Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 53-58
  • Mokanda ya Biblia nimero 9—1 Samwele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 9—1 Samwele
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA SAMWELE YA LIBOSO
  • LITOMBA NA YANGO
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Samwele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ayikaki mpiko atako makambo ebebaki
    Mekolá kondima na bango
  • Ayikaki mpiko atako akutanaki na makambo oyo elɛmbisaka nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Na kati ya 1 Samwele
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 53-58

Mokanda ya Biblia nimero 9—1 Samwele

Bakomi: Samwele, Gada, Natana

Esika ya bokomi: Yisalaele

Nsuka ya bokomi: soko 1078 L.T.B.

Boumeli ya lisoló: soko 1180-1078 L.T.B.

1. Mbongwana monene nini ekɔtaki kati na ebongiseli ya libota ya Yisalaele na mobu 1117 L.T.B., mpe makambo nini masengelaki kolanda nsima?

NA MOBU 1117 L.T.B., mbongwana monene ekɔtaki kati na ebongiseli ya libota ya Yisalaele. Mokonzi moko aponamaki, oyo azalaki moto! Yango esalemaki ntango Samwele azalaki kosala lokola mosakoli ya Yehova na Yisalaele. Atako Yehova ayebaki mpe asakolaki yango liboso, nzokande mbongwana wana mpo na kotambwisama na bakonzi, lokola libota ya Yisalaele esɛngaki yango, ezalaki likambo ya kokamwa monene mpo na Samwele. Na motindo na ye ya moto amipesaki mobimba na mosala ya Yehova uta kobotama, mpe na bondimi mozindo oyo azalaki na yango likoló na bokonzi ya Yehova, Samwele asilaki kososola matomba mabe oyo masengelaki kokwela bandeko na ye basangani ya libota ya bulɛɛ ya Nzambe. Ezalaki bobele na etindá ya Yehova nde Samwele andimaki masɛngi na bango. “Samwele ayebisaki bato lolenge na mokonzi; akomaki mpe yango na mokanda mpe atyaki yango liboso na [Yehova].” (1 Sam. 10:25) Na bongo, eleko ya basambisi esukaki, mpe eleko ya bakonzi oyo bazalaki bato ebandaki, eleko oyo esengelaki komona kotombwana ya Yisalaele na nguya mpe na lokumu oyo emonanaki naino liboso te, oyo nsukansuka, ememaki libota yango na kokabwana na Yehova mpe kozanga ngɔlu na ye.

2. Banani bakomaki mokanda ya Samwele ya Liboso, mpe bazalaki na makoki nini?

2 Nani azalaki na makoki mpenza mpo na kokoma, na litambwisi ya Nzambe, makambo ya eleko wana ya ntina mingi? Likambo libongi mpenza, Yehova aponaki mosembwi Samwele mpo na kobanda bokomi na yango. Samwele elimboli “Nkombo ya Nzambe,” mpe azalaki solo mokɔteli monene ya nkombo ya Yehova na eleko wana. Emonani ete Samwele akomaki mikapo 24 ya ebandeli ya mokanda yango. Na nsima, ntango akufaki, Gada mpe Natana bakóbaki bokomi yango, kosukisáká mwa bambula ya nsuka ya lisoló wana kino na liwa ya Saulo. Yango emonisami na 1 Ntango 29:29, oyo ezali kotángama boye: “Misala na mokonzi Davidi, longwa na ebandeli kino nsuka, talá, ikomami na maloba na Samwele momɔni-na-makambo mpe na maloba na mosakoli Natana mpe na maloba na Gada, monɔni-na-makambo.” Na bokeseni na mikanda ya Mikonzi mpe ya Ntango, mikanda ya Samwele mitángi mpenza te makomi oyo mazalaki liboso na yango; na bongo Samwele, Gada, mpe Natana oyo bazalaki na bomoi na eleko ya Davidi bandimami mpenza ete bazalaki bakomi na yango. Mibali nyonso misato wana bazalaki na etɛlɛmɛlo ya ntina mingi lokola basakoli ya Yehova mpe batɛmɛlaki losambo ya bikeko oyo ezalaki kobebisa bokasi ya libota.

3. (a) Lolenge nini mokanda ya Samwele ya Liboso mokómaki mokanda mobimba ya Biblia? (b) Kokomama na yango esukaki ntango nini, mpe ezwaki ntango boni?

3 Na ebandeli, mikanda mibale ya Samwele mizalaki rulo to mokanda bobele moko. Samwele ekabwanaki na mikanda mibale na ntango eteni oyo ezalaki na mikanda wana kati na libongoli ya Septante na lokótá ya Greke ebimisamaki. Kati na Septante yango, mokanda ya Samwele ya Liboso ebéngamaki Bikonzi ya Liboso. Kokabolama wana mpe nkombo wana ete Mikonzi ya Liboso esalelamaki kati na libongoli ya Vulgate na Latin mpe elandi kosalelama na Babiblia mosusu ya Katolike kino lelo. Likambo oyo ete Samwele ya Liboso mpe Samwele ya Mibale ezalaki mokanda bobele moko na ebandeli emonisami na nɔti moko ya Bamasorete na ntina na 1 Samwele 28:24, nɔti oyo emonisi ete vɛrsɛ́ yango ezali na katikati ya mokanda ya Samwele. Emonani ete kokomama ya mokanda yango esukaki soko na mobu 1078 L.T.B. Na bongo, ekoki kozala ete mokanda ya Samwele ya Liboso mozwaki eleko oyo eumelaki mwa moke koleka mbula nkámá, kobanda na mobu 1180 kino mobu 1078 L.T.B.

