Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rq liteya 14 nk. 28-29
  • Lisangá ya Batatoli ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisangá ya Batatoli ya Yehova
  • Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Babongisi mosala na bango mpo na kosala yango na mokili mobimba
    Batatoli ya Yehova—Bazali banani? Makambo nini bandimaka?
  • Tiká ete lisangá elendisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
rq liteya 14 nk. 28-29

Liteya 14

Lisangá ya Batatoli ya Yehova

Ntango nini Batatoli ya Yehova na mikolo na biso babandaki? (1)

Lolenge nini makita ya Batatoli ya Yehova matambwisamaka? (2)

Lolenge nini bazwaka mbongo mpo na kosala misala na bango? (3)

Nani azali kokamba lisangá moko na moko? (4)

Makita nini ya minene masalemaka mbula na mbula? (5)

Misala nini mizali kosalema na biro monene mpe na bafiliale na bango? (6)

1. Batatoli ya Yehova ya ntango na biso babandaki na bambula 1870. Na ebandeli, bazalaki kobéngama Bayekoli ya Biblia. Kasi na mobu 1931 bazwaki nkombo euti na Makomami oyo ete Batatoli ya Yehova. (Yisaya 43:10) Uta ebandeli mpenza ya moke, lisangá lisili kokóla kino bamilió ya Batatoli, oyo bamipesi na mosala ya kosakola na mikili koleka 230.

2. Masangá mingi ya Batatoli ya Yehova mazalaka na makita mikolo misato pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Obyangami na koyangana na makita yango. (Baebele 10:24, 25) Makambo bateyaka eutaka kati na Biblia. Makita mabandaka mpe masukaka na libondeli. Na makita mingi, “nzembo ya elimo” ya kosimba motema eyembamaka. (Baefese 5:18, 19) Kokɔta na makita yango esɛngaka mbongo te, mpe bakɔngɔlaka mbongo te.​—Matai 10:8.

3. Masangá mingi masalaka makita na bango kati na Ndako ya Bokonzi. Na momeseno, yango ezalaka bandako ya mindɔndɔ́ te, etongami na Batatoli bango moko, oyo bamipesi na bolingo malamu. Okomona bikeko te, bikulusu te, to biloko mosusu ya motindo wana na Ndako ya Bokonzi te. Mbongo oyo basalelaka na misala wana eutaka na makabo ya bolingo malamu. Sanduku ya makabo etyamaka wana mpo na baoyo balingi kopesa makabo na bango.​—2 Bakolinti 9:7.

4. Kati na lisangá moko na moko, bankulutu, to bakɛngɛli basili kotyama. Bazali kokamba lisangá na koteyáká yango. (1 Timoté 3:1-7; 5:17) Basaleli na misala basungaka bango. (1 Timoté 3:8-10, 12, 13) Mibali wana bamimonaka te ete baleki basangani mosusu ya lisangá. (2 Bakolinti 1:24) Bapesameli nkombo ya lokumu te. (Matai 23:8-10) Bamilatisaka te na motindo mokeseni na bato mosusu. Bafutamaka mosolo te mpo na mosala na bango. Na bolingo nyonso, bankulutu bazali kokokisa bamposa ya elimo ya lisangá. Bakoki kopesa libɔndisi mpe litambwisi na ntango ya mikakatano.​—Yakobo 5:14-16; 1 Petelo 5:2, 3.

5. Batatoli ya Yehova basalaka mayangani mike mpe ya minene mbula na mbula. Na mabaku wana masangá mingi masanganaka esika moko mpo na kozwa mateya ya sikisiki ya Biblia. Bayekoli ya sika bakozwaka batisimo na mayangani wana ya mike mpe ya minene.​—Matai 3:13-17; 28:19, 20.

6. Biro monene ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ezali na New York. Kuna mpe tozali kokuta Lisangani ya Mikóló-Bakambi, etuluku ya bankulutu oyo baumeli mingi mpe bameseni na makambo mingi, bango nde bazali kotambwisa mosala ya lisangá na mokili mobimba. Ezali mpe na bafiliale koleka 100 na mokili mobimba. Na bisika wana, ezali na bato bamipesi na bolingo na bango moko mpo na konyata mpe kotinda epai na epai mikanda mikolimbolaka Biblia. Litambwisi mpe lipesami mpo na kobongisa mosala ya kosakola. Mpo na nini te kokende kotala filiale oyo ezali pene na esika ofandi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto