Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kl mok. 9 nk. 80-89
  • Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?
  • Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “ELIMO” KATI NA BATO EZALI NINI?
  • “OKOZONGA NA MPUTULU”
  • “ASILI KOLALA MPƆNGI”
  • “BAOYO NYONSO BAZALI KATI NA NKUNDA YA EKANISELI”
  • LISEKWA: KASI EPAI WAPI?
  • Elikya ya solosolo
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Likambo oyo ekosukisa liwa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠Biblia elobaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
kl mok. 9 nk. 80-89

Mokapo 9

Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?

1. Bato baokaka nini ntango bakufeli molingami moko?

“MOTO aokaka mpasi ntango molingami na ye akufi mpamba te liwa ezali libungisi mpo esika moto akei eyebani te.” Ezali wana maloba ya mwana moko ya mobali ntango tata na ye akufaki mpe mwa moke na nsima mama na ye akufaki. Mpasi na ye mpe liyoki mozindo ya libungisi wana etungisaki ye mingi lokola ete “azindi mpo na bozangi balingami na ye.” Mbala mosusu yo mpe osilá koyoka mpasi motindo moko. Ekoki kozala ete osilá komituna soki epai wapi balingami na yo bazali mpe soki okomona bango mokolo mosusu.

2. Mituna nini ya kobulunganisa oyo mibimaka na ntina na liwa?

2 Basilá koyebisa na baboti mosusu oyo bakufelaki bana ete: “Nzambe akamataka bafololo eleki kitoko mpo ete ezala epai na ye kati na likoló.” Ezalaka boye solo? Balingami na biso oyo basili kokufa bakendeki na esika moko ya elimo? Ezali esika oyo basusu babéngaka ete Nirvana, oyo elobelamaka lokola ezalela ezangi mpasi mpe ezangi mposa? Balingami na biso bazali kokatisa ekuke moko mpo na koleka kino na bomoi bozangi kufa kati na paladiso? To lokola basusu balobaka yango, liwa ezali komema mbala moko kati na minyoko ya seko baoyo batukaki Nzambe? Bakufi bakoki kosala biso malamu to mabe? Mpo na kozwa biyano ya solo na mituna wana, tosengeli kotalela Biblia, Liloba ya Nzambe.

“ELIMO” KATI NA BATO EZALI NINI?

3. Likanisi nini Socrate mpe Platon bazalaki na yango na ntina na bakufi, mpe lolenge nini yango ezali na bopusi likoló na bato lelo oyo?

3 Bafilozofe ya Greke ya kala, Socrate mpe Platon, bandimaki ete eloko moko oyo ekufaka te ezalaka kati na mobali nyonso mpe mwasi nyonso—eloko yango molimo oyo elandaka kozala na bomoi nsima na liwa mpe ekoki kokufa soko mokolo moko te. Lelo oyo, bipai binso na mokili, bamilió ya bato bandimaka likanisi oyo. Endimeli wana mbala mingi ebimisaka bobangi makasi ya bakufi mpe komibanzabanza mpo na bolamu na bango. Nzokande Biblia ezali koteya biso eloko mosusu mpenza na ntina na bakufi.

4. (a) Genese eyebisi biso nini na ntina na molimo? (b) Eloko nini Nzambe atyaki kati na Adama mpo ete azala na bomoi?

4 Na ntina na ezalela ya bakufi, tosengeli komikundola ete tata na biso ya liboso, Adama, azwaki molimo te. Azalaki nde molimo. Na mosala ya kokamwa ya bozalisi, Nzambe asalaki moto—molimo—longwa na biloko ya mabelé mpe na nsima apemaki kati na ye “mpema na bomoi.” Genese 2:7 eyebisi biso ete: “Yehova Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akómaki molimo na bomoi.” Bomoi ya Adama esimbamaki na mpema. Nzokande, Nzambe asukaki te bobele na kotondisa mopɛpɛ kati na mampúlúlú ya moto ntango atyaki mpema ya bomoi kati na Adama. Biblia elobeli “nguya na bomoi” oyo ezali kosala mosala kati na bikelamu na bomoi oyo bizali awa na mabelé.​—Genese 7:22, NW.

5, 6. (a) “Nguya ya bomoi” ezali nini? (b) Nini ekómaka ntango “elimo” oyo elobelami na Nzembo 146:4 etiki kosala kati na nzoto?

5 “Nguya na bomoi” ezali nini? Ezali eloko esimbi bomoi oyo Nzambe atyaki kati na nzoto ya Adama oyo liboso ezangaki bomoi. Na nsima, nguya wana esimbamaki na nzela na kopema. Na yango, “elimo” oyo elobelami na Nzembo 146:4 ezali nini? Mokapo wana elobi na ntina na moto oyo akufi ete: “Elimo na ye ekolongwa, akozonga lisusu na mabelé, bobele na mokolo wana makanisi na ye makufi.” Ntango bakomi ya Biblia basalelaki liloba elimo na lolenge oyo, bazalaki te kokanisa na ntina na molimo oyo balobi ete ekabwanaka na nzoto mpe elandaka kozala na bomoi nsima ya liwa.

6 “Elimo” oyo elongwaka na nzoto na bato na ntango ya liwa ezali nguya na bomoi oyo eutaki epai na Mozalisi na biso. (Nzembo 36:9; Misala 17:28) Nguya wana ya bomoi ekozwaka ata ezaleli moko te ya ekelamu oyo yango ezali kosimba na bomoi; motindo moko kurá ekobongwanaka te mpo na kokóma lolenge moko na eloko nyonso oyo yango ezali kotambwisa. Ntango moto moko akufi, elimo (nguya na bomoi) etiki kosala kati na baselile ya nzoto, motindo moko mwinda ya kurá ezimanaka soki bakati kurá. Ntango nguya na bomoi etiki kosimba nzoto, moto—elingi koloba molimo—akufaka.​—Nzembo 104:29; Mosakoli 12:1, 7.

“OKOZONGA NA MPUTULU”

7. Nini esengelaki kokómela Adama soki azangaki botosi epai na Nzambe?

7 Yehova amonisaki polele oyo liwa elingaki kolimbola mpo na mosumuki Adama. Nzambe alobaki ete: “Na milunge na elongi na yo okolya mampa, kino ntango ekozonga yo kati na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango, zambi ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.” (Genese 3:19) Adama asengelaki kozonga epai wapi? Na mabelé, na mputulu oyo azalisamaki na yango. Na ntango ya liwa, Adama akendaki ata epai moko te!

8. Awa ezali bango milimo, na likambo nini bato baleki banyama te?

8 Na likambo oyo, kufa ya bato ekeseni te na oyo ya banyama. Bango mpe bazali milimo, mpe elimo bobele moko, to nguya na bomoi ezali kosimba bango. (Genese 1:24) Na Mosakoli 3:19, 20, Salomo, mokonzi na mayele ayebisi biso ete: “Lokola moko akokufa, oyo mosusu mpe akokufa; ɛɛ, bango nyonso bazali na elimo moko; boye [na liwa] moto azali koleka likoló na nyama te . . . nyonso ilongwi na mputulu, nyonso ikozonga na mputulu lisusu.” Moto aleki nyama mpo ete azalisamaki na elilingi ya Nzambe, elingi koloba ete azali komonisa bizaleli ya Yehova. (Genese 1:26, 27) Nzokande, na ntango ya liwa, bato mpe banyama bakozongaka kati na mputulu.

9. Ezalela ya bakufi ezali nini, mpe bakendaka wapi?

9 Salomo amonisaki lisusu polele oyo liwa elimboli, na kolobáká ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi eloko te.” Ee, bakufi bayebi eloko moko te. Na kotalela likambo yango, Salomo apesaki lilako oyo ete: “Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.” (Mosakoli 9:5, 10) Epai wapi bakufi bakendeke? Na Sheol (na Liebele, sheʼohlʹ), nkunda ya bato banso. Balingami na biso oyo bazali kokufa bayebi eloko moko te. Bazali konyokwama te, mpe bakoki te kosalela biso to malamu to mabe.

10. Mpo na nini tokoki koloba ete liwa esengeli te kozala nsuka ya bomoi?

10 Biso banso elongo na balingami na biso, tozali na elikya mosusu te bobele koumela na bomoi mwa bambula mpe na nsima kolimwa mpo na libela? Ezali bongo te engebene Biblia. Na ntango ya botomboki ya Adama, Yehova akamataki nokinoki bibongiseli mpo na kosilisa bampasi oyo lisumu esengelaki kobimisa. Liwa ezalaki te kati na mokano ya Nzambe mpo na bato. (Ezekiele 33:11; 2 Petelo 3:9) Na yango, liwa esengeli te kozala nsuka mpo na biso mpe mpo na balingami na biso.

“ASILI KOLALA MPƆNGI”

11. Lolenge nini Yesu alobelaki ezalela ya Lasalo, moninga na ye oyo akufaki?

11 Mokano ya Yehova ezali ya kobikisa biso mpe balingami na biso oyo basili kokufa longwa na liwa oyo Adama ayeisaki. Na yango, Liloba ya Nzambe lilobi na ntina na bakufi ete balali. Na ndakisa, nsima na kozwa nsango ete moninga na ye Lasalo asili kokufa, Yesu Klisto ayebisaki na bayekoli na Ye ete: “Moninga na biso Lasalo asili kolala mpɔngi; kasi nakokenda kobetola ye.” Mpo ete bayekoli bakangaki nokinoki ndimbola ya maloba wana te, Yesu alobaki polele ete: “Lasalo akufi.” (Yoane 11:11, 14) Na nsima, Yesu akendaki na engumba Betania, epai Malata mpe Malia, bandeko basi ya Lasalo, bazalaki kolela liwa ya ndeko na bango. Ntango Yesu alobaki na Malata ete, “ndeko na yo akosekwa,” Malata amonisaki kondima na ye kati na mokano oyo Nzambe azali na yango ya kolongola mpasi ya liwa likoló na libota ya bato. Alobaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.”​—Yoane 11:23, 24.

12. Elikya nini Malata, oyo akufelaki moto, azalaki na yango na ntina na bakufi?

12 Malata alobaki soko moke te na ntina na molimo mozangi kokufa oyo ekolandaka kozala na bomoi epai mosusu nsima na liwa. Andimaki te ete Lasalo asilaki kokende na mokili moko ya elimo mpo na kolanda kozala na bomoi kuna. Malata azalaki na kondima nde kati na elikya kitoko ya lisekwa longwa na bakufi. Andimaki soko moke te ete molimo mozangi kokufa mobimaki na nzoto ya Lasalo; andimaki nde ete ndeko na ye oyo autaki kokufa azalaki lisusu na bomoi ata epai moko te. Nzela bobele moko esengelaki kozala nde lisekwa ya ndeko na ye.

13. Nguya nini Nzambe apesaki na Yesu, mpe lolenge nini amonisaki nguya yango?

13 Yesu Klisto azali moto oyo Yehova Nzambe apesaki nguya mpo na kobikisa bato. (Hosea 13:14) Na yango, mpo na koyanola na maloba ya Malata, Yesu alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.” (Yoane 11:25) Yesu amonisaki nguya oyo Nzambe apesaki ye na likambo yango ntango akendeki na liyita ya Lasalo, oyo asilaki kokufa uta mikolo minei, mpe azongisaki ye na bomoi. (Yoane 11:38-44) Kanisá esengo ezalaki na baoyo bamonaki lisekwa wana mpe mosusu oyo Yesu Klisto asalaki!—Malako 5:35-42; Luka 7:12-16.

14. Mpo na nini lisekwa mpe likanisi ya molimo mozangi kokufa ezali koyokana te?

14 Tókanisa naino mwa moke mpo na yango: Soki molimo ekolandaka kozala na bomoi nsima na liwa, mbɛlɛ lisekwa ezali na ntina te. Mpamba te mbɛlɛ elingaki kozala likambo ya kozanga boboto na kosekwisa moto lokola Lasalo ete azonga na bomoi ya kozanga kokoka awa na mabelé soki asilaki kokende mpo na kozwa mbano kitoko na likoló. Mpo na koloba solo, Biblia esaleli ata esika moko te liloba “molimo mozangi kokufa.” Nzokande, Makomami malobi ete molimo ya moto oyo asali lisumu ekufaka solo. (Ezekiele 18:4, 20) Na yango, Biblia emonisi ete nzela bobele moko ya kobima na liwa ezali nde lisekwa.

“BAOYO NYONSO BAZALI KATI NA NKUNDA YA EKANISELI”

15. (a) Liloba “lisekwa” elimboli nini? (b) Mpo na nini lisekwa ya bato ekozala likambo ya pɛtɛɛ mpo na Yehova Nzambe?

15 Liloba oyo bayekoli ya Yesu basalelaki mpo na “lisekwa” elimboli mpenza “kolamuka” to “kotɛlɛma.” Ezali bongo kolamuka na mpɔngi ya liwa—mpo na kotɛlɛma mpe kobima na nkunda ya bato banso. Yehova Nzambe akoki na pɛtɛɛ nyonso kosekwisa moto. Mpo na nini? Mpamba te Yehova azali Mopesi na bomoi. Lelo oyo, bato bakoki kobomba mingongo mpe bililingi ya mibali mpe basi kati na video mpe koyokisa yango mpe komonisa yango nsima ya liwa ya bato yango. Na ntembe te, Mozalisi na biso oyo azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, akoki kobomba makambo matali moto nyonso mpe kosekwisa moto yango, na kopesáká ye nzoto ya sika.

16. (a) Elaka nini Yesu apesaki na ntina na baoyo nyonso bazali kati na nkunda ya ekaniseli? (b) Nini ekokata mpo na lolenge ya lisekwa ya moto na moto?

16 Yesu Klisto alobaki ete: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda ya ekaniseli bakoyoka mongongo na ye [oyo ya Yesu], mpe bakobima; baoyo basalaki malamu kino lisekwa na bomoi; baoyo basalaki yauli kino lisekwa na kosambisama.” (Yoane 5:28, 29, NW) Baoyo nyonso bazali kati na makanisi ya Yehova bakosekwisama mpe bakoteyama kati na banzela na ye. Mpo na baoyo bakosala na boyokani na boyebi ya Nzambe, lisekwa na bango ekozala lisekwa ya bomoi. Nzokande, mpo na baoyo bakobwaka mateya mpe bokonzi ya Nzambe, lisekwa na bango ekozala lisekwa ya kosambisama mpo na kokweisama.

17. Nani akosekwisama?

17 Na yango, baoyo balandaki nzela ya boyengebene lokola basaleli ya sembo ya Yehova bakosekwisama. Ya solo, elikya ya lisekwa epesaki na mingi kati na bango makasi liboso ya kufa, ata kati na minyoko makasi. Bayebaki ete Nzambe akoki kozongisa bango na bomoi. (Matai 10:28) Kasi ebele na bato basili kokufa kozanga komonisa soki bakokaki kolanda mitindá ya boyengebene ya Nzambe. Bango mpe bakosekwisama. Kondimáká mokano ya Yehova kati na likambo yango, ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali na elikya na Nzambe, . . . ete lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.”​—Misala 24:15.

18. (a) Emonaneli nini ya lisekwa ntoma Yoane azwaki? (b) Nini ekobomama kati na “libeke na mɔ́tɔ,” mpe “libeke” yango ezali elilingi ya nini?

18 Ntoma Yoane azwaki emonaneli ya kosimba motema ya basekwi oyo batɛlɛmi liboso na kiti ya bokonzi ya Nzambe. Na nsima, Yoane akomaki ete: “Mai monene ezongisi bakufi na kati na yango, mpe kufa na Hades izongisi bakufi na kati na yango, mpe basambisami moto na moto engebene misala na ye. Mpe kufa na Hades ibwakami kati na libeke na mɔ́tɔ.” (Emoniseli 20:12-14, NW) Kanisá naino mpo na yango! Bakufi nyonso oyo bazali kati na makanisi ya Nzambe bazali na elikya ya kobima na Hades (na Greke, haiʹdes), to Sheol, nkunda ya bato banso. (Nzembo 16:10; Misala 2:31) Bakozala na libaku kitoko ya komonisa na misala na bango soki bakosalela Nzambe. Na nsima “Kufa mpe Hades” ekobwakama kati na oyo ebéngami “libeke na mɔ́tɔ,” oyo ezali elilingi ya kufa ya libela, motindo moko na liloba “Gehenna.” (Luka 12:5) Nkunda ya bato banso yango ekotikala mpamba mpe ekozala lisusu te ntango lisekwa ekokóma na nsuka. Oyo nde kobɔndisama na koyekola engebene Biblia ete Nzambe azali konyokola ata moto moko te!—Yilimia 7:30, 31.

LISEKWA: KASI EPAI WAPI?

19. Mpo na nini bato mosusu bakosekwisama mpo na kokende na likoló, mpe lolenge nini ya nzoto Nzambe akopesa bango?

19 Motángo moke ya mibali mpe ya basi bakosekwisama mpo na kozala na bomoi kati na likoló. Lokola bakonzi mpe banganga elongo na Yesu, bakosangana na mosala ya kolongola makambo nyonso ya mpasi mabimisamaki na liwa oyo bato basangolaki longwa na Adama, moto ya liboso. (Baloma 5:12; Emoniseli 5:9, 10) Bato boni Nzambe akokamata mpo na kokende na likoló koyangela elongo na Klisto? Engebene Biblia, bobele bato 144 000. (Emoniseli 7:4; 14:1) Yehova akopesa na moko na moko ya basekwisami wana nzoto ya elimo mpo ete bákoka kozala na bomoi kati na likoló.​—1 Bakolinti 15:35, 38, 42-45; 1 Petelo 3:18.

20. Bolamu nini ekozwama na bato ya botosi, sangisá mpe basekwi?

20 Nzokande motuya moleki monene ya baoyo bakufá, bakosekwisama na paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:11, 29; Matai 6:10) Ntina moko mpo na yango basusu bakosekwisama mpo na kokende na likoló ezali mpo na kokokisa mokano ya Nzambe na ntina na mabelé. Yesu Klisto mpe ba 144 000 kati na likoló bakosalisa mokemoke bato na botosi ete bázongela ezalela ya kokoka oyo baboti na biso ya liboso babwakaki. Yango ekosangisa basekwi, lokola emonisami na maloba oyo ya Yesu wana elobaki ye na moto oyo azalaki kokufa na nzeté pene na ye ete: “Okozala elongo na ngai kati na Paladiso.”​—Luka 23:42, 43, NW.

21. Engebene mosakoli Yisaya mpe ntoma Yoane, nini ekokómela liwa?

21 Na Paladiso oyo ekozala awa na mabelé, liwa, oyo ezali koyeisa bomoi eloko mpamba, ekolongolama. (Baloma 8:19-21) Mosakoli Yisaya alobaki ete Yehova Nzambe “akosilisa kufa libela.” (Yisaya 25:8) Ntoma Yoane azwaki emonaneli mpo na ntango oyo bato na botosi bakosepela na bonsomi longwa na mpasi mpe na liwa. Ee, “Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:1-4.

22. Boyebi ya lisekwa ezali na bopusi nini likoló na yo?

22 Mateya ya polele mpenza ya Biblia malongoli mobulungano na ntina na oyo ekómelaka bakufi. Makomami malobi polele ete liwa ezali “monguna na nsuka” oyo akobomama. (1 Bakolinti 15:26, NW) Oyo nde kolendisama mpe kobɔndisama tokoki kozwa na boyebi ya elikya ya lisekwa! Mpe oyo nde esengo tokoki kozala na yango na koyeba ete balingami na biso oyo bazali kokufa, oyo bazali kati na makanisi na Nzambe bakolamuka longwa na mpɔngi ya kufa mpo na kosepela na makambo nyonso kitoko oyo Nzambe abombeli baoyo balingi ye! (Nzembo 145:16) Mapamboli wana makokokisama na nzela na Bokonzi ya Nzambe. Kasi ntango nini Bokonzi yango esengelaki kobanda koyangela? Tiká tótala yango.

MEKÁ BOYEBI NA YO

Elimo kati na bato ezali nini?

Okoki koloba nini na ntina na ezalela ya bakufi?

Nani akosekwisama?

[Elilingi na lokasa 85]

Motindo moko Yesu abéngaki Lasalo longwa na nkunda, bobele bongo bamilió na bato bakosekwisama

[Elilingi na lokasa 86]

Esengo ekozala mingi ntango ‘Nzambe akosilisa kufa mpo na libela’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto