Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 332-337
  • Boyekoli nimero 9—Arkeoloji mpe Makomi mapemami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyekoli nimero 9—Arkeoloji mpe Makomi mapemami
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ARKEOLOJI MPE MAKOMAMI YA LIEBELE
  • ARKEOLOJI MPE MAKOMAMI YA GREKE YA BOKLISTO
  • Mosala ya koyekola biloko ya kala emonisi nini mpo na Biblia?
    Lamuká!—2008
  • Biblia—Buku oyo ezali na bisakweli ya solosolo, Eteni 2
    Lamuká!—2012
  • Siruse Monene
    Lamuká!—2013
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 332-337

Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango

Boyekoli nimero 9—Arkeoloji mpe Makomi mapemami

Boyekoli ya biloko bikundolami na nzela ya arkeoloji mpe boyekoli ya masoló ya kala na lisalisi ya istware ya mokili oyo ezali kondimisa bosolo ya makambo mazali kati na Biblia.

1. Makambo oyo malimboli nini: (a) arkeoloji ya Biblia? (b) bitiká?

ARKEOLOJI ya Biblia ezali boyekoli ya bato mpe ya makambo ya ntango ya lisoló ya Biblia na nzela ya makomi, bisaleli, bandako mpe na nzela ya bitiká mosusu oyo bikundolami na mabelé. Kolukama ya biloko ya kalakala, to bitiká, na bisika oyo makambo makomami na Biblia mazalaki kosalema, esɛngi bolukiluki mingi mpe esali ete bamilió ya batɔ́ni ya bosɔtɔ ya mabelé ebimisama. “Etiká” ezali eloko nyonso oyo esalelamaki na moto na ntango ya kala mpe oyo epesi elembeteli ya mosala mpe ya bomoi na ye. Bitiká bikoki kozala biloko lokola mbeki, biteni ya bandako ekufá, biloko bisalemi na mabelé-lima, makomi, mikanda, bikeko to monimá mpe makomi likoló na mabanga.

2. Arkeoloji ya Biblia ezali na motuya nini?

2 Na ebandeli ya ekeke ya 20, arkeoloji eyeisamaki etando moko monene mpo na boyekoli; bato batindamaki na mikili oyo milobelami na Biblia, kosungamáká na mosolo mouti na biteyelo mpe bamizé minene ya Mpótó mpe ya Amerika. Lokola litomba, bato ya arkeoloji bayaki kokundola ebele ya biloko oyo bizali kopesa pole likoló na lolenge makambo mazalaki kosalema na ntango ya lisoló ya Biblia. Na bantango mosusu, biloko bikundolami na arkeoloji bizali komonisa bosolo mpe bosikisiki ya Biblia kino na makambo ya mikemike.

ARKEOLOJI MPE MAKOMAMI YA LIEBELE

3. Bitiká nini ya kala mpe makomi nini mazali kondimisa kozala ya ba ziggourats kati na Babilone ya kala?

3 Ndako molai na Babele. Engebene Biblia, Ndako molai na Babele ezalaki mosala monene ya botongi. (Gen. 11:1-9) Likambo ya kosepelisa mpenza, bato ya arkeoloji bakundolaki na kati mpe na zingazinga ya Babilone ya kala, bisika ya ebele ya ba ziggourats, to tempelo isalemi na ndako milai ya mikili-mikili (étages), oyo lolenge na yango ezalaki lokola piramide ya Ezipito; bakundolaki mpe bitiká ya tempelo ya Etemenanki, oyo ezalaki kati na lopango ya Babilone. Makomi ya kala na ntina na batempelo yango mazalaki na maloba oyo: “Nsɔngɛ́ na yango esengeli kotuta makoló.” Eyebisami na ntina na mokonzi Nebukadanesala ete abimisaki maloba oyo: “Natombolaki nsɔngɛ́ ya Ndako molai ya mikili-mikili epai na Etemenanki, na boye ete nsɔngɛ́ na yango etyanaki ntembe na makoló.” Eteni moko ya makomi eyebisi kokwea ya ziggourat motindo wana na maloba oyo: “Kotongama ya tempelo yango eyokisaki banzambe nkanda. Bobele na butu moko, bakweisaki mosala motongamaki. Bapalanganisaki [batongi] mosika, mpe babulunganisaki elobeli na bango. Basukisaki mosala yango.”a

4. Biloko nini bizwamaki na Gihona na nzela ya arkeoloji, mpe bokangani nini ezali kati na yango mpe lisoló ya Biblia?

4 Nzela ya mai uta na liziba ya Gihona. Na 1867, na etúká ya Yelusaleme, Charles Warren amonaki nzela moko ya mai oyo euti na liziba ya Gihona, elongo na libulu moko litongamá uta na nsé kino likoló; nzela yango ekɔtá na nsé na ngomba mpe ebimá na Engumba ya Davidi. Emonani lokola ete ezalaki na nzela yango nde bato ya Davidi bakɔtaki na engumba yango. (2 Sam. 5:6-10) Kobanda 1909 kino 1911, ebongiseli mobimba ya mikɛli ya mai oyo miuti na liziba ya Gihona elongolamaki bosɔtɔ nyonso oyo ezalaki kati na yango. Nzela moko etɔbɔlamaki kati na mabanga makasi na ntáká ya mɛtɛlɛ 533 na bozindo ya mɛtɛlɛ 1,8. Nzela yango ya mai etandamaki kobanda na Gihona kino na Etima ya Siloama oyo ezwamaki kati na Lobwaku ya Tiropeoni (na kati ya engumba) mpe, na ntembe te, moto oyo atongaki yango ezalaki Hizikiya. Makomi moko na ekomeli ya Liebele ya kala makutamaki likoló na efelo ya nzela moke yango ya mai. Makomi yango mazali kotángama, na biteni-biteni ete: “Mpe talá lolenge oyo yango etɔbɔlamaki:—Wana [ . . . ] epasola (bipasola) [ . . . ] ezalaki naino kosala mosala, moto na moto nsima na mozalani na ye, mpe wana etikalaki bobele mapeko misato ya mabanga ya kopasola, mongongo ya moto moko oyo azalaki kobénga mozalani na ye [moyokamaki], mpo ete ezalaki na lidusu moko kati na libanga, na lobɔkɔ ya mobali [mpe na lobɔkɔ ya mwasi]. Mpe ntango nzela yango na nsé na mabelé esilaki kotɔbɔlama, bapasoli-mabanga bapasolaki (libanga yango monene), moto na moto kotalana na mozalani na ye, epasola etalani na epasola; mpe mai matíyolaki na ntáká ya mapeko 1 200 uta na liziba kino na libulu ya bobombi mai, mpe molai ya libanga yango likoló na mitó ya bapasoli-mabanga ezalaki ya mapeko 100.” Wana ezalaki mpenza mosala ya tekiniki ya kokamwisa mpo na bileko yango!b—2 Mik. 20:20; 2 Nta. 32:30.

5. Elembeteli nini ezwamaki na Karnak na nzela ya arkeoloji, oyo ezali komonisa etumba ya Sisaka kotɛmɛla Yuda mpe oyo ezali kotánga nkombo ya bisika ya Biblia?

5 Makomi ya bolóngi ya Sisaka. Sisaka, mokonzi ya Ezipito, alobelami mbala nsambo kati na Biblia. Lokola mokonzi Lehobama abwakaki mibeko ya Yehova, Yehova apesaki nzela ete Sisaka akamata Yuda na mobu 993 L.T.B., kasi ezalaki te mpo na kobebisa Yuda nyonso nyɛɛ. (1 Mik. 14:25-28; 2 Nta. 12:1-12) Kino na bambula oyo iuti koleka, lisoló ya etumba wana lizalaki komonana bobele kati na Biblia. Na nsima, mokanda moko monene mozwamaki; mokanda yango mozalaki kolobela Falo oyo Biblia ebéngi ye Sisaka (Sheshonk I). Yango ezalaki na lolenge ya liyemi monene, oyo litondaki na makomi babéngi hiéroglyphes mpe na bililingi, likoló na efelo ya súdi ya tempelo monene ya Ezipito, oyo ezwami na Karnak (Thèbes ya kala). Likoló na liyemi yango monene, elilingi ya Amon, nzambe ya Ezipito, etyami wana; na lobɔkɔ na ye ya mobali, nzambe yango asimbi mopanga ya lolenge ya likwangola. Azali koya na bakangami 156, epai na Falo Sisaka; bango bazali bato na Palestine oyo bakangisami na nsinga, na lobɔkɔ na ye ya mwasi. Mokangami mokomoko azali komonisa engumba to mboka moko, oyo nkombo na yango emonisami na makomi ya hiéroglyphes. Kati na nkombo oyo ikoki kotángama mpe koyebana malamu, totángi Labiti (Yos. 19:20); Tanake, Bete-sana mpe Megido (Yos. 17:11); Suneme (Yos. 19:18); Lehoba (Yos. 19:28); Hafalaimi (Yos. 19:19); Gibona (Yos. 18:25); Bete-holono (Yos. 21:22); Ayalone (Yos. 21:24); Soko (Yos. 15:35); mpe Alada (Yos. 12:14). Mokanda yango mozali mpe kolobela “Elanga ya Abalayama”; yango ezali mbala ya liboso mpenza oyo Abalayama alobelami kati na makomi ya Baezipito.c

6, 7. Lisoló ya Libanga ya Moaba lizali ndenge nini, mpe makambo nini yango ezali koyebisa na ntina na etumba oyo esalemaki kati na Yisalaele mpe Moaba?

6 Libanga ya Moaba. Na 1868, misionere F. A. Klein, oyo azali moto ya Allemagne, akundolaki makomi moko ya kala mpe ya ntina mingi, na engumba Dhiban (Diboni). Yango eyaki koyebana na nkombo ya libanga ya Moaba. Makomi na yango mabebisamaki, mpe libanga yango moko libukamaki na Baarabe liboso ete likoka kolongolama na esika oyo yango ezalaki. Nzokande, biteni na yango mingi bizwamaki, mpe libanga yango libombami sikawa na Louvre, na Paris, mpe kopi na yango moko ezali na Londres, na British Museum. Na ebandeli, yango etɛlɛmisamaki na Diboni, na mokili ya Moaba, mpe ezali koyebisa botomboki ya Mokonzi Mesa liboso na Yisalaele. (2 Mik. 1:1; 3:4, 5) Yango ezali kotángama na ndambo mpenza ete: “Ngai (nazali) Mesa, mwana ya Kemose-[ . . . ], mokonzi ya Moaba, Modiboni . . . Mpo na Omili, mokonzi ya Yisalaele, anyokolaki Moaba na boumeli ya bambula mingi (koloba mikolo mingi), mpamba te Kemose [nzambe ya Moaba] ayokaki nkanda mpo na mokili na ye. Na nsima, mwana na ye ya mobali alandaki matambe na ye mpe alobaki motindo moko na ye ete, ‘Nakonyokola Moaba.’ Na eleko na ngai, ye alobaki (bongo), kasi nalóngaki ye mpe ndako na ye, wana Yisalaele ebebisamaki mpo na libela! . . . Mpe Kemose alobaki na ngai ete, ‘Kendá, zwá Nebo longwa na Yisalaele!’ Bongo, nakendaki na butu mpe nabundisaki yango na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ kino na midi; nazwaki yango mpe nabomaki nyonso . . . Mpe uta na yango, nazwaki [mbeki] na Yawe, namemaki yango liboso na Kemose.”d Talá ndenge nkombo ya Nzambe elobelami na molɔngɔ́ ya nsuka. Okoki komona yango na elilingi ya Libanga ya Moaba oyo etyami awa. Nkombo yango ezali na lolenge ya Tetragrami, na lobɔkɔ ya mobali ya mokanda yango, na molɔngɔ́ ya 18.

7 Libanga ya Moaba lizali mpe kolobela bisika ya Biblia oyo bilandi: Atalota mpe Nebo (Mit. 32:34, 38); Alenono, Aloele, Medeba mpe Diboni (Yos. 13:9); Bamota-bala, Bete-bala-meone, Yahasa mpe Kiliataimi (Yos. 13:17-19); Besele (Yos. 20:8), Holonaimi (Yis. 15:5); Bete-dibilataimi mpe Keliyoto (Yil. 48:22, 24). Na bongo, yango endimisi bosolo ya lisoló ya kala oyo litángi bisika yango.

8. Biblia eyebisi nini na ntina na Senakeliba, mpe botimoli oyo esalemaki na esika ndako monene na ye ezalaki emonisaki nini?

8 Prisme ya Mokonzi Senakeliba. Biblia ezali koyebisa na mozindo mpenza lisoló ya boingeli ya Baasulia [kati na Yuda], na litambwisi ya Mokonzi Senakeliba, na mobu 732 L.T.B. (2 Mik. 18:13–19:37; 2 Nta. 32:1-22; Yis. 36:1–37:38) Na eleko ebandi na 1847 kino 1851, A. H. Layard, Mongelesi moto ya arkeoloji, atimolaki bitiká ya ndako monene ya Senakeliba na Ninive, kati na teritware ya Asulia ya kala. Ndako monene wana ezalaki na biteni ya ndako soko 70, na bifelo oyo bitandamaki na bolai ya mɛtɛlɛ 3 000 mpe bizipamaki na mabanga kitoko. Lapólo ya misala nyonso ya Senakeliba, lapólo oyo ezalaki kosalema mbula na mbula, ekomamaki likoló na basilɛndɛlɛ (cylindre) ya mabelé-lima, to prismes. Ebimeli ya nsuka ya lapólo ya misala yango ya Senakeliba, oyo ekomamaki mwa moke liboso ya liwa na ye, ezwami likoló na oyo babéngi prisme ya Taylor, oyo ebombami kati na British Museum, kasi Institut oriental ya Iniversité ya Chicago ezali na kopi moko ya malamu mingi ya prisme oyo ezwamaki pembeni ya esika oyo Ninive ya kala, mboka-mokonzi ya Asulia, ezalaki.

9. Na boyokani na lisoló ya Biblia, Senakeliba ayebisi likambo nini, kasi azangaki kolobela likambo nini, mpe mpo na nini?

9 Kati na lapólo yango ya misala na ye ya nsuka, Senakeliba azali koyebisa, na lolendo nyonso, boingeli na ye kati na Yuda: “Mpo na Hizikiya, Moyuda, ye amikitisaki na nsé na bokonzi na ngai te, [na bongo] nazingelaki bingumba 46 kati na bingumba na ye ya makasi, bisika makasi na ye oyo bizingelamaki na bifelo, mpe ebele na mboka mike oyo izalaki zingazinga na yango; nabɔtɔlaki (yango) na nzela na bimatelo makasi (na mabelé), na bamasini ya etumba oyo nsɔngɛ́ na yango ekotɔbɔlaka bitutu mpe oyo ememami (bongo) penepene (na bifelo) (elongo na) bobundisi ya basodá bakotambolaka na makolo, (kosaleláká) banzela ya nsé na mabelé, kotɔbɔláká befelo mpe mosala ya bobuki lopango ya mboka na kotimoláká na nsé na yango. Nabimisaki (uta na yango) bato 200 150, bilenge mpe mikóló, basi mpe mibali, mpunda, mbalata, kamela, bibele na nyama minene lokola ngɔmbɛ mpe nyama mike ya mboka, mpe natángaki yango biloko biuti na bolóngi etumba. Ye moko [Hizikiya], nakómisaki ye mokangami kati na Yelusaleme, efandelo na ye ya bokonzi, motindo moko na ndɛkɛ kati na zumbu. . . . Bingumba na ye oyo napunzaki, etángamaki lisusu ya mokili na ye te nde napesaki yango epai na Mitinti, mokonzi ya Asedode; na Padi, mokonzi ya Ekelone; mpe na Silibele, mokonzi ya Gaza. . . . Na nsima, ye moko Hizikiya . . . atindelaki ngai na Ninive, engumba ya bokonzi na ngai, talanta 800 ya palata, elongo na talanta 30 ya wolo, mabanga na motuya, biloko ya kopakola na nkíki, biteni ya mabanga motane, mbeto (ikembisami) na mpɛmbɛ ya nzoku, bakiti ya nimedu oyo (ikembisami) na mpɛmbɛ ya nzoku, mposo ya nzoku, mabaya ya ébène, mabaya ya nzeté babéngi buis [ekokani na lifake] (mpe) mitindo nyonso ya biloko ya motuya; bakisá bana na ye (moko) ya basi, bamakango na ye, bayembi na ye ya mibali mpe ya basi. Mpo na kofuta mpako mpe komonisa botosi oyo moombo asengeli kozala na yango, atindaki momemi-nsango na ye (mpenza).”e Na ntina na mpako oyo Senakeliba azalaki kofutisa Hizikiya na makasi, Biblia endimi ete talanta 30 ya wolo isɛngamaki, kasi elobeli bobele talanta 300 ya palata. Lisusu, emonani ete likambo yango lisalemaki liboso ete Senakeliba akana kozingela Yelusaleme. Kati na makomi ya istware ya Asulia oyo mautaki na bakomeli ya Senakeliba, ye aboyaki na nkó nyonso kolobela kopɔla monene oyo apɔlaki na Yuda, ntango anzelu ya Yehova abomaki, na butu bobele moko, basodá na ye 185 000, kopusáká ye na kozonga kino Ninive na lombangu nyonso lokola mbwa oyo babɛti fimbo. Nzokande, lisoló yango ya lolendo, oyo likomami likoló na Prisme ya Senakeliba, limonisi boingeli monene na etumba kati na Yuda, liboso ete Yehova akimisa Baasulia nsima wana bakanelaki Yelusaleme.​—2 Mik. 18:14; 19:35, 36.

10, 11. (a) Nkomá ya Lakisi ezali nini, mpe yango ezali komonisa nini? (b) Lolenge nini yango ezali kolóngisa makomi ya Yilimia?

10 Nkomá ya Lakisi. Lakisi, engumba makasi mpe ya lokumu, elobelami koleka mbala 20 kati na Biblia. Yango ezwamaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 44 na súdi-wɛ́sti ya Yelusaleme. Bitiká na yango bitimolamaki mingi. Na 1935, kati na ndako ya ebombelo ya bikuke mibale, ostraca 18 izwamaki; yango ezali bitati mikemike ya mbeki oyo ezali na makomi likoló na yango (bitati mosusu misato bizwamaki na 1938). Eyaki komonana ete biteni yango bizalaki nkomá oyo ikomamaki na balɛ́tɛlɛ ya Liebele ya kala. Liboke wana ya bitati 21 liyebani lelo ete Nkomá ya Lakisi. Lakisi ezalaki moko na bisika makasi ya Yuda oyo biumelaki na botɛmɛli na yango liboso na Nebukadanesala kasi na nsuka yango ebebisamaki mpe ekómaki sé bitiká na boumeli ya eleko oyo ebandaki na 609 kino 607 L.T.B. Nkomá yango izali komonisa makambo ya mpasi oyo mazalaki na eleko yango. Emonani ete nkomá wana etindamaki epai na Yaosh, mokonzi ya basodá ya Lakisi, ekomamaki uta na mampinga ya Yuda oyo mazalaki naino kotɛlɛma makasi na libándá ya engumba wana. Moko na yango (nimero IV) ezali kotángama boye na ndambondambo: “Tiká YHWH [Tetragrami, oyo elimboli “Yehova”] asala ete nkolo na ngai ayoka sikawa nsango ya malamu. . . . tozali kozela komona bilembo ya mɔ́tɔ uta na Lakisi, na boyokani na bilembo nyonso oyo nkolo na ngai apesaki, mpo ete tozali komona Azika te.” Yango endimisi mpenza mokapo ya Yilimia 34:7, oyo mozali kolobela Lakisi mpe Azika ete ezalaki bingumba mibale ya makasi oyo bitikalaki naino. Nkomá yango emonisi na lolenge ya likolólikoló ete Azika eutaki kokwea na ntango yango. Nkombo ya Nzambe, na lolenge ya Tetragrami, ezalaki mbala na mbala komonana kati na nkomá yango, kolakisáká ete nkombo ya Yehova ezalaki ntango nyonso kosalelama epai na Bayuda na eleko wana.

11 Nkomá mosusu (nimero III) ezali kobanda boye: “Tiká YHWH [elingi koloba, Yehova] ayokisa nkolo na ngai nsango na kimya! . . . Mpe eyebisamaki na mosaleli na yo ete, ‘mokonzi ya mampinga, Konia, mwana na Elenatana, ayei mpo na kokende na Ezipito kasi asɛngi ete bákende kolukela ye [lisungi] epai na Hodawia, mwana na Ahiya, mpe bato na ye.’” Nkomá yango endimisi ete Yuda esɛngaki lisungi na Ezipito, kobukáká bongo mobeko ya Yehova mpe likambo wana limemaki kobebisama na yango. (Yis. 31:1; Yil. 46:25, 26) Nkombo Elenatana mpe Hosaya, oyo imonani longwa na ebandeli ya nkomá wana kino nsuka, izali mpe kokutama kati na Yilimia 36:12 mpe Yilimia 42:1. Nkombo misato mosusu oyo ilobelami kati na nkomá yango izali mpe kati na mokanda ya Biblia oyo mobéngami Yilimia. Ezali bongo Gemalia, Neliya, Yazania.​—Yil. 32:12; 35:3; 36:10.f

12, 13. Libanga ya Nabonide lizali kolobela nini, mpe mpo na nini yango ezali na motuya monene?

12 Libanga ya Nabonide. Na eteni ya nsuka ya ekeke ya 19, mosala ya botimoli oyo mosalamaki pene na Bagdad mobimisaki mabanga mingi ya mabelé-lima mpe ya basilɛndɛlɛ oyo epesaki bingɛngiseli mingi likoló na istware ya Babilone ya kala. Moko na yango ezali makomi ya ntina mingi oyo mabéngami Libanga ya Nabonide, oyo libombami sikawa na British Museum. Mokonzi Nabonide ya Babilone azalaki tata ya Belesasala, oyo azalaki koyangela na ye elongo. Ye aumelaki mingi na bomoi koleka mwana na ye, oyo abomamaki na butu oyo bibele ya basodá ya Siruse moto na Perse babɔtɔlaki Babilone, na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔ́bɛ 539 L.T.B. (Dan. 5:30, 31) Libanga ya Nabonide, makomi oyo malobeli malamu kokweisama ya Babilone, mazali kopesa nzela na koyeba mokolo oyo likambo yango lisalemaki. Oyo ezali libongoli ya eteni moke ya Libanga ya Nabonide: “Na sanza ya Tashritu [Tisri (Sɛtɛ́mbɛ-Ɔkɔtɔ́bɛ)], ntango Siruse abundisaki Akkad na Opis, pene na Ebale Tigre . . . na mokolo ya 14, engumba Sippar ezwamaki kozanga botɛmɛli makasi. Nabonide akimaki. Na mokolo ya 16 [11 Ɔkɔtɔ́bɛ 539 L.T.B., manáka ya Julien, to 5 Ɔkɔtɔ́bɛ, manáka ya Grégoire], Gobryas (Gourbarou), guvernere ya Goutioum mpe mampinga ya Siruse makɔtaki na Babilone na bolɛmbu nyonso. Na nsima, Nabonide akangamaki na Babilone ntango azongaki (kuna). . . . Na sanza ya Arahsamma [Marchesvan (Ɔkɔtɔ́bɛ-Novɛ́mbɛ)], mokolo ya misato [28 Ɔkɔtɔ́bɛ, manáka ya Julien], Siruse akɔtaki na Babilone, mandalala ya lángi ya mai ya mpɔndu mabwakamaki liboso na ye—ezalela ya ‘Kimya’ (sulmu) esakolamaki likoló na engumba. Siruse atindaki mbote epai na bafandi nyonso ya Babilone. Gobryas, guvernere na ye, atyaki baguvernere(-basungi) kati na Babilone.”g

13 Esengeli koyeba ete Dalio, moto na Mede, alobelami te kati na libanga yango, mpe kino lelo, Dalio yango alobelami ata na likomi moko te ya mikanda mosusu longola Biblia; alobelami mpe te na mikanda ya istware ya mokili oyo mibimisamaki liboso ya eleko ya Josèphe (Moyuda mokomi na makambo ya kala oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso T.B.). Na bongo, bamoko bapesi makanisi ete Gobryas, oyo alobelami na lisoló oyo touti komona, ezali nde Dalio. Lokola mayebisi oyo matali Gobryas masali lokola mákokana na oyo ya Dalio, boye bosukisi wana ekoki te kotalelama ete ezali mpenza ya sikisiki.h Kati na makambo manso, istware ya mokili emonisaka polele mpenza ete Siruse nde azalaki elombe kati na kobɔtɔlama ya Babilone mpe ete, na nsima, ayangelaki kuna lokola mokonzi.

14. Nini eyebisami likoló na Silɛndɛlɛ ya Siruse?

14 Silɛndɛlɛ ya Siruse. Mwa moke nsima na ebandeli ya boyangeli ya Siruse lokola mokonzi ya Perse, oyo ezalaki Nguya Monene ya Mokili na ntango wana, kobɔtɔlama ya Babilone na litambwisi na ye na mobu 539 L.T.B. ekomamaki likoló na silɛndɛlɛ moko oyo esalemaki na mabelé makasi to mabelé-lima. Mokanda wana ya ntina mingi mobombami mpe na British Museum. Ndambo ya makomi na yango oyo ebongolami ezali kotángama boye: “Ngai Siruse, mokonzi ya mokili, mokonzi monene, mokonzi andimami, mokonzi ya Babilone, mokonzi ya Sumer mpe ya Akkad, mokonzi ya ndelo minei (ya mabelé), . . . Nazongaki na bingumba oyo [bibéngamaki liboso ete] bingumba mosantu, oyo bizalaki na ngámbo mosusu ya Ebale Tigre, [bingumba] oyo bisika mosantu na yango bisilaki kobebisama uta kala; bikeko oyo bizalaki kuna, nabongiselaki yango bisika mosantu ya libela. Nasangisaki (mpe) bafandi na yango nyonso (ya kala) mpe nazongisaki (bango) na bifandelo na bango.”i

15. Silɛndɛlɛ ya Siruse ezali komonisa nini mpo na Siruse, mpe lolenge nini yango eyokani na Biblia?

15 Na yango, Silɛndɛlɛ ya Siruse eyebisi politiki ya mokonzi yango, oyo ezalaki ya kozongisa mabota oyo mazalaki na boombo na bisika oyo mautaki. Na boyokani na momeseno yango, Siruse abimisaki mobeko na ntina ete Bayuda bázonga na Yelusaleme mpe bátonga lisusu ndako ya Yehova kuna. Likambo ya kobenda likebi mpenza, mibu 200 liboso na yango, Yehova atángaki Siruse na esakweli ete azalaki moto oyo asengelaki kobɔtɔla Babilone mpe kosala ete libota ya Yehova bázonga na mokili na bango.​—Yis. 44:28; 45:1; 2 Nta. 36:23.

ARKEOLOJI MPE MAKOMAMI YA GREKE YA BOKLISTO

16. Arkeoloji emonisaki makambo nini na ntina na Makomami ya Greke?

16 Lokola yango esalaki mpo na Makomami ya Liebele, bobele bongo arkeoloji esili kobimisa biloko mingi ya kala oyo bizali kondimisa lisoló lipemami oyo lizwami kati na Makomami ya Greke ya boklisto.

17. Lolenge nini arkeoloji ezali kosimba lisoló ya Yesu na likambo litali mpako?

17 Denali ya ebendé oyo ezali na likomi ya Tibeli. Biblia emonisi polele ete Yesu asalaki mosala na ye na boumeli ya eleko oyo Kaisala Tibeli azalaki koyangela. Bamoko kati na batɛmɛli na Yesu balukaki kozwa ye na motambo ntango batunaki ye motuna na likambo litali kofuta mpako na Kaisala. Lisoló yango lizali kotángama boye: “Nde ye ayebaki kokosa na bango mpe alobi na bango ete, Mpo na nini bozali komeka ngai? Yelá ngai na lopata ete nátala yango. Bayei na moko. Atuni bango ete, Oyo elilingi mpe likomi na nani? Balobi na ye ete, [Ya] Kaisala. Yesu alobi na bango ete, Bópesa na Kaisala biloko na Kaisala mpe na Nzambe biloko na Nzambe. Bakamwi mingi na ye.” (Mko. 12:15-17) Bato na arkeoloji bakundolaki denali ya palata oyo ezali na elilingi ya motó ya Kaisala Tibeli! Yango ebandaki kosalelama soko na mobu 15 T.B. Yango eyokani mpenza na eleko ya boyangeli ya Tibeli lokola amperɛrɛ, eleko oyo ebandaki na mobu 14 T.B., mpe ebakisi elembeteli mosusu oyo endimisi lisoló oyo limonisi ete Yoane Mobatisi abandaki mosala na ye na mbula ya 15 ya boyangeli ya Tibeli, to na prɛntá ya mobu 29 T.B.​—Luka 3:1, 2.

18. Eloko nini esili kozwama oyo ezali kolobela Ponti Pilata?

18 Likomi ya Ponti Pilata. Na 1961, arkeoloji ekundolaki mpo na mbala ya liboso eloko oyo ezalaki kolobela Ponti Pilata. Yango ezalaki eteni ya libanga oyo ezwamaki na Kaisalia, mpe ezalaki na nkombo ya Ponti Pilata, na Latin.

19. Nini ezali kino lelo na Atene, oyo endimisi makambo malobelami na Misala 17:16-34?

19 Ngomba na Ale. Na mobu 50 T.B., na engumba Atene, na mokili ya Grèce, Paulo asalaki moko na masukúlu na ye oyo makomami mpe oyo mayebani mingi. (Mis. 17:16-34) Yango esalemaki ntango bamoko kati na bato ya Atene bakangaki Paulo mpe bamemaki ye na Ngomba na Ale. Ngomba na Ale, to Aréopage (Ngomba ya Marsi), ezali nkombo ya ngomba kolókoló mpe ya mabangamabanga, oyo bolai na yango ezali ya mɛtɛlɛ soko 113, oyo ezwamaki na lobɔkɔ ya nɔ́rdi-wɛ́sti ya Akropoli ya Atene. Bisika ya kotya makolo mpo na komata bisilá kosalama kati na mabanga mpe bizali komema kino na nsɔngɛ́ ya ngomba, epai kuna bifandelo makasi oyo bisalamaki na mabanga makatami bikoki komonana kino lelo; bifandelo yango bisalaki mipanzi misato lokola oyo ya équerre. Ngomba na Ale ezali naino kino lelo, kondimisáká bongo lisoló oyo Biblia eyebisi na ntina na lisukúlu ya ntina mingi oyo Paulo asalaki kuna.

20. Litimbo ya Titus elandi kopesa litatoli na likambo nini, mpe ndenge nini?

20 Litimbo ya Titus. Yelusaleme mpe tempelo na yango ebomamaki na Baloma oyo batambwisamaki na Titus, na mobu 70 T.B. Na mobu oyo molandaki, kati na Loma, Titus asalaki elambo ya kokumisa bolóngi na ye, esika moko na Amperɛrɛ Vespasien, oyo azalaki tata na ye. Bakangami Bayuda oyo nkámá nsambo kati na bango baponamaki, batambwisamaki na molɔngɔ́ ya botamboli mpo na kosepela bolóngi. Ebele na biloko oyo bipunzamaki na etumba bimemamaki mpe na botamboli yango, elongo na biloko ya motuya oyo bakamataki na tempelo. Titus ye moko akómaki amperɛrɛ, abandaki koyangela na mobu 79 kino 81 T.B., mpe nsima ya liwa na ye, monimá monene, Litimbo ya Titus, esilaki kotongama mpe ebéngamaki ete divo Tito (mpo na Titus oyo akómisami nzambe). Botamboli na ye ya bolóngi emonisami likoló na liyemi, oyo lityami na mopanzi moko mpe na mopanzi mosusu ya litimbo yango. Na epai moko, elilingi ya basodá ya Loma etyami wana; basodá yango basimbi makɔnga oyo mapɛlisami te mpe balatisami bikɔti ya lokumu, mpe bamemi biloko mosantu ya tempelo ya Yelusaleme. Kati na biloko yango, ezalaki mpe na etɛlɛmiselo na miinda oyo ekabwanaki na bitape nsambo mpe mesa ya mampa ya kolakisama, oyo likoló na yango bakelelo mosantu ezalaki komonana. Na ngámbo mosusu, liyemi limonisi elombe Titus oyo atɛlɛmi na likalo liye lizali kobendama na mpunda minei mpe litambwisami na mwasi moko oyo azali elilingi ya engumba Loma.j Mbula na mbula, bibele ya bapaya-batáli-mboka bakendaka kotala Litimbo ya bolóngi ya Titus, oyo ezali naino kati na Loma; yango ezali litatoli lizangi maloba oyo limonisi kokokisama ya esakweli ya Yesu mpe lolenge Yehova akweisaki ekateli na ye ya nsɔ́mɔ likoló na Yelusaleme mboka na botomboki.​—Mat. 23:37–24:2; Luka 19:43, 44; 21:20-24.

21. (a) Na lolenge nini arkeoloji esili kokokisa mokumba motindo moko na bamaniskri oyo ezwamaki? (b) Ezaleli nini ebongi kozala na yango na ntina na arkeoloji?

21 Lolenge moko kozwama ya bamaniskri ya kala esungaki mpo na kopɛtola makomi ya ebandeli kati na Biblia, bobele bongo kozwama ya ebele na bitiká ya biloko ya kala ezali mbala mingi komonisa ete makambo oyo mayebisami kati na makomi ya Biblia, mabongi kotyelama motema ata na makambo mikemike ya istware, ya kronoloji, mpe ya geografi. Nzokande, kokanisa ete arkeoloji eyokani na Biblia kati na makambo nyonso ezali libungá monene. Esengeli komikundola ete arkeoloji ezali te etando ya boyekoli oyo ezangi mbebá. Biloko oyo bizwamaka na nzela ya arkeoloji bilimbolami na bato, mpe bandimbola mosusu kati na yango izali kobongwana mbala na mbala. Na bantango mosusu, arkeoloji ezali kopesa bilembeteli ata na makambo oyo matyelami ntembe te mpo na kolóngisa bosolo ya Liloba ya Nzambe. Lisusu, lokola nkɔ́ndɔ́ Sir Frederic Kenyon, mokambi mpe mobateli ya liboso ya British Museum na boumeli ya bambula mingi amonisaki yango, arkeoloji esili kosala ete Biblia “esosolama malamumalamu na nzela ya boyebi mozindo ya mambí manso makangani na yango mpe ya lolenge makambo mazalaki kosalema.”k Nzokande, kondima na biso esengeli kotongama likoló na Biblia, kasi likoló na arkeoloji te.​—Lom. 10:9; Ebe. 11:6.

22. Bilembeteli nini bikotalelama na boyekoli oyo elandi?   

22 Kati na yango moko, Biblia ezali na bilembeteli makasi oyo bimonisi ete yango ezali mpenza ‘liloba ya solosolo ya Nzambe na bomoi mpe na seko,’ lokola tokomona yango na boyekoli oyo elandi.​—1 Pet. 1:23.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Búku Bible and Spade, 1938, S. L. Caiger, lokasa 29.

b Búku Ancient Near Eastern Texts, 1974, J. B. Pritchard, lokasa 321; Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 941-942, 1104.

c Búku Light From the Ancient Past, 1959, J. Finegan, nkasa 91, 126.

d Búku Ancient Near Eastern Texts, lokasa 320.

e Búku Ancient Near Eastern Texts, lokasa 288.

f Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 151-152; Búku Light From the Ancient Past, nkasa 192-195.

g Búku Ancient Near Eastern Texts, lokasa 306.

h Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 581-583.

i Búku Ancient Near Eastern Texts, lokasa 316.

j Búku Light From the Ancient Past, lokasa 329.

k Búku The Bible and Archaeology, 1940, lokasa 279.

[Bililingi na lokasa 333]

Libanga ya Moaba

Tetragrami eyeisami monene, ndenge ezali komonana na balɛ́tɛlɛ ya makomi moko ya kala, na molɔngɔ́ ya 18, na lobɔkɔ ya mobali

[Elilingi na lokasa 334]

Prisme ya Mokonzi Senakeliba

[Elilingi na lokasa 335]

Libanga ya Nabonide

[Elilingi na lokasa 336]

Denali ya ebendé oyo ezali na likomi ya Tibeli

[Elilingi na lokasa 337]

Litimbo ya Titus

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 337]

Biutelo ya bililingi ya boyekoli 9 bitángami engebene lokasa:

lokasa 333, Musée du Louvre, Paris;

lokasa 334, na ndingisa ya Oriental Institute, University of Chicago;

lokasa 335, na ndingisa ya Bakambi ya British Museum;

lokasa 336, na ndingisa ya Bakambi ya British Museum.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto