Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 241-243
  • Mokanda ya Biblia nimero 57​—Filemona

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 57​—Filemona
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA FILEMONA
  • LITOMBA NA YANGO
  • Bolingo epai na bandeko ezali na nguya mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • ‘Kolendisana na ntina na bolingo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Filemona mpe Onesimo basangani kati na bondeko ya boklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Paulo akómi na Roma
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 241-243

Mokanda ya Biblia nimero 57​—Filemona

Mokomi: Paulo

Esika ya bokomi: Loma

Nsuka ya bokomi: soko 60-61 T.B.

1. Wapi mwa ndambo ya makambo oyo matali mokanda ya Filemona?

MOKANDA oyo ya Paulo, oyo mokomami na takte mingi mpe motondi na bolingo, mozali na litomba monene mpo na baklisto lelo. Yango ezali mokanda moleki moke oyo mobatelamaki mpe moutaki na lobɔkɔ ya “ntoma epai na bapakano”; nzokande, kati na Biblia mobimba, bobele mikanda ya Yoane ya Mibale mpe Yoane ya Misato nde mizali na makambo moke koleka Filemona. Lisusu, yango ezali mokanda bobele moko ya Paulo oyo motindamaki epai na “moto moko”; ezali bongo mpo ete mokanda yango motindamaki te epai na lisangá moko to epai na mokɛngɛli moko oyo azalaki na mikumba, kasi motindamaki epai na moto moko mpenza mpe mozalaki kolobela bobele likambo moko ya sikisiki oyo Paulo alingaki kosolola yango na ndeko moklisto wana, Filemona, oyo amonani ete azalaki moto na bozwi mingi, oyo azalaki kofanda na Fulugia, na engumba Kolose, na ntéi mpenza ya Asie Mineure.​—Lom. 11:13.

2. Na boyokani na makambo nini malekaki mpe mpo na mokano nini mokanda ya Filemona mokomamaki?

2 Mokano ya mokanda yango momonisami polele: Na boumeli ya bolɔ́kɔ na ye ya liboso na Loma (59-61 T.B.), Paulo azalaki na bonsomi monene ya kosakola Bokonzi ya Nzambe. Kati na baoyo bayokaki mateya na ye, tozali kotánga mpe Onesimo, moombo oyo akimaki ndako ya nkolo na ye Filemona, moninga ya Paulo. Lokola litomba, Onesimo akómaki moklisto, mpe Paulo azwaki ekateli, na boyokani na mokano ya Onesimo ye moko, ete azongisa ye epai na Filemona. Ezalaki mpe na ntango yango nde Paulo atindaki mikanda na lisangá ya Efese mpe na lisangá ya Kolose. Kati na mikanda yango mibale, apesaki toli malamu epai na baklisto baombo mpe baklisto bankolo na baombo; toli yango etalaki lolenge ya komitambwisa malamu kati na bokangani wana ya moombo mpe nkolo. (Ef. 6:5-9; Kols. 3:22–4:1) Nzokande, koleka oyo wana, Paulo akomelaki Filemona mokanda, oyo kati na yango ye moko asololaki na ye mpo na Onesimo. Mokanda yango mokomamaki na lobɔkɔ ya Paulo ye moko​—yango ezalaki momeseno ya Paulo te. (Flmo. 19) Bokomi wana na lobɔkɔ na ye moko ebakisaki nguya na lisɛngi na ye.

3. Emonani mpenza ete mokanda ya Filemona mokomamaki ntango nini, mpe motindamaki ndenge nini?

3 Emonani mpenza ete mokanda yango mokomamaki soko na mobu 60-61 T.B., wana Paulo azalaki kosakola kati na Loma na boumeli ya ntango molai mpo na kokómisa bato bandimi. Lisusu, mpo ete azali komonisa elikya na vɛrsɛ́ 22 ete akobimisama na bolɔ́kɔ, boye tokoki kosukisa ete mokanda yango mokomamaki mwa moke nsima wana aumelaki mwa ntango kati na bolɔ́kɔ. Emonani ete mikanda oyo misato, moko epai na Filemona mpe misusu oyo mitindamaki na lisangá ya Efese mpe na lisangá ya Kolose, mimemamaki kuna na Tukiko mpe Onesimo.​—Ef. 6:21, 22; Kols. 4:7-9.

4. Nini endimisi biso ete Paulo azali mokomi ya mokanda ya Filemona mpe bosolo na yango bosimbami na nini?

4 Likambo oyo ete Paulo azali mokomi ya mokanda ya Filemona emonisami polele na vɛrsɛ́ ya liboso, epai kuna amitángi na nkombo. Origène mpe Tertullien bandimaki ete ye azali mokomi na yango.a Bosolo ya mokanda ya Filemona esimbami na likambo oyo ete mokanda yango motángami, esika moko na mikanda mosusu ya Paulo, kati na Eteni ya Mokanda ya Muratori (Fragment muratorien), oyo ekomamaki na ekeke ya mibale T.B.

MAKAMBO MAZALI KATI NA FILEMONA

5. (a) Na mbote mpe na makumisi nini mokanda yango mozali kobanda? (b) Paulo ayebisi Filemona nini na ntina na moombo na ye Onesimo?

5 Onesimo azongisami epai na nkolo na ye “lokola moombo lisusu te kasi koleka moombo” (V. 1-25). Paulo atindi mbote ya mɔ́tɔ mpenza na Filemona, na “ndeko mwasi” Apia, na Alakipi “moninga na biso na etumba,” mpe na lisangá oyo lizali na ndako ya Filemona. Akumisi Filemona (oyo nkombo na ye elimboli “Wa bolingo”) mpo na bolingo mpe kondima oyo azalaki na yango liboso na Nkolo Yesu mpe epai na babulami. Nsango ya bolingo ya Filemona epesaki Paulo esengo mpe libɔndisi monene. Paulo, ye mobangé mpe mokangami, azali sikawa koloba na bonsomi nyonso mpo na “mwana” na ye Onesimo, oyo ye akómaki “tata” na ye wana azalaki na minyɔlɔlɔ na bolɔ́kɔ. Liboso, Onesimo (oyo nkombo na ye elimboli “Ya kopesa litomba”) azalaki na ntina mpenza te epai na Filemona, kasi sikawa akómi na ntina mingi epai na Filemona mpe epai na Paulo.​—V. 2, 10.

6. Paulo asɛngi ete básalela Onesimo makambo lolenge nini, mpe na bandimbola nini etondi na takte?

6 Ntoma azali na mposa ete Onesimo atikala wana mpo na kosalisa ye ntango azali na bolɔ́kɔ, kasi alingi te kosala bongo kozanga ete Filemona andima. Yango wana, azongisi ye, “lokola moombo lisusu te kasi koleka moombo, lokola ndeko molingami.” Paulo asɛngi ete Onesimo ayambama na boboto nyonso, lolenge balingaki koyamba Paulo ye moko. Soki Onesimo asalaki Filemona mabe, tiká mokumba wana mózala likoló na Paulo, mpamba te Paulo ye moko ayebisi Filemona ete “Ozali na nyongo epai na ngai mpo na bomoi na yo moko.” (V. 16, 19) Paulo azali kolikya ete, nsima na mwa ntango moke, bakobimisa ye na bolɔ́kɔ mpe akokende kotala Filemona, mpe asukisi mokanda na ye na kopesáká mbote.

LITOMBA NA YANGO

7. Na oyo etali Onesimo, lolenge nini Paulo atosaki libyangi monene oyo abyangami na yango lokola ntoma?

7 Lokola yango emonisami na mokanda oyo, Paulo azalaki te kosakola “evanzile mpo na efandeli malamu ya bato,” komekáká kobongola ebongiseli ya biloko ya ntango wana mpe makambo na yango, na ndakisa boombo. Apesaki te na bokonzi nyonso bonsomi epai na baklisto oyo bazalaki baombo, kútu azongisaki Onesimo, moombo oyo akimá ndako, ete asala mobembo oyo mozwaki ye kilomɛtɛlɛ koleka 1400 bandá na Loma kino Kolose, mpo na kokende mbala moko epai na nkolo na ye Filemona. Boye, Paulo atosaki libyangi na ye ya ntoma, kokangamáká makasi na mosala na ye ya “kosakolaka Bokonzi ya Nzambe mpe kolakisaka makambo na ntina na Nkolo Yesu Klisto.”​—Mis. 28:31; Flmo. 8, 9.

8. Mokanda ya Filemona ezali komonisa lolenge malamu nini ya kosalela mitindá ya boklisto?

8 Mokanda ya Filemona ezali mpenza komonisa makambo mpamba te yango elakisi polele bolingo mpe bomoko oyo ezalaki kati na baklisto ya ekeke ya liboso. Kati na mokanda yango, tozali koyeba ete baklisto ya liboso bazalaki kobéngana “ndeko mobali” mpe “ndeko mwasi” bamoko na bamosusu. (Flmo. 2, 20, NW) Lisusu, ezali komonisa epai na baklisto lelo lolenge ya kosalela malamu mpenza mitindá ya boklisto epai na bandeko baklisto. Na ngámbo ya Paulo, tozali komona bolingo ya bondeko, limemya mpo na boyokani oyo ezali kati na bankolo mpe basaleli, limemya mpo na eloko ya moto mosusu, bokɛngi malamu to takte, mpe komikitisa oyo ebongi kopesamela lokumu. Na esika ete, na makasi nyonso, Paulo apusa Filemona na kolimbisa Onesimo na ntina na lotómo ya bokonzi oyo ye Paulo azalaki na yango lokola mokɛngɛli-mokambi na lisangá, na komikitisa nyonso, Paulo asɛngaki ye nde na moboko ya bolingo ya boklisto mpe na boninga oyo bazalaki na yango elongo. Bakɛngɛli na mikolo na biso bakoki kozwa litomba na lolenge ya takte oyo Paulo asalelaki mpo na kosolola na Filemona.

9. Na kondimáká lisɛngi ya Paulo, Filemona alingaki kopesa ndakisa nini ya ntina mingi mpo na baklisto lelo?

9 Na ntembe te, Paulo azalaki komizela ete Filemona andima lisɛngi na ye, mpe kokokisa likambo yango elingaki komonisa epai na Filemona ete azalaki kosalela malamu maloba ya Yesu oyo mazwami na Matai 6:14 mpe likambo oyo Paulo alobaki na Baefese 4:32. Baklisto ya lelo bakoki mpe kosala na boye ete ndeko oyo asali bango mabe amizela na komonisamela boboto mpe motema mawa. Lokola Filemona akokaki kolimbisa moombo oyo ye moko asombaki, moombo oyo ye azalaki na bonsomi ya konyokola engebene mibeko mpe mposa na ye, boye baklisto lelo basengeli kozala na makoki ya kolimbisa ndeko oyo asali bango mabe​—ezali likambo ya pɛtɛɛ mingi koleka.

10. Lolenge nini mosala ya elimo ya Yehova emonisami polele kati na mokanda ya Filemona?

10 Mosala ya elimo ya Yehova ezali komonana polele kati na mokanda oyo ya Filemona. Yango emonani polele na lolenge malamu oyo Paulo asilisaki mokakatano oyo ya mpasi mpenza. Yango emonani kati na mayoki ya boninga, kati na bolingo mozindo, mpe kati na kotya motema epai na moninga moklisto oyo Paulo amonisaki. Yango emonani na likambo oyo ete mokanda ya Filemona, motindo moko na Makomami mosusu, mozali koteya mitindá ya boklisto, mozali kolendisa bomoko ya boklisto, mpe mozali kokumisa bolingo mpe kondima oyo ezali kofuluka kati na “babulami,” oyo bazali kolikya na Bokonzi ya Nzambe mpe oyo boboto ya Yehova ezali komonisama kati na etamboli na bango.​—V. 5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a The International Standard Bible Encyclopedia, ebimisami na G. W. Bromiley, Vol. 3, 1986, lokasa 831.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto