Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • T-19 nk. 2-6
  • Mokili ya lelo ekoumela lisusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili ya lelo ekoumela lisusu?
  • Mokili ya lelo ekoumela lisusu?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokili moko esuki​—Mokili mosusu ekitani yango
  • Oyo ekokomela mokili ya lelo
  • “Elembo”
  • Mai ebomi mokili—Ekoboma yango lisusu?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Okweisaka mokili na kondima na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mikolo ya nsuka
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Sikoyo tosengeli mpenza kokɛngɛla mingi koleka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Mokili ya lelo ekoumela lisusu?
T-19 nk. 2-6

Mokili ya lelo ekoumela lisusu?

Na mikolo na biso bato bazali kolobela mingi nsuka ya mokili koleka na ntango ya kala. Mingi bazali kobanga ete mokili ekobomama na etumba moko ya nikleere. Basusu bazali kokanisa ete kobeba ya mopepe mpe ya mai ekoki koboma mokili. Bato mingi bazali mpe kobanga noki kobeba ya makambo na nkita epusa bato mosusu na kotombokela bazalani na bango.

Mokili ya lelo ekoki mpenza kosuka? Soki ee, yango ekotalela makambo nini? Ezali na eleko moko na ntango ya kala oyo mokili ebomamaki?

Mokili moko esuki​—Mokili mosusu ekitani yango

Ee, na kala, mokili ebomamaki. Ezali bongo mokili oyo ekomaki mabe koleka na mikolo ya Noa. Biblia elobi ete “mokili na ntango yango ezindaki mpe ebomamaki [na mai].” Ebakisi ete: “[Nzambe] atikaki mokili na kalakala te, kasi abatelaki Noa, mosakoli na boyengebene, na bamosusu nsambo wana eyeisaki ye mpela na mokili likoló na batioli.”​—2 Petelo 2:5; 3:6.

Totala eloko nini esukaki na eleko wana mpe eloko nini esukaki te. Nsuka ya mokili elimbolaki te nsuka ya bato nyonso, mpamba te Noa mpe libota na ye babikaki na mpela ya molongo mobimba. Motindo moko mabelé mpe makoló matondi na myoto kitoko ebomamaki mpe te. Ezali “batioli na Nzambe,” mokili to ebongiseli ya bato mabe, yango nde ebomamaki.

Nsima na mibu, bakitani ya Noa bakómaki mingi mpe mokili mosusu ebotamaki. Mokili wana ya mibale, to ebongiseli ya biloko, ezali naino kino na mikolo na biso oyo. Lisolo na yango litondi na bitumba, na koboma bato mpe na misala ya mobulu. Nini ekokomela mokili yango? Ekoumela lisusu?

Oyo ekokomela mokili ya lelo

Nsima na koloba ete mokili ya ntango ya Noa ebomamaki, lisolo na Biblia eyebisi lisusu ete: “Se na liloba yango moko, likoló mpe mabelé na ntango oyo ebombami ete ezika na mɔ́tɔ.” (2 Petelo 3:7, MN) Mokomi mosusu ya Biblia alobi mpe ete “mokili [oyo ezali sikawa] ezali mpe kolongwa.”​—1 Yoane 2:17.

Maloba oyo na Biblia malimboli te ete mabelɛ́ to likoló oyo ezali na myoto ekolongwa, mpamba te ata na mikolo ya Noa, yango elongwaki te. (Nzembo 104:5) Ezali nde mokili ya ntango oyo, elongo na “makoló” na yango, to mikonzi na politike oyo batambwisami na Satana, mpe “mabelé” na yango, to libota na bato, yango nde ekobomama lokola na mɔ́tɔ. (Yoane 14:30; 2 Bakolinti 4:4) Mokili, to ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, ekobomama mpenza lokola ebomamaki mokili oyo ezalaki liboso na mpela. Engebene Yesu Klisto ye moko, makambo mazalaki na “mikolo ya Noa” nde mamonani lisusu na mikolo na nsuka na mokili na ntango oyo.​—Matai 24:37-39.

Tosimba ete ntango Yesu alobaki mpo na mikolo ya Noa, azalaki koyanola na motuna oyo bantóma na ye batunaki ye ete: “Elembo na kozonga na yo mpe ya nsuka na mokili ekozala nini? ” (Matai 24:3, Traduction Œucuménique de la Bible) Bayekoli na Yesu bayebaki na malamu nyonso ete mokili ekozwa nsuka. Likanisi wana ebangisaki bango?

Nkutu, ntango Yesu alobelaki bango makambo oyo masengelaki kobima liboso ete nsuka ya mokili eya, alendisaki bango ete basepela, ‘mpamba te lobiko na bango ebelemi.’ (Luka 21:28) Mpo ete, wana nde bakosikolama na bopusi ya Satana mpe ya ebongiseli na ye ya biloko mabe, mpe bakokota na mokili ya sika mpe ya kimya.​—2 Petelo 3:13.

Kasi ntango nini mokili ya lelo ekozwa nsuka? “Elembo” nini Yesu apesaki na ntina etali “kozonga na ye mpe nsuka na mokili”?

“Elembo”

Liloba na greke ebongolami awa na liloba “kozonga” ezali pa·rou·siʹa; yango elimboli “kozala wana.” Na yango, ntango “elembo” ekomonana, yango ekolimbola te ete mosika te Klisto akoya, kasi ekolimbola ete asili kozonga mpe azali wana. Yango ekomonisa ete asili kobanda koyangela na likoló kozanga komonana na miso na bato mpe mosika te akoboma banguna na ye.​—Emoniseli 12:7-12; Nzembo 110:1, 2.

“Elembo” oyo Yesu apesaki esukaki bobele na likambo moko te, kasi na makambo mingi mpe makambo yango matali mokili mobimba. Makambo wana nyonso nde masalemi na boumeli ya eleko oyo bakomi ya Biblia babengaki yango ete “mikolo na nsuka.” (2 Timote 3:1-5; 2 Petelo 3:3, 4) Totalela mwa mosusu kati na makambo yango oyo, engebene Yesu, nde mamonisi ete tozali kobika na “mikolo na nsuka.”

“Libota moko ekotelemela libota mosusu mpe bokonzi moko ekotelemela bokonzi mosusu.” (Matai 24:7) Na ntango na biso, bitumba bisili kongala mingi mpenza. Mokomi moko ya makambo maleki alobaki ete: “Etumba ya Liboso ya mokili mobimba [oyo ebandaki na 1914] ezalaki mpenza etumba ya liboso ya ‘bato nyonso.’ ” Kasi Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebomaki lisusu bato mingi koleka. Bitumba bizali naino kobebisa mabelɛ́ kino lelo oyo. Na ntembe te, maloba na Yesu masili kokokana polele.

“Nzala ekozala.” (Matai 24:7) Etumba ya Liboso ya mokili mobimba elandamaki na nzala, mbala mosusu yango nde elekaki mpenza kati na Lisolo mobimba ya bato. Ezalaki mpe na nzala makasi nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Kozanga kolya malamu ezali konyokola koleka miliare moko kati na miliare mitano ya bato na mokili mobimba; ezali koboma pene na milió 14 ya bana mbula nyonso. Na ntembe te, “nzala” ezali.

“[Mabelé] ekoningana mingi.” (Luka 21:11) Motuya na bato babomami na koningana na mabelɛ́ uta 1914 eleki soko mbala zomi motuya na baoyo bakufaki mpo na yango na bikeke bizalaki liboso. Totanga bobele mwa ndambo na koningana na mabelɛ́ oyo ebomaki bato mingi: 1920, Chine, bato 200 000 bakufaki; 1923, Japon, bato 99 300 bakufaki; 1939, Turquie, bato 32 700 bakufaki; 1970, Pérou, bato 66 800 bakufaki; mpe na 1976, Chine, pene na bato 240 000 bakufaki (800 000 engebene mitango mosusu). Na ntembe te, “mabelɛ́ eningani mingi mpenza”!

‘Malali mabe ekozala na esika na esika.’ (Luka 21:11) Bobele nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, pene na bato 21 milió bakufaki na grippe espagnole. Zulunalo Science Digest ekomaki na ntina yango ete: “Na boumeli ya Lisolo mobimba ya bato, ezalaki mbala ya liboso oyo liwa ezwaki bato mingi boye na mwa eleko mokuse.” Uta ntango yango, maladi ya motema, kanser, SIDA mpe maladi mosusu mingi, esili koboma bato bamilió mingi lisusu.

“Mobulu ekoyikana mingi.” (Matai 24:12) Bato nyonso bandimi ete uta 1914 mokili esili kobebisama na mabe ya ndenge nyonso mpe na mobulu. Na ba mboka mingi, bato bazali kobanga wana ezali bango kotambola na balabala, ata na moi mpenza. Na butu, bato bazali komikangela na bandako na bango na mafungola mpe bazali kobanga kobima libanda.

Esakolamaki ete makambo mingi mosusu masengelaki kobima na boumeli ya mikolo na nsuka, mpe nyonso ezali mpenza kokokana. Yango elimboli ete nsuka ya mokili ekomi penepene. Kasi, ezali esengo, mpo ete babiki bakozala. Nsima na koloba ete “mokili ezali kolongwa,” Biblia epesi elikya oyo: “Ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.”​—1 Yoane 2:17.

Na bongo esengeli na biso koyekola nini ezali mokano na Nzambe mpe kosala yango. Na boye nde tokokoka kobika na nsuka na mokili ya lelo mpe kosepela seko na makambo kitoko oyo makozala kati na mokili ya sika oyo Nzambe akosala. Biblia elaki ete “Nzambe akolongola mpisoli nyonso na miso na [bato], mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Soki liyebisi lizali te, mikapo ya Biblia mizwami na Biblia Lingala, haut-fleuve, 1970. MN elakisi Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafoto na lokasa 6]

Esika bafoto ezwami: Avion: foto USAF. Mwana: foto O.M.S., W. Cutting. Koningana ya mabelɛ́: Y. Ishiyama, université ya Hokkaido, Japon.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto