Mokanda ya Biblia nimero 17—Esetele
Mokomi: Moledekai
Esika ya bokomi: Susana, Elama
Nsuka ya bokomi: soko 475 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: 493-soko 475 L.T.B.
1. Mokanda ya Esetele ezali kolobela lisoló nini?
NA MALOBA mokuse, oyo ezali lisoló ya Asueruse, mokonzi ya Perse, oyo basusu bakanisaka ete ezali bongo Zelezese I, oyo mwasi na ye, Waseti, azangaki botosi mpe azwaki mwasi mosusu Moyuda Esetele, ndeko ya Moledekai. Hamana Moagaga ayangi mwango mpo na koboma Moledekai mpe Bayuda nyonso, kasi akakisami likoló na nzeté na ye moko, nzokande Moledekai aponami ete azala ministre-mokonzi mpe Bayuda babikisami.
2. (a) Mpo na nini bato mosusu babɛtaki ntembe likoló na kopemama ya mokanda ya Esetele? (b) Na lolenge nini nkombo ya Nzambe esalelami kati na mokanda ya Esetele?
2 Ya solo, ezali na baoyo balingaka koloba ete mokanda ya Esetele epemami te mpe ezali na litomba te, kasi ete ezali bobele lisapo kitoko. Bazali koloba bongo mpamba te bamoni nkombo ya Nzambe kati na yango te. Atako ezali solo ete Nzambe alobelami mpenza polele te, kati na makomi ya Liebele ezali na bisika minei bikeseni epai kuna acrostiche ya balɛ́tɛlɛ minei, lɛ́tɛlɛ mokomoko na yango ezwami na ebandeli ya maloba malandani, kosangisama ya balɛ́tɛlɛ yango ebimisi YHWH (na Liebele, יהוה) to Yehova. Balɛ́tɛlɛ wana emonisami polele mpenza kati na baminiskri soko misato ya kala ya Liebele mpe Bamasorete bakomaki yango na makomi ya motane. Lisusu, emonani ete kati na Esetele 7:5 ezali na acrostiche moko ya liloba oyo ya Nzambe: “Nakozala.”—Talá maloba na nsé ya lokasa matyami na ntina na Esetele 1:20; 5:4, 13; 7:7; mpe 7:5, NW.
3. Kati na makambo nini tosengeli komonisa kondima epai na Nzambe mpe kobondela ye, mpe nini emonisi ete Nzambe atambolisaki makambo?
3 Kati na lisoló yango mobimba, emonani polele ete Moledekai andimaki mpe atosaki mibeko ya Yehova. Aboyaki kongumbama mpo na kokumisa mobali moko oyo, ekoki mpenza kozala ete, azalaki Moamaleki; Nzambe asilaki kotya Baamaleki elembo mpo na kobomama. (Est. 3:1, 5; Det. 25:19; 1 Sam. 15:3) Maloba oyo Moledekai asaleli na Esetele 4:14 emonisi ete atyaki elikya ya kobikisama epai na Yehova mpe ete azalaki na kondima na litambwisi ya Nzambe kati na makambo nyonso. Likambo oyo Esetele mpe Bayuda mosusu basalaki, ya kokila bilei na boumeli ya mikolo misato liboso ya kokende epai na mokonzi, emonisi ete azalaki kotya motema epai na Nzambe. (Est. 4:16) Likambo oyo ete Yehova atambwisaki makambo emonani mpe na boye ete Esetele alingamaki mingi na Hɛgɛ, mokɛngɛli ya basi; mpe na boye ete, mokolo moko na butu wana mokonzi azwaki mpɔngi te asɛngaki bápesa ye mikanda ya masoló matali ekólo mpe amonaki ete Moledekai apesamelaki lokumu te mpo na likambo moko ya malamu oyo asilaki kosala kala. (Est. 2:8, 9; 6:1-3; kokanisá na Masese 21:1.) Na ntembe te, maloba oyo ete, “likambo na kokila mpe kolela na bango,” mataleli libondeli.—Est. 9:31.
4. Lolenge nini mokanda ya Esetele etalelami ete ezali solo mpe makambo oyo malobelami kuna masalemaki mpenza?
4 Makambo mingi mamonisi ete lisoló yango lisalemaki mpenza. Bayuda bandimaki yango, babéngaki mokanda yango na maloba ya pɛtɛɛ ete Meghil·lahʹ, oyo elimboli “rulo; volimi.” Emonani ete ezalaki Ezela nde akɔtisaki yango kati na kanɔ́ ya Makomami ya Liebele, oyo mbɛlɛ alingaki kobwaka yango soki ezalaki lisapo. Na mikolo na biso, Bayuda bakumisaka elambo ya Pulu, to Mbɛsɛ, mpo na kosepela kobikisama na bango monene na eleko ya Esetele. Mokanda yango mozali komonisa bizaleli mpe lolenge ya bomoi ya bato ya Perse na lolenge ya nguya mpe na boyokani na makambo ya kala oyo mayebani solo mpe makambo oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki. Na ndakisa, mokanda ya Esetele ezali kolobela na bosikisiki lolenge bato ya Perse bakumisaki moto moko. (6:8) Bokundoli ya biloko ya kala esili komonisa ete lolenge esika ya mokonzi elobelami kati na mokanda ya Esetele ezali mpenza solo ata kati na makambo mikemike mpenza.a—5:1, 2.
5. Bosikisiki nini ya mokanda ya Esetele emonisi bosolo ya lisoló na yango, lokótá oyo esalelami kuna ekokani na eleko nini?
5 Bosolo yango emonani mpe kati na lisoló yango moko, etángi na bosikisiki mpenza bankombo ya bankumu mpe basaleli ya mokonzi, koyebisáká ata mpe bankombo ya bana mibali zomi ya Hamana. Molɔngɔ́ ya libota ya Moledekai mpe ya Esetele etángami kobanda na Kisi, moto ya libota ya Benyamina. (2:5-7) Mokomi alobeli mpe mikanda ya Letá ya bokonzi ya Perse. (2:23; 6:1; 10:2) Lokótá oyo esalelami kati na mokanda yango ezali bongo Liebele oyo ezalaki kolobama na nsima ya bobimi na bango na boombo, ezalaki na maloba mingi ya lokótá ya Perse mpe Aramɛyɛ mpe lolenge mosusu ya kolobela ebakisamaki, elobeli na yango ekokanaki na oyo ya mikanda ya Ntango, ya Ezela, mpe ya Nehemia; na bongo ekokani mpenza na eleko oyo yango ekomamaki.
6. (a) Esetele elobeli makambo oyo masalemaki na eleko nini? (b) Bilembeteli bimonisi nini na ntina na mokomi na yango, mpe esika mpe ntango yango ekomamaki?
6 Ekanisami ete makambo oyo mazwami kati na mokanda ya Esetele masalemaki na ntango oyo nguya ya boyangeli ya Perse ekómaki na nkembo mingi koleka mpe masalemaki na boumeli ya mbula 18 ya boyangeli ya Asueruse (Zelezese I). Eleko oyo ebandaki soko na 475 L.T.B., emonisami na bilembeteli oyo eutaki na Grèce, na Perse, mpe na Babilone.b Moledekai, ye moko mpenza amonaki makambo yango na miso na ye mpe alobelami mingi koleka bato nyonso mosusu kati na lisoló yango, ekoki mpenza kozala ete ye nde akomaki mokanda yango; bozindo mpe bosikisiki ya lisoló yango emonisi ete mokomi na yango asengelaki kozala moto oyo amonaki mpenza makambo yango ye moko kati na ndako ya mokonzi ya mboka Susana.c Atako alobelami te kati na mikanda misusu ya Biblia, ntembe ezali soko moke te ete Moledekai azalaki moto ya solo mpenza oyo azalaki na bomoi na ntango ya kala. Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, makomi mapesameli dati te, mpe makomami na ekomeli ya cuneiforme, oyo A. Ungnad moto ya Allemagne alobelaki, ezali kotánga Mardukâ (Moledekai?) lokola nkumu monene kati na ndako ya mokonzi ya mboka Susa (Susana) na boumeli ya boyangeli ya Zelezese I.d Na ntembe te, ezalaki kuna na Susana nde Moledekai akomaki makambo ya Esetele nokinoki nsima ya kosalema ya makambo yango, elingi koloba, soko na 475 L.T.B.
MAKAMBO MAZALI KATI NA ESETELE
7. Likambo nini libimi na boumeli ya elambo ya Asueruse, mpe mpo na yango mokonzi asali nini?
7 Mokonzi mwasi Waseti alongolami na bokonzi (1:1-22). Tozali bongo na mbula ya misato ya mokonzi Asueruse. Asali elambo moko monene mpo na bankumu ya boyangeli na ye, komonisáká bango bozwi mpe nkembo ya bokonzi na ye na boumeli ya mikolo 180. Na nsima, elambo monene ya mikolo nsambo esalemi mpo na bato nyonso kati na mboka Susana. Bobele na ntango yango, mokonzi mwasi Waseti asali elambo mpo na basi. Mokonzi amikumisi mpo na bozwi mpe nkembo na ye mpe, komisepelisáká na vinyo, abyangisi Waseti ete aya mpe amonisa bonzenga na ye liboso na bato mpe liboso na bankumu. Mokonzi mwasi Waseti aboyi koya. Bankumu ya bokonzi bapesi mokonzi toli, balobi ete ndakisa mabe wana ekoki koyokisa mokonzi nsɔ́ni kati na boyangeli na ye mobimba, na yango Asueruse alongoli Waseti na bokonzi mpe abimisi bikateli mpo na koyebisa basi nyonso ete ‘bákumisaka mibali na bango’ mpe ete mibali nyonso ‘bázala mikolo kati na ndako na bango.’—1:20, 22.
8. (a) Makambo nini malekaki mamemaki Esetele na kokóma mokonzi mwasi? (b) Mwango nini mabe Moledekai abimisi yango polele, mpe likambo nini likomami na ntina na yango?
8 Esetele akómi mokonzi mwasi (2:1-23). Na nsima, mokonzi aponi bato oyo asengeli kotinda mpo ete bákende kolukela ye bilenge basi basɛka oyo bazali kitoko mingi koleka kati na bitúká 127 ya boyangeli, mpe báya na bango na Susana, epai kuna basengeli kokembisama na bonzenga mpo na kolakisama epai na mokonzi. Esetele azali kati na bilenge basi oyo baponami. Esetele azali Moyuda oyo akufelá baboti, “na bonzenga mpe na kitoko,” ndeko na ye, Moledekai nde abokolaki ye, azali nkumu na Susana. (2:7) Na lokótá ya Liebele, nkombo ya Esetele ezali bongo, Adasa, oyo elimboli “Myrte.” Hɛgɛ, mokɛngɛli na basi, asepeli na Esetele mpe asaleli ye makambo malamu mingi mpenza. Moto moko te ayebi ete azali Moyuda, mpamba te Moledekai ayebisaki ye ete abomba yango lokola sɛkɛlɛ́. Na nsima bilenge basi yango bamemami epai na mokonzi mokomoko na ngala na ye. Aponi Esetele lokola mokonzi mwasi na ye ya sika, mpe elambo moko esalemi mpo na kosepela na ntina na koponama na ye lokola mokonzi mwasi. Mwa moke na nsima, Moledekai ayoki nsango na ntina na bato oyo bayangi mwango mpo na koboma mokonzi, mpe atindi Esetele ete akende koyebisa ye yango “na nkombo na Moledekai.” (2:22) Mwango yango moyebani, banguna babomami, mpe likambo yango likomami na mikanda ya bokonzi.
9. Mpo ntina nini Moledekai apesi Hamana nkanda, mpe apusi mokonzi na kozwa ekateli nini likoló na Bayuda?
9 Mwango mabe ya Hamana (3:1–5:14). Mbula soko minei eleki. Hamana, oyo emonani ete azalaki mokitani ya Agaga mokonzi Moamaleki, oyo Samwele abomaki, akómi ministre-mokonzi. (1 Sam. 15:33) Mokonzi akumisi ye mpe apesi etindá epai na basaleli nyonso oyo basalaka na ekuke ya mokonzi ete bángumbamela Hamana. Kati na bango mpe Moledekai. Nzokande, Moledekai aboyi kosala bongo, ayebisi basaleli ya mokonzi ete ye azali Moyuda. (Kokanisá na Exode 17:14, 16.) Hamana asiliki makasi mpe, nsima ya koyeba ete Moledekai azali Moyuda, amoni ete ezali libaku malamu ya kolongola Moledekai mpe Bayuda nyonso na mbala moko. Mbɛsɛ (pulu) ebɛtami mpo na koyeba mokolo mobongi mpo na koboma Bayuda nyonso. Hamana asaleli lokumu malamu na ye oyo azali na yango epai na mokonzi na kofundáká Bayuda ete bazalaki babuki na mibeko mpe asɛngi ete ekateli etali kobomama na bango ekomama na mikanda. Hamana apesi likabo ya paláta ya batalanta 10 000 (oyo ekokani lelo soko na badolare 66 060 000) mpo ete kobomama yango esalema. Mokonzi andimi yango, akomi yango na mikanda mityami elembo na lopɛtɛ ya mokonzi, mpe mitindami na bitúká nyonso ya boyangeli, aponaki mokolo ya 13, sanza ya Adala, lokola mokolo ya kobomama ya Bayuda.
10. Lolenge nini Moledekai mpe Esetele bamonisaki kondima kati na nguya ya Yehova?
10 Na ntango bayoki mobeko yango, Moledekai mpe Bayuda nyonso basali matánga na komilatisáká ngɔtɔ mpe komipakoláká mputulu. “Bakilaki bilei, balelaki mpe bangangaki.” (Est. 4:3) Wana Esetele ayoki likambo ya mpasi ya Bayuda oyo Moledekai ayebisi ye, abangi liboso kolobela bango epai na Mokonzi. Soki moto akei epai na mokonzi kozanga ete abyangisama, akozwa etumbu ya liwa. Nzokande, Moledekai amonisi kondima na ye kati na nguya ya Yehova na kolobáká ete soki Esetele alobeli bango te epai na mokonzi, akokufa solo mpenza mpe lobiko “ekobima na epai mosusu mpo na Bayuda.” Lisusu, nani ayebi soki ezali “mpo na ntango lokola oyo” nde Esetele akómi mokonzi? (4:14) Amoni bonene ya likambo, mpe andimi kotya bomoi na ye na likámá, mpe Bayuda nyonso kati na Susana bakili bilei elongo na ye na boumeli ya mikolo misato.
11. Lolenge nini Esetele asaleli lokumu malamu na ye liboso na mokonzi, kasi mwango nini ya mabe Hamana asaleli Moledekai?
11 Na nsima, Esetele alati bilamba bileki kitoko ya bokonzi, mpe abimi liboso na mokonzi. Andimami na miso na ye, mpe mokonzi atomboli lingenda na ye ya wolo, kobikisáká bongo bomoi na ye. Sikawa abyangi mokonzi mpe Hamana na elambo moko. Na boumeli ya elambo, mokonzi alɔmbi na Esetele ete ayebisa lisɛngi na ye, kondimisáká ye ete akokokisela ye yango, “ata kino ndambo na bokonzi”; na nsima na yango Esetele abyangisi mibali yango mibale báya na elambo mosusu na mokolo molandi. (5:6) Hamana azongi na esengo nyonso. Kasi Moledekai azali kuna na ekuke ya mokonzi! Aboyi lisusu kopesa ye lokumu to kolɛngalɛnga liboso na ye. Esengo ya Hamana ebongwani nkanda. Mwasi na ye mpe baninga na ye bapesi ye likanisi ya kotɛlɛmisa nzeté molai ya mapeko 50 (mɛtɛlɛ 22,3 m) mpe asɛnga na mokonzi ete bákakisa Moledekai likoló na yango. Hamana atɛlɛmisi nzeté yango nokinoki.
12. Lolenge nini mbongwana ya makambo esalaki ete Asueruse atombola Moledekai, mpe akitisa Hamana?
12 Makambo mabongwani (6:1–7:10). Na butu wana, mokonzi azali kozwa mpɔngi te. Asɛngi ete bámemela ye mokanda ya masoló matali ekólo mpe bátángela ye yango, mpe amikundoli ete apesaki Moledekai mbano te na ntango abikisaki bomoi na ye. Na nsima, alingi koyeba soki nani azali wana kati na lopango. Ezali nde Hamana, ayei kosɛnga nzela ya koboma Moledekai. Mokonzi asɛngi Hamana ayebisa ye lolenge nini moto oyo asepelisi mokonzi asengeli kokumisama. Kokanisáká ete mokonzi azalaki nde kolobela ye, Hamana alobi ete elambo moko monene esengeli kosalema. Kasi mokonzi apesi ye etindá ete: “Salelá Moledekai, Moyuda, bobele bongo”! (6:10) Hamana akoki kosala likambo mosusu te, asengelaki bobele kolatisa Moledekai na nkembo nyonso, kofandisa ye likoló na mpunda ya mokonzi, mpe kotambolisa ye na kati na engumba, na kobeleláká nkombo na ye. Hamana ayokisami nsɔ́ni, azongi nokinoki epai na ye na kolela. Mwasi na ye mpe baninga na ye bakoki kobɔndisa ye soko moke te. Hamana akweisami!
13. Likambo nini Esetele alobeli yango kati na elambo, mpe ememaki kokwea nini mpo na Hamana?
13 Oyo ezali sikawa ntango mpo na Hamana ete ayangana na elambo elongo na mokonzi mpe na Esetele. Mokonzi mwasi alobi ete ye mpe bato na libota na ye basilaki kotekisama, ete bábomama. Nani alukaki kosala likambo wana ya mabe? Esetele alobi ete: “Motɛmɛli mpe moyini, Hamana oyo mabe.” (7:6) Mokonzi atomboki mpe akei na elanga na lopango na ye. Wana Hamana atikali bobele ye moko elongo na mokonzi mwasi, abandi kobondela ete bábikisa bomoi na ye, mpe wana mokonzi azongi, nkanda na ye ebakisami lisusu na ntango amoni Hamana afandi na elalelo ya mokonzi mwasi. Nokinoki, apesi etindá ete Hamana akakisama bobele na nzeté oyo ye moko alɛngɛlaki mpo na Moledekai!—Nz. 7:16.
14. Lolenge nini mokonzi apesi Esetele mpe Moledekai mbano, mpe asaleli Bayuda malamu na nzela ya ekateli nini ekomami?
14 Moledekai atombolami, Bayuda babikisami (8:1–10:3). Mokonzi apesi Esetele bozwi nyonso ya Hamana. Esetele ayebisi mokonzi ete ye azali ndeko ya Moledekai, mpe mokonzi atye ye na etɛlɛmɛlo oyo Hamana azalaki na yango, na kopesáká ye lopɛtɛ ya bokonzi. Lisusu, Esetele atye bomoi na ye na likámá na kokendáká liboso na mokonzi mpo na kosɛnga ete alongola mobeko oyo mokomamaki mpo na koboma Bayuda. Nzokande, “mibeko na Palasa mpe Madai” mikoki kolongolama te! (1:19) Na yango, mokonzi apesi Esetele mpe Moledekai bokonzi ya kokoma mobeko ya sika mpe kotya yango elembo ya lopete ya mokonzi. Mobeko yango mokomami motindami kati na bitúká nyonso ya boyangeli lokola esalemaki mpo na oyo ya liboso, epesi Bayuda lotómo ya ‘koyangana mpe kotɛlɛma mpo na bomoi na bango ete bábebisa mpe báboma mpe básilisa nguya nyonso na bato mpe na ndambo na mokili baoyo balingaki kotɛlɛmɛla bango na bana na bango mpe na basi na bango, kopunza bango lokola biloko na kobɔtɔla,’ na mokolo oyo mobeko ya Hamana ekokokisama.—8:11.
15. (a) Etumba esukaki lolenge nini, mpe elambo nini Moledekai abandisi yango? (b) Moledekai atombolami na etɛlɛmɛlo nini, mpe asaleli bokonzi na ye na mokano nini?
15 Wana mokolo oyo moponamaki mokokaki, mokolo ya 13 ya sanza ya Adala, moto moko te akoki kolónga liboso na Bayuda. Mpo na lisɛngi ya Esetele, mokonzi apesi nzela ete bitumba ekóba kino na mokolo ya 14 kati na Susana. Na nyonso, banguna 75 000 ya Bayuda babomami kati na bitúká nyonso ya boyangeli. Bato mosusu 810 babomami kati na ndako monene ya Susana. Kati na bango mpe bana mibali zomi ya Hamana, babomami na mokolo ya liboso mpe bakakisami na nzeté na mokolo ya mibale. Bapunzi biloko ya bato te. Na mokolo ya 15 ya Adala, bapemi, mpe Bayuda basali elambo mpe basepeli. Sikawa Moledekai apesi malako makomami mpo na Bayuda ete bákumisaka elambo ya “Pulu, yango mbɛsɛ,” mbula na mbula na mokolo ya 14 mpe ya 15 ya sanza ya Adala, mpe basalaka yango kino lelo oyo. (9:24) Moledekai apesameli nkembo kati na bokonzi mpe asaleli etɛlɛmɛlo na ye lokola molandi ya Mokonzi Asueruse ‘mpo na malamu na libota na ye.’—10:3.
LITOMBA NA YANGO
16. Mitindá nini ya Nzambe mpe ndakisa nini ebongi mpenza baklisto basengeli komona kati na mokanda ya Esetele?
16 Atako bakomi mosusu ya Biblia bazongeli polele te makambo oyo malobelami na Esetele, mokanda yango mozali na boyokani na mikanda mosusu nyonso ya Makomami mapemami. Ya solo, ezali komonisa mwa ndambo ya bilakiseli ya nguya na ntina na mitindá ya Biblia oyo milobelamaki na nsima na Makomami ya Greke ya boklisto mpe yango ezali kosalelama epai na basambeli ya Yehova na bileko nyonso. Boyekoli ya biteni bilandi ya Makomami ekomonisa ete ezali mpenza bongo, kasi ekotonga mpe kondima ya baklisto: Esetele 4:5—Bafilipi 2:4; Esetele 9:22—Bagalatia 2:10. Efundeli oyo bafundaki na yango Bayuda, ete batosaki mibeko ya mokonzi te, ekokani na efundeli oyo bafundaki na yango baklisto ya liboso. (Est. 3:8, 9; Mis. 16:21; 25:7) Basaleli ya solosolo ya Yehova bazali koyika mpiko liboso na bifundeli motindo wana kozanga kobanga mpe bazali kotya motema mobimba kati na nguya na Nzambe, ete ekobikisa bango, na kolandáká ndakisa ya Moledekai, ya Esetele, mpe ya baninga na bango Bayuda.—Est. 4:16; 5:1, 2; 7:3-6; 8:3-6; 9:1, 2.
17. Ndakisa nini ya malamu Moledekai mpe Esetele batikeli biso na lolenge bazalaki kotosa Nzambe mpe “bango bazali na bokonzi”?
17 Lokola tozali baklisto, tosengeli te kokanisa ete ezalela na biso ekeseni na oyo ya Moledekai mpe ya Esetele. Biso mpe tozali na nsé na “bango bazali na bokonzi” kati na mokili ya bopaya. Mposa na biso ezali ete tózala batosi na mibeko ata kati na mboka nini tozali kofanda, kasi tolingi mpe kokesenisa malamu makambo mibale oyo ete ‘kofuta na Kaisala biloko na Kaisala, mpe na Nzambe biloko na Nzambe.’ (Lom. 13:1; Luka 20:25) Ministre-mokonzi Moledekai mpe mokonzi mwasi Esetele batikaki ndakisa malamu ya komipesa na Nzambe mpe ya botosi kati na misala na bango ya mosuni. (Est. 2:21-23; 6:2, 3, 10; 8:1, 2; 10:2) Nzokande, na kozanga kobanga, Moledekai azwaki etɛlɛmɛlo ya polele mpo na oyo etalaki kotosa etindá ya mokonzi ya kongumbama liboso ya Hamana Moagaga moto mabe. Lisusu, asalelaki mwango ya mibeko na ntango Hamana asalaki mwango mabe mpo na koboma Bayuda nyonso.—3:1-4; 5:9; 4:6-8.
18. (a) Nini emonisi ete mokanda ya Esetele ‘mopemami na Nzambe mpe mozali na litomba’? (b) Lolenge nini ezali kolendisa kolobelama ya matomba ya Bokonzi ya Nzambe?
18 Bilembeteli nyonso bimonisi ete mokanda ya Esetele ezali eteni moko ya Biblia Mosantu, ‘epemami na Nzambe mpe ezali na litomba.’ Atako alobeli Nzambe te mpe nkombo na ye te, kasi ezali ndakisa monene ya kondima. Moledekai mpe Esetele bazalaki te bato ya masapo mpamba bauti na makanisi ya mobɛti moko ya masapo, kasi bazalaki mpenza basaleli ya solosolo ya Nzambe, bato oyo batyaki motema mobimba kati na nguya ya kobikisa ya Yehova. Atako bazalaki na nsé na “bango bazali na bokonzi” kati na mboka mopaya, basalelaki mwango nyonso ya mibeko mpo na kobatela matomba ya libota ya Nzambe mpe ya losambo na bango. Biso mpe lelo tokoki kolanda ndakisa na bango kati na “mosala na kolobela mpe kotambolisa Nsango Malamu” ya kobikisa ya Yehova.—Filp. 1:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 764; Vol. 2, nkasa 327-331.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 613-616.
c Búku Cyclopedia ya McClintock mpe Strong, ebimeli ya 1981, Vol. III, lokasa 310.
d A. Ungnad, “Keilinschriftliche Beiträge zum Buch Esra und Ester,” Zeitschrift für die alttestamentliche Wissenschaft, LVIII (1940-1941), nkasa 240-244.