Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango
Boyekoli nimero 6—Makomi ya Greke ya boklisto kati na Makomami Mosantu
Kosalama ya bakopi ya Makomami ya Greke; kolekisama na yango na Greke mpe na nkótá mosusu kino lelo; makomi oyo tozali na yango lelo ebongi kotyelama motema.
1. Lolenge nini ebongiseli ya boklisto na ntina na kolakisama ebandaki?
BAKLISTO ya liboso bazalaki balakisi mpe basakoli ya ‘liloba likomami ya Yehova’ na mokili mobimba. Batalelaki na likebi mpenza maloba oyo Yesu alobaki liboso ya komata na likoló ete: “Wana ekosila [elimo santu, NW] koya na likoló na bino, bokozwa nguya, mpe bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.” (Yis. 40:8; Mis. 1:8) Lokola Yesu asakolaki yango, bayekoli na ye ya liboso 120 bazwaki elimo santu, nguya oyo ekopesaka bokasi. Likambo yango lisalamaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Bobele na mokolo yango, Petelo abandisaki ebongiseli ya kolakisama ya sika na kopesáká litatoli mozindo, mpe litomba na yango ezalaki ete bato mingi bayambaki nsango na motema moko mpe pene na bato 3 000 babakisamaki kati na lisangá ya boklisto oyo liutaki kosalema sika.—Mis. 2:14-42.
2. Nsango malamu nini esakolamaki na ntango yango, mpe mosala yango ya litatoli mozalaki elembeteli ya nini?
2 Komipesáká na mosala koleka etuluku mosusu nyonso kati na lisoló mobimba ya bato, bayekoli wana ya Yesu Klisto babandaki ebongiseli ya kolakisa oyo, na nsima, ekómaki kino na biteni nyonso ya mokili oyo moyebanaki na eleko wana. (Kols. 1:23) Ɛɛ, batatoli wana ya Yehova oyo bamipesaki bazalaki na molende makasi mpo na kosalela makolo na bango, kokendáká ndako na ndako, engumba na engumba mpe mboka na mboka mpo na kosakola “nsango malamu ya makambo kitoko.” (Lom. 10:15, NW) Nsango malamu yango ezalaki kolobela ebongiseli ya lisiko na nzela ya Klisto, elikya ya lisekwa, mpe Bokonzi ya Nzambe oyo elakamaki. (1 Kol. 15:1-3, 20-22, 50; Yak. 2:5) Liboso ya eleko na bango, litatoli motindo wana, oyo litalelaki biloko bizangi komonana, lipesamaki naino te epai na bato. Yango ekómaki “elimbweli na biloko bizangi komonana” mpe komonisama ya kondima mpo na bato mingi oyo basilaki kondima Yehova ete azala Nkolo Mokonzi na bango na nzela na mbeka ya Klisto.—Ebe. 11:1; Mis. 4:24; 1 Tim. 1:14-17.
3. Makambo nini mazalaki komonisa baministre baklisto na ekeke ya liboso T.B.?
3 Baministre baklisto wana, basi mpe mibali, bazalaki basakoli bangɛngisami na Nzambe. Bayebaki kotánga mpe kokoma. Balakisamaki na nzela na Makomami Mosantu. Bazalaki libota oyo liyebaki malamumalamu ndimbola ya makambo oyo mazalaki koleka na mokili. Bazalaki na momeseno ya kosala mibembo. Bakokanaki na mayoyo kati na likambo oyo ete batikaki ata eloko moko te epekisa bango kokende liboso kati na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. (Mis. 2:7-11, 41; Yoe. 2:7-11, 25) Na ekeke wana ya ebandeli ya Ntango na Biso, bazalaki kofanda katikati na bato oyo, na makambo mingi mpenza, bakokanaki na bato oyo bazali na bomoi na mikolo na biso.
4. Na kopemama mpe na litambwisi ya Yehova, bokomi nini esalemaki na eleko ya ebandeli ya lisangá ya boklisto?
4 Na motindo na bango ya basakoli ya “liloba na bomoi” na etingya, baklisto ya liboso basalelaki malamu mpenza barulo nyonso ya Biblia oyo bakokaki kozwa. (Filp. 2:15, 16; 2 Tim. 4:13) Minei kati na bango, elingi koloba Matai, Malako, Luka mpe Yoane bapemamaki na Yehova mpo na kokoma “Nsango Malamu na Yesu Klisto.” (Mko. 1:1; Mat. 1:1) Bamoko na bango, na ndakisa Petelo, Paulo, Yoane, Yakobo mpe Yuda, bakomaki mikanda na nsé na kopemama na Nzambe. (2 Pet. 3:15, 16) Basusu bakómaki basáli na bakopi ya maloba wana mapemami, mpe yango ezalaki kolekaleka na masangá oyo mazalaki ntango nyonso kobakisama mpe masangá wana mazalaki kozwa litomba uta na yango. (Kols. 4:16) Lisusu, ‘bantoma mpe mikóló oyo bazalaki na Yelusaleme’ bazalaki kozwa bikateli na ntina na mateya, kosaláká bongo na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe bikateli yango bizalaki kokomama mpo na kosalelama na mikolo mizalaki koya. Lisangani yango ya mikóló-bakambi lizalaki mpe kotinda mikanda mpo na kopesa malako na masangá oyo mazalaki mosika. (Mis. 5:29-32; 15:2, 6, 22-29; 16:4) Mpo na yango, basengelaki kozala na ebongiseli na bango moko ya botindi mikanda.
5. (a) Codex ezali nini? (b) Na meko nini baklisto ya liboso basalelaki codex, mpe matomba na yango mazalaki nini?
5 Mpo na kopalanganisa Makomami nokinoki, mpe kotya yango na lolenge lobongi na kosalelama, baklisto ya liboso babandaki noki kosalela codex ya bamaniskri, na esika ya barulo. Na lolenge na yango, codex ekokani na babúku ya mikolo na biso, oyo nkasa na yango ekoki kobalwisama, engebene mposa ya moto, ntango azali koluka mokapo moko; nzokande rulo ezalaki mbala mingi kosɛnga ete bálingola yango. Lisusu, codex epesaki nzela na kokangisa mikanda ya kanɔ́ esika moko, nzokande mikanda ya lolenge ya rulo mizalaki mingimingi kobatelama mokomoko na rulo na yango. Baklisto ya liboso bazalaki bafungoli-nzela na likambo litali kosalela codex. Ekoki kozala ete bango nde babimisaki yango. Atako codex eyaki kondimama bobele mokemoke na bakomi oyo bazalaki baklisto te, nzokande bapapirise mingi ya makomi ya boklisto oyo isalelamaki na ekeke ya mibale mpe ya misato izalaki na lolenge ya codex.a
6. (a) Eleko ya lokótá ya Greke “classique” ezalaki ntango nini, yango esangisaki nini, mpe ntango nini Koïnè, to Greke ya bato banso, ekólaki? (b) Lolenge nini mpe na meko nini Koïnè ekómaki kolobama na bato banso?
6 Kosalelama ya Koïnè (Greke ya bato banso). Oyo babéngaka ete eleko ya lokótá ya Greke “classique” ebandaki na ekeke ya libwa L.T.B. kino na ekeke ya minei L.T.B. Yango ezalaki eleko ya lokótá Attique mpe Ion. Ezalaki na eleko oyo, mpe mingimingi na ekeke ya mitano mpe ya minei L.T.B. nde Bagreke mingi bamimonisaki ba dramaturges (bato ya mayele na makambo matali masano), bazalaki bakomi na ntɔ́ki, balobi malamu, bakomi na makambo na kala, bato na filozofi mpe bato na siansi; kati na bango tokoki kotánga Homère, Hérodote, Socrate, Platon mpe basusu oyo bayebanaki mingi. Eleko oyo ebandaki soko na ekeke ya minei L.T.B. kino ekeke ya motoba T.B. ezalaki eleko ya oyo babéngaki Koïnè, to Greke ya bato banso. Kopalangana na yango eutaki mingi mpenza na misala ya bitumba ya Alesandala Monene, oyo mampinga na ye mazalaki na basodá ya bitúká nyonso ya Grèce. Bazalaki koloba nkótá mikemike oyo iuti na lokótá ya Greke, mpe wana nkótá yango isanganaki, lokótá Koïnè ya bango banso ebotamaki mpe ekómaki kosalelama na bato nyonso. Ntango Alesandala akamataki Ezipito mpe Azia kino na Inde, Koïnè epalanganaki epai na mabota mingi, na boye ete ekómaki lokótá ya mikili ndenge na ndenge mpe etikalaki bongo na boumeli ya bikeke mingi. Maloba ya Greke oyo mazali kati na libongoli ya Septante mazalaki maloba ya Koïnè oyo ezalaki kolobama na Alesandalia, na Ezipito, na ekeke ya misato mpe ya mibale L.T.B.
7. (a) Lolenge nini Biblia endimisi kosalelama ya Koïnè na eleko ya Yesu mpe ya bantoma na ye? (b) Mpo na nini Koïnè ebongaki mpenza mpo na kosakolama ya Liloba ya Nzambe?
7 Na mikolo ya Yesu mpe ya bantoma na ye, Koïnè ezalaki lokótá ya mikili nyonso ya boyangeli ya Loma. Biblia yango moko endimisi likambo yango. Ntango Yesu akakisamaki na nzeté, emonanaki malamu ete likomi oyo lizalaki likoló na motó na ye likomama te bobele na Liebele, lokótá ya Bayuda, kasi yango esengelaki kokomama lisusu na Latin, oyo ezalaki lokótá ya Letá ya mboka yango, mpe na Greke, oyo ezalaki kolobama na bato nyonso ya Yelusaleme, pene na lolenge oyo yango ezalaki kolobama na Loma, na Alesandalia to na Atene yango moko. (Yoa. 19:19, 20; Mis. 6:1) Misala 9:29 emonisi ete Paulo asakolaki nsango malamu na Yelusaleme epai na Bayuda oyo bazalaki koloba lokótá ya Greke. Na eleko wana, koïnè ezalaki lokótá ya nguya mpenza, ya bomoi mpe oyo epalanganaki mingi—lokótá oyo lolɛngɛlamaki malamu mpe lobongaki mpo na kokokisa mokano malamu oyo Yehova azalaki na yango ya koyebisa mingi lisusu Liloba na ye.
MAKOMI YA GREKE MPE KOPALANGANISAMA NA YANGO
8. Mpo na nini tozali sikawa kotalela ebombelo ya bamaniskri ya Makomami ya Greke?
8 Na boyekoli oyo euti koleka, tomonaki ete Yehova abatelaki mai na ye ya solo kati na ebombelo moko ya mikanda mikomami—elingi koloba Makomami ya Liebele oyo mapemami. Na bongo, tokoloba boni mpo na Makomami oyo bantoma mpe bayekoli mosusu ya Yesu Klisto bakomaki? Yango ebatelamaki mpenza na likebi motindo moko mpo na biso? Botaleli mozindo likoló na ebombelo monene wana ya bamaniskri oyo ebatelamaki na lokótá ya Greke, mpe na nkótá mosusu, ezali kopesa eyano malamu na mituna wana. Lokola yango esilaki kolimbolama, eteni oyo ya kanɔ́ ya Biblia esalemi na mikanda 27. Tiká tótalela makambo minene ya kobongolama ya mikanda yango 27, oyo ezali komonisa lolenge makomi ya Greke ya ebandeli mabatelamaki kino na mikolo ya lelo.
9. (a) Na lokótá nini Makomami ya boklisto makomamaki? (b) Mwa bokeseni nini ezali mpo na mokanda ya Matai?
9 Liziba ya bamaniskri ya Greke. Mikanda 27 ya kanɔ́ ya Makomami ya boklisto mikomamaki na Greke oyo ezalaki kolobama na bato banso na eleko wana. Nzokande, emonani ete libosoliboso mokanda ya Matai mokomamaki na Liebele ya Biblia, mpo na bolamu ya libota ya Bayuda. Jérôme, mobongoli ya Biblia na ekeke ya minei, andimisi likambo wana na kolobáká ete, na nsima, mokanda yango mobongolamaki na Greke.b Emonani ete ezalaki Matai ye moko nde asalaki libongoli yango—mpe lokola azalaki mosaleli ya Baloma, mokɔngɔli na mpako, boye ntembe ezali te ete ayebaki Liebele, Latin mpe Greke.—Mko. 2:14-17.
10. Lolenge nini makomi ya Biblia makómeli biso?
10 Bakomi mosusu ya Biblia oyo bazalaki baklisto, na ndakisa Malako, Luka, Yoane, Paulo, Petelo, Yakobo mpe Yuda, bango nyonso bakomaki mikanda na bango na Koïnè, lokótá ya bato banso mpe oyo ezalaki kolobama mingi, oyo lozalaki kososolama na baklisto mpe na bato mingi ya ekeke ya liboso. Mokanda ya nsuka kati na oyo mikomamaki na ebandeli mpenza ezalaki mokanda oyo Yoane akomaki soko na mobu 98 T.B. Engebene boyebi tozali na yango lelo, ata maniskri moko te ya ebandeli, oyo ikomamaki na Koïnè, etikalá kino lelo. Nzokande, uta na liziba wana ya ebandeli mpenza, bakopi ya makomi ya ebandeli isili kotíyola kino epai na biso, bakopi ya bakopi, mpe mabota ya bakopi, oyo esali ebombelo monene ya bamaniskri ya Makomami ya Greke ya boklisto.
11. (a) Motuya monene nini ya bakopi ya bamaniskri tozali na yango lelo oyo? (b) Lolenge nini yango ekeseni na bamaniskri ya kala na likambo litali boíké mpe koumela na yango?
11 Ebombelo oyo ezali na bamaniskri koleka 13 000. Ezali lelo na bibele ya bakopi ya bamaniskri ya mikanda nyonso wana 27 ya kanɔ́. Ndambo ya bakopi yango ezali na biteni milai ya Makomami; mosusu na yango ezali bobele biteni mikemike. Engebene motángo moko oyo mosalemaki, ezali na bamaniskri koleka 5 000 oyo ekomami na Greke ya ebandeli. Lisusu, ezali na bamaniskri koleka 8 000 ya nkótá mosusu ndenge na ndenge—motuya na yango nyonso ezali ya bamaniskri koleka 13 000. Lokola bamaniskri yango ekomamaki kobanda na ekeke ya 2 T.B. kino ekeke ya 16 T.B., yango nyonso ezali kosalisa mpo na koyeba makomi ya solosolo mpe ya ebandeli. Kati na bamaniskri nyonso wana, oyo eleki koumela ezali bongo eteni ya papirise ya Evanzile ya Yoane oyo ebombami na Bibliotɛkɛ ya John Rylands na engumba Manchester, na mokili ya Angleterre; maniskri yango eyebani na elembo P52 mpe yango ekomamaki na ebandeli ya ekeke ya mibale, mbala mosusu na zingazinga ya mobu 125 T.B.c Na bongo, kopi yango esalamaki bobele mbula soko ntuku mibale na mitano nsima na mikanda ya ebandeli. Soki totaleli ete, mpo na koyeba bosolo ya mikanda misusu ya bakomi mingi ya kala, tozali bobele na bamaniskri moke, mpe ete yango ezali komonana mingi te mpo na ebele ya bikeke oyo bitangoli yango na mikanda ya ebandeli, boye tokoki mpenza komona yango ete ezali libaku malamu lokola tozwi makomi oyo mabongi kotyelama motema, oyo matondi na bilembeteli, mpo na kondimisa bosolo ya Makomami ya Greke ya boklisto.
12. Bamaniskri ya liboso ikomamaki likoló na eloko nini?
12 Bamaniskri ya papirise. Lolenge moko na bakopi ya kala ya libongoli ya Septante, bamaniskri ya libosoliboso ya Makomami ya Greke ya boklisto ikomamaki likoló na papirise, mpe papirise ekóbaki kosalelama kino na zingazinga ya ekeke ya minei T.B. mpo na bokomi bamaniskri ya Biblia. Emonani ete bakomi ya Biblia mpe basalelaki papirise ntango bazalaki kotinda mikanda na masangá ya boklisto.
13. Kozwama ya papirise nini ya ntina esakolamaki na mobu 1931?
13 Makomi mingi na papirise mazwamaki na etúká ya Fayoûm, na Ezipito. Na nsuka ya ekeke ya 19, bapapirise mingi ya Biblia ezwamaki. Moko na bapapirise ya ntina mingi oyo isili kozwama na mikolo na biso ezali papirise oyo ebimisamaki na 1931. Yango esalemaki na biteni ya bamaniskri 11 ya mikemike, oyo ezalaki na mikanda 8 mikeseni ya Makomami mapemami ya Liebele, bakisá mpe mikanda 15 ya Makomami ya Greke ya boklisto; mikanda nyonso wana mizalaki na lokótá ya Greke. Bapapirise yango ekomamaki kobanda na ekeke ya mibale kino ekeke ya minei ya Ntango na Biso. Biteni mingi ya Makomami ya Greke ya boklisto ya bapapirise wana, oyo ezwamaki, bizali sikawa kati na liboke ya mikanda ya Chester Beatty mpe bityami na liste oyo: P45, P46 mpe P47; elembo “P” ezali komonisa “Papirise.”
14, 15. (a) Wapi mwa bamaniskri minene ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo itángami nkombo kati na etánda ya lokasa 313? (b) Monisá lolenge Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika esalelaki bamaniskri yango. (c) Likambo nini endimisami na bamaniskri mikemike ya kala, oyo ikomamaki likoló na papirise?
14 Bapapirise mosusu ya ntina mingi ebimisamaki na Genève, na Suisse, kobanda na 1956 kino 1961. Yango eyebani na nkombo ya Papirise ya Bodmer mpe esangisi makomi ya kala ya Baevanzile mibale (P66 mpe P75) oyo eumeli uta na ebandeli ya ekeke ya misato T.B. Etánda oyo etyami liboso ya boyekoli oyo ezali kopesa liste ya mwa bapapirise minene ya kala ya Biblia mpo na Makomami ya Liebele mpe ya Greke ya boklisto. Na colonne ya nsuka, ezali na mikapo mitángami uta na Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi), mikapo oyo kobongolama na yango endimisami na bamaniskri wana ya papirise, mpe yango emonisami na maloba na nsé ya lokasa oyo mazali kotalela mikapo yango.
15 Kozwama ya bapapirise yango epesi elembeteli ete kanɔ́ ya Biblia etyamaki na lolenge ya nsuka uta dati moko ya kala mpenza. Kati na bapapirise ya Chester Beatty, bamaniskri mibale ya mike—oyo moko na yango ezali na biteni ya Baevanzile minei mpe mokanda ya Misala (P45) mpe mosusu ezali na mikanda 9 kati na mikanda 14 ya Paulo (P46)—ezali komonisa ete Makomami ya Greke ya boklisto oyo mapemami masangisamaki mwa moke nsima ya liwa ya bantoma. Lokola ntango molai esengelaki koleka liboso ete bamaniskri mikemike wana ekoka kopalangana mingi kino kokóma na Ezipito, emonani ete Makomami yango masangisamaki na lolenge ya sikisiki na nsuka ya ekeke ya mibale. Boye, na nsuka na ekeke ya mibale, ntembe ezalaki te ete kanɔ́ ya Makomami ya Greke ya boklisto esukaki, kokokisáká bongo kanɔ́ mobimba ya Biblia.
16. (a) Bamaniskri nini ya makomi mineneminene, oyo izali ya Makomami ya Greke ya boklisto, isili kokóma kino mikolo na biso? (b) Na meko nini bamaniskri ya makomi mineneminene isalelamaki kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika, mpe mpo na nini?
16 Bamaniskri na vɛlɛ́ mpe na bikótó mosusu. Lokola tomonaki yango na boyekoli oyo euti koleka, kobanda soko na ekeke ya minei, vɛlɛ́ (vélin), eloko oyo ekoumelaka mingi mpe oyo ezali lolenge kitoko ya parshɛmɛ́ (parchemin) oyo esalemi mingimingi na loposo ya mwana ya ngɔmbɛ, ya mwana ya mpate to na loposo ya ntaba, ebandaki kosalelama mpo na kokoma bamaniskri na esika ya papirise. Ndambo ya bamaniskri ya ntina mingi ya Biblia, oyo izali lelo, ikomamaki likoló na vɛlɛ́. Tosilaki kolobela bamaniskri ya Makomami ya Liebele oyo ikomamaki na vɛlɛ́ mpe na bikótó mosusu. Etánda oyo etyami na lokasa 314 ezali kotánga nkombo ya mwa bamaniskri ya Makomami ya Greke mpe ya Makomami ya Liebele oyo ikomamaki likoló na vɛlɛ́ mpe na bikótó mosusu. Bamaniskri ya Makomami ya Greke oyo itángami nkombo ikomamaki, na mobimba na yango, na balɛ́tɛlɛ ya minene mpe ibéngami [bamaniskri] ya makomi mineneminene. Búku New Bible Dictionary eyebisi ete, mpo na Makomami ya Greke ya boklisto, ezali na bamaniskri 274 ya makomi mineneminene, mpe badati ya bokomami na yango ezwami kati na ekeke ya minei T.B. kino ekeke ya zomi T.B. Mpe ezali na bamaniskri koleka 5 000 ya makomi mikemike oyo ikomamaki na ekomeli ya lombangu, na mabɔkɔ.d Bamaniskri wana ya makomi mikemike, oyo ikomamaki mpe likoló na vɛlɛ́, ikomamaki kobanda na ekeke ya libwa T.B. kino na eleko oyo myango ya bonyati mikanda ebandaki kosalelama. Lokola bamaniskri ya makomi mineneminene iumeli mingi mpe lokola izalaki na bosikisiki monene, Komité ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika esalelaki yango ntango bazalaki kobongola na likebi mozindo uta na makomi ya Greke. Yango emonisami kati na etánda “Mwa bamaniskri minene oyo ekomamaki likoló na vɛlɛ́ mpe na bikótó mosusu.”
NTANGO YA BOLUKILUKI MABUNGÁ KATI NA MAKOMI MPE YA KOPƐTOLAMA NA YANGO
17. (a) Makambo nini mibale mamemaki na boyekoli mozindo ya makomi ya Greke oyo mazali kati na Biblia? (b) Erasme ayebani mpo na mosala nini? (c) Lolenge nini makomi moko ya moboko oyo manyatami mabongisamaki?
17 Makomi ya Erasme. Na boumeli ya bikeke nyonso ya Moyen-Âge, ntango lokótá ya Latin ekómaki kolobama mingi mpe wana Mpótó ya Wɛ́sti ezalaki na nsé na boyangeli makasi ya Lingomba ya Katolike ya Loma, bato bakɔtaki na bozangi mpenza ya boyebi mpe ya koyekola. Nzokande, elongo na kobimisama ya myango ya bonyati mikanda oyo babéngi imprimerie à caractères mobiles, kobimisama oyo esalemaki na Mpótó na ekeke ya 15, mpe elongo na eleko ya Mbongwana (Réforme) na ebandeli ya ekeke ya 16, bonsomi ezwamaki mpe likebi etyamaki lisusu likoló na lokótá ya Greke. Ezalaki na boumeli ya eleko wana ya kozongisama ya boyebi mpe ya boyekoli makambo nde Erasme, nganga-mayele mpe moto na Hollande oyo ayebanaki mingi, abimisaki ebimeli na ye ya liboso ya “Testamá ya sika” oyo ezalaki makomi ya moboko na Greke. (Makomi wana ya moboko, oyo manyatamaki, mabongisamaki na lisalisi ya bokokanisi mozindo ya motuya monene ya bamaniskri mpe na kosaleláká maloba oyo mandimamaki mingi ete mazalaki maloba ya ebandeli mpenza, oyo mbala mingi masangisaki, kati na liboke moko ya makomi na nsé, banɔti na ntina na makeseni nyonso oyo mabimisami uta na bokokanisi bamaniskri mosusu.) Ebimeli wana ya liboso enyatamaki na mboka Bâle, na mokili ya Suisse, na 1516, mbula moko liboso ete Mbongwana ekoka kobanda na Allemagne. Ebimeli yango ya liboso ezalaki na mabungá mingi, kasi makomi yango mabongisamaki na bibimeli oyo bilandaki na mobu 1519, 1522, 1527, mpe 1535. Mpo na kosala bokokanisi mpe kobongisama ya makomi na ye ya moboko, Erasme azalaki bobele na bamaniskri moke oyo eumelaki mingi te ya makomi mikemike oyo akokaki kosalela.
18. Makomi ya Erasme mapesaki nzela na likambo nini, mpe nani asalelaki yango malamumalamu?
18 Makomi ya Greke oyo Erasme apɛtolaki makómaki moboko mpo na mabongoli maleki malamu, oyo masalamaki na nkótá mingi ya Mpótó ya Wɛ́sti. Yango epesaki nzela na kobimisama ya mabongoli ya malamu koleka oyo ya liboso, oyo mabongolamaki uta na Vulgate ya lokótá ya Latin. Moto ya liboso oyo asalelaki makomi ya Erasme ezalaki Martin Luther ya Allemagne, oyo asilisaki libongoli na ye ya Makomami ya Greke ya boklisto na lokótá ya Allemand na 1522. Na nsima, wana azalaki kozwa minyoko mingi, William Tyndale, moto na Angleterre abimisaki Libongoli na ye ya Lingelesi uta na makomi ya Erasme, mpe asilisaki libongoli yango na Mpótó ntango minyoko misalaki ete akima na mboka-mopaya na eteni wana ya mokili na 1525. Antonio Brucioli ya Italie abongolaki makomi ya Erasme na lokótá ya Italien na 1530. Na kobima ya makomi ya Erasme na Greke, ntango ya bolukiluki mabungá kati na makomi eyaki. Bolukiluki ya mabungá kati na makomi ezali mwango oyo esalelamaki mpo na kosembola mpe kozongisa makomi ya Biblia lolenge makomamaki na ebandeli.
19. Lisoló ya kokabolama ya Biblia na mikapo mpe bavɛrsɛ́ libandi ndenge nini, mpe yango esili kopesa nzela na likambo nini?
19 Kokabolama na mikapo mpe na bavɛrsɛ́. Robert Estienne, to Stephanus, ayebanaki mingi lokola monyati mpe mobimisi mikanda na ekeke ya 16, na Paris. Lokola azalaki mobimisi na mikanda, amonaki ete ezalaki malamu kosalela ebongiseli ya mikapo mpe bavɛrsɛ́ mpo na kosalelama ya nokinoki, mpe na yango akɔtisaki, na 1551, ebongiseli wana kati na Testamá na ye ya Sika oyo eteni moko ezalaki na Latin mpe mosusu na Greke. Kokabolama ya bavɛrsɛ́ esalamaki libosoliboso kati na Makomami ya Liebele na Bamasorete, kasi ezalaki Biblia ya Lifalansé ya Stephanus nde emonisaki kokabolama ya Biblia mobimba na bavɛrsɛ́ mpe na mikapo. Yango esalamaki mpe kati na mabongoli ya Biblia ya Lingelesi oyo malandaki mpe nzela ezwamaki mpo na kobimisa bakonkor dansi ya Biblia, lokola oyo ebimisamaki na Alexandre Cruden na 1737 mpe bakonkordanse minene ya Libongoli lindimami ya Biblia ya Lingelesi—oyo ya Robert Young, ebimisamaki libosoliboso na Edimbourg na 1873, mpe ya James Strong, oyo ebimisamaki na New York na 1894.
20. Textus Receptus ezalaki nini, mpe yango ekómaki moboko ya nini?
20 Textus Receptus. Stephanus abimisaki lisusu ebele ya mabongoli ya “Testamá ya Sika” na Greke. Yango etongamaki mingi mpenza likoló na makomi ya Erasme, elongo na kosembolama ya mabungá engebene Biblia Complutensis ya nkótá ndenge na ndenge, oyo ebimisamaki na 1522, mpe engebene bamaniskri 15 ya makomi mikemike ya nsima oyo ikomamaki na boumeli ya mwa bikeke oyo bilekaki liboso. Ebimeli ya misato ya makomi ya Stephanus na Greke na 1550 ekómaki Textus Receptus (Maloba ya Latin oyo malimboli “makomi mazwami”) oyo mabongoli mosusu ya ekeke ya 16 masalemaki uta na yango, ata mpe Biblia King James Version ya 1611.
21. Makomi nini mapɛtolami mabandaki kobimisama na ekeke ya 18, mpe yango esalelamaki ndenge nini?
21 Makomi ya Greke oyo mapɛtolami. Na nsima, banganga-mayele Bagreke babimisaki makomi mingi oyo mapɛtolami. Kati na yango, makomi oyo maleki ntina ezalaki oyo ya J. J. Griesbach, oyo azalaki na likoki ya kotalela ebele ya bamaniskri oyo ekómaki kozwama mingi pene na nsuka ya ekeke ya 18. Ebimeli eleki malamu ya makomi ya Griesbach, na mobimba na yango, na Greke, ebimisamaki na eleko ebandi na mobu 1796 kino mobu 1806. Makomi na ye ya malamu koleka masalelamaki lokola moboko mpo na kobongolama ya Biblia ya Sharpe na Lingelesi, na 1840 mpe ezali makomi ya Greke oyo manyatamaki kati na Biblia The Emphatic Diaglott, oyo ebimisamaki mpo na mbala ya liboso na mobimba mpenza na 1864. Makomi mosusu ya malamu mabimisamaki na Konstantin von Tischendorf (1872) mpe na Hermann von Soden (1910), mpe oyo ya nsuka esalelamaki lokola moboko mpo na libongoli ya Moffatt na Lingelesi na 1913.
22. (a) Makomi nini ya Greke mandimamaki mingi? (b) Yango esalelamaki lokola moboko ya mabongoli nini ya Lingelesi?
22 Makomi ya Westcott mpe Hort. Makomi ya moboko na Greke oyo mandimamaki mingi ezali bongo makomi oyo mabimisamaki na 1881 na banganga-mayele ya Eteyelo monene ya Cambridge; banganga-mayele yango ezali B. F. Westcott mpe F. J. A. Hort. Mpo na kobongisa lisusu “Testamá ya Sika” na 1881, Komité ya Bangelesi mpo na Bobongisi lisusu esalelaki makomi manyatami ya Westcott mpe Hort, oyo bazalaki mpe basangani ya komité yango. Makomi wana ya moboko mazali oyo masalelamaki mingi mpo na kobongola Makomami ya Greke ya boklisto kati na Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi. Makomi yango mazali mpe moboko mpo na mabongoli ya Lingelesi oyo malandi: The Emphasised Bible, American Standard Version, An American Translation (ya Smith-Goodspeed), mpe Revised Standard Version.e Libongoli oyo ya nsuka lisalelaki mpe makomi ya Nestle.
23. Makomi nini mosusu masalelamaki mpo na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika?
23 Makomi ya Nestle na Greke (ebimeli ya 18, na 1948) masalelamaki lisusu na Komité ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika mpo na kosala bokokanisi. Komité yango esalelaki mpe makomi ya José M. Bover (1943) mpe Augustinus Merk (1948), oyo bazalaki banganga-mayele mpe Bajezwite ya Katolike. Makomi ya 1975 ya Lisangani ya Basosyete ya Biblia mpe makomi ya Nestle-Aland ya 1979 masalelamaki mpo na koyokanisa, na boyebi ya lelo, maloba na nsé ya nkasa ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ebimeli ya 1984 oyo ezali na mitindami.f
24. Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika etalelaki mpe mabongoli nini ya kala? Wapi mwa bamoko na yango?
24 Mabongoli ya kala uta na Greke. Longola bamaniskri ya Greke, ezali mpe na bamaniskri mingi mpo na boyekoli lelo; bamaniskri ya mabongoli ndenge na ndenge ya Makomami ya Greke ya boklisto na nkótá mosusu. Ezali na maniskri koleka 50 (to biteni ya mikemike) ya mabongoli ya Latin ya kala mpe bankóto ya bamaniskri ya Vulgate ya Jérôme na Latin. Komité ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika esalelaki bamaniskri yango, bakisá mpe mabongoli ya lokótá ya Copte, Aramɛyɛ mpe Siriaque.g
25. Litomba monene nini lizali kozwama na mabongoli ya lokótá ya Liebele oyo malobelami kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika?
25 Kobanda pene na ekeke ya 14, mabongoli ya Makomami ya Greke mabimisamaki na lokótá ya Liebele. Mabongoli yango mazali na ntina mpenza mpo ete mingi kati na yango ezongisaki nkombo ya Nzambe na Makomami ya boklisto. Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika elobeli mabongoli wana ya Liebele mbala mingi na nsé na elembo “J,” elongo na motuya moko likoló na yango. Mpo na bandimbola mozindo, talá maloba ya ebandeli ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu—na mitindami (na Lifalansé), nkasa 10-11, mpe libakema (appendice) 1D, “Le nom divin dans les Écritures grecques chrétiennes.” (“Nkombo ya Nzambe kati na Makomami ya Greke ya boklisto.”)
MAKESENI KATI NA MAKOMI MPE NTINA NA YANGO
26. Lolenge nini mabungá makɔtaki kati na makomi mpe ndenge nini mabota ya bamaniskri ebimaki?
26 Kati na bamaniskri ya Makomami ya Greke ya boklisto, oyo motángo na yango ezali koleka 13 000, ezali na makeseni mingi kati na makomi. Botaleli ya bamanis kri bobele 5 000 ya lokótá ya Greke ezali komonisa makeseni yango mingi. Tososoli malamu ete kopi mokomoko oyo euti na bamaniskri ya kala ezalaki na mabungá na yango moko ya sikisiki oyo esalemaki na bakomeli. Wana kopi ya bamaniskri yango ya kala ezalaki kotindama na etúká moko ya sikisiki mpo na kosalelama kuna, mabungá oyo mazalaki kati na yango mazalaki kozongelama na bakopi oyo ezalaki kosalema na etúká wana, mpe mabungá yango mazalaki kokóma eloko oyo ezalaki komonisa bamaniskri nyonso mosusu ya etúká yango. Ezalaki na lolenge wana nde mabota ya bamaniskri ya lolenge moko mabimaki. Na yango, mabungá ya bakomeli masengeli nde komema biso na komitungisa? Yango ezali nde komonisa ete makomi mabongolamaki kozanga bosikisiki? Te, ezali bongo te!
27. Kondimisama nini tozali na yango na likambo litali bosikisiki ya makomi ya Greke?
27 F. J. A. Hort, oyo asanganaki mpe na kobimisama ya makomi ya Westcott mpe Hort, akomi boye: “Liboke monene ya maloba ya Testamá ya Sika litombwani mosika likoló na myango nyonso ya boluki mabungá mpo ete bokeseni ezali te kati na yango, nde likambo litikali lizali bobele ya kobongola Kondimana yango ya Sika. . . . Soki bokokanisi ya mpambampamba . . . etyami pembeni, maloba oyo mazali naino kobimisa ntembe kati na makanisi na biso makoki kozala bobele liloba moko likoló na maloba nkóto ya Testamá ya Sika mobimba.”h
28, 29. (a) Motuya nini ya solosolo tosengeli kopesa na makomi ya Greke oyo mapɛtolami malamu? (b) Wapi maloba ya kondimisa tozali na yango likoló na likambo yango?
28 Makomi mazwami mazali na motuya. Na bongo, nsima na ebele wana ya bikeke ya kobongolama ya makomi, tokoloba boni mpo na bosikisiki mpe bosolo ya makomi yango? Tozali te bobele na bibele ya bamaniskri mpo na kosala bokokanisi kasi lisusu na bamaniskri ya kala ya Biblia oyo ikundolami na boumeli ya mibu oyo miuti koleka; bamaniskri yango izali kopesa biso Makomi ya Greke oyo maumeli kobanda soko na mobu 125 T.B., mwa bambula nsima ya liwa ya ntoma Yoane pene na mobu 100 T.B. Bamaniskri yango izali bilembeteli oyo bindimisi makasi ete tozali sikawa na makomi ya Greke oyo mabongi kotyelama motema mpe oyo mapɛtolami malamumalamu. Talá lolenge mokambi ya kala mpe mosáli na bibliotɛkɛ ya British Museum, Sir Frederic Kenyon, amonisaki bosolo ya likambo yango:
29 “Na bongo, ntáká oyo ekaboli badati ya kobongisama ya makomi ya ebandeli mpe badati ya bilembeteli ya kala oyo bizali lelo esili kokóma moke mpenza na boye ete ntina ezali kútu te ya kolobela yango; bantina ya nsuka likoló na yango tokoki kobɛta ntembe mpo na bosembo ya makomi oyo tozali na yango lelo, bantina yango ezali komonana lisusu te. Na nsuka na nyonso, bosolo mpe bosikisiki kati na makomi mobimba ya mikanda ya Testamá ya Sika ekoki kotalelama ete esilá mpenza kotyama ngwi. Nzokande, bosembo ya makomi mobimba ezali likambo mosusu; bosikisiki na makambo mikemike ezali mpe likambo mosusu.”i
30. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kopesa na batángi na yango ‘liloba ya sembo ya Yehova’?
30 Na oyo etali kotalelama wana ya nsuka ya “bosikisiki na makambo mikemike,” maloba ya Dr. Hort oyo matángami na paragrafe 27 mazali kolobela yango. Kosembola mabungá kati na makambo mikemike ezali mosala ya bapɛtoli na makomi, mpe bango basilaki kosala yango malamumalamu mpenza. Mpo na ntina yango, makomi ya Westcott mpe Hort na Greke oyo mapɛtolamaki mandimami na bato mingi ete mazali moko na makomi oyo mabongi mpenza. Kotongamáká likoló na makomi wana ya Greke oyo mabongi mpenza, eteni ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo ezwami kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezali bongo na likoki ya kopesa epai na batángi na yango ‘liloba ya sembo ya Yehova,’ lokola yango ebatelamaki mpo na biso, na lolenge ya kokamwisa, kati na ebombelo ya bamaniskri ya Greke.—1 Pet. 1:24, 25.
31. (a) Bamaniskri oyo ezwami na mikolo na biso emonisi nini na ntina na makomi oyo masali Makomami ya Greke? (b) Lolenge nini etánda oyo ezali na lokasa 309 emonisi eutelo ya moboko mpo na eteni ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo ezwami kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika, mpe wapi mwa biutelo mosusu oyo bisalelamaki?
31 Maloba ya Sir Frederic Kenyon kati na búku na ye Our Bible and the Ancient Manuscripts (Biblia na biso mpe bamaniskri ya kala), ya 1962, na lokasa 249 mazali na ntina mingi: “Tosengeli kosepela na koyeba ete bosolo ya makomi mobimba ya Testamá ya Sika bondimisami makasi mpenza na bamaniskri oyo ikundolami na mikolo na biso; bamaniskri yango iyeisi mokuse ntáká oyo ekaboli makomi ya ebandeli mpe bamaniskri ya kala mpenza oyo tozali na yango lelo, mpe ete makeseni ya makomi, atako mazali kobenda likebi mpenza, mazali te kobebisa mateya ya moboko ya kondima ya boklisto.” Lokola yango emonisami na lokasa 309 kati na etánda “Biutelo mpo na makomi ya Libongoli ya Mokili ya Sika—Makomami ya Greke ya boklisto,” mikanda nyonso oyo mikangisami na yango mikɔtisamaki mpo na kobimisa makomi ya Lingelesi oyo mabongolami na bosikisiki. Maloba ya ntina mingi na nsé ya lokasa mazali kosimba bosikisiki yango ya libongoli. Wana ezalaki bango kolɛngɛla kobimisama ya libongoli oyo libongi, Komité ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika esalelaki mbuma kitoko iuti na banganga-mayele ya Biblia mpe oyo ikólisamaki na boumeli ya bikeke mingi. Tokoki lelo kozala na elikya ete Makomami ya Greke ya boklisto, na motindo oyo tozali na yango sikawa, mazali mpenza na “lolenge na maloba sembo” lokola oyo makomamaki na bayekoli ya Yesu Klisto oyo bapemamaki. Tiká ete tókangama na maloba yango ya kitoko kati na kondima mpe na bolingo!—2 Tim. 1:13.
32. Mpo na nini eteni monene ya búku oyo elobeli bamanis kri mpe makomi oyo masali Makomami Mosantu, mpe litomba malamu nini yango ebimisi?
32 Boyekoli oyo mpe boyekoli oyo ezalaki liboso na yango, elobeli bobele bamaniskri mpe makomi oyo masali Makomami Mosantu. Mpo na nini yango etalelami na bozindo boye? Mokano ezalaki ya komonisa polele ete makomi oyo masali Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Greke makokani mpenza na makomi ya ebandeli, makomi ya solosolo, oyo Yehova apesaki na bato ya sembo na ntango ya kala ete bákoma yango na nsé na kopemama. Makomi yango ya ebandeli mapemamaki. Atako baakisi (copistes) bazalaki na makoki, nzokande bapemamaki te. (Nz. 45:1; 2 Pet. 1:20, 21; 3:16) Na yango, ezalaki likambo libongi ete kopɛtolama esalema na ebombelo monene ya bakopi ya bamaniskri mpo na kosunga biso na koyeba, na polele mpe kozanga libungá, mai ya solo ya pɛto, na bokokani na lolenge oyo yango ezalaki kotíyola longwa na Motó na liziba monene, Yehova, uta ebandeli mpenza. Tiká ete matɔ́ndi nyonso mápesama na Yehova mpo na likabo kitoko ya Liloba na ye, Biblia oyo epemami, mpe mpo na nsango ya Bokonzi oyo ezali kokitisa motema, nsango oyo ezwami kati na nkasa ya búku yango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 354-355.
b Talá lokasa 176, paragrafe 6.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 323; Búku New Bible Dictionary, ebimeli ya mibale, 1986, ya J. D. Dou glas, lokasa 1187.
d Búku New Bible Dictionary, ebimeli ya mibale, lokasa 1187.
e Talá etánda “Mwa mabongoli minene ya Biblia na nkótá nsambo ya minene,” na lokasa 322.
f The Kingdom Interlinear Translation of the Greek Scrip tures, 1985, nkasa 8-9.
g Talá maloba na nsé ya lokasa oyo mataleli Luka 24:40; Yoane 5:4; Misala 19:23; 27:37; mpe Emoniseli 3:16.
h Búku The New Testament in the Original Greek, 1974, Vol. I, lokasa 561.
i Búku The Bible and Archaeology, 1940, nkasa 288-289.