Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 85-87
  • Mokanda ya Biblia nimero 15—Ezela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 15—Ezela
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA EZELA
  • LITOMBA NA YANGO
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tyá motema ete Yehova akosalisa yo na ntango ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Ezera ateyaki Mibeko ya Nzambe
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Oteyaka na lolenge oyo ekoki mpenza kobota mbuma?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 85-87

Mokanda ya Biblia nimero 15—Ezela

Mokomi: Ezela

Esika ya bokomi: Yelusaleme

Nsuka ya bokomi: soko 460 L.T.B.

Boumeli ya lisoló: 537–soko 467 L.T.B.

1. Bisakweli nini bipesaki elikya ya kotongoma lisusu ya Yelusaleme?

NSUKA ya mibu 70 oyo esakolamaki ete na boumeli na yango Yelusaleme esengelaki kozala kati na libebi na nsé ya Babilone ezalaki kobɛlɛma. Ya solo, eyebanaki na bato nyonso ete Babilone ezalaki kotika bakangami na yango te, kasi liloba ya Yehova esengelaki komonana ete ezali na nguya koleka makasi ya Babilone. Kosikwama ya libota ya Yehova ekómaki pene. Tempelo ya Yehova oyo ebebisamaki esengelaki kotongama lisusu, mpe etumbelo ya Yehova esengelaki kozwa lisusu bambeka ya mbɔ́ndi. Yelusaleme elingaki koyoka lisusu konganga mpe masanzoli ya basambeli ya solo ya Yehova. Yilimia asakolaki ntango boni libebi yango esengelaki koumela, nzokande Yisaya asilaki kosakola lolenge kosikwama ya bakangami esengelaki kosalema. Kútu, Yisaya abéngaki Siruse moto na Perse ete azali ‘mobateli na etongá na [Yehova],’ oyo asengelaki kokweisa Babilone mboka ya lolendo longwa na etɛlɛmɛlo na yango ya nguya ya misato ya mokili engebene lisoló ya Biblia.​—Yis. 44:28; 45:1, 2; Yil. 25:12.

2. Na ntango nini mpe lolenge nini Babilone ekweaki?

2 Libebi likwelaki Babilone na butu ya mokolo mwa 5 Ɔkɔtɔ́bɛ 539 (engebene manáka ya Grégoire), wana Belesasala, mokonzi ya Babilone, mpe bankumu na ye bazalaki komela masanga mpo na kokumisa banzambe na bango ya bademó. Longola etamboli na bango ya mbindo ya bopakano, bazalaki mpe kosalela mbɛki ya bulɛɛ oyo eutaki na tempelo ya Yehova lokola bakɔ́pɔ na bango ya komɛla masanga na lokoso! Ezalaki mpenza ntango oyo ebongaki malamu mpo na Siruse ete na butu wana apusana pene na lopango ya Babilone mpo na kokokisa esakweli yango!

3. Likambo nini Siruse asakolaki na bosikisiki oyo epesaki nzela na kozongisama ya losambo ya Yehova mbula 70 na nsima ya kobebisama ya Yelusaleme?

3 Mobu yango ya 539 L.T.B. esengeli mpenza kobenda likebi na biso mingi, mpamba te eyokani na lisoló ya bato engebene banganga-mayele ya mokili mpe engebene Biblia. Na boumeli ya mbula ya liboso oyo ayangelaki lokola mokonzi ya Babilone, Siruse “asakolaki na bokonzi mobimba na ye,” kopesáká bongo nzela na Bayuda ete bázonga na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu ndako ya Yehova. Emonani mpenza ete mobeko yango ebimisamaki pene na nsuka ya mobu 538 L.T.B. to na ebandeli ya mobu 537 L.T.B.a Batikali ya sembo basalaki mobembo mpo na kozonga na ntango malamu na Yelusaleme mpo na kotɛlɛmisa etumbelo mpe kopesa bambeka ya liboso na “sanza ya nsambo” (Tisri, oyo ekokani na eleko ya Sɛtɛ́mbɛ-Ɔkɔtɔ́bɛ) ya mobu 537 L.T.B.​—mibu 70 kobanda na sanza oyo elandaki kobebisama ya Yuda mpe Yelusaleme na mabɔkɔ ya Nebukadenesala.​—Ezl. 1:1-3; 3:1-6.

4. (a) Makambo oyo makomami kati na Ezela masalemaki wapi, mpe nani akomaki yango? (b) Ntango nini mokanda ya Ezela mokomamaki, mpe makambo malobelami kati na yango maumelaki ntango boni?

4 Kozongisama! Yango ezali bongo motó ya likambo ya mokanda ya Ezela. Kosalelama ya liloba ngai kati na lisoló kobanda na mokapo 7 vɛrsɛ́ 27 kino mokapo 9 vɛrsɛ́ 15 emonisi polele ete Ezela nde akomaki mokanda yango. Lokola azalaki “mokomeli na mayele na Mobeko na Mose,” mpe azalaki moto na kondima emonisami na misala, moto oyo “asili kotya motema na ye ete asosola Mobeko na [Yehova] mpe ete abila yango mpe ete alakisa” yango, Ezela abongisamaki malamu mpo na kokoma lisoló yango, motindo moko lokola akomaki mokanda ya Ntango. (Ezl. 7:6, 10) Lokola mokanda ya Ezela ezali kolandana ya mokanda ya Ntango, bato mingi mpenza bandimaka ete ekomamaki na eleko moko, soko na mobu 460 L.T.B. Eumelaki mbula 70, kobanda na ntango oyo ekólo ya Bayuda ekweaki mpe epalanganisamaki, wana Bayuda batyamaki elembo lokola “bana na liwa” kino na ntango oyo tempelo ya mibale esilaki kotongama mpe mosala ya bonganga esilaki kopɛtolama nsima ya kozonga ya Ezela na Yelusaleme.​—Ezl. 1:1; 7:7; 10:17; Nz. 102:20, NW, maloba na nsé ya lokasa.

5. Boyokani nini ezali kati na mokanda ya Ezela mpe mokanda ya Nehemia, mpe ekomamaki na nkótá nini?

5 Nkombo ya Ezela na Liebele elimboli “Lisungi.” Na ebandeli mpenza, mokanda ya Ezela mpe ya Nehemia ezalaki kati na rulo bobele moko. (Neh. 3:32, NW, maloba na nsé ya lokasa) Na nsima Bayuda bakabolaki rulo yango mpe babéngaki yango Ezela ya Liboso mpe Ezela ya Mibale. Biblia ya Liebele ya mikolo na biso ezali kobénga mikanda yango mibale Ezela mpe Nehemia, lokola Biblia ya nkótá mosusu ya mikolo na biso ebéngaka yango. Eteni moko ya mokanda ya Ezela (4:8 kino 6:18 mpe 7:12-26) ekomamaki na Aramɛyɛ mpe eteni mosusu ekomamaki na Liebele, mpamba te Ezela ayebaki malamu nkótá wana mibale.

6. Nini endimisi bosolo ya mokanda ya Ezela?

6 Lelo oyo banganga-mayele mingi bazali kondima bosolo ya mokanda ya Ezela. Mpo na oyo etali kozala ya mokanda ya Ezela kati na kanɔ́ ya Biblia, W. F. Albright akomi kati na mokanda na ye The Bible After Twenty Years of Archaeology ete: “Makambo oyo mamonanaki na bokundolami ya biloko ya kala mandimisi polele bosolo ya Mikanda ya Yilimia mpe Ezekiele, ya Ezela mpe Nehemia mpe ete mikoki kobɛtɛlama ntembe soko moke te; makambo yango mamonisi lolenge lisoló lilekaki, mpe kolandana ya likambo mokomoko.”

7. Lolenge nini mokanda ya Ezela emonisami solo ete ezali eteni ya Liloba ya Nzambe?

7 Atako bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto bazongelaki te to balobelaki polele te mokanda ya Ezela, kasi moto moko te akoki kobɛta ntembe mpo na oyo etali esika na yango kati na kanɔ́ ya Biblia. Ezali kolobela boyokani oyo Yehova azalaki na yango elongo na Bayuda kino na ntango ya kosangisama ya kataloge ya Liebele, oyo eteni monene ya mosala na yango esalemaki na Ezela, engebene lisoló ya kala ya Bayuda. Lisusu, mokanda ya Ezela ezali kolóngisa bisakweli nyonso bitali kozongisama, na bongo, ezali komonisa polele ete ezali mpenza moko na mikanda oyo misali Liloba ya Nzambe, oyo ezali mpe na boyokani na mikanda na yango mosusu. Lisusu, ezali kokumisa losambo ya pɛto mpe ezali kobulisa nkombo monene ya Yehova Nzambe.

MAKAMBO MAZALI KATI NA EZELA

8. Monisá lolenge makambo malandanaki kino na nsuka ya mbula 70 ya libebi.

8 Batikali bazongi (1:1–3:6). Ntango elimo ya Yehova elamwisi elimo ya Siruse, mokonzi ya Perse, ye abimisi mobeko mpo na Bayuda ete bázonga mpo na kotonga ndako ya Yehova na Yelusaleme. Alendisi Bayuda oyo bakoki mbala mosusu kotikala na Babilone ete bápesa makabo na bolingo malamu mpo na mosala wana mpe akamati bibongiseli mpo ete Bayuda oyo bazali kozonga bámema bisaleli oyo bizalaki kati na tempelo ya kala. Mokambi oyo autaki na libota ya bokonzi, libota ya Yuda mpe mokitani ya Mokonzi Davidi, Zelubabele (Sesebasala), apesameli mokumba ya kozala guvernere ya baoyo babimaki, mpe Yesua (Yosua) atyamaki nganga monene. (Ezl. 1:8; 5:2; Zek. 3:1) Batikali, etuluku oyo esangisaki basaleli ya sembo ya Yehova 200 000, kati na bango mibali, basi mpe bana, basalaki mobembo wana molai. Soko na sanza ya nsambo, engebene manáka ya Bayuda, bafandi kati na bingumba na bango, mpe na nsima bayangani na Yelusaleme mpo na kopesa mbeka na esika etumbelo ya tempelo ya kala ezalaki mpe mpo na kokumisa Elambo ya Mingombo na ebandeli ya eleko ya otómne ya mobu 537 L.T.B. Na yango, mbula 70 ya libebi esukaki mpenza na ntango esengelaki!b

9. Lolenge nini mosala ya botongi tempelo ebandi, kasi makambo nini mabimi na bambula oyo eyei na nsima?

9 Kotongama lisusu ya tempelo (3:7–6:22). Bisaleli biyanganisami, mpe na mobu ya mibale nsima ya bozongi na bango, moboko mpo na kotonga tempelo ya Yehova etyami wana bato bazali konganga na esengo mpe mibangé oyo bamonaki tempelo ya liboso bazali kolela. Mabota ya zingazinga, banguna, basɛngi ete bápesa lisungi mpo na kotongama ya tempelo, kolobáká ete bazali mpe koluka Nzambe wana moko, kasi batikali ya Bayuda baboyi mpenza kosala boyokani elongo na bango. Banguna bazali kokóba kolɛmbisa Bayuda mpe kopekisa mosala na bango, kobanda na eleko ya boyangeli ya Siruse kino na oyo ya Dariuse. Na nsuka, na eleko ya “Alatazelezese” (Bardiya to mbala mosusu Magian oyo ayebanaki lokola Gaumata, mobu 522 L.T.B.), mokonzi apekisaki mpenza mosala yango na makasi. Epekiseli yango ekóbi ‘kino elanga na mibale na bokonzi na Dariuse, mokonzi na Pelese’ (520 L.T.B.), oyo ezali bongo mibu koleka 15 nsima ya kotyama ya moboko ya ndako.​—4:4-7, 24.

10. (a) Lolenge nini bilendiseli biuti na basakoli ya Yehova, bakisá mpe etindá ya mokonzi esungaki mpo ete mosala ya botongi mosilisama? (b) Esengo nini emonani na molulu ya bofungoli tempelo oyo ya mibale?

10 Sikawa Yehova atindi basakoli na ye Hagai mpe Zekalia mpo na koyikisa Zelubabele mpe Yesua mpiko, mpe mosala ya botongi ezongelami na molende mingi lisusu koleka. Banguna bamileli lisusu epai na mokonzi, kasi mosala mokóbi na nguya makasi mpenza. Na nsima ya kotalela mobeko oyo Siruse abimisaki na ebandeli, Dariuse I (Hystaspis) apesi etindá ete mosala yango mokóba kozanga kopekisama mpe apesi kútu etindá epai na batɛmɛli ete bápesa biloko mpo na kosunga mosala wana ya botongi. Na lisalisi ya bilendiseli oyo basakoli ya Yehova bazalaki kopesa ntango nyonso, batongi balekisaki mbula mitano te mpo na kosilisa kotonga tempelo. Yango esalemaki na sanza ya Adala na mbula ya motoba ya boyangeli ya Dariuse, to pene na prɛntá ya mobu 515 L.T.B.; mpe na bongo, mosala ya botongi eumelaki na mobimba na yango soko mibu 20. (6:14, 15) Sikawa ndako ya Nzambe efungolami na esengo monene mpe bapesaki mbeka ebongi. Na nsima, bato bakumisi Elekeli mpe bakóbi kosala “elambo na [limpa] ezangi mfulu kino mikolo nsambo na esengo.” (6:22) Ɛɛ, esengo mpe nsai ezali monene na ntango ya bofungoli tempelo ya mibale mpo na nkembo ya Yehova.

11. Lolenge nini mokonzi apesi Ezela “malɔmbɔ na ye nyonso,” mpe Ezela asali nini?

11 Ezela azongi na Yelusaleme (7:1–8:36). Mibu soko 50 eleki, tokómi sikawa na mobu 468 L.T.B., mbula ya nsambo ya boyangeli ya Alatazelezese, mokonzi ya Perse (ayebanaki mingi na nkombo ya Lobɔkɔ-molai, mpamba te lobɔkɔ na ye ya mobali ezalaki molai koleka lobɔkɔ na ye ya mwasi). Mokonzi akokiseli Ezela, mokomeli na mayele, “malɔmbɔ na ye nyonso” na ntina na mobembo oyo alingi kosala na Yelusaleme mpo na kopesa lisungi lisengelaki mpenza kopesama kuna. (7:6) Na kopesáká ye nzela, mokonzi alendisi Bayuda ete bákende elongo na ye mpe apesi Ezela mbɛki ya paláta mpe ya wolo mpo ete ekoka kosalelama kati na tempelo, bakisá mpe biloko ya kobikela lokola nganu, vinyo, mafuta, mpe mungwa. Apesi mobeko ete banganga mpe basáli na tempelo báfuta mpako te. Mokonzi apesi Ezela mokumba ya koteya bato mpe alobi ete moto nyonso oyo akotosa mibeko ya Yehova te mpe mibeko ya mokonzi te, akozala na ekweli monene. Mpo na komonisa botɔ́ndi epai na Yehova na ntina na motema-boboto oyo amoniseli bango na nzela ya mokonzi, Ezela akokisi mokumba wana nokinoki.

12. Lolenge nini Yehova amonisi ete azali elongo na etuluku ya Ezela na boumeli ya mobembo na bango?

12 Sikawa Ezela abandi koyebisa makambo oyo ye moko amonaki, komilobeláká ye moko. Ayanganisi Bayuda oyo bazalaki kozonga pene na ebale Havada mpo na kopesa bango malako ya nsuka, mpe abakisi Balevi mosusu kati na etuluku ya mibali 1 500 oyo bakɔmeli, oyo basilaki koyanganisama liboso. Ezela ayebi ete bakoki kokutana na makámá na nzela oyo bakokenda, kasi aboyi kosɛnga na mokonzi ete apesa bango babateli mpo ete bákende kotika bango, noki ekomonana lokola ete azangi kondima epai na Yehova. Na esika ya kosala bongo, asakoli kokila bilei mpe alendisi etuluku ya batamboli wana ete básɛnga lisalisi ya Nzambe. Libondeli na bango epesameli eyano, mpamba te emonanaki ete lobɔkɔ ya Yehova ezalaki likoló na bango na boumeli ya mobembo molai wana. Na yango, bakoki komema bozwi na bango (oyo ezali na motuya mokokani na badolare koleka 43 000 000 soki tokokanisi yango na mosolo ya mikolo na biso) kozanga nkaká kino na ndako ya Yehova na Yelusaleme.​—8:26, 27, NW, mpe maloba na nsé ya lokasa.

13. Ezela asali nini mpo na kolongola mbindo kati na Bayuda?

13 Kopɛtolama ya bonganga (9:1–10:44). Kasi makambo nyonso matamboli bobele malamu te na boumeli ya mbula 69 oyo balekisi kati na mokili oyo mobongisamaki lisusu. Ezela ayebi sikawa ete makambo ya mabe mazali kosalema, na boye ete bato, banganga, mpe Balevi basili kobalana na bapakano Bakanana. Mosembwi Ezela alɛmbi nzoto. Atiki likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova na nzela ya libondeli. Bato bayamboli mabe na bango mpe balendisi Ezela ete ‘azala makasi mpe akanga mabɔkɔ te.’ (10:4, NW) Ayebisi na Bayuda ete bálongola basi bapaya oyo bango bazwaki na kozanga kotosa mibeko ya Yehova, mpe kati na sanza misato, mbindo nyonso elongolami.​—10:10-12, 16, 17.

LITOMBA NA YANGO

14. Makambo nini mokanda ya Ezela emonisi na ntina na kokokisama ya bisakweli ya Yehova?

14 Mokanda ya Ezela ezali na litomba, mingimingi mpo ete ezali komonisa lolenge bisakweli ya Yehova bikokisamaki na bosikisiki mpenza. Yilimia, ye oyo asakolaki na bosikisiki mpenza libebi oyo lisengelaki kokwela Yelusaleme, asakolaki mpe kozongisama na yango na nsima ya mbula 70. (Yil. 29:10) Na ntango oyo ebongaki mpenza, Yehova amonisaki motema-boboto na ye na komemáká libota na ye, batikali ya sembo, kozongisáká bango lisusu na Mokili ya Ndaka mpo na kokóba kosalela losambo ya solo.

15. (a) Lolenge nini tempelo oyo etongamaki lisusu ekokisaki mokano ya Yehova? (b) Kati na makambo nini nkembo ya tempelo yango ekokanaki te na nkembo ya tempelo ya liboso?

15 Tempelo oyo etongamaki lisusu etombolaki losambo ya Yehova kati na libota na ye, mpe ezalaki awa lokola litatoli oyo emonisi ete na motema mawa nyonso, apambolaka baoyo balukaka litambwisi na ye na mposa ya kosalela losambo ya solo. Atako tempelo yango ezalaki na nkembo motindo moko te na tempelo oyo Salomo atongaki, kasi ekokisaki ntina ya kotongama na yango na boyokani na mokano ya Nzambe. Nkembo ya biloko ya motuya bisalemi mpo na kokembisa ezalaki lisusu kuna te. Biloko ya motuya ya elimo mpe ezalaki lisusu mingi te, na ndakisa sanduku ya kondimana ezalaki lisusu te.c Molulu ya bofungoli tempelo ya Zelubabele ekokanaki te na oyo esalemaki na bofungoli tempelo na eleko ya Salomo. Mbeka ya bibwele mpe ya bampate ekokanaki soko moke te na mbeka oyo epesamaki na tempelo ya Salomo. Nkembo na motindo ya lipata ezalaki te kati na ndako oyo ya mibale, lokola esalemaki na ndako ya liboso, ata mɔ́tɔ mpe ekitaki te uta na Yehova mpo na kozikisa mbeka ya kotumba. Nzokande, batempelo nyonso wana mibale ekokisaki mokano ya ntina mingi mpo na kotombola losambo ya Yehova, Nzambe ya solo.

16. Kasi tempelo nini mosusu eleki batempelo ya mabelé na nkembo?

16 Tempelo oyo etongamaki na Zelubabele, mongombo oyo Mose atongaki, mpe batempelo oyo Salomo mpe Elode batongaki, elongo na makambo oyo mazalaki kati na yango, ezalaki bililingi. Yango ezalaki elilingi ya “hema ya solo, oyo Yehova atɛlɛmisaki, kasi moto te.” (Ebe. 8:2, NW) Tempelo wana ya elimo ezali ebongiseli oyo ezali kopesa biso nzela ya kobɛlɛma na Yehova kati na losambo na nzela ya mbeka ya kopɛtola ya Yesu. (Ebe. 9:2-10, 23) Tempelo monene ya Yehova na elimo ezali na nkembo oyo eleki nkembo nyonso mpe bonzenga mpe kitoko na yango ekokani na mosusu te; nkembo na yango ekoki kokita soko moke te mpe eleki bandako nyonso oyo etongami na mabɔkɔ ya bato.

17. Mateya nini ya ntina tokoki kozwa kati na mokanda ya Ezela?

17 Mokanda ya Ezela ezali na batoli mingi ya motuya monene mpenza mpo na baklisto na mikolo na biso. Kati na yango tozali kotánga lolenge libota ya Yehova lizalaki kopesa mbeka ya bolingo malamu mpo na mosala na ye. (Ezl. 2:68; 2 Kol. 9:7) Tolendisami na koyeba ete bibongiseli oyo bikamatami na Yehova bikokwea te mpe ete mapamboli na ye mazali likoló na mayangani oyo masalemi mpo na kosanzola ye. (Ezl. 6:16, 22) Tozali komona ndakisa malamu epai na Banetinimi mpe bandimi mosusu oyo bazalaki bapaya, lolenge bazongaki elongo na batikali mpo na kopesa lisungi na motema na bango mobimba na losambo ya Yehova. (2:43, 55) Tótalela mpe ezaleli ya kobongola motema oyo bato bamonisaki na ntango bapesamelaki toli na ntina na etamboli mabe oyo balandaki na kobaláká bapakano oyo bazalaki zingazinga na bango. (10:2-4) Boninga mabe na bango esalaki ete Yehova aboya bango. (9:14, 15) Molende oyo bamonisaki na esengo nyonso esalaki ete Nzambe andima bango mpe apambola bango.​—6:14, 21, 22.

18. Mpo na nini kozongisama ya libota ya Yehova ezalaki litambe ya ntina mingi oyo esengelaki kosalema liboso ya kobima ya Masiya Mokonzi?

18 Atako mokonzi moko te afandaki lisusu na kiti na bokonzi ya Yehova na Yelusaleme, kozongisama elamwisaki elikya oyo ete na ntango ebongi Yehova akobimisa Mokonzi oyo alakamaki na molɔngɔ́ ya libota ya Davidi. Libota oyo lizongisamaki ekómaki sikawa na likoki ya kobatela maloba ya bulɛɛ mpe losambo ya Nzambe kino kobima ya Masiya. Soki batikali wana bamonisaki kondima te wana esengelaki ete bázonga na mabelé na bango, Masiya alingaki koya epai na banani? Ya solo, makambo oyo malobelami kati na mokanda ya Ezela mazali eteni ya ntina mingi ya makambo oyo masengelaki kosalema liboso na kobima ya Masiya mpe Mokonzi! Ezali mpenza na litomba mingi ete tóyekola yango na mikolo na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 452-454, 458.

b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 332.

c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 1079.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto