Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango
Makomami mapemami mazali kopesa matomba oyo makoumela seko
1. Engɛngiseli monene nini botaleli na biso ya “Makomami nyonso” esili kofungola liboso na miso na biso?
BOTALELI na biso ya “Makomami nyonso mapemami na Nzambe” esili kofungola, liboso na miso na biso, emonaneli ya nkembo monene ya Yehova mpe mokano na ye ya Bokonzi. Tosili komona ete Biblia ezali mokanda moko, oyo mozali na motó na likambo bobele moko ya nguya—kolóngisama ya lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi mpe kokokisama monene ya mokano na ye mpo na mabelé, na nzela ya Bokonzi na ye oyo etambwisami na Klisto, Mombóto oyo alakamaki. Uta na nkasa ya ebandeli ya Biblia, motó na likambo bobele moko wana mozali kolobelama na bolai mpe kolimbolama kati na makomi oyo mazali kolanda, kino komonisama ya polele mpe ya nkembo ya bosolo ya mokano monene ya Nzambe, na nzela ya Bokonzi, na mikapo na yango ya nsuka. Biblia ezali mpenza búku ya kokamwisa! Kobandáká na mosala ya kokamwisa ya kozalisama ya makoló oyo mazali komonana mpe ya mabelé na bikelamu na yango ya bomoi, Biblia ezali koyebisa biso lisoló lipemami mpe lisoló ya solosolo ya misala ya Nzambe epai na bato kino na eleko na biso mpe ememi biso kino kokokisama mobimba ya bozalisi monene ya “likoló ya sika mpe mabelé ya sika” oyo Yehova akosala. (Emon. 21:1, NW) Ntango mokano na ye monene mokokokisama na mobimba na yango mpenza, na nzela ya Bokonzi ya Mombóto, Yehova Nzambe akomonana Tata ya boboto kati na boyokani na ye elongo na libota ya bato ya bomoko mpe ya esengo, libota oyo likosangana elongo na bikelamu ya likoló mpo na kosanzola ye mpe kosantisa nkombo na ye ya bulɛɛ.
2, 3. Lolenge nini motó na likambo oyo motaleli mpe Mombóto molobelami uta ebandeli kino nsuka ya Makomami?
2 Motó na likambo yango oyo motaleli mpe Mombóto molobelami na lolenge ya kokamwa mpenza kati na Makomami mobimba! Kolobeláká esakweli ya liboso oyo epemamaki, Nzambe apesaki elaka ete ‘mombóto ya mwasi’ akosasa motó ya nyoka. (Gen. 3:15, NW) Mbula koleka 2 000 na nsima, Nzambe ayebisaki mosembwi Abalayama ete: “Mabota nyonso na nsé makopambolama mpo na bana [“mombóto,” NW] na yo.” Mbula koleka 800 na nsima, Yehova apesaki elaka motindo moko epai na Mokonzi Davidi, moto na sembo, moko na bakitani ya Abalayama, komonisáká na yango ete Mombóto akozala na molɔngɔ́ ya bakonzi. Wana ntango ezalaki koleka, basakoli ya Yehova basanganaki na esengo nyonso mpo na kosakola makambo minene ya boyangeli ya Bokonzi. (Gen. 22:18; 2 Sam. 7:12, 16; Yis. 9:6, 7; Dan. 2:44; 7:13, 14) Na nsima Mombóto ye moko amonanaki, mbula koleka 4 000 nsima na elaka ya liboso oyo epesamaki kati na Edene. Moto yango, oyo azali mpe ‘mombóto ya Abalayama,’ ezali bongo Yesu Klisto, “Mwana na Oyo-Aleki-Likoló,” mpe Yehova apesi ye “kiti na bokonzi na Davidi tata na ye.”—Gal. 3:16; Luka 1:31-33.
3 Atako Mombóto yango, Mokonzi apakolami na Yehova, abomamaki na mombóto ya Nyoka awa na mabelé, nzokande Nzambe asekwisaki ye longwa na bakufi mpe atombolaki ye kino na lobɔkɔ na Ye ya mobali, epai kuna azali kozela ntango etyami na Nzambe mpo na ‘kotuta motó ya Satana.’ (Gen. 3:15; Ebe. 10:13; Lom. 16:20) Na nsuka, mokanda ya Emoniseli mozali komema emonaneli mobimba kino kokokisama na yango monene. Klisto alatisami nguya ya Bokonzi mpe abwaki “nyoka na kalakala, oyo abyangami [Zábolo, NW] mpe Satana,” longwa na likoló kino na mabelé. Na boumeli ya ntango mokuse, Satana ayeisi mawa na mabelé mpe azali kobundisa ‘batikali ya mombóto ya mwasi ya Nzambe.’ Kasi Klisto, “Mokonzi na bakonzi,” akobɛta mabota. Satana, nyoka na kalakala, akobwakama na libulu mpe na nsima akobomama libela na libela. Bobele na ntango yango, na lisalisi ya Yelusaleme ya sika, mwasi ya Mwana na Mpate, matomba ya mbeka ya Klisto makoyeisama epai na bato mpo na kopambolama ya mabota nyonso awa na mabelé. Na bongo, motó na likambo monene ya Makomami mapemami mokokokisama na miso na biso na nkembo na yango nyonso!—Emon. 11:15; 12:1-12, 17; 19:11-16; 20:1-3, 7-10; 21:1-5, 9; 22:3-5.
TÓZWA MATOMBA NA MAKOMI YANGO MAPEMAMI
4. Lolenge nini tokoki kozwa litomba monene uta na Makomami Mosantu, mpe mpo na nini?
4 Lolenge nini tokoki kozwa litomba lileki monene uta na Makomami Mosantu? Tokoki kozwa yango na kotikáká nzela ete Biblia esala mosala kati na bomoi na biso. Na koyekoláká mokolo na mokolo mpe kosaleláká Makomami mapemami, tokoki kozwa litambwisi liuti na Nzambe. “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya,” mpe ekoki kozala nguya monene mpo na kosala boyengebene kati na bomoi na biso. (Ebe. 4:12) Soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe ntango nyonso mpe tozali kolanda litambwisi na yango, tokokoka ‘kolata bomoto ya sika oyo esalami engebene mokano ya Nzambe kati na boyengebene mpe bosembo na solo.’ Tokoyeisama sika kati na nguya oyo ezali kopusa makanisi na biso, mpe tokobongisama na koyeisáká makanisi na biso sika, mpo na kososola “mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.”—Ef. 4:23, 24; Lom. 12:2.
5. Toli nini tokoki kozwa na ezaleli mpe na ndakisa ya Mose?
5 Tokoki kozwa batoli mingi na kotaláká lolenge basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe bazwaki matomba na boyekoli ya Liloba ya Nzambe mpe na bomanyoli likoló na yango. Na ndakisa, tokoki kotánga Mose, ‘moto alekaki bato nyonso na komikitisa,’ oyo azalaki kondima kolakisama ntango nyonso mpe atondaki na mposa ya koyekola. (Mit. 12:3) Tosengeli ntango nyonso kondima na bosolo mpenza lotómo ya Yehova ya kozala mokonzi, lokola Mose andimaki yango. Ezalaki Mose nde moto abondelaki na maloba oyo: “[Yehova], yo ozalaki [ebombamelo] na biso longwa na ntango nyonso. Naino ngomba izalaki te mpe naino nsé mpe mokili te, longwa bobele na liboso mpenza mpe lobiko na lobiko, yo ozali Nzambe.” Mose azwaki litomba na mayele ya Nzambe, mpamba te Yehova asalelaki ye mpo na kokoma mikanda na ebandeli ya Biblia. Na yango, asosolaki ntina ya kolukaluka mayele ya Yehova mokolo na mokolo. Na bongo, asambelaki Nzambe ete: “Teyá biso ete tótánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema na mayele.” Lokola “mbula na biso” ikoki kozala moke, bobele mbula 70, to mbula 80 oyo tokokisaka na “makasi,” boye tokomimonisa bato na mayele soki tozali koleisama na Liloba na ye mokolo na mokolo, mpo ete na yango “[bolamu] na Nzambe” ‘ekofanda kati na biso,’ lokola ezalaki bongo mpo na Mose, mosaleli na ye ya sembo.—Nz. 90:1, 2, 10, 12, 17.
6. Lolenge nini tokoki kozalisa nzela na biso malamu lokola Yosua?
6 Oyo nde likambo ya ntina komanyola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo! Yehova amonisaki yango polele epai na Yosua, mokitani ya Mose; ayebisaki ye ete: “Ozala bobele makasi mpe yiká mpiko mingi mpo na kokeba kotosa mibeko nyonso oyo Mose, moombo na ngai, alakelaki yo. Pɛngwá na yango epai na lobɔkɔ na mobali to na lobɔkɔ na mwasi te, na ntina ete [osala na mayele epai nyonso] ekokenda yo. Búku na mobeko oyo ekolongwa na monɔkɔ na yo te, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo nyonso makomami na yango. Mpo ete bongo okozalisa nzela na yo malamu mpe bongo [okosala na mayele].” Botángi ya Mibeko ya Nzambe oyo Yosua azalaki kosala yango ntango nyonso ‘ezalisaki nzela na ye malamu’? Mapamboli oyo Yehova asopaki likoló na misala na ye ya bitumba makasi kati na Kanana mazali kopesa eyano na motuna oyo.—Yos. 1:7, 8; 12:7-24.
7. Lolenge nini Davidi amonisaki botɔ́ndi na ye mpo na mayele mauti na Nzambe, mpe lolenge nini botɔ́ndi motindo wana emonisami kati na Nzembo 119?
7 Kamatá lisusu ndakisa ya molingami Davidi, moto mosusu oyo apesaki motuya mingi na mayele ya Yehova. Oyo nde botɔ́ndi bouti na motema mpenza ye amonisaki mpo na “mobeko,” ‘makundoli,’ “malako,” “mitindo” mpe ‘bikateli’ ya Yehova! Lokola Davidi amonisi yango: “Mposa na yango eleki mposa na wolo, ata na wolo mingi malamu; eleki mafuta na nzoi na elɛngi, ata mafuta yango makwei na nsé na ndako na nzoi.” (Nz. 19:7-10) Motó na likambo wana ya kosepelisa elobelami na bolai mpe ezongelami mbala na mbala na mokomi mosusu ya Nzembo, na elobeli kitoko oyo ezali mpenza kolamwisa mayoki, kati na Nzembo 119 na mobimba na yango. Wana tozali koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe kotosa toli na yango ya mayele, tiká ete tózala ntango nyonso na likoki ya koloba epai na Yehova ete: “Liloba na yo ezali mwinda na ngai, mpe pole mpo na makolo na nzela na ngai. Makundoli na yo mazali na kokamwa; yango wana molimo na ngai ezali kobatela yango.”—Nz. 119:105, 129, NW.
8. Maloba nini ya Salomo tosengeli komekola yango?
8 Na mikolo oyo azalaki naino sembo, Salomo, mwana ya Davidi azalaki mpe kotambwisama na Liloba ya Nzambe, yango wana kati na makomi na ye mpe tozali kokuta maloba kitoko ya botɔ́ndi oyo ebongi ete tómekola yango. Na lisalisi ya botángi mpe ya bosaleli mateya ya Biblia mokolo na mokolo, tokososola malamumalamu ndimbola mozindo ya maloba oyo ya Salomo ete: ‘Mapamboli epai na moto oyo azwi mayele mpe moto oyo azwi bososoli. Mikolo mingi izali na lobɔkɔ na ye na mobali, mpe na lobɔkɔ na ye na mwasi izali bozwi mpe lokumu. Nzela na ye izali nzela na esengo mpe bilekelo na ye nyonso izali kimya. Ye azali lokola nzeté na bomoi mpo na nyonso baoyo bakosimbaka ye; moto na moto oyo akobatelaka ye azali na esengo.’ (Mas. 3:13, 16-18) Koyekola Liloba ya Nzambe mpe kotosa yango mokolo na mokolo ezali kopesa bosepeli monene uta sikawa; ezali mpe kopesa elikya mpo na “mikolo mingi”—bomoi ya seko na mokili ya sika ya Yehova.
9. Elendiseli nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yilimia?
9 Kati na baoyo bazalaki kolinga mpe kotosa Makomami mapemami, tosengeli te kobosana basakoli ya sembo ya Nzambe. Na ndakisa, Yilimia apesamelaki mosala moko ya mpasi mingi. (Yil. 6:28) Lokola alobaki yango: “Liloba na [Yehova] ezalisameli ngai eloko na nsɔ́ni mpe na kotyolama mokolo na mokolo.” Kasi azwaki bokasi mingi na boyekoli na ye ya Liloba ya Nzambe; kútu ye moko aponamaki mpo na kokoma mikanda minei ya Makomami mapemami—elingi koloba 1 Mikonzi mpe 2 Mikonzi, Yilimia mpe Bileli. Na bongo, nini esalemaki ntango bolɛmbu elingaki kozwa Yilimia mpe ntango azwaki likanisi ya kotika kosakola “liloba na [Yehova]”? Tótika Yilimia ye moko apesa eyano: “Ezalaki na motema na ngai lokola mɔ́tɔ na kozikisa, mobombami kati na mikuwa na ngai; nalɛmbaki mpo na koboya, nayebaki koyikela yango mpiko te.” Asɛngisamaki na koyebisa maloba ya Yehova, mpe na kosaláká bongo, amonaki ete Yehova azalaki elongo na ye “lokola elombe na nsɔ́mɔ.” Soki tozali koyekola mpe kolanda koyekola Liloba ya Nzambe, na boye ete yango ekɔtela biso mpenza, lokola esalaki epai na Yilimia, nguya ya Yehova oyo eleki nyonso ekozala mpe elongo na biso; bongo tokozala na likoki ya kolónga mikakatano nyonso ntango tozali kokóba kolobela mokano monene ya Bokonzi na Ye.—Yil. 20:8, 9, 11.
10. Mokumba nini Makomami makokisaki kati na bomoi ya Yesu, mpe abondelaki na ntina na likambo nini mpo na bayekoli na ye?
10 Kasi, ezali boni mpo na ndakisa na biso aleki monene, “Mosaleli ya liboso mpe Mokokisi ya kondima na biso, ye Yesu”? Ayebaki nde malamu Makomami mapemami lolenge moko na basakoli nyonso mpe bato mosusu ya sembo, oyo bazalaki na bomoi liboso na ye? Ntembe ezali te ete ayebaki yango, mpamba te emonisami polele na ebele ya mikapo oyo azalaki kolobela mpe na lolenge na ye ya bomoi oyo eyokanaki na Makomami. Ezalaki mpo na Liloba ya Nzambe oyo abatelaki kati na makanisi na ye nde amipesaki mpo na kosala mokano ya Tata awa na mabelé: “Talá nakoya! Ekomami mpo na ngai kati na mokanda mokangami. Nasepeli kosala [mokano] na yo, ɛ Nzambe na ngai; mibeko na yo izali kati na motema na ngai.” (Ebe. 12:2, NW; Nz. 40:7, 8; Ebe. 10:5-7) Na bongo, Liloba ya Nzambe likokisaki mokumba ya ntina mingi mpo na kobulisama ya Yesu uta na Yehova, to kobongisama na ye mpo na mosala ya Nzambe. Yesu abondelaki ete bayekoli na ye mpe bábulisama: “Bulisá bango kati na solo na yo. Liloba na yo ezali solo. Pelamoko esili yo kotinda ngai kati na mokili, ngai mpe natindi bango kati na mokili. Ngai nazali komibulisa mpo na bango mpenza ete bango bábulisama kati na solo.”—Yoa. 17:17-19.
11. (a) Na oyo etali Liloba ya Nzambe, likambo nini Petelo alobelaki makasi epai na baklisto bapakolami? (b) Mpo na nini boyekoli ya Biblia ezali mpe na ntina mingi mpo na ebele monene?
11 Wana esili bango kobulisama “kati na solo,” bayekoli ya Yesu, oyo babotami na elimo mpe bapakolami na yango, basengeli ‘koumela kati na liloba na ye’ mpo na kotángama mpenza bayekoli na ye. (Yoa. 8:31) Na yango, wana azalaki kokomela “bango basili kozwa likabo na kondima,” Petelo alobelaki makasi ntina ya kokóba koyekola mpe kotya likebi na Liloba ya Nzambe ete: “Na bongo, nakotika te kokanisela bino makambo oyo, ata bosili koyeba yango mpe kolendisama na makambo na solo masili kokómela bino.” (2 Pet. 1:1, 12) Makundoli ya mbala na mbala, lokola oyo mazwami na botángi mpe boyekoli ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, mazali mpe na ntina mingi mpo na baoyo nyonso bazali na elikya ya kozala kati na “ebele monene” oyo Yoane amonaki na emonaneli nsima ya kolobela bato 144 000 oyo batyami bilembo mpe bauti na mabota nyonso ya Yisalaele ya elimo. Mpo ete soki bakóbi te komela mai ya solo oyo makopesaka bomoi, ndenge nini ebele monene yango bakoki, na kolongobana mpenza, ‘kolanda konganga na mongongo makasi ete, Lobiko, tozwi yango na Nzambe na biso oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana na Mpate’?—Emon. 7:9, 10; 22:17.
12. Mpo na nini tosengeli ntango nyonso komanyola likoló na Liloba ya Nzambe?
12 Tozali na lolenge mosusu ya kosala te! Nzela ya kozwa litomba lileki monene uta na Makomami mapemami, nzela ya kozwa lobiko kino bomoi ya seko, etali koyekola Makomami yango mpe kotambwisa bomoi na biso na boyokani na yango mokolo na mokolo. Tosengeli ntango nyonso komanyola Liloba ya Nzambe, na botɔ́ndi motindo moko na oyo mokomi ya Nzembo amonisaki ete: ‘Tiká nákanisa lisusu yango esalaki Yah; tiká nákanisa misala na yo na kokamwa, yango na kalakala. Mpe nakomanyola likoló na mosala na yo nyonso.’ (Nz. 77:11, 12) Komanyola likoló na ‘bikela mpe mosala na kokamwa’ ya Yehova ekopusa biso mpe na kozala na molende mpo na misala malamu, kobateláká elikya ya bomoi ya seko liboso na biso. Mokano ya búku oyo, “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” mozali ya kolendisa moto nyonso oyo alingaka boyengebene ete azwa matomba malamu mpo na libela, matomba oyo mauti na boyekoli ya ntango nyonso mpe bosaleli ya Liloba ya Nzambe.
NA “NTANGO NA MPASI”
13. Tozali kobika na ‘ntango nini ya mpasi’?
13 Eleko ya lelo ezali eleko eleki mpasi kati na lisoló mobimba ya bato. Etondi na makambo mingi ya nsɔ́mɔ. Na ntembe te, ekoki kolobama ete libota ya bato oyo lizali na bomoi lelo lizali mpenza na likámá. Na bongo, maloba malandi ya ntoma Paulo mabongi mpenza na ntango oyo: “Kasi ososola likambo oyo ete, na m[i]kolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, [balingi] na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔ́ngi, batɔmbɔki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nkó, bato babimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali kowangana nguya na yango. Opɛngwa [longwa na bato, NW] yango.”—2 Tim. 3:1-5.
14. Na kotalela ntango, toli nini Paulo apesaki oyo tosengeli kolanda?
14 Mpo na nini kopɛngwa longwa na bato yango? Ezali mpo ete etikali moke nzela na bango ya kozanga bobángi Nzambe ekosuka na kobomama! Kútu, tiká ete biso, elongo na bato ya motema sembo, tólanda mateya ya pɛto mauti na Makomami mapemami, kosaláká ete Makomami yango mázala moboko ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Tiká ete tólanda maloba ya Paulo epai na elenge Timoté ete: “Kasi yo, oumela kati na yango eyekoli yo mpe endimi yo.” (2 Tim. 3:14) Ɛɛ, “oumela” kati na yango, Paulo alobi bongo. Mpo na kosala bongo, tosengeli, na komikitisa nyonso, kopesa nzela na Makomami ete máteya biso, mápamela biso, másembola makambo kati na bomoi na biso, mpe mápesa biso disipilini kati na boyengebene. Yehova ayebi oyo tozali na yango mposa, mpamba te makanisi na ye maleki mpenza makanisi na biso. Na nzela ya Makomami na ye mapemami, azali koyebisa biso makambo oyo mazali na litomba mpo na biso, na ntina ete tókoka kobongisama malamu mpe kozala na makoki mingi mpo na mosala malamu ya kotatola nkombo mpe Bokonzi na ye. Paulo apesi toli oyo ya ntina wana azali kolobela “ntango na mpasi” oyo esengelaki koya na “mikolo ya nsuka”: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo asɛlingwi mpenza mpo na mosala nyonso malamu.” Tiká ete biso banso tóbikisama na ntango oyo ya mpasi na kolandáká toli yango epemami!—2 Tim. 3:16, 17, NW; Yis. 55:8-11.
15. (a) Kozanga botosi ebimisaki mbuma nini? (b) Libaku monene nini lisili kofungwama na nzela na botosi ya Klisto?
15 Botosi na Makomami mapemami esengeli kozala mokano na biso. Ezalaki mpo na kozanga botosi na liloba mpe na mobeko ya Yehova nde moto ya liboso akweaki na lisumu mpe kufa, na yango “kufa mpe epalangani epai na bato nyonso.” Na lolenge yango, moto abungisaki libaku malamu oyo alingaki kozala na yango kati na Paladiso na Edene, elingi koloba, “kozwa mbuma na nzeté na bomoi, kolya yango mpe koumela lobiko na lobiko.” (Lom. 5:12; Gen. 2:17; 3:6, 22-24) Kasi, na nzela na botosi ya Klisto mpe na moboko ya mbeka ya ‘Mwana na Mpate yango ya Nzambe,’ Yehova akosala ete “ebale na mai na bomoi, kitoko lokola kulusatala,” etíyola mpo na litomba ya bato banso oyo bamipesi na botosi nyonso epai na Ye. Lokola ntoma Yoane amonaki yango kati na emonaneli: ‘Na bipai nyonso mibale na ebale yango, ezalaki na nzeté na bomoi kobotáká mbuma mbala zomi na mibale, sanza na sanza kobotáká mbuma na yango. Nkasa na nzeté yango izali mpo na kobikisa bato na mabota.’—Yoa. 1:29; Emon. 22:1, 2, NW; Lom. 5:18, 19.
16. Makomami mapemami mazali kopesa litomba nini ya seko?
16 Nzela ya bomoi ya seko efungwami lisusu epai na bato. Na bongo, esengo na baoyo bazali kolanda likomi oyo lipemami: ‘Poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga Yehova Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangana na ye, mpo ete ye azali bomoi na yo mpe bolai ya mikolo mpo na yo.’ (Det. 30:19, 20, NW) Tiká ete Yehova, Nzambe mpe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, apambolama; ye oyo apesi biso likabo monene ya bomoi mpo na mbeka ya Mwana na ye mpe na nzela ya Bokonzi na ye ya seko. Tozali mpenza na esengo monene mpe botɔ́ndi mozindo na kotánga mpe kotánga lisusu, na koyekola mpe koyekola lisusu, mpe na komanyola likoló na solo nyonso oyo ya motuya mingi, mpamba te, solosolo “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” mazali komema kino na bomoi ya seko, ezala na likoló to awa na mabelé oyo makobongwana paladiso. (Yoa. 17:3; Ef 1:9-11) Na nsuka, biloko nyonso bikozala ‘bulɛɛ liboso na Yehova.’—Zek. 14:20; Emon. 4:8.