4. Lolenge nini bosolo ya lisoló kati na Samwele ya Liboso endimisami?

4 Bilembeteli mingi bindimisi bosikisiki ya lisoló na yango. Bisika ya geografi biyokani mpenza na makambo oyo mayebisami. Likambo ya kobenda likebi mpenza, etumba ya Yonatana oyo alóngaki etuluku ya basodá ya Filisitia na Mikemase, etumba oyo ememaki kino kopanzana monene ya Bafilisitia nyonso, ezongelamaki na Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba na mokonzi moko ya mampinga ya mokili ya Angleterre, oyo, engebene lisoló ya bato, akimisaki bafandi ya mokili ya Turquie na kolandáká bilembo oyo bilobelami kati na lisoló lipemami ya Samwele.​—14:4-14.a

5. Lolenge nini bakomi ya Biblia bandimisi bosolo ya Samwele ya Liboso?

5 Nzokande, ezali na bilembeteli ya makasi koleka oyo bindimisi kopemama mpe bosolo ya mokanda yango. Kati na mokanda oyo, tozali kokuta kokokisama monene ya esakweli oyo Yehova apesaki ete ata ndɛlɛ Yisalaele ekosɛnga mokonzi. (Det. 17:14; 1 Sam. 8:5) Nsima na bambula, Hosea andimisaki lisoló ya mokanda yango, ntango atángaki maloba ya Yehova ete, “Napesaki yo mokonzi na nkanda na ngai, mpe nalongolaki ye na nkɛlɛ na ngai.” (Hos. 13:11) Petelo amonisaki kati na maloba na ye ete Samwele apemamaki, ntango alobaki na ntina na Samwele ete azali mosakoli oyo ‘asakolaki mikolo’ ya Yesu. (Mis. 3:24) Paulo atángaki maloba ya 1 Samwele 13:14 ntango azalaki komonisa na mokuse lisoló ya kala ya Yisalaele. (Mis. 13:20-22) Yesu ye moko andimisaki makasi bosolo ya lisoló yango na kotunáká Bafalisai ya mikolo na ye ete: “Botángi yango esalaki Davidi te, wana eyokaki ye nzala mpe baoyo bazalaki na ye?” Na nsima, ayebisaki bango lisoló ya Davidi ntango akendaki kosɛnga mampa ya kolakisama. (Mat. 12:1-4; 1 Sam. 21:1-6) Ezela mpe andimaki ete lisoló yango lizali solo, lokola tosilaki komonisa yango.​—1 Nta. 29:29.

6. Bilembeteli nini mosusu kati na Biblia bimonisi bosolo ya Samwele ya Liboso?

6 Lokola yango ezali lisoló ya misala ya Davidi ntango mizalaki mpenza kosalema, na bongo longwa na ebandeli kino nsuka ya Makomami, mokapo nyonso oyo elobeli Davidi ezali kondimisa mokanda oyo ya Samwele ete ezali eteni ya Liloba lipemami ya Nzambe. Ndambo ya makambo oyo mazali kati na mokanda yango mazongelami kútu kati na makomi oyo matyami likoló na nzembo ya Davidi, na ndakisa na Nzembo 59 (1 Sam. 19:11), na Nzembo 34 (1 Sam. 21:13, 14), mpe na Nzembo 142 (1 Sam. 22:1 to 1 Sam. 24:1, 3). Na bongo, bilembeteli ya kati na Liloba ya Nzambe yango moko bizali kondimisa polelepolele bosolo ya mokanda ya Samwele ya Liboso.

MAKAMBO MAZALI KATI NA SAMWELE YA LIBOSO

7. Lisoló oyo ezali kati na mokanda yango etali bomoi ya batambwisi nini ya Yisalaele?

7 Mokanda yango mozali kolobela na ndambo to na mobimba bomoi ya batambwisi minei ya Yisalaele: Eli, nganga monene; Samwele, mosakoli; Saulo, mokonzi ya liboso; mpe Davidi oyo apakolamaki mpo na kozala mokonzi na nsima.

8. Makambo nini malekaki mpo na kobotama ya Samwele mpe kokóma ‘ministre ya Yehova’?

8 Mosala ya Eli ya kosambisa mpe bolenge ya Samwele (1:1–4:22). Na ebandeli mpenza ya lisoló, bamonisi biso Hana, mwasi molingami ya Molevi moko, na nkombo Elekana. Hana azali na mwana te mpe, na ntina yango, azali kotyolama na mwasi mosusu ya Elekana, na nkombo Penina. Wana libota lizalaki kati na moko na mibembo na bango ya mbula na mbula kino Silo, epai sanduku ya kondimana ya Yehova ezalaki, Hana abondeli na etingya mpenza epai na Yehova ete apesa ye mwana mobali. Apesi elaka ete soki libondeli na ye lipesameli eyano, akopesa mwana yango na mosala ya Yehova. Nzambe ayanoli na libondeli na ye, mpe aboti mwana, na nkombo Samwele. Mwa moke nsima na kokilisa ye mabɛlɛ, amemi mwana yango na ndako ya Yehova mpe atiki ye na mabɔkɔ ya Eli, nganga monene, lokola moto ‘badefisi na Yehova.’ (1:28) Na nsima, Hana ayembi loyembo ya nsái mpo na kopesa matɔ́ndi mpe komonisa esengo. Mwana yango akómi ‘mosaleli ya Yehova liboso na nganga Eli.’—2:11.

9. Lolenge nini Samwele ayaki kokóma mosakoli na Yisalaele?

9 Makambo nyonso mazali kotambola malamu te mpo na Eli. Akómi mobangé, mpe bana na ye mibale ya mibali bakómi bato mpamba mpe na lokumu mabe, oyo bazangi ‘koyeba Yehova.’ (2:12) Bazali kosalela mosala ya bonganga mpo na kokokisa bamposa na bango ya moimi mpe ya mbindo. Eli azali kokoka kosembola bango te. Bongo, Yehova abandi kotinda maloba na ye ya kotɛmɛla ndako ya Eli, kolakáká ete ‘ata mobangé moko te akozala na ndako na yo’ mpe ete bana ya Eli bakokufa na mokolo bobele moko. (1 Sam. 2:30-34; 1 Mik. 2:27) Na nsuka, atindi elenge Samwele epai na Eli na nsango moko ya lisambisi ya nsɔ́mɔ. Na bongo, elenge Samwele andimami lokola mosakoli kati na Yisalaele.​—1 Sam. 3:1, 11.

10. Lolenge nini Yehova akweisaki ekateli likoló na libota ya Eli?

10 Na ntango ebongaki mpenza, Yehova akweisaki ekateli wana na kobimisáká Bafilisitia. Wana etumba eyei ndóngó mpo na Yisalaele, Bayisalaele, na konganga makasi, bamemi sanduku ya kondimana longwa na Silo kino na molako ya limpinga na bango. Koyokáká konganga wana mpe kozwáká nsango ete Sanduku esilaki komemama kino molako ya Yisalaele, Bafilisitia bamikembisi mpe bazwi bolóngi monene na etumba, kokimisáká Bayisalaele moto na moto na nzela na ye. Sanduku ebɔtɔlami mpe bana mibale ya Eli bakufi. Eli ayoki nsango, motema mozali kolɛnga. Ntango ayoki likambo litali Sanduku, akwei na nsima longwa na kiti na ye, nkingo ebukani mpe akufi. Ezali na lolenge yango nde eleko ya mbula 40 ya mosala na ye ya kosambisa esukaki. Ya solo, “Nkembo elongwi na Yisalaele,” mpamba te Sanduku emonisi kozala ya Yehova elongo na libota na ye.​—4:22.

11. Lolenge nini Sanduku emonanaki ete esengelaki te kosalelama lokola eloko ya bikelákela?

11 Samwele asambisi Yisalaele (5:1–7:17). Sikawa, esengeli ete Bafilisitia mpe bázwa mpasi monene mpo báyeba ete sanduku ya Yehova esengeli te kosalelama lokola eloko ya bikelákela. Ntango bamemi Sanduku yango kati na tempelo ya nzambe na bango Dagona, na mboka Asedode, bakuti nzambe yango akwei na elongi. Lobi lolandi, Dagona akwei liboso na ekuke ya ndako, na mbala oyo motó na ye mpe matandu ya mabɔkɔ na ye ekatani. Yango ezali ebandeli ya momeseno ya biyambayamba oyo Bafilisitia bazalaka na yango ete, ‘makaka makoki kotyama na ekɔtelo ya ndako ya Dagona te.’ (5:5) Bafilisitia bamemi Sanduku nokinoki kino Gata mpe na nsima kino Ekelone, kasi nyonso wana sé mpamba! Minyoko mikweli bango na lolenge ya nsɔ́mɔ monene, maladi ya mosombá, mpe bolózi ya mpóko. Elikya esili mikóló ya Bafilisitia na komonáká motángo monene ya bato oyo bakufi mpe bazongisi Sanduku na Yisalaele likoló na likalo ya sika oyo libendami na ngɔmbɛ mibale oyo izalaki naino komɛlisa bana mabɛlɛ. Na Bete-semese, mpasi ekweli bamoko kati na Bayisalaele mpo ete batali Sanduku. (1 Sam. 6:19; Mit. 4:6, 20) Na nsuka, Sanduku etyami na ndako ya Abinadaba na Kilyata-yalima, mboka ya Balevi.

12. Mapamboli nini mazwami na lolenge Samwele azali kokɔtela losambo ya solo?

12 Sanduku eumeli na ndako ya Abinadaba mbula 20. Samwele, oyo akómi mobali mpenza, atindi Yisalaele ete bálongola bikeko ya Baala mpe ya Asetalote mpe básalela Yehova na motema na bango mobimba. Basali mpe bongo. Ntango bayangani mpo na kosambela na Misipa, mikóló ya Bafilisitia basaleli libaku yango mpo na kobundisa Yisalaele, wana Bayisalaele bamilɛngɛlaki te mpo na etumba. Na nzela ya Samwele, Yisalaele babeleli Yehova. Makɛlɛlɛ monene ya nkake uta na Yehova ekɔtisi Bafilisitia kati na mobulungano monene, mpe Bayisalaele, oyo balendisami na mbeka mpe na libondeli, bazwi bolóngi monene. Uta ntango yango, ‘lobɔkɔ ya Yehova elandaki kokamola Bafilisitia na boumeli ya mikolo nyonso ya Samwele.’ (7:13) Nzokande, bopemi ezali te mpo na Samwele. Na boumeli ya bomoi na ye mobimba, akóbi kosambisa Yisalaele, kotamboláká mbula na mbula kati na zongazonga oyo ebandi na Lama, na nɔ́rdi ya Yelusaleme, kino na Betele, sangisá Gilegale mpe Misipa. Na Lama, atongi etumbelo moko mpo na Yehova.

13. Lolenge nini Yisalaele eyaki kobwaka Yehova ete azala lisusu Mokonzi na bango te, mpe Samwele akebisaki bango na ntina na matomba mabe nini?

13 Saulo, mokonzi ya liboso na Yisalaele (8:1–12:25). Samwele akómi mobangé kati na mosala ya Yehova, kasi bana na ye bazali te kolanda ndakisa ya tata na bango, mpo ete bazali kondima kanyaka mpe bazali kosambisa na bosembo te. Na ntango yango, bankumu ya Yisalaele babɛlɛmi epai na Samwele na lisɛngi oyo ete: “Ponelá biso mokonzi, oyo akosambisaka biso lokola ekosalama na mabota mosusu.” (8:5) Na nsé na kotungisama monene, Samwele aluki Yehova kati na libondeli. Yehova mpe ayanoli ete: “Bazali koboya yo te kasi bazali koboya ngai ete nazala mokonzi likoló na bango lisusu te. . . . Bongo yoká mongongo na bango.” (8:7-9) Kasi, libosoliboso, Samwele asengeli naino komonisa bango matomba mabe ya lisɛngi na bango ya botɔmbɔki: kosalelama makambo makasimakasi, kofuta mpako, kobungisa bonsomi, mpe nsukansuka minyoko mpe bileli epai na Yehova. Kotingamáká makasi na ekateli na bango, libota yango lisɛngi sé mokonzi.

14. Lolenge nini Saulo atyamaki na bokonzi?

14 Sikawa, tomoni Saulo, mwana na Kisi na libota ya Benyamina mpe mobali aleki bonzenga mpe aleki molai kati na Yisalaele mobimba. Amemami epai na Samwele, oyo akumisi ye na ntango ya elambo moko, apakoli ye mpe na nsima alakisi ye liboso na Yisalaele mobimba wana bazalaki na liyangani na Misipa. Atako na ebandeli Saulo amibombi kati na biloko oyo bato bamemaki, nsukansuka ayaki komonisama lokola moto oyo Yehova aponi. Samwele akundweli lisusu Yisalaele lotómo ya mokonzi, mpe akomi yango na mokanda. Nzokande, etɛlɛmɛlo ya Saulo lokola mokonzi elendisami bobele nsima na kozwa bolóngi likoló na Baamona, bolóngi oyo epesi bonsomi na Yabese kati na Gileadi, boye bato banso bandimi bokonzi na ye kati na Gilegale. Samwele alendisi bango lisusu ete bábanga Yehova, básalela ye mpe bátosa ye, na nsima abeleli Yehova ete atinda elembo na motindo ya nkake mpe ya mbula oyo emonanaka te na eleko ya bobuki mbuma. Na elakiseli moko ya nsɔ́mɔ monene, Yehova amonisi nkanda na ye ete Yisalaele eboyi ye azala Mokonzi na bango.

15. Lisumu nini ya nkó limemaki Saulo na kokweisama?

15 Kozanga botosi ya Saulo (13:1–15:35). Wana Bafilisitia balandi kotungisa Yisalaele, Yonatana, elombe mwana na Saulo, abomi etuluku moko ya basodá ya Bafilisitia. Mpo na kosala bobekoli, banguna wana batindi limpinga monene, oyo motuya na bango mozali ‘lokola zɛlɔ na libóngo ya mai monene,’ mpe basali molako na Mikemase. Yikiyiki monene ekɔti na Yisalaele mobimba. ‘Ah, wapi Samwele ete apesa biso litambwisi ya Yehova!’ Lokola Samwele azali koya noki te, Saulo asali lisumu na kopesáká na nkó nyonso mbeka na kotumba. Na mbala moko, Samwele ayei. Kobwakáká bantina ya mpambampamba oyo Saulo apesi mpo na kosɛnga bolimbisi, Samwele ayebisi lisambisi liuti na Yehova: “Sasaipi bokonzi na yo ekoumela te. [Yehova] asili komilukela moto oyo akosepelisa motema na ye mpe atii ye motambolisi na bato na ye mpo ete yo obateli yango elakelaki [Yehova] yo te.”​—13:14.

16. Bozoba ya Saulo esukaki kati na mikakatano nini?

16 Yonatana, moto na molende mpo na nkombo ya Yehova, abundisi lisusu basodá ya molɔngɔ́ ya liboso ya Bafilisitia; na mbala oyo, azali bobele ye na momemi-bibundeli na ye, mpe nokinoki babomi bato soko 20. Koningana moko ya mabelé eyeisi lisusu mobulungano kati na banguna. Bapanzani, mpe Yisalaele balandi bango nyonso. Nzokande, nguya ya bolóngi elɛmbisami mpo na ndai ya bozoba oyo Saulo asalaki, oyo etyaki epekiseli liboso na babundi ete bálya te liboso ete etumba esila. Nokinoki, mibali yango balɛmbi mpe na nsima basali lisumu liboso na Yehova na kolyáká misuni ya nyama oyo iutaki kobomama sika kozanga ete bábimisa makila na yango. Nzokande, Yonatana asilaki kozongisa nzoto makasi na kolyáká mafuta ya nzoi liboso ya koyoka ndai wana, oyo atɔndɔli yango ete ezali epekiseli oyo ekosala ete balónga etumba te. Bato ya Yisalaele babikisi ye na liwa mpo na lobiko monene oyo ayeiselaki Yisalaele.

17. Lolenge nini Saulo abwakamaki lisusu nsima ya lisumu monene na ye ya mibale?

17 Sikawa, ntango ekoki mpo na kokweisa ekateli ya Yehova likoló na Baamaleki bato mpamba. (Det. 25:17-19) Basengeli kosilisama nyɛɛ. Eloko ata moko te esengeli kobikisama, moto te nyama mpe te. Esengeli kokamata ata eloko moko te. Nyonso esengeli kobebisama. Nzokande Saulo, na motó makasi nyonso, abateli Agaga, mokonzi ya Baamaleki, mpe akamati nyama oyo ilekaki malamu kati na bitongá, kolobáká ete yango ekopesama lokola mbeka epai na Yehova. Likambo yango limonani mabe mpenza na miso ya Nzambe ya Yisalaele mpe atindi Samwele ete ayebisa mpo na mbala ya mibale kobwakama ya Saulo. Koboyáká koyoka bantina ya mpamba oyo Saulo azalaki kopesa mpo na kosɛnga bolimbisi, Samweli alobi ete: “[Yehova] akosepela mbeka na miboma lokola ye akosepela botosi kotosa mongongo na ye? Talá kotosa eleki moboma na malamu . . . Yo oboyi liloba na [Yehova], bongo ye aboyi yo ete ozala mokonzi te.” (1 Sam. 15:22, 23) Na nsima, Saulo abandi kobondela Samwele, asimbi nsɔngɛ́ ya elamba ya Samwele mpe yango epasuki. Samwele ayebisi ye ete, bobele bongo, Yehova akopasola bokonzi ya Saulo mpe akopesa yango epai na moto oyo aleki ye na malamu. Samwele ye moko akamati mopanga, abomi Agaga, mpe apesi Saulo mokɔngɔ mpo na libela.

18. Na moboko nini Yehova aponaki Davidi?

18 Kopakolama ya Davidi mpe mpiko na ye (16:1–17:58). Na nsima, Yehova akambi Samwele kino ndako ya Yisai na Beteleme ya Yuda mpo na kopona mpe kopakola mokonzi oyo akoya nsima. Atali mwana mokomoko ya Yisai kasi aboyi bango banso. Yehova akundweli Samwele ete: “[Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” (16:7) Na nsuka, Yehova amonisi ete andimi Davidi, mwana-nsuka, oyo alobelami ete azali “motane mpe na miso malamu mpe elongi na ye kitoko,” mpe Samwele apakoli ye na mafuta. (16:12) Sikawa, elimo ya Yehova eyei likoló na Davidi, kasi Saulo akólisi elimo moko ya mabe.

19. Bolóngi nini ya ebandeli mpenza Davidi azwaki na nkombo ya Yehova?

19 Bafilisitia bayei lisusu kobundisa Yisalaele, kotyáká na liboso na bango elombe Goliata, engambe mobali na molai ya mɛ́tɛlɛ soko 2,9. Azalaki mpenza elima na boye ete molato na ye ya etumba mosalemi na motako mozalaki na bozito ya kiló 57, mpe ebendé ya likɔngá na ye ezalaki na kiló soko 6,8. (17:4, 5, 7) Mokolo na mokolo, Goliata yango azalaki kotumola Yisalaele na kotuka mpe na lolendo nyonso, ete bápona moto mpe báya na ye mpo na kobunda, kasi ata moto moko te ayanolaki. Saulo azali kolɛnga kati na hema na ye. Nzokande, Davidi ayoki matumoli ya Mofilisitia yango. Na elónga mpenza, ayoki mabe na motema na ye mpe na lisalisi ya mpiko oyo epesameli ye na Nzambe, Davidi angangi ete: “Mofilisitia na esute, azali nani ete abɛtɛla basodá na Nzambe na bomoi ntembe?” (17:26) Kolongoláká bilamba ya etumba ya Saulo mpo ete alatá naino yango liboso te, Davidi abimi mpo na kobunda, komemáká bobele lingenda na ye ya bobateli mpate, ebwakeli moko ya mabanga, bakisá mpe mabanga mitano ya sɛlisɛli. Kotaleláká etumba wana kati na ye mpe elenge mobali yango mobateli na mpate ete ekokani na kiló na ye te, Goliata abyangi mabe likoló na Davidi. Ye apesi eyano na elikya makasi ete: “Yo oyeli ngai na mopanga mpe na likɔngá monene mpe na likɔngá moke, kasi ngai nayeli yo na nkombo na [Yehova] na bibele.” (17:45) Libanga oyo lipimami malamumalamu libwakami na Davidi uta na ebwakeli na ye, mpe elombe ya Bafilisitia akwei na mabelé! Davidi akimi mbango epai na ye, na miso ya mampinga nyonso mibale, abimisi mopanga ya elombe Goliata mpe asaleli yango mpo na kokata motó ya nkolo na yango. Oyo nde lisiko monene Yehova apesi! Oyo nde mama na bisengo na molako ya Yisalaele! Sikawa, lokola elombe na bango akufi, Bafilisitia babandi kokima, mpe Yisalaele, oyo etondi na nsái, balandi bango na lolenge ya nsɔ́mɔ.

20. Lolenge nini ezaleli ya Yonatana epai na Davidi ekeseni na oyo ya Saulo?

20 Saulo azali koluka Davidi (18:1–27:12). Likambo ya mpiko monene oyo Davidi asali na nkombo ya Yehova ememeli ye boninga moko kitoko. Yango esalemi kati na ye mpe Yonatana, mwana ya Samwele, oyo azali mpenza na lotómo ya kokitana na bokonzi. Yonatana akómi kolinga ye “lokola motema [“molimo,” NW] na ye moko,” na boye ete bango mibale basali kondimana ya boninga. (18:1-3) Lokola lokumu ya Davidi ekóli mingi kati na Yisalaele, Saulo, na nkanda nyonso, aluki koboma ye, atako apesi mwana na ye ya mwasi, Mikala, epai na Davidi ete abala ye. Likunya ya Saulo ekóli makasi lokola moto azwi liboma, na boye ete, nsukansuka, Davidi asengeli kokima na kozwáká lisungi ya Yonatana oyo litondi na bolingo. Bango mibale babandi kolela na ntango ya bokei, mpe Yonatana andimisi lisusu bosembo na ye epai na Davidi, kolobáká ete: “Tiká ete Yehova ye moko azala kati na ngai na yo mpe kati na bana na yo na bana na ngai libela na libela.”​—20:42, NW.

21. Makambo nini malekaki wana Davidi azalaki kokima Saulo?

21 Na kokima na ye liboso na Saulo, oyo mayoki na ye masili kobeba, Davidi mpe etuluku moke ya basungi na ye oyo banyokwami na nzala, bakómi na Nobo. Kuna, nganga Ahimeleke, ntango andimisami ete Davidi mpe bato na ye bamibebisaki na basi te, apesi bango ndingisa ya kolya mampa ya bulɛɛ ya kolakisama. Komemáká mopanga ya Goliata, Davidi akimi sikawa na Gata kati na mokili ya Bafilisitia, epai kuna akosi kokóma liboma. Na nsima, akei na lidusu ya Adulama, aleki kino Moaba, mpe na nsuka, na boyokani na toli oyo mosakoli Gada apesi ye, azongi na mokili ya Yuda. Kobangáká ete bato bakotomboka mpo na koluka litomba ya Davidi, Saulo, oyo zúwa ekómisi ye lokola moto na liboma, atindi Doege, moto na Edome, ete aboma bato nyonso ya Nobo, mboka ya banganga; bobele Abiatala nde akimi kino epai na Davidi. Abiatala akómi nganga ya etuluku yango.

22. Lolenge nini Davidi amonisi bosembo epai na Yehova mpe limemya na ebongiseli na Ye?

22 Lokola azali mosaleli ya sembo ya Yehova, Davidi abundi sikawa etumba makasi, na mabɔkɔ, elongo na Bafilisitia. Nzokande, Saulo azali ntango nyonso kokóba kampanye na ye bipai binso mpo na kozwa Davidi, koyanganisáká bato na ye ya etumba mpe kolukaluka ye “na lisobe na Ene-gedi.” (24:1) Davidi, molingami ya Yehova, azali ntango nyonso kosala makasi ya kokima mosika na banguna na ye. Mokolo moko, azwi libaku ya koboma Saulo, kasi amipekisi, akati bobele nsɔngɛ́ ya elamba ya Saulo lokola elembeteli ete aboyaki koboma ye. Ata likambo wana oyo lizali na yango mabe te liyokisi Davidi mpasi na motema, mpamba te amiyoki ete asali mabe epai na mopakolami ya Yehova. Oyo nde limemya mozindo azali na yango liboso na ebongiseli ya Yehova!

23. Lolenge nini Abigaili asalaki kimya elongo na Davidi mpe ndenge nini akómaki mwasi na ye na nsima?

23 Atako eyebisami sikawa ete Samwele akufi (25:1), nzokande mokomi-mokitani na ye akóbi lisoló yango. Davidi asɛngi ete Nabala, moto na Moane kati na Yuda, apesa ye mpe bato na ye bilei mpo ete basalanaki elongo na babateli na mpate ya Nabala. Kasi Nabala ‘azalaki bobele kopamela’ bato na Davidi, mpe Davidi akei mpo na kopesa ye etumbu. (25:14) Komonáká likámá oyo lizalaki koya, Abigaili, mwasi ya Nabala, akei na lolenge ya nkuku kopesa Davidi biloko mpe akitisi nkanda na ye. Davidi apamboli Abigaili mpo na likambo ya mayele oyo asali mpe atiki ye azonga na kimya nyonso. Ntango Abigaili ayebisi Nabala makambo oyo mauti koleka, motema na ye mozwi mpasi, mpe nsima na mikolo zomi akufi. Sikawa, Davidi ye moko abali Abigaili mwasi malamu mpe na kitoko mingi.

24. Lolenge nini Davidi abikisaki lisusu bomoi ya Saulo?

24 Mpo na mbala ya misato, Saulo akóbi kolanda Davidi kozanga ntina, mpe mbala oyo lisusu Davidi amoniseli ye motema mawa. “Mpɔngi makasi uta na [Yehova]” ekweli Saulo mpe bato na ye. Yango epesi Davidi nguya ya kokɔta na molako mpe kozwa likɔngá ya Saulo, kasi aboyi kosembola lobɔkɔ na ye “epai na mopakolami na [Yehova].” (26:11, 12) Davidi apusami mpo na mbala ya mibale na kokima epai na Bafilisitia mpo na komibomba, mpe bapesi ye Sikelage lokola mboka na ye ya kofanda. Uta na mboka yango, Davidi alandi ntango nyonso kobundisa banguna mosusu ya Yisalaele.

25. Lisumu monene nini ya misato Saulo asalaki?

25 Saulo asuki na komiboma (28:1–31:13). Mikóló na Bafilisitia bakambi limpinga ya nguya isangisami mpe basali molako na Suneme. Saulo, na ngámbo na ye, atye molako na Ngomba Giliboa. Asali ndenge nyonso mpo na koluka litambwisi kasi Yehova ayanoli te. Soko bobele likoki ya kosolola na Samwele ezalaki! Komilatisáká bilamba mosusu, Saulo asali lisusu lisumu monene ntango akei koluka mwasi mosololi-na-bilimu mabe na mboka Ene-dolo, nsima na bandelo ya Filisitia. Nsima na kokutana na mwasi yango, abondeli ye ete asolola na Samwele mpo na ye. Kozaláká motema lukuluku mpo na kopesa bosukisi, Saulo amindimisi ete elilingi ya moto oyo ebimaki ezalaki nkɔndɔ Samwele. Nzokande, “Samwele” yango azali na nsango ya kolendisa te mpo na mokonzi Saulo. Akokufa lobi, mpe mpo na kokokisa maloba ya Yehova, bokonzi na ye ekolongolama na mabɔkɔ na ye. Na molako ya ngámbo, mikóló na Bafilisitia bazali kokende sé liboso kati na etumba. Ntango bamoni Davidi mpe bato na ye kati na bango, bakómi na mayoki ete nyamunyamu ezali, boye bazongisi bango na mboka. Bato ya Davidi bazongi na Sikelage na ntango malamu mpenza! Etuluku ya bapunzi kati na Baamaleki bayibi mabota mpe biloko ya Davidi mpe ya bato na ye; Davidi na bato na ye balandi bango, mpe bazwi biloko nyonso, ata moko ebibisami te.

26. Lolenge nini boyangeli ya makámá ya mokonzi ya liboso na Yisalaele esuki?

26 Etumba endongwani sikawa na Ngomba Giliboa. Yisalaele elóngami na ndenge ya nsɔ́mɔ, mpe Bafilisitia bakamati bisika ya moboko ya mokili yango. Yonatana mpe bana mosusu ya Saulo babomami, mpe Saulo, oyo azoki mpota eye akoki kobika na yango te, amibomi na mopanga na ye moko—komiboma. Bafilisitia oyo balóngi etumba bakakisi nzoto ya Saulo mpe ya bana na ye misato likoló na bifelo ya engumba Bete-sana, kasi bato ya Yabese-Gileadi balongoli bango na esika wana ezangi lokumu. Boyangeli ya makámá ndenge na ndenge ya mokonzi ya liboso na Yisalaele ekómi na nsuka na yango mabe.

LITOMBA NA YANGO

27. (a) Na makambo nini Eli mpe Saulo bazangaki kokokisa mikumba na bango? (b) Na nini Samwele mpe Davidi bazali ndakisa malamu mpo na bakɛngɛli mpe mpo na bilenge baministre lelo?

27 Oyo nde lisoló kitoko lizwami kati na Samwele ya Liboso! Kozaláká sembo kino na makambo mikemike, mokanda yango mozali komonisa ezala bolɛmbu to bokasi ya Yisalaele. Batambwisi minei ya Yisalaele balobelami awa, mibale batosaki mibeko ya Nzambe mpe mibale batosaki yango te. Talá lolenge Eli mpe Saulo balóngaki te kokokisa mikumba na bango: Eli amonisaki bopɔtu na makambo, mpe Saulo atambolaki na lolendo nyonso. Nzokande, Samwele mpe Davidi bamonisaki bolingo mpo na nzela ya Yehova uta na bolenge na bango, mpe na yango bapambolamaki. Oyo nde mateya ya motuya tozali kokuta awa mpo na bakɛngɛli nyonso! Ezali likambo ya ntina mpenza ete bakɛngɛli bázala ngwi, bákɛngɛla makasi mpo na bopɛto mpe molɔngɔ́ kati na lisangá ya Yehova, bázala batosi na bibongiseli ya Yehova, bázala na bobángi te, na motema mobongi, na mpiko, mpe bátalela basusu na bolingo nyonso! (2:23-25; 24:5, 7; 18:5, 14-16) Simbá lisusu ete batambwisi mibale, baoyo balóngaki, bazwaki litomba na kobongisama malamu ya Teokrasi uta bomwana na bango mpe bamonisaki mpiko bandá bolenge na bango mpo na kolobela nsango ya Yehova mpe kobatela matomba na ye oyo matyamaki na mabɔkɔ na bango. (3:19; 17:33-37) Tiká ete bilenge basambeli nyonso ya Yehova na mikolo na biso bákóma bilenge “Basamwele” mpe “Badavidi”!

28. Lolenge nini botosi elobelami makasi, mpe toli nini ya mokanda ya Samwele ya Liboso eyaki kozongelama na bakomi mosusu ya Biblia?

28 Kati na maloba nyonso ya litomba na mokanda oyo, esengeli komikundola malamumalamu maloba oyo Yehova apemisaki Samwele ete aloba yango mpo na kosambisa Saulo oyo azangaki kotosa etindá ya ‘kolongola Baamaleki ata na ekaniseli na bato na nsé na lola.’ (Det. 25:19) Liteya oyo lilobi ‘botosi eleki mbeka na malamu’ lizongelami kati na makambo ndenge na ndenge na Hosea 6:6, Mika 6:6-8, mpe Malako 12:33. (1 Sam. 15:22) Ezali likambo ya ntina mpo na biso lelo ete tózwa litomba na lisoló yango lipemami na kotosáká na mozindo mpenza mongongo ya Yehova Nzambe na biso! Botosi na likambo litali kondima bosantu ya makila eyebisameli mpe biso kati na 1 Samwele 14:32, 33. Kolya mosuni ya nyama kozanga kobimisa makila na yango malamumalamu etalelamaki lokola ‘lisumu epai na Yehova.’ Yango etaleli mpe lisangá ya boklisto, lokola emonisami polele na Misala 15:28, 29.

29. Mokanda ya Samwele ya Liboso ezali komonisa matomba mabe ya libungá nini ya libota mobimba ya Yisalaele, mpe yango epesi likebisi nini epai na bato ya motó makasi?

29 Mokanda ya Samwele ya Liboso mozali kotalisa na mawa mingi libungá ya libota oyo likómaki kotalela boyangeli ya Nzambe ya likoló ete ebongi te. (1 Sam. 8:5, 19, 20; 10:18, 19) Mitambo mpe mbeba ya boyangeli oyo etambwisami na moto emonisami polele mpe na lolenge ya esakweli. (8:11-18; 12:1-17) Na ebandeli, Saulo amonisami lokola moto na bopɔlɔ oyo azalaki na elimo ya Nzambe (9:21; 11:6), kasi lolenge na ye ya kotalela makambo ebebaki mpe motema moyindaki tuu wana bolingo na ye mpo na boyengebene mpe kondima na ye epai na Nzambe ekitaki. (14:24, 29, 44) Misala ya molende oyo asalaki na ebandeli mikundamaki mpo na misala mitondi na lolendo oyo ayaki kosala na nsima, na kozanga botosi, mpe kozanga bosembo epai na Nzambe. (1 Sam. 13:9; 15:9; 28:7; Ezek. 18:24) Kozanga kondima ya Saulo esalaki ete azanga libateli, mpe ememaki ye kino na bilulela, na koyina, mpe na koboma. (1 Sam. 18:9, 11; 20:33; 22:18, 19) Motindo moko na ntango azalaki naino na bomoi, Saulo akufaki mpe bongo, elingi koloba, kozanga kokokisa mokumba liboso na Nzambe na ye mpe liboso na libota na ye, mpe azali likebisi mpo na moto nyonso oyo abendami na kokóma ‘motó makasi’ lokola ye.​—2 Pet. 2:10-12.

30. Bizaleli nini ya Samwele basaleli ya Nzambe na mikolo na biso bakoki kozwa litomba na kolóna yango?

30 Nzokande, ezali na bandakisa malamu oyo ekeseni na oyo wana. Na ndakisa, tyá likebi na etamboli ya mosembwi Samwele, oyo asalelaki Yisalaele na boumeli ya bomoi na ye mobimba kozanga bokosi, kozanga koponapona, to kozanga kotala bilongi. (1 Sam. 12:3-5) Uta bomwana na ye, azalaki na molende mpo na kotosa (3:5), azalaki na bonkonde mpe na limemya (3:6-8), azalaki moto abongi kotyelama motema na oyo etali kokokisa mikumba na ye (3:15), azalaki na etingya kati na bokangami na ye mpe na komipesa na ye (7:3-6; 12:2), azalaki moyoki malamu (8:21), ntango nyonso pene mpo na kosimba makatami ya Yehova (10:24), azalaki kosambisa na mpiko kozanga kotalela soki moto yango azali nani (13:13), azalaki motosi monene (15:22), mpe azalaki na kolendendela mpo na kokokisa etindá (16:6, 11). Azalaki mpe moto oyo basusu bazalaki kolobela ye na lokumu nyonso. (2:26; 9:6) Longola likambo oyo ete bilenge basengeli kozwa kolendisama mpo na komikɔtisa lelo na mosala ya kosakola lolenge Samwele asalaki yango na bolenge na ye (2:11, 18), baoyo basili kolɛmba mpo na bobangé basengeli mpe kolendisama na kotalela lolenge akóbaki mosala na ye kozanga kopema kino na nsuka ya mikolo na ye.​—7:15.

31. Na nini Yonatana azalaki ndakisa malamu?

31 Na nsima, tozali na ndakisa monene ya Yonatana. Amonisaki ata liyoki moko te ya mabe likoló na likambo oyo ete Davidi apakolamaki mpo na kozwa bokonzi oyo ye Yonatana azalaki na lotómo ya kosangola. Andimaki kútu nde bizaleli kitoko ya Davidi mpe asalaki kondimana ya boninga elongo na ye. Boninga motindo wana, oyo ezangi moimi, ekoki kozala ya kotonga mpenza mpe ya kolendisa kati na baoyo bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso lelo oyo.​—23:16-18.

32. Bizaleli kitoko nini Hana mpe Abigaili bamonisaki?

32 Mpo na basi, tozali na ndakisa ya Hana, oyo azalaki kokende elongo na mobali na ye mbala na mbala kino na esika ya losambo ya Yehova. Azalaki kobondela mingi, mwasi na komikitisa, oyo andimaki kofanda mosika na mwana na ye mpo na kobatela liloba na ye mpe komonisa botɔ́ndi mpo na boboto ya Yehova. Ya solo, mbano na ye ezalaki monene na komona mwana na ye komikɔtisa bomoi na ye mobimba na mosala ya Yehova oyo mokobotaka mbuma malamu. (1:11, 21-23, 27, 28) Lisusu, tozali na ndakisa ya Abigaili, oyo amonisaki botosi ebongi na mwasi mpe bokɛngi oyo Davidi akumisaki yango, na boye ete, na nsima, ayaki kokóma mwasi na ye.​—25:32-35.

33. Bolingo mpe bosembo ya Davidi, oyo ezangi bobángi, esengeli kopusa biso na kozala na etamboli nini?

33 Bolingo ya Davidi mpo na Yehova emonisami na lolenge ya kosimba mayoki mpenza kati na nzembo oyo Davidi abongisaki wana azalaki kolandama kati na mokili mokauki na Saulo, “mopakolami na [Yehova]” oyo alendendelaki kati na mabe. (1 Sam. 24:6; Nz. 34:7, 8; 52:8; 57:1, 7, 9) Mpe oyo nde botɔ́ndi euti na motema, botɔ́ndi oyo Davidi asantisaki na yango nkombo ya Yehova ntango angangaki na ntembe liboso na motumoli Goliata! ‘Ngai nayeli yo na nkombo na Yehova na bibele . . . Lelo oyo Yehova akokitisa yo na lobɔkɔ na ngai; . . . mpe bato na mokili mobimba bakoyeba ete Nzambe na bomoi azali na Yisalaele. Mpe koyangana oyo nyonso bakoyeba ete Yehova akobikisa na mopanga mpe na likɔngá te. Mpo ete etumba ezali na Yehova mpe ye akopesa bino na mabɔkɔ na biso.’ (1 Sam. 17:45-47) Davidi, “mopakolami” ya mpiko mpe ya sembo ya Yehova, akumisaki Yehova ete azali Nzambe ya mabelé mobimba mpe Eutelo bobele moko ya solosolo ya lobiko. (2 Sam. 22:51) Tiká ete tólanda ndakisa wana ya kozanga bobángi!

34. Lolenge nini mikano ya Bokonzi ya Yehova mimonisami lisusu polele na boyokani na Davidi?

34 Mokanda ya Samwele ya Liboso molobi nini na ntina na botamboli ya mikano ya Bokonzi ya Nzambe? Ah, tomemami sikawa na likambo ya ntina mingi kati na mokanda oyo ya Biblia! Mpamba te ezali kati na mokanda oyo nde tokutani na Davidi, oyo nkombo na ye elimboli mbala mosusu ete “Molingami.” Davidi alingamaki na Yehova mpe aponamaki lokola ‘moto oyo asepelisaki motema na ye’; oyo abongaki kozala mokonzi na Yisalaele. (1 Sam. 13:14) Na lolenge yango, bokonzi ekómaki na libota ya Yuda, na boyokani na mapamboli oyo Yakobo apesaki na Genese 49:9, 10, mpe bokonzi esengelaki kotikala na libota ya Yuda kino koya ya Moyangeli oyo mabota nyonso basengeli kotosa ye.

35. Lolenge nini nkombo ya Davidi eyaki kokangisama na oyo ya Mombóto ya Bokonzi, mpe bizaleli nini ya Davidi Mombóto yango akomonisa lisusu?

35 Lisusu, nkombo ya Davidi ekangisami na oyo ya Mombóto ya Bokonzi, oyo abotamaki mpe na Beteleme mpe azalaki na libota ya Davidi. (Mat. 1:1, 6; 2:1; 21:9, 15) Mombóto yango ezali Yesu Klisto akembisami, “Nkosi oyo abimi na libota na Yuda, ntina [“mosisa,” NW] na Davidi,” mpe ‘mosisa mpe mombóto ya Davidi, mpe monzoto mokongɛngaka kitoko na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́.’ (Emon. 5:5; 22:16) Koyangeláká na nguya ya Bokonzi, ‘mwana yango ya Davidi,’ akomonisa molende mpe mpiko motindo moko na elombe nkɔ́kɔ na ye na kobundisáká banguna ya Nzambe kino kokwea na bango mpe kosantisama ya nkombo ya Yehova kati na mabelé mobimba. Tozali na elikya makasi na Mombóto yango ya Bokonzi!

[Maloba na nse ya lokasa]

a The Romance of the Last Crusade, 1923, ekomami na Major Vivian Gilbert, nkasa 183-186.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto