Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gt mok. 16
  • Molende mpo na ndako na Jéhovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Molende mpo na ndako na Jéhovah
  • Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Masolo mosusu
  • Yesu amonisi molende mpo na losambo ya solo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mpo na nini Yesu ayaki na mokili
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu apɛtoli tempelo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yesu asakoli na Galile mobimba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
gt mok. 16

Mokapo 16

Molende mpo na ndako na Jéhovah

BALEKI mibali na Yesu, elingi koloba bana mosusu na Marie, nkombo na bango Yakobo, Yozefe, Simona mpe Yuda. Liboso ete bakenda na Kapernaume, elongo na Yesu mpe bayekoli na ye, ntango mosusu batelemi naino na Nazarete, na mboka na bango, mpo ete bakoka kokamata biloko oyo bakosengela na yango.

Kasi mpo na nini Yesu akei na Kapernaume na esika ete alanda mosala na ye na Kana, na Nazarete to na mboka mosusu kati na ngomba mike ya Galilai? Liboso mpenza, Kapernaume ezali na esika moko malamu mingi mpe emonani ete ezali engumba moko monene. Lisusu, mingi na bayekoli ya sika na Yesu bafandi na Kapernaume to mosika mingi te na engumba yango. Na bongo, Yesu akokoka koteya bango kozanga ete batika bandako na bango.

Na boumeli ya ntango oyo alekisi na Kapernaume, Yesu asali makamwisi mingi, lokola ye moko akoloba yango nsima ya mwa basanza. Kasi mosika te Yesu mpe bayekoli na ye bakamati lisusu nzela. Ezali bongo eleko pene na nsuka ya sanza ya marsi mpe ebandeli ya aprili, bakei na Yelusaleme mpo na elambo ya Pasika ya mobu 30. Kuna, bayekoli na ye bakomona lolenge mosusu ya bomoto na ye oyo mbala mosusu bayebaki naino yango liboso te.

Engebene Mobeko ya Nzambe, Bayisraele basengeli kopesa mbeka ya banyama. Yango wana na Yelusaleme, bato na mombongo bazali kotekisa bibwele mpe bibenga epai na baoyo bazali koya na tempelo, mpo ete ezali kosalisa bango. Kasi bazali kosala mombongo yango kati na tempelo mpe bazali koyiba bato mpo ete bazali koteka na ntalo makasi.

Yesu asiliki. Asali mpimbo na nsinga mpe abengani batekisi libanda ya tempelo. Asopi mbongo ya bibende ya basenzisi mpe akweisi mesa na bango. Angangeli batekisi na bibenga ete: “Longola biloko oyo awa! Botika kosala zando awa na ndako na Tata na ngai!”

Ntango bayekoli bamoni bongo bakanisi esakweli oyo elobi na ntina na Mwana na Nzambe ete: “Mposa mpo na ndako na yo elei ngai.” Kasi Bayuda batuni Yesu ete: “Okomonisa biso elembo nini awa ezali yo kosala makambo oyo?” Yesu ayanoli bango ete: “Boma tempelo oyo mpe nakotelemisa yango lisusu na mikolo misato.”

Bayuda bakanisi ete azali koloba mpo na tempelo ya mabanga, yango wana balobi na ye ete: “Tempelo oyo eumeli mibu ntuku minei na motoba mpo na kotongama mpe yo okotelemisa yango na mikolo misato?” Kasi Yesu azali koloba mpo na tempelo mosusu, yango nzoto na ye. Mibu misato na nsima, wana Yesu akosekwisama na bakufi, bayekoli na ye bakomikundola maloba oyo. Yoane 2:12-22; Matai 13:55; Luka 4:23.

▪ Nsima na elambo ya libala na Kana, Yesu akei wapi?

▪ Yesu asiliki mpo na nini? Mpe asali nini?

▪ Bayekoli na Yesu bamikundoli nini awa emoni bango ye kosala bongo?

▪ Yesu alobi nini mpo na “tempelo oyo,” mpe alingaki koloba nini na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto