Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • T-21 nk. 1-6
  • Bomoi malamu na libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi malamu na libota
  • Bomoi malamu na libota
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya libota
  • Wapi mwango mpo na kolónga?
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Okoki kozala na libota ya esengo
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Sɛkɛlɛ́ ezali nde mpo na kozala na bolamu na libota?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Bwanya oyo ekosala ete libota ezala na esengo
    Lamuká!—2021
Makambo mosusu
Bomoi malamu na libota
T-21 nk. 1-6

Bomoi malamu na libota

Mabota makoki mpenza kozala na esengo?

Lolenge nini yango ekoki kosalema?

Oyebi mabota mazali na bomoko mpe na esengo lokola mabota oyo mamonisami na trakte oyo? Mabota mazali kobeba bipai binso. Koboma libala, kozanga mosala, mawa ya motema, mikakatano ya baoyo bazali kobɔkɔlo bana bobele bango moko​—⁠nyonso wana ezali kopesa mpasi. Mwasi moko mopesi toli na mabota, amilelaki mpo na ezalela wana ete: “Lelo oyo, bisakweli bilobeli kobeba ya libota bizali kokokana.”

Mpo na nini mabota matungisami lelo na mikakatano makasi? Lolenge nini kozala na bomoi malamu na libota?

Ebandeli ya libota

Mpo na koyanola na mituna oyo, tosengeli koyeba ebandeli ya libala mpe libota. Ya solo, soki yango ezali na Mobandisi, na Mozalisi, basangani ya libota basengeli koluka toli epai na ye, mpamba te ayebi lolenge nini kozala na bomoi malamu na libota, koleka bato nyonso mosusu.

Kasi, bato mingi bakanisi ete libota lizali na Mobandisi na yango te. Mokanda Encyclopédie américaine moyebisi ete: “Bato mosusu ya sianse bakanisi ete libala libandaki na bosangisi nyama mibale, oyo ekokani na moto te.” Nzokande, Yesu Klisto alobelaki kozalisama ya mobali mpe mwasi. Atalelaki mpenza lisoló ya Biblia mpe alobaki ete: “Oyo Nzambe asili kokangisa, tika te ete moto akangola yango!”​—⁠Matai 19:​4-6.

Na yango, Yesu Klisto azali na elónga. Nzambe ya mayele azalisaki bato ya liboso mpe akamataki bibongiseli mpo ete bazala na bomoi ya esengo na libota. Nzambe asangisaki babalani ya liboso kati na libala mpe alobaki ete mobali ‘akokangana na mwasi na ye mpe bango mibale bakozala mosuni moko.’ (Genese 2:​22-24) Mikakatano mizali kotungisa libota na mikolo na biso, mikoki kouta na kozanga kotosa mitinda mityami na Mozalisi kati na Liloba na ye, Biblia, boye te?

Wapi mwango mpo na kolónga?

Lokola oyebi yango, mokili ya lelo mozali kolendisa moto na moto ete azala na moimi mpe na koluka bobele matomba na ye moko. Moto moko ayekoli makambo ya nkita, alobaki na bayekoli oyo bazwaki mapɔlɔ́mi na université moko ya Amerika, ete: “Lokoso ekopesaka matomba mingi. Soki ozali na lokoso, okoki mpe kozala na bomoi malamu.” Nzokande, koluka kozwa biloko mingi ya mosuni, ezali mwango te mpo na kolónga. Ya solo, mposa na biloko ya mosuni ezali moko na mikakatano minene mpo na bomoi ya libota, mpamba te, ezali kobebisa boyokani ya bato mpe ezali koyiba bato ntango, mpe misolo na bango. Kasi, tala masese mibale ya Biblia oyo mazali kosalisa biso na koyeba eloko oyo ezali mpenza kopesa bolamu.

“Kolya ndunda na esika na bolingo eleki kolya mosuni kitoko mopesami na koyina.”

“Kolya limpa likaoki elongo na kimya eleki ndako etondi na bilambo nde bazali na kowelana.”

Masese 15:​17; 17:​1.

Oyo ezali mpenza maloba na nguya, boye te? Kanisa mwa moke lolenge oyo mokili mokozala soki libota moko na moko litosi makambo wana ya ntina mingi! Biblia ezali mpe kopesa batoli kitoko na motindo oyo basangani ya libota basengeli kosalisana. Tótalela ndambo na batoli oyo epesami na yango.

Mibali: ‘Bólinga basi na bino lokola nzoto na bino moko.’​—⁠Baefese 5:​28-30.

Toli oyo ezali pɛtɛɛ, kasi etondi na mayele! Biblia esɛngi lisusu na mibali ete ‘bapesa basi na bango lokumu.’ (1 Petelo 3:⁠7) Na yango, mobali akotyela mwasi na ye likebi mingi; akomonisela ye bolingo, akoyeba komitya na esika na ye mpe akolendisa ye. Akotalela makanisi na ye mpe akoyokamela ye. (Tala Genese 21:12.) Okanisi te ete libota mobimba likozala na esengo soki mobali amoniseli mwasi na ye limemya motindo oyo alingi ete bamonisela ye?​—⁠Matai 7:12.

Basi: ‘Bózala na botosi mpenza epai na mibali na bino.’​—⁠Baefese 5:⁠33.

Mwasi akokólisa bolamu na libota na ye na kosalisáká mobali na ye ete akokisa mikumba na ye minene. Yango ebongisamaki bongo, mpamba te Nzambe apesaki mwasi epai na mobali mpo ete azala “mosungi mobongi.” (Genese 2:18) Oyebi bolamu nyonso oyo mwasi akomema na libota na ye wana azali kotosa mobali na ye na kondimáká bikateli na ye mpe na kosalanáká elongo na ye mpo na kokokisa mikano ya libota?

Babalani: “Tika ete babalani bazala sembo moko epai na mosusu.”​—⁠Baebele 13:4, BFC.

Soki bazali bongo, na ntembe te, bomoi ya libota ekobonga. Mbala mingi ekobo ebebisaka libota. (Masese 6:​27-29, 32) Yango wana toli oyo ya Biblia ezali mpenza mayele, ete: “Sepela na mwasi ya bolenge na yo . . . , mpo na nini okosepelisama na mwasi mopaya?”​—⁠Masese 5:​18-20.

Baboti: ‘Bóbɔkɔlo bana na bino na nzela ebongi na bango kotambola.’​—⁠Masese 22:⁠6.

Bomoi ya libota ezali mpenza kobonga wana baboti bazali kopesa ntango mpe likebi na bango epai na bana. Na yango, Biblia elobi na baboti ete bateya bana na bango mitinda na sembo ‘wana efandi bango na ndako, wana bazali kotambola na nzela, wana bakolala, mpe wana bakolamuka.’ (Deteronome 11:19) Biblia elobi lisusu ete baboti basengeli komonisa bolingo oyo bazali na yango mpo na bana na bango na kopesáká bango toli mpe mpamela.​—⁠Baefese 6:⁠4.

Bana: “Bana, bótosaka baboti na bino kati na Nkolo.”​—⁠Baefese 6:⁠1.

Ya solo, kati na mokili oyo mozali kotosa mibeko te, ezali ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te ete bana batosa baboti. Kasi, bokanisi te ete ezali likambo ya mayele na kosala oyo Mobandisi ya libota azali koloba na biso? Ayebi yango ebongi mpenza mpo ete bomoi ya libota na biso ezala na esengo mingi. Yango wana, bósala makasi mpo na kotosa baboti na bino. Bózwa ekateli ya kotɛmɛla ebele ya masɛnginya ya kosala mabe oyo bozali kokutana na yango kati na mokili.​—⁠Masese 1:​10-19.

Wana mosangani moko na moko ya libota azali kosalela batoli ya Biblia, bomoi ya libota ekobonga. Libota likozala na esengo bobele sikawa te, kasi bilikya kitoko bipesameli yango mpo na ntango ekoya kati na mokili ya sika molakami na Nzambe. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:​3, 4) Bózala bongo na momeseno ya koyekola Biblia kati na libota! Bipai binso na mabelé, bamilió ya mabota mazali mpenza kozwa matomba na batoli epesami kati na mokanda oyo mozali na bililingi kitoko, Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis.

Soki liyebisi ezali te, mikapo nyonso ya Biblia oyo ezali awa euti na Biblia ya Lingala haut-fleuve, ebimeli ya 1970. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto