi 1982, lok. 695) elobi ete: “Na likita moko oyo esalemaki mokolo ya mitano na mpokwa liboso ya bato ebele na Royal Institution, Richard Leakey alobaki boye: ‘Nazali kondima te ete ngai moto nalobaki bongo esili koleka soki mbula moko.’ Na nsima amonisaki ete, likanisi oyo bato mingi bandimaka, oyo ye mpe autaki kondima na emisyo na ye (The Making of Mankind) oyo elekaka na televizyo ya BBC, ‘ezali na makambo mingi oyo ezali mpenza solo te.’ Sikoyo amoni ete mbula oyo banda nkɔkɔ na biso ya liboso azalaki awa na mabele ezali moke mingi koleka mbula milio 15 tii 20, ndenge oyo ye azalaki kondimisa yango na televizyo.”

Mbala na mbala, bato babimisaka mayele ya sika ya koyeba badati. Tokoki mpenza kotyela yango motema? Buku moko (The New Encyclopædia Britannica, 1976, Macropædia, Vol. 5, lok. 509) elobi boye mpo na mayele moko ya koyeba badati (thermoluminescence): “Mpo na sikoyo, mayele yango ezali kaka kopesa elikya, kasi badati oyo yango ezali kopesa ezali solo te.”Lisusu, zulunalo moko (Science ya 28 Augusto 1981, lok. 1003) elobi ete mayele mosusu ya koyeba badati (racémisation des acides aminés) emonisaki ete mikuwa ya moto oyo bazwaki eumeli mbula 70 000, nzokande mayele mosusu mpe (radioactivité) emonisi ete mikuwa yango eumeli kaka mbula 8 300 to 9 000.

Zulunalo moko (Popular Science, Novɛmbɛ 1979, lok. 81) elobi ete Robert Gentry, moto ya mayele ya fizike, “andimi ete ekoki kozala ete mpo na badati nyonso oyo bapesaka ntango basalelaka mayele oyo babengi radioactivité balekisaka ndelo, balekisaka bambula ebele mpenza.” Zulunalo yango elobi ete, bolukiluki oyo asalaki etindi ye aloba ete “moto azali awa na mabele esili koleka kaka mwa bankóto ya bambula kasi mbula milio 3,6 te.”

Atako bongo, bato ya siansi bandimaka ete mabele eleki moto na mbula mosika. Biblia endimi mpe likambo yango.

Bambula ya bato liboso ya Mpela ya Noa, ndenge Biblia emonisi yango, ezalaki kotángama ndenge moko na oyo ya biso?

Soki ezali ete “bambula” ya liboso ya Mpela ekokani na basanza na biso, boye Enoshe abotaki mwana ntango azalaki na mbula nsambo, mpe Kenane abotaki mwana na ye ntango azalaki kaka na mbula mitano. (Eba. 5:9, 12) Emonani polele ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema ata moke te.

Badati oyo epesami mpo na makambo ya Mpela esalisi biso tóyeba soki basanza mpe bambula na ntango wana ezalaki koumela mikolo boni. Makanisi oyo ezali na Ebandeli 7:11, 24 mpe 8:3, 4 emonisi ete sanza mitano (kobanda mokolo ya 17 na sanza ya mibale tii mokolo ya 17 na sanza ya nsambo) ekokani na mikolo 150, to sanza mitano oyo mokomoko na yango ezali na mikolo 30. Biblia elobeli polele “sanza ya zomi”; na nsima elobeli bileko mosusu oyo elekaki liboso mbula ya sika ebanda. (Eba. 8:5, 6, 8, 10, 12-14) Emonani polele ete bambula ya ntango wana ezalaki na basanza 12 oyo mokomoko na yango ezalaki na mikolo 30. Banda kala mpenza, babandaki kobongisa mokemoke manaka oyo ezali kolanda sanza (calendrier lunaire) mpo na koyokanisa yango na mbula oyo ezali na mikolo 365 (année solaire), ndenge emonisami na bafɛti ya eleko ya kobuka mbuma oyo Bayisraele bazalaki kosala na badati ya sikisiki mpenza. Na ndenge yango bafɛti yango ezalaki kosalema na bileko oyo ebongi mpenza.​—Lev. 23:39.

Kobosana te ete Nzambe akelaki bato mpo báumela libela na libela. Lisumu ya Adama nde ememaki liwa. (Eba. 2:17; 3:17-19; Rom. 5:12) Bato oyo bazalaki liboso ya Mpela bazalaki pene na bomoi ya kokoka, yango wana bazalaki koumela mingi koleka biso. Kasi na bango nyonso, moko te akokisaki mbula nkóto.

Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobaka ete Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló na 1914?

Bilembeteli mibale emonisi ete ezalaki mpenza na mbula yango: (1) Badati ya Biblia oyo elobeli mbula yango (2) makambo oyo ezali kokokisa bisakweli banda 1914. Awa tokolobela nde badati oyo Biblia epesi. Mpo na koyeba ndenge bisakweli ezali kokokisama, talá motó ya likambo “Mikolo ya nsuka.”

Tángá Danyele 4:1-17. Vɛrsɛ 20-37 emonisi ete Nebukadenezare akokisaki esakweli yango. Kasi esakweli yango ezali mpe na kokokisama mosusu ya monene. Ndenge nini toyebi yango? Vɛrsɛ 3 mpe 17 emonisi ete ndɔtɔ oyo Nzambe alɔtisaki Mokonzi Nebukadenezare elobelaki Bokonzi ya Nzambe mpe elaka na Ye ya kopesa bokonzi yango na “moto oyo ye alingi kopesa . . . oyo aleki moke kati na bato.” Biblia mobimba emonisi ete mokano ya Yehova ezali ete Mwana na ye, Yesu Kristo, ayangela bato, azala momonisi na Ye. (Nz. 2:1-8; Dan. 7:13, 14; 1 Ko. 15:23-25; Em. 11:15; 12:10) Makambo oyo Biblia elobi mpo na Yesu emonisi ete azalaki mpenza moto “oyo aleki moke kati na bato.” (Flp. 2:7, 8; Mat. 11:28-30) Na yango, ndɔtɔ wana ya esakweli elobeli ntango oyo Yehova akopesa Mwana na ye bokonzi mpo ayangela bato.

Makambo nini esengelaki kosalema liboso ya ntango yango? Bokonzi ya mokili, oyo emonisami na nzete mpe na ekumu na yango, ekozwa naino “motema ya nyama.” (Dan. 4:16) Baguvɛrnema mingi oyo ekoyangela bato ekomonisa bizaleli lokola oyo ya banyama mabe. Na mikolo na biso, mpongo ezali elembo ya États-Unis; nkosi ezali elembo ya Grande-Bretagne; dragɔ ezali elembo ya Chine. Na Biblia, nyama mabe ezali elembo oyo emonisaka baguvɛrnema mpe boyangeli ya bato ya mokili mobimba oyo ezali kotambwisama na Satana. (Dan. 7:2-8, 17, 23; 8:20-22; Em. 13:1, 2) Na esakweli oyo Yesu apesaki mpo na nsuka ya mokili, alobaki ete Yerusaleme “ekonyatama na bikólo, tii bantango oyo etyamá ya bikólo” ekokoka. (Luka 21:24) “Yerusaleme” ezalaki komonisa Bokonzi ya Nzambe mpo Biblia elobi ete bakonzi na yango bazalaki kofanda na “kiti ya bokonzi ya Yehova.” (1 Nt. 28:4, 5; Mat. 5:34, 35) Na yango, baguvɛrnema ya bikólo, oyo ezali lokola banyama mabe, ‘ekonyata’ lotomo ya Bokonzi ya Nzambe ya kotambwisa makambo ya bato mpe baguvɛrnema yango ekotambwisama na Satana.​—Talá Luka 4:5, 6.

Yehova asengelaki kotikela baguvɛrnema yango ntango boni liboso apesa Yesu Kristo Bokonzi? Danyele 4:16 elobi ete esengelaki koleka “ntango nsambo” (“mbula nsambo,” LL, na vɛrsɛ 13 mpe “mibu nsambo,” LNz na vɛrsɛ 13). Biblia emonisi ete, na makambo ya bisakweli, mokolo moko ezali mbula moko. (Ezk. 4:6; Mit. 14:34) Na yango, ntango nsambo yango ezali “mikolo” boni? Emoniseli 11:2, 3 emonisi polele ete sanza 42 (mbula 3 na sanza 6) ya esakweli yango ezali mikolo 1 260. Na yango, mbula nsambo ezali mbula 3 na sanza 6 mbala mibale, to mikolo 2 520. Soki totángi “mokolo moko mpo na mbula moko” na ndenge ya bisakweli, tokozwa mbula 2 520.

Ntango nini babandaki kotánga “ntango nsambo” yango? Babandaki kotánga yango nsima ya ntango oyo bato ya Babilone balongolaki Zidikiya, mokonzi ya nsuka oyo ayangelaki na kiti ya Bokonzi ya Nzambe na Yerusaleme. (Ezk. 21:25-27) Nsukansuka, na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B. mwa bokonzi ya Bayuda oyo etikalaki esilaki. Na ntango wana, Gedalia, Moyuda oyo bato ya Babilone batyaki guvɛrnɛrɛ, abomamaki mpe Bayuda oyo batikalaki bakimaki na Ezipito. (Yirimia, mokapo 40-43) Badati ya Biblia oyo esengeli kotyelama motema emonisi ete likambo yango esalemaki mbula 70 liboso ya 537 L.T.B., mbula oyo Bayuda basikwamaki na boombo; elingi koloba, likambo yango esalemaki na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B. (Yir. 29:10; Dan. 9:2)

Kasi ndenge nini tokoki kozwa dati ya 1914? Soki tobandi kotánga mbula 2 520 banda na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B. tokokóma na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1914 T.B., ndenge etanda oyo emonisi yango.

MPO NA KOZWA “NTANGO NSAMBO”

“Ntango nsambo” = 7 X 360 = mbula 2 520

“Ntango” to mbula oyo Biblia elobeli: 12 X mikolo 30 = mikolo 360. (Em. 11:2, 3; 12:6, 14)

Na kokokisama ya “ntango nsambo” mokolo moko ezali mbula moko. (Ezk. 4:6; Mit. 14:34)

Ebandeli ya Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B. tii 31 Desɛmbɛ 607 L.T.B. = sanza 3

1 Yanuali 606 L.T.B., tii 31 Desɛmbɛ 1 L.T.B. = mbula 606

1 Yanuali 1 T.B. tii 31 Desɛmbɛ 1913 = mbula 1913

1 Yanuali 1914 tii na ebandeli ya Ɔkɔtɔbɛ 1914 = sanza 9

Nyonso epesi: mbula 2 520

Likambo nini esalemaki na mbula yango? Yehova apesaki bokonzi ya mokili na mabɔkɔ ya Mwana na ye, Yesu Kristo, oyo autaki kozwa nkembo na likoló.​—Dan. 7:13, 14.

Mpo na nini banda mbula yango mpasi ezali kaka kobakisama? Nsima ya kotyama ya Kristo na bokonzi, Satana ná bademo na ye babwakamaki awa na mabele. (Em. 12:12) Ntango Kristo akómaki Mokonzi, abandaki mbala moko te koboma bato nyonso oyo baboyi kondima bokonzi ya Yehova mpe kondima ete ye azali Masiya. Ndenge asakolaki yango, nsango malamu esengelaki naino kosakolama na mokili mobimba. (Mat. 24:14) Likambo yango ezali kokabola bato ya bikólo nyonso; baoyo bazali bayengebene bakozwa bomoi ya seko, mpe bato mabe bakobomama mpo na libela. (Mat. 25:31-46) Na ntango yango, bampasi oyo esakolamaki mpo na “mikolo ya nsuka” ekobakisama mpenza. Ndenge motó ya likambo “Mikolo ya nsuka” emonisi yango, makambo yango ezali komonana polele banda 1914. Makambo nyonso oyo Yesu asakolaki ekosalema, ata mpe “bolɔzi monene” oyo ekosukisa mokili mabe oyo.​—Mat. 24:21, 22.

Nsuka ya mokili mabe oyo ekoya ntango nini?

Yesu ayanolaki ete: “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” Nzokande, alobaki lisusu ete: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo wana nyonso ekosalema.”​—Mat. 24:36, 34.

Lisusu, nsima ya kolobela makambo oyo ekosalema nsima ya kotyama ya Yesu Kristo na Bokonzi na 1914, Emoniseli 12:12 ebakisi ete: “Bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bofandi na likoló! Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto