Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ie nk. 19-20
  • Oyo Biblia ezali koloba na ntina na molimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo Biblia ezali koloba na ntina na molimo
  • Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Molimo” mpo na kolobela ekelamu ya bomoi
  • “Molimo” mpo na kolobela bomoi ya ekelamu moko
  • Ozali na molimo oyo ekufaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Molimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠Biblia elobaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Nini ekómelaka biso soki tokufi?
ie nk. 19-20

Oyo Biblia ezali koloba na ntina na molimo

“Moto akómaki molimo na bomoi.”​—GENESE 2:7.

1. Tosengeli kotalela nini mpo na koyeba oyo Biblia ezali koteya na ntina na molimo?

LOKOLA tosili komona yango, bindimeli na ntina na molimo bizali mingi mpe bikeseni. Ata kati na baoyo balobaka ete bindimeli na bango bizwi moboko kati na Biblia, bazalaka na makanisi makeseni likoló na ndimbola ya molimo mpe oyo ekómelaka yango soki tokufi. Kasi Biblia ezali mpenza koteya nini na ntina na molimo? Mpo na koyeba yango, tosengeli kotalela ndimbola ya maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo ebongolami na “molimo” kati na Biblia.

“Molimo” mpo na kolobela ekelamu ya bomoi

2, 3. (a)Liloba nini ebongolami na “molimo” kati na Makomami ya Liebele, mpe ndimbola ya moboko ya liloba yango ezali nini? (b) Lolenge nini Genese 2:7 endimisi ete liloba “molimo” ekoki kolimbola moto na mobimba na ye?

2 Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “molimo” ezali neʹphesh, mpe yango ezwami mbala 754 kati na Makomami ya Liebele (oyo babéngaka Kondimana ya Kala). Liloba neʹphesh elimboli nini? Engebene buku The Dictionary of Bible and Religion, yango “esalelamaka mingi mpo na kolobela ekelamu oyo ezali na bomoi na mobimba na yango, mobimba ya moto.”

3 Na ndakisa, Genese 2:7 elobi ete: “[Yehova] Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akómaki molimo na bomoi.” Tomoni awa ete Adama azwaki molimo te; azalaki molimo​—ndenge moko moto oyo akómi monganga azali monganga. Na bongo, liloba “molimo” ekoki kolobela moto na mobimba na ye.

4, 5. (a)Pesá bandakisa oyo emonisi ete liloba “molimo” elobelaka moto na mobimba na ye. (b) Lolenge nini buku moko endimi ndimbola oyo ete moto azali molimo?

4 Ndimbola oyo endimami bipai nyonso kati na Makomami ya Liebele, epai kuna tozali kokuta maloba lokola oyo: “soki molimo esali lisumu” (Levitike 5:1, NW), “molimo nyonso oyo ekosala mosala ya lolenge nini” (Levitike 23:​30, NW), “soki moto moko azwami ete azali kobɔtɔla molimo moko” (Deteronome 24:7, NW), “molimo na ye ekómaki likolólikoló” (Basambisi 16:​16, NW), “kino ntango nini bino bokotungisa molimo na ngai?” (Yobo 19:2, NW), mpe “molimo na ngai ezangi mpɔngi mpo na mawa.”​—Nzembo 119:28, NW.

5 Kati na mikapo oyo, ezali na elembeteli moko te oyo emonisi ete molimo ezali eloko moko oyo emonanaka te mpe ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Buku The Dictionary of Bible and Religion elobi ete: “Ndenge tolobaka ete ‘molimo’ ya moto oyo tolingaka esili kokende epai na Nkolo to koloba na ntina na ‘molimo oyo ekufaka te,’ elingaki kozala na ndimbola moko te liboso na bindimeli ya Kondimana ya Kala.”

6, 7. Liloba nini ebongolami na “molimo” kati na Makomami ya Greke ya boklisto, mpe ndimbola mpenzampenza ya liloba yango ezali nini?

6 Liloba oyo ebongolami na “molimo” koleka mbala monkama kati na Makomami ya Greke ya boklisto (oyo babéngaka Kondimana ya Sika) ezali bongo psy·kheʹ. Lokola neʹphesh, liloba oyo elobelaka mingimingi moto na mobimba na ye. Na ndakisa, tótalela maloba oyo malandi: “Molimo na ngai etungisami.” (Yoane 12:27) “Kobanga ebandaki kozwa molimo mokomoko.” (Misala 2:​43, NW) “Tiká ete molimo nyonso etosaka bakonzi oyo bazali liboso.” (Baloma 13:1, NW) “Bólobaka na lolenge ya kobɔndisa milimo oyo mibulunganisami na makanisi.” (1 Batesaloniki 5:​14, NW) “Bato moke, elingi koloba, milimo mwambe, mimɛmamaki mpe mibikisamaki na mai.”​—1 Petelo 3:​20, NW.

7 Liloba psy·kheʹ, lokola mpe liloba neʹphesh, elobelaka mpenza moto na mobimba na ye. Engebene nganga-mayele Nigel Turner, liloba yango “elimboli oyo ezali mpenza mpo na moto, moto ye mei, nzoto ya mosuni oyo ezali na rûaḥ [elimo] ya Nzambe oyo ye afulaki kati na nzoto yango. . . . Ezali mpenza kobenda likebi mingi likoló na moto na mobimba na ye mpenza.”

8. Banyama bazali milimo? Limbolá.

8 Kati na Biblia, liloba “molimo” esalelamaka bobele mpo na bato te kasi mpe mpo na nyama. Na ndakisa, wana ezali kolobela kozalisama ya bikelamu ya mai monene, Genese 1:20 (NW) elobi ete Nzambe apesaki etinda oyo: “Tiká ete mai etonda na milimo ya bomoi.” Mpe na mokolo ya kozalisama oyo elandaki, Nzambe alobaki ete: “Tiká [ete] mokili ebota [milimo, NW] na bomoi na ndenge na yango, nyama minene mpe nyama na kolandaka mpe nyama na mokili na ndenge na yango.” (Genese 1:24; kokanisá na Mituya 31:28.) Na yango, “molimo” ekoki kolobela ekelamu ya bomoi, ezala moto to nyama.

“Molimo” mpo na kolobela bomoi ya ekelamu moko

9. (a)Ndimbola mosusu nini ekoki kopesama mpo na liloba “molimo”? (b) Ndimbola yango ekeseni nde na likanisi oyo ete molimo ezali moto ye mpenza?

9 Na bantango mosusu, liloba “molimo” esalelamaka mpo na kolobela bomoi oyo moto to nyama azalaka na yango. Yango ebebisi te ndimbola oyo Biblia epesaka na molimo ete: moto to nyama azali molimo. Tókamata ndakisa: Tolobaka ete moto boye azali kobika, elingi koloba ete azali moto ya bomoi. Tokoki mpe koloba ete azali na bomoi. Lolenge moko, moto oyo azali kobika azali molimo. Nzokande, ntango azali kobika, tokoki kolobela “molimo” lokola eloko oyo ye azali na yango.

10. Pesá bandakisa oyo emonisi ete liloba “molimo” ekoki kosalelama mpo na kolobela bomoi oyo moto to nyama azalaka na yango.

10 Na ndakisa, Nzambe alobaki na Mose ete: “Bato nyonso balingaki koboma [molimo na, NW] yo basili kokufa.” (Exode 4:19) Emonani polele ete banguna ya Mose bazalaki koluka kosukisa bomoi na ye. Lolenge bobele moko ya kosalela liloba “molimo” emonani na maloba oyo malandi: “Tobangaki mingi mpenza mpo na milimo na biso.” (Yosua 9:​24, NW) “Bakimaki mpo na molimo na bango.” (2 Mikonzi 7:​7, NW) “Moyengebene amibanzabanzaka mpo na molimo ya ebwɛlɛ na ye.” (Masese 12:​10, NW) “Mwana na moto ayaki . . . mpo na kopesa molimo na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:​28, NW) “Akómaki mpenza pene na liwa, . . . kotikáká molimo na ye na likama.” (Bafilipi 2:30) Na mokapo mokomoko, liloba “molimo” elimboli “bomoi.”a

11. Nini ekoki kolobama na kotalela lolenge oyo Biblia ezali kosalela liloba “molimo”?

11 Na bongo liloba “molimo” na lolenge esalelami kati na Biblia elobelaka moto to nyama to bomoi oyo moto to nyama azalaka na yango. Ndimbola oyo Biblia ezali kopesa mpo na molimo ezali ndimbola ya pɛtɛɛ, oyo ezali ndenge moko bisika nyonso yango ezwami kati na buku yango, mpe ndimbola yango ezali ya mindɔndɔ te mpo ete Biblia ezwi bopusi ya filozofi to ya biyambayamba ya bato te. Kasi nini ekómelaka molimo soki tokufi? Mpo na koyanola na motuna oyo, tosengeli liboso koyeba mpo na nini tokufaka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Matai 10:28 mpe ezali kosalela liloba “molimo” mpo na kolobela “bomoi.”

[Bililingi na lokasa 20]

Bango nyonso bazali milimo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto