Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • we nk. 26-31
  • Elikya ya solo mpo na bakufi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya ya solo mpo na bakufi
  • Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “[Lazalo, NW] bimá libándá!”
  • Esalemaki solo?
  • ‘Nzambe akozala na mposa makasi’
  • Bamilio na bakufi bakozonga lisusu na bomoni oyo nde elikya na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • “Ndeko na yo ya mobali akosekwa”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Ntango moto oyo olingaka akufi
we nk. 26-31

Elikya ya solo mpo na bakufi

ELENGE mwasi moko ya mibu 25 akomi ete: “Na mobu 1981, mama mobɔ́koli na ngai akufaki na kanser. Liwa na ye ezalaki mpasi mpo na ngai mpe mpo na ndeko na ngai ya mobali oyo tobɔ́kwamaki na ye elongo. Nazalaki na mibu 17, mpe ndeko na ngai ya mobali azalaki na mibu 11. Nazangaki mama na ngai mpenza. Lokola bayebisaki ngai ete akendeki na likoló, ngai mpe nalingaki komiboma mpo názala esika moko na ye. Azalaki moninga na ngai ya motema.

Ezali komonana ete ezali sembo te ete liwa ézala na nguya ya kolongola moto oyo yo olingaka. Mpe na ntango yango esalemi, likanisi oyo ete bokosolola lisusu te, bokosɛka lisusu elongo te, to okosimba lisusu molingami na yo te, ekoki kozala likambo ya mpasi mingi. Mpasi yango ezali kolongolama te bobele mpo bayebisi yo ete molingami na yo abuti na likoló.

Nzokande, Biblia ezali kopesa elikya oyo ekeseni mpenza. Lokola tomonaki yango liboso, Makomami mazali komonisa ete na mikolo mizali koya mosika te, okofanda lisusu elongo moko na molingami na yo oyo asilá kokufa; ekozala te kati na likoló oyo eyebani te kasi bobele awa na mabelé, kati na ebongiseli ya kimya mpe ya sembo. Mpe na ntango wana bato bakozala na elikya ya kozwa kɔ́lɔngɔnɔ ya kokoka, mpe bakokufa lisusu te. Basusu bakoki koloba ete ‘Wana ezali bobele makanisi mpamba!’

Eloko nini ezali kondimisa yo ete oyo ezali bongo elikya ya solo? Mpo na kondimela elaká moko, ekosɛnga na yo ondimisama ete ye oyo apesi elaká yango azali na bolingo mpe azali na nguya ya kokokisa yango. Na yango, nani nde azali kopesa elaká ete bakufi bakozala lisusu na bomoi?

Na eleko ya printemps ya mobu 31 T.B., na mpiko nyonso, Yesu apesaki elaká oyo ete: “Lokola tata akosekwisa bakufi mpe akopɛsaka bomɔi, boye mpe mwana akopɛsaka bomɔi na baoyo elingi ye kopɛsa yango. Bokamwa na likambo oyo tɛ, mpɔ ete ntango ekoya wana yɔnsɔ bajali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye [ya Yesu], mpe bakobima.” (Yoane 5:21, 28, 29) Ee, Yesu Klisto alakaki ete bamilió na bato oyo bakufá, bakozala lisusu na bomoi na mabelé oyo mpe bakozala na elikya ya kofanda awa libela na libela kati na paladiso ya kimya. (Luka 23:43; Yoane 3:16; 17:3; kokanisá Njembo 37:29 mpe Matai 5:5.) Lokola Yesu apesaki elaká wana, tokoki kondima na elikya nyonso ete azali na bolingo ya kosala yango. Kasi azali nde na nguya ya kosala yango?

Bambula mibale ekokaki te nsima wana apesaki elaká yango, Yesu amonisaki na lolenge ya nguya ete azali na bolingo mpe na likoki ya kosekwisa bato.

“[Lazalo, NW] bimá libándá!”

Ezalaki likambo ya mawa. Lazalo azalaki na maladi makasi. Bandeko na ye mibale ya basi, Malia mpe Malata, batindaki maloba epai ya Yesu, oyo azalaki na ngámbo mosusu ya Ebale Yordani: “[Nkolo, NW] tala, ye oyo olingi abɛli maladi.” (Yoane 11:3, NW) Bayebaki ete Yesu azalaki kolinga Lazalo. Yesu akokaki te kolinga komona moninga na ye oyo azalaki kobɛla? Likambo ya kokamwa ezali ete, na esika ya kokende mbala moko na Betania, Yesu atikalaki esika azalaki na boumeli ya mikolo mibale oyo milandaki.​—Yoane 11:5, 6.

Kasi, Malia mpe Malata bazalaki komizela ete Yesu asala likambo nini? Basɛngaki na ye te ete áya na Betania. Kasi bayebaki ete Yesu azalaki kolinga Lazalo. Yesu mbɛlɛ alingaki te kokende kotala moninga na ye oyo azalaki na maladi? Na ntembe te, bazalaki na elikya ete Yesu akokaki kobikisa ye na lolenge ya ekwamiseli. Nkutu, na eleko oyo ya mosala na ye, Yesu asilaki kosala bikamwiseli mingi ya kobikisa, mpe ata soki likambo lizali mosika, yango ekokaki kozala epekiseli mpo na ye te. (Talá Matai 8:5-13.) Akokaki kosala ata likambo moko te mpo na moninga na ye oyo ya motema? Likambo ya kokamwa, na esika ete ákende mbala moko na Betania, Yesu atikalaki kuna epai azalaki na boumeli ya mikolo mibale.​—Yoane 11:5, 6.

Lazalo akufaki mwa ntango moke nsima wana nsango ya maladi na ye etindamaki. Yesu ayebaki soki Lazalo akufaki na ntango nini, mpe azalaki na mposa ya kosala likambo moko mpo na yango. Na ntango oyo Yesu akómaki na Betania, moninga na ye ya motema autaki kokufa esili koleka mikolo minei. (Yoane 11:17, 39) Yesu akokaki kosekwisa moto oyo asilaki kokufa uta ntango molai boye?

Wana bayokaki ete Yesu azali koya, Malata, mwasi ya mpiko, abimaki mbangu mpo na kokutana na ye. (Kokanisá Luka 10:38-42.) Kookáká mawa na mpasi na ye, Yesu abɔndisaki ye ete: “Ndeko na yɔ akosekwa.” Ntango amonisaki kondima na ye na kati na lisekwa na mikolo mizali koya, Yesu alobaki na ye polele ete: “Ngai najali lisekwa mpe bomɔi. Ye oyo akondima ngai, ata asili kokufa, akobika.”​—Yoane 11:20-25.

Ntango akómaki na nkunda, Yesu asɛngaki ete bálongola libangá oyo bazipaki na yango ekɔteli. Bongo, nsima ya kobondela na mongongo makasi, apesaki etinda ete: “[Lazalo, NW] bimá libándá!”​—Yoane 11:38-43.

Bato banso batalaki mpenza epai na nkunda. Bongo, uta na molili, elilingi moko ebimaki. Makolo na ye mpe mabɔkɔ na ye elingamaki na biteni ya bilamba mpe elongi na ye elingamaki na elamba moko. Yesu apesaki etindá ete: “Bokangola ye mpe tika ete [akende, NW].” Bilamba nyonso bisilaki kokangolama mpe oyo ya nsuka ekweaki na mabelé. Ee, ezalaki bongo Lazalo, mobali oyo akufaki esilaki koleka mikolo minei.​—Yoane 11:44.

Esalemaki solo?

Lisoló na ntina etali kosekwa ya Lazalo ekomami kati na Evanzile ya Yoane ete ezali likambo oyo lisalemaki solo na ntango ya kala. Bandimbola mozindo na yango ezali mpenza polele na boye ete ezali lisapo mpamba te. Kotya ntembe na bosolo ya likambo yango ezali bongo kotya ntembe na makamwisi nyonso ya Biblia, kati na yango mpe lisekwa ya Yesu. Mpe koboya kondima lisekwa ya Yesu elimboli bongo koangana kondima ya boklisto nyonso.​—1 Bakolinti 15:13-15.

Ya solo, soki ondimi ete Nzambe azali, okozala na mpasi te mpo na kondima lisekwa. Na ndakisa: moto akoki koloba mokano na ye mpe maloba na ye ya kotika libula kati na kasɛti video, mpe nsima ya liwa na ye, bandeko mpe baninga na ye bakoki komona ye mpe koyoka ye, wana azali kolimbola lolenge nini biloko oyo ye atiki bikoki kosalelama. Esili koleka mibu monkáma, likambo motindo oyo ekokaki kosalema te. Mpe mpo na bato oyo bazali lelo kofanda na biteni bileki mosika na mokili, mayele ya kokotisa makambo kati na video ezali likamwisi monene. Soki bato bakoki kosalela mibeko ya zébi oyo Nzambe asali, yango mpo na kokundola likambo oyo ekoki komonana mpe koyokama, Mozalisi akoki te kozala na makoki ya kosala mingi koleka oyo? Na yango, ezali sembo ete Ye oyo azalisaki bomoi azali na nguya ya kozalisa yango lisusu, boye te?

Likamwisi ya lisekwa ya Lazalo ezalaki mpo na kokólisa kondima kati na Yesu Klisto mpe kati na lisekwa. (Yoane 11:41, 42; 12:9-11, 17-19) Na maloba ya kosimba motema, ezali mpe komonisa bolingo mpe mposa ya Yehova elongo na Mwana na ye mpo na kosekwisa bakufi.

‘Nzambe akozala na mposa makasi’

Oyo Yesu asalaki na liwa ya Lazalo emonisi mayoki ya boboto ya Mwana na Nzambe. Maoki na ye mozindo na libaku wana emonisaki polele mposa na ye makasi ya kosekwisa Lazalo. Totangi ete: “Ekomi Malia na esika ejalaki Yesu, amɔni ye mpe akwei na makolo na ye mpe alobi na ye ete: ‘[Nkolo, NW], sɔkɔ ojalaki awa mbɛ ndeko na ngai akufi tɛ.’ Emɔni Yesu ete ajalaki kolela mpe Bayuda baoyo bajalaki na ye elongo bajalaki kolela, ayoki mawa na motema mpe amitungisi; alobi mpe ete: ‘Botii ye wapi?’ Balobi na ye ete: ‘Yaka kotala, [Nkolo, NW].’ Yesu atangisi ­mpisoli. Bayuda balobi wana ete: ‘Tala lokola alingaki ye.’”​—Yoane 11:32-36.

Motema mawa ya Yesu emonisami awa na maloba misato: “ayoki mawa,” “amitungisi,” mpe “atangisi mpisoli.” Maloba ya lokótá ya ebandeli oyo masalelamaki mpo na kokoma lisoló wana ya kosimba motema emonisi ete Yesu atungisamaki mpenza na liwa ya Lazalo, moninga na ye ya motema, mpe na komona lolenge ndeko mwasi ya Lazalo azalaki kolela, miso na Ye matondaki na mpisoli.a

Likambo ya kobenda likebi ezali ete liboso Yesu asilaki kosekwisa bato mosusu mibale. Mpe akanaki mpenza kosala bobele bongo mpo na Lazalo. (Yoane 11:11, 23, 25) Nzokande, ‘atangisaki mpisoli.’ Na yango, mpo na Yesu, kozongisa bato na bomoi ezalaki bobele bisalasala te. Mayoki na ye ya boboto mpe ya bozindo lokola emonisamaki na libaku wana, emonisi mposa makasi oyo azali na yango ya kolongola mpasi nyonso euti na liwa.

Lokola Yesu azali ‘mpenza elilingi ya motindo ya Yehova Nzambe,’ tozali na elonga ya komizela ete Tata na biso na likoló akosala bobele bongo. (Baebele 1:3, NW) Na ntina na bolingo mpenza ya Yehova mpo na lisekwa, mosembwi Yobo alobaki ete: “Sɔkɔ moto akokufa, akobika nde lisusu? . . . Okobianga mpe ngai nakojongisela yɔ; okojala na mposa mpɔ na mosala na mabɔkɔ na yɔ.” (Yobo 14:14, 15) Awa liloba ya ebandeli oyo ebongolami na “okojala na mposa” ezali komonisa kolinga to mposa makasi oyo Nzambe azali na yango. (Genese 31:30; Nzembo 84:2) Emonani polele ete Yehova azali na mposa makasi ya komona ete lisekwa lisalema.

Tokoki solo kondimela elaká ya lisekwa? Ee, ntembe ezali te ete Yehova mpe Mwana na ye balingi mpe bazali na nguya ya kokokisa yango. Wana elimboli nini mpo na yo? Ozali na elikya ya kozala lisusu elongo na balingami na yo awa na mabelé kati na ebongiseli ya makambo oyo ekeseni na oyo ya lelo!

Yehova Nzambe, ye oyo abandisaki libota ya bato kati na elanga moko kitoko, alaki kozongisa Paladiso awa na mabelé na nsé ya boyangeli ya Bokonzi na Ye, na mabɔkɔ ya Yesu Klisto oyo asili kokembisama. (Genese 2:7-9; Matai 6:10; Luka 23:42, 43) Kati na Paladiso wana oyo ekozongisama lisusu, libota ya bato bakozala na elikya ya kosepela na bomoi ezangi nsuka, etondi na nguya ya bolenge ya libela, wana maladi mpe bolɛmbu nyonso ekozala lisusu te. (Emoniseli 21:1-4; kosanisá na Yobo 33:25.) Koyinana, koponapona mposo, bitumba ya bikólo, mpasi ya nkita, nyonso wana mpe ekozala lisusu te. Ekozala kati na mabelé masukolami motindo wana nde Yehova, na nzela ya Yesu, akosekwisa bakufi.

Yango ezali lelo elikya ya mwasi moklisto oyo tolobelaki na ebandeli ya eteni oyo. Bambula mingi na nsima ya liwa ya mama na ye, Batatoli ya Yehova basungaki ye ete ásala boyekoli ya bozindo ya Biblia. Azali komikundola ete: “Nsima na koyekola elikya ya lisekwa, nalelaki. Ezalaki esengo monene na koyeba ete nakomona mama na ngai lisusu.”

Soki motema na yo ezali na mposa makasi ya komona lisusu molingami na yo, Batatoli ya Yehova bakosalisa yo na esengo nyonso mpo na koyekola lolenge nini okoki kokómisa elikya wana likambo na yo mpenza. Mpo na nini te kokutana na bango kati na Ndako ya Bokonzi oyo ezali penepene na yo, to kotinda nkomá na adresi ebongi na yo, kati na oyo etyami na lokasa 32.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba ya Greke oyo libongolami ete “ayoki mawa” liuti na likelelo (em·bri·maʹo·mai) oyo elimboli kopusama na mpasi makasi. Molimboli moko ya Biblia alobi ete: “Awa ekoki bobele kolimbola ete mayoki mozindo wana masimbaki motema ya Yesu na boye ete motema na Ye mopusamaki mpenza na koyoka mawa makasi.” Liloba oyo libongalami ete “amitungisi” liuti na liloba ya Greke (ta·rasʹso), oyo emonisaka kooka mawa mozindo. Engebene nganga-mayele moko ya maloba ya nkóta, yango elimboli “kotya mobulungano kati na motema, . . . kopesa mpasi makasi to mawa.” Liloba “atangisi mpisoli” liuti na lilekelo ya Greke (da·kryʹo), elimboli “kobimisa mpisoli, kolela kozanga konganga.”

Kanisá likoló na mituna oyo

Na ntango moninga na ye Lazalo akufaki, lolenge nini Yesu amonisaki ete Ye alingi mpe azali na nguya ya kosekwisa bato?

Mpo na nini tokoki kondima lisoló ya Biblia na ntina na Lazalo ete ezalaki likambo ya solo oyo lisalemaki na ntango ya kala?

Na ndimbola nini lisoló lizwami na Yoane 11 ezali komonisa mposa makasi ya Yesu mpo na kolongola mpasi nyonso euti na liwa?

Eloko nini ezali komonisa ete Yehova Nzambe azali na mposa makasi ya komona ete lisekwa esalema?

[Etanda na lokasa 27]

Mikapo oyo mizali kobɔndisa

Mbala mingi, wana ezali bango koyebisa ndenge nini balóngaki mawa na bango, baklisto ya sembo balobaka ete: “Tiká náyebisa yo mikapo ya Biblia oyo ngai nalingaka.” Soki ozali na mawa, mbala mosusu ndambo na mikapo oyo mikoki mpe kosalisa yo.

“. . . akumisama, ye Tata na mawa mpe Njambe na kobɔndisa yɔnsɔ.”​—2 Bakɔlinti 1:3, 4.

“Okojipola lobɔkɔ na yɔ mpe okosilisa mposa na yɔnsɔ na bomoi.”​—Njembo 145:16.

“Mpo ete [Nzambe] asili kopɔna mokɔlɔ wana ekosambisa ye mikili yɔnsɔ na sembo, mpe akosambisa bango na moto oyo asili kopɔna. Amɔnisi bato yɔnsɔ polele ete ejali sɔlɔ, mpɔ ete asekwisi ye na bakufi.”​—Misala 17:31.

“Ngai, ngai najali ye oyo akobɔndisa yo.”​—Yisaya 51:12.

“Lokola mwana oyo mama na ye ajali kobɔndisa ye, boye ngai nakobɔndisa bino; bokobɔndisama kati na Yelusaleme.”​—Yisaya 66:13.

“Yango ekobɔndisa ngai na ntango na mpasi, jambi liloba na yɔ epesi ngai bomɔi. Nakobanja mpɔ na bikateli na yɔ na kala, Ɛ [Yehova]; bongo najui libɔndi. Najali kobɔndela ete, tiká ete boboto na yɔ ejala mpo na kobɔndisa ngai, pelamɔkɔ na liloba na yo [epai] na mosali na yɔ.”​—Njembo 119:50, 52, 76.

“Ntango ekoya wana yɔnsɔ bajali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima; baoyo basalaki malamu kino lisekwa na bomɔi.”​—Yoane 5:28, 29.

[Elilingi na lokasa 26]

Mayoki ya boboto ya Yesu na ntango asekwisaki Lazalo emonisaki mposa na ye makasi na ye ya kolongola mpasi nyonso euti na liwa

[Elilingi na lokasa 31]

Lisekwa, oyo ezwi moboko na yango likoló na mbeka ya Yesu Klisto, ekomema esengo na mabota nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto