Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ip-2 mok. 27 nk. 390-402
  • Yehova apamboli losambo ya pɛto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova apamboli losambo ya pɛto
  • Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sɛkɛlɛ ya losambo ya pɛto
  • Yehova ayini ezaleli ya bokosi na losambo
  • Kozongisama ya nokinoki mpe ya pwasa
  • Yehova abatelaka na boboto mpenza
  • Pole mpo na bikólo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • “Bóyoka esengo libela na oyo nazali kosala”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • “Nkombo ya sika”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Makambo mosusu
Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
ip-2 mok. 27 nk. 390-402

Mokapo ya Ntuku Mibale na Nsambo

Yehova apamboli losambo ya pɛto

Yisaya 66:1-14

1. Wapi mwa makambo ya ntina oyo balobeli mingi na mokapo ya nsuka ya Yisaya, mpe mituna nini ezwi biyano?

NA MOKAPO ya nsuka ya mokanda ya Yisaya, balobeli lisusu polelepolele mwa makambo ya ntina oyo ezali na mokanda yango ya esakweli, mpe bapesi biyano na mituna mosusu ya ntina. Na ndakisa, balobeli mingi mpenza bonene ya Yehova, koyina oyo ayini bokosi, ekateli makasi na ye ya kopesa bato mabe etumbu, mpe bolingo ná komibanzabanza na ye mpo na bato ya sembo. Longola yango, mituna oyo elandi ezwi biyano: Eloko nini ekesenisi losambo ya solo ná losambo ya lokuta? Ndenge nini tokoki koyeba mpenza ete Yehova akopesa etumbu na bakosi oyo bazali kosala lokola nde bazali basantu nzokande bazali konyokola basaleli ya Nzambe? Mpe ndenge nini Yehova akopambola baoyo bazali kotikala sembo epai na ye?

Sɛkɛlɛ ya losambo ya pɛto

2. Maloba nini Yehova alobi mpo na komonisa bonene na ye, mpe maloba yango elingi koloba nini te?

2 Libosoliboso, esakweli yango ebendi likebi mingi na bonene ya Yehova: “[Yehova] alobi boye ete, Lola ezali kiti na ngai mpe mokili ezali etyelo ya makolo na ngai. Wapi ndako elingi bino kotongela ngai yango? Wapi esika ya efandelo na ngai?” (Yisaya 66:1) Bato mosusu bakanisaka ete mosakoli azali kopekisa Bayuda kotongela lisusu Yehova tempelo ntango ekólo na bango ekozongisama na mboka na yango. Ezali bongo te; mpamba te Yehova ye moko akopesa etinda ete bátonga lisusu tempelo. (Ezela 1:1-6; Yisaya 60:13; Hagai 1:7, 8) Bongo vɛrsɛ yango elingi koloba nini?

3. Mpo na nini ebongi ete mabelé ebengama “etyelo ya makolo” ya Yehova?

3 Tótala naino mpo na nini balobi ete mabelé ezali “etyelo ya makolo” ya Yehova. Yango ezali maloba ya kotyola te. Kati na bamiliare ya minzoto mpe bitando mosusu oyo ezali na molɔ́ngɔ́, kaka mabelé nde babengi yango ndenge wana. Etando na biso ekokesana libela na bitando mosusu nyonso, mpamba te ezali awa nde Mwana mobotami-se-moko ya Yehova apesaki lisiko, mpe ezali awa nde Yehova akolongisa boyangeli na ye na nzela ya Bokonzi ya Masiya. Ebongi mpenza ete mabelé ebengama etyelo ya makolo ya Yehova! Ezali bongo mpamba te, mpo mokonzi akóma tii na kiti na ye ya bokonzi oyo ezalaka likoló, amataka na etyelo ya makolo mpe soki afandi, atyaka makolo likoló na yango.

4. (a) Mpo na nini ndako moko te awa na mabelé ekoki kozala esika ya kopema mpo na Yehova Nzambe? (b) Maloba “biloko oyo nyonso” elingi koloba nini, mpe yango esengeli kotinda biso tókanisa nini mpo na losambo ya Yehova?

4 Kasi, mokonzi afandaka te na etyelo ya makolo na ye; se ndenge moko, Yehova afandaka awa na mabelé te. Kutu, ata makoló mpenza, oyo ezali monene mpenza ekoki te kokoka ye! Na koleka, mwa ndako moko awa na mabelé ekokoka te kozala esika oyo Yehova akofanda. (1 Mikonzi 8:27) Kiti ya bokonzi ya Yehova mpe esika na ye ya kopema ezali esika oyo bikelamu ya elimo bafandaka, yango nde Yisaya 66:1 ebengi “lola to likoló.” Vɛrsɛ oyo elandi elimboli likambo yango polele mpenza: “Lobɔkɔ na ngai esali biloko oyo nyonso mpe bongo biloko oyo nyonso ebimaki. [Yehova] alobi bongo.” (Yisaya 66:2a) Salá lokola omoni Yehova atomboli mabɔkɔ mpo na kolakisa “biloko oyo nyonso,” elingi koloba biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe awa na nse. (Yisaya 40:26; Emoniseli 10:6) Lokola azali Mozalisi Monene ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ebongi te bátongela ye kaka ndako moko boye. Ebongi te básambela ye kaka mpo na kosambela.

5. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali ‘na mawa mingi mpe totutami na elimo’?

5 Losambo ya ndenge nini ebongi mpenza na Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba? Ye moko ayebisi biso boye: ‘Nde nakotala epai ya moto oyo: ye oyo azali na mawa mingi mpe atutami na elimo mpe azali kolɛnga mpo na liloba na ngai.’ (Yisaya 66:2b) Ɛɛ, moto oyo alingi kosambela ye na losambo ya pɛto asengeli kozala na motema malamu. (Emoniseli 4:11) Moto oyo azali kosambela Yehova asengeli kozala “na mawa mingi mpe atutami na elimo.” Yango elingi nde koloba ete Yehova alingaka tózala na esengo te? Te, azali “Nzambe ya esengo,” mpe alingaka ete basaleli na ye bázala mpe na esengo. (1 Timote 1:11; Bafilipi 4:4) Nzokande, biso nyonso tosalaka masumu mbala na mbala, mpe tosengeli te kotalela masumu na biso na lisɛki. Esengeli nde kopesa biso “mawa mingi” mpamba te totosi te mitinda ya sembo ya Yehova. (Nzembo 51:17) Tosengeli komonisa ete ‘totutami na elimo,’ na kobongoláká motema, kobundisáká makasi bizaleli na biso ya masumu, mpe kobondela mpo Yehova alimbisa biso.—Luka 11:4; 1 Yoane 1:8-10.

6. Na ndenge nini basambeli ya solo ya Nzambe basengeli ‘kolɛnga mpo na liloba ya Nzambe’?

6 Longola yango, Yehova atalaka baoyo ‘balɛngaka mpo na liloba na ye.’ Yango elingi nde komonisa ete tosengeli kolɛnga na nsɔmɔ ntango nyonso oyo tozali kotánga maloba na ye? Te, alingi nde tótalela maloba ye na kobanga oyo ezali komonisa limemya. Tolukaka toli na ye na motema na biso mobimba, tosalelaka yango mpo etambwisa biso na makambo nyonso ya bomoi na biso. (Nzembo 119:105) Tokoki mpe ‘kolɛnga’ na ndenge oyo ete tozali kobanga ata kokanisa ete tokozanga kotosa Nzambe, tokobebisa solo na ye na mimeseno ya bonkɔkɔ, to tokotyola yango. Ezaleli wana ya komikitisa ezali na ntina mingi na losambo ya pɛto—kasi, likambo ya mawa, lelo oyo bato mingi na mokili bazali na ezaleli yango te.

Yehova ayini ezaleli ya bokosi na losambo

7, 8. Ndenge nini Yehova ataleli losambo ya nkombo mpamba oyo bakosi bazali kosambela ye?

7 Ntango Yisaya azali kotala bato ya ntango na ye, amoni mpenza ete bato mingi te bazali na ezaleli oyo Yehova alukaka epai ya basambeli na ye. Yango wana, Yelusaleme oyo epɛngwi ebongi kozwa etumbu oyo ezali kozela yango. Yoká ndenge Yehova azali kotalela losambo ya bato ya engumba yango: ‘Ye oyo akoboma ngɔmbɛ azali lokola ye oyo akoboma moto; ye oyo akokaba mbeka ya mwana ya mpate lokola ye oyo akokamola nkingo ya mbwa; ye oyo akoya na mbeka ya fufu lokola ye oyo akokaba makila ya ngulu; ye oyo akopesa mbeka ya kokanisa ya mpaka ya malasi lokola ye oyo akopambola ekeko. Ɛɛ, bamoni nzela na bango mpenza mpe molimo na bango esepeli na bosɔtɔ na bango.’—Yisaya 66:3.

8 Maloba oyo ezongisi na makanisi na biso maloba ya Yehova oyo ezali na mokapo ya liboso ya Yisaya. Kuna, Yehova ayebisaki bato na ye ya motó makasi ete azali kosepela ata moke te na milulu na bango ya losambo mpe yango ezalaki nde kopelisa nkanda na ye ya sembo mpamba te bazalaki bakosi. (Yisaya 1:11-17) Sikoyo, Yehova akokanisi mpe bambeka na bango na makambo ya mabe mpenza. Ngɔmbɛ mobali ya ntalo mingi oyo bazali kopesa mbeka ezali kokitisa motema ya Yehova te, ndenge kaka koboma moto ekoki te kokitisa motema na ye! Bakokanisi bambeka mosusu na bambeka ya mbwa to ya ngulu, nzokande Mibeko ya Moize emonisi ete banyama yango ezali mbindo, yango wana ebongi soki moke te kopesama mbeka. (Levitike 11:7, 27) Yehova atiki bakosi wana ya losambo ete bázwa etumbu te?

9. Bayuda mingi basali nini ntango Yehova azali kokundwela bango makambo na monɔkɔ ya Yisaya, mpe yango ekozanga te kobimisa likambo nini?

9 Sikoyo Yehova alobi boye: “Ngai mpe nakoponela bango minyoko mpe nakoyeisela bango nsɔmɔ na bango. Zambi, ebengaki ngai, moko azongisaki monɔkɔ te; elobaki ngai, moko ayokaki te. Kasi, basalaki yango ezali mabe na miso na ngai mpe baponaki yango esepelisi ngai te.” (Yisaya 66:4) Na ntembe te, Yisaya abongi solo koloba makambo wana na motema moko. Yehova asalelaki ye bambula ebele mpo na ‘kobenga’ mpe ‘koloba’ na bato na Ye. Mosakoli yango nde ayebi mpenza malamu ete moto moko te azali koyoka. Lokola bakangami kaka na makambo mabe, bakozanga etumbu te. Yehova akoponela bango etumbu oyo ebongi na bango mpe akoyeisela bato na ye oyo bapɛngwi makambo ya nsɔmɔ.

10. Makambo oyo Yehova asalelaki Yuda ezali koyebisa biso nini na ndenge azali kotalela mangomba ya boklisto?

10 Ndenge moko mpe, mangomba ya boklisto na mikolo na biso emipesi na makambo oyo Yehova asepelaka na yango ata moke te. Bikeko etondi na bandako-nzambe na bango, na mateya na bango bakumisaka bafilozofi mpe mimeseno oyo euti na Makomami te, mpe koluka kozala na bokonzi na politiki ezali se kozindisa bango mpenza na ekobo ya elimo elongo na bikólo ya mokili. (Malako 7:13; Emoniseli 18:4, 5, 9) Ndenge moko na Yelusaleme ya kala, etumbu oyo mangomba ya boklisto ebongi kozwa—likambo moko ya “nsɔmɔ”—ezali mpenza koyela bango. Moko ya bantina oyo bakozwa mpenza etumbu ezali makambo oyo bazali kosala basaleli ya Nzambe.

11. (a) Eloko nini ebakisi lisusu mabe na lisumu ya bapɛngwi na mikolo ya Yisaya? (b) Na ndenge nini bato ya ntango ya Yisaya bazali kobwaka bato ya sembo ‘mpo na nkombo ya Nzambe’?

11 Yisaya alandi koloba boye: ‘Bóyoka liloba ya Yehova, bino baoyo bozali kolɛnga na liloba na ye ete, Bandeko na bino baoyo bakoyina bino mpe bakobwaka bino mpo na nkombo na ngai, bazali koloba ete, Tiká ete Yehova akembisama! Ɛɛ, ye akomonana na esengo epai na bino! Kasi ezali bango nde bakoyoka nsɔni.’ (Yisaya 66:5) “Bandeko” ya Yisaya, bato mpenza ya ekólo na ye, Yehova Nzambe apesi bango mokumba ya komonisa ye mpe ya kotosa bokonzi monene na ye. Lokola bakokisi mokumba yango te, basali lisumu monene. Kasi babakisi lisusu mabe na lisumu na bango na ndenge bazali koyina mibali lokola Yisaya oyo bazali sembo mpe na komikitisa. Bapɛngwi wana bazali koyina mpe kobwaka bato ya sembo mpamba te bato yango ya sembo bazali komonisa Yehova Nzambe na ndenge solo esɛngi. Na ndenge yango, bazali kobwaka bango ‘mpo na nkombo ya Nzambe.’ Se na ntango yango, bato wana oyo bazali kosalela Yehova na bokosi bazali koloba ete bazali komonisa ye, bazali kosalela maloba lokola “Tiká ete Yehova akembisama!” mpo na komonisa ete basambelaka.a

12. Wapi mwa bandakisa ya minyoko oyo basaleli ya sembo ya Yehova bakutanaki na yango na mabɔkɔ ya bakosi ya mangomba?

12 Koyina oyo mangomba ya lokuta eyinaka bato oyo bazali na losambo ya pɛto ebandi lelo te. Yango ezali kokokisa lisusu esakweli oyo ezali na Genese 3:15, oyo esakolaki bonguna ya ntango molai kati na momboto ya Satana mpe Momboto ya mwasi ya Nzambe. Na ekeke ya liboso, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bapakolami ete bato ya ekólo na bango mpe bakonyokola bango—bakobengana bango na basinagoga mpe bakonyokola bango kino ata koboma bango. (Yoane 16:2) Bongo ezali boni na mikolo na biso? Na ebandeli ya “mikolo ya nsuka,” basaleli ya Nzambe bakangaki ntina ete bango mpe bakonyokwama. (2 Timote 3:1) Na 1914, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezongelaki maloba ya Yisaya 66:5 mpe elobaki ete: “Tokoki koloba ete minyoko nyonso oyo ekwelaki basaleli ya Nzambe eutaki na bato oyo bamibengaka baklisto.” Lisolo yango elobaki lisusu ete: “Toyebi te, na mikolo na biso, mbala mosusu bakoki ata kosala biso makambo mabe koleka, lokola kotinda bato bámona biso mpamba, koluka koboma lingomba na biso, ata mpe koboma biso mpenza.” Maloba wana ezalaki mpenza solo! Nsima ya kobima ya lisolo yango, eumelaki te minyoko oyo eutaki na bakonzi ya mangomba ekómaki makasi mpenza na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Kasi mangomba ya boklisto eyokaki nsɔni, se ndenge esakolamaki. Ndenge nini?

Kozongisama ya nokinoki mpe ya pwasa

13. Na kokokisama na yango ya liboso, “mongongo ya mobulu oyo euti na mboka” ezalaki nini?

13 Yisaya asakoli boye: ‘Mongongo ya mobulu euti na mboka, mongongo euti na Tempelo, ezali mongongo ya Yehova oyo azali kopesa banguna na ye lifuti oyo ebongi na bango.’ (Yisaya 66:6) Na kokokisama ya liboso ya maloba oyo, “mboka” oyo balobeli ezali Yelusaleme, epai tempelo ya Yehova ezalaki. “Mongongo ya mobulu” emonisi yikiyiki ya bitumba, oyo eyokani na mboka ntango basoda ya Babilone bayei kobunda na yango na mobu 607 L.T.B. Kasi maloba yango ekokisamaki ndenge nini na mikolo na biso?

14. (a) Malaki asakolaki nini mpo na koya ya Yehova na tempelo na Ye? (b) Na kotalela esakweli ya Ezekiele, likambo nini esalemaki ntango Yehova ayaki na tempelo na ye? (c) Ntango nini Yehova ná Yesu bayaki kotala tempelo ya elimo, mpe baoyo bazalaki koloba ete bazali komonisa losambo ya pɛto basukaki ndenge nini?

14 Maloba wana ya Yisaya eyokani na maloba ya bisakweli mosusu mibale, moko ezali na Ezekiele 43:4, 6-9 mpe mosusu na Malaki 3:1-5. Ezekiele ná Malaki basakolaki ntango oyo Yehova Nzambe akoya na tempelo na ye. Esakweli ya Malaki emonisi ete Yehova ayei kotala ndako na ye ya losambo ya pɛto mpe kosala mosala ya Mopɛtoli; yango wana, abwaki baoyo bazali kokosa ete bazali bamonisi na ye. Emonaneli ya Ezekiele emonisi Yehova akɔti na tempelo mpe asɛngi ete bálongola eloko nyonso etali pite mpe losambo ya bikeko.b Na kokokisama ya bisakweli yango na mikolo na biso, likambo moko ya ntina esalemaki na 1918 na ndenge ya elimo, oyo ezalaki na boyokani na losambo ya Yehova. Emonani ete Yehova ná Yesu bayaki kotala baoyo nyonso bazalaki koloba ete bazali bamonisi ya losambo ya pɛto. Nsima na yango bayaki kotala ndenge makambo ezalaki, babwakaki mangomba ya boklisto mpo na mbindo na yango. Bayekoli bapakolami ya Klisto bazwaki nde libaku ya kopɛtolama mwa ntango moke, mpe nsima na yango bazongisamaki nokinoki na elimo na 1919.—1 Petelo 4:17.

15. Kobotama nini esakolami, mpe ndenge nini yango ekokisami na mobu 537 L.T.B.?

15 Balobeli malamu mpenza kozongisama yango na ndenge ya elilingi na bavɛrsɛ ya Yisaya oyo elandi : ‘Naino azalaki na mpasi te abotaki; naino mpasi na ye ekómelaki ye te abimisaki mwana mobali. Nani ayoki likambo yango? Nani amoná makambo ya ndenge oyo? Mokili ekobotama na mokolo moko? Ekólo ekobotama na mwa ntango moke? Zambi bobele ntango Siona azwi mpasi ya kobota aboti bana na ye.’ (Yisaya 66:7, 8) Maloba oyo ekokisamaki libosoliboso na esengo mpenza epai ya Bayuda oyo bazalaki baombo na Babilone. Awa, balobeli lisusu Siona, to Yelusaleme, lokola mwasi oyo azali kobota, kasi aboti te ndenge basi nyonso babotaka! Aboti nokinoki mpe pwasa, liboso kutu azwa mpasi ya kobota! Wana ezali mpenza elilingi oyo ebongi. Ndenge ekólo ya Nzambe ebotami lisusu na mobu 537 L.T.B. emonani lokola likamwisi mpamba te esalemi nokinoki mpe pwasa. Emonani bongo mpo kobanda na ntango oyo Sirise asikoli Bayuda na boombo tii na ntango oyo batikali ya sembo bazongi na mboka na bango, eleki bobele mwa basanza moke! Nzokande, makambo elekaki mpenza bongo te liboso ete ekólo yango ya Yisalaele ebotama mpo na mbala ya liboso! Na mobu 537 L.T.B., ntina ya kobondela mokonzi moko mabe mpo na kosɛnga bonsomi ezali te, ntina ya kokima basoda ya banguna ezali te mpe ntina ya kolekisa mbula 40 na esobe ezali te.

16. Na kokokisama ya Yisaya 66:7, 8, na mikolo na biso, Siona ezali komonisa nini mpe ndenge nini bana na ye babotamaki lisusu?

16 Na kokokisama ya mikolo na biso, Siona ezali komonisa “mwasi” ya Yehova na likoló, ebongiseli na ye ya bikelamu ya elimo na likoló. Na 1919, “mwasi” yango asepelaki komona kobotama ya bana na ye bapakolami awa na mabelé lokola ebongiseli to “ekólo.” Kobotama lisusu wana esalemaki nokinoki mpe pwasa.c Na mwa basanza mpamba, bapakolami, baoyo bazalaki lokola bakufi na elimo mpo bazalaki mpenza kosala lisusu te mosala na bango, babandaki lisusu kosala na molende na kati ya “mokili” na bango, to esika ya mosala ya elimo oyo Nzambe apesaki bango. (Emoniseli 11:8-12) Na Ɔtɔne ya 1919, bayebisaki kutu ete zulunalo moko ya sika ebimi oyo ekosalisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na makambo mosusu. Zulunalo wana, oyo ebengamaki L’Âge d’Or (sikoyo Réveillez-vous! [Lamuká!]), ezalaki elembo oyo emonisaki ete basaleli ya Nzambe bazwi lisusu makasi mpe bamibongisi lisusu mpo na mosala.

17. Ndenge nini Yehova akitisi motema ya basaleli na ye ete eloko moko te ekoki kopekisa ye kokokisa mokano na ye mpo na Yisalaele ya elimo?

17 Eloko moko te na molɔ́ngɔ́ mobimba ekokaki kopekisa kobotama yango ya mibale na elimo. Vɛrsɛ oyo elandi elobeli yango polele: ‘Yehova alobi ete, Nakokómisa nde na ebotelo mpe nakobotisa te? Nzambe na bino alobi ete, Ngai oyo nakobotisa, nakokanga nde libumu?’ (Yisaya 66:9) Se lokola ntango mwasi abandi kobota likoki ya kopekisa ye lisusu ezalaka te, bobele bongo kobotama lisusu ya Yisalaele ya elimo, na ntango ebandaki, ekokaki lisusu kopekisama te. Ya solo, botɛmɛli ezalaki, mpe mbala mosusu ekokóma kutu makasi koleka na mikolo ezali koya. Kasi, kaka Yehova nde akoki kopekisa likambo oyo abandaki kosala, mpe asalaka bongo soki moke te! Bongo ndenge nini Yehova ataleli basaleli na ye oyo bazongeli makasi na bango?

Yehova abatelaka na boboto mpenza

18, 19. (a) Ndakisa nini oyo ezali kosimba motema Yehova asaleli, mpe ndenge nini yango ezali kokokisama epai ya basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na boombo? (b) Ndenge nini lelo oyo batikali bapakolami bazali koleisama mpe kobatelama na bolingo mpenza?

18 Bavɛrsɛ minei oyo elandi ezali komonisa na maloba oyo ezali mpenza kosimba motema ete Yehova abatelaka na boboto mpenza. Ya liboso, Yisaya alobi boye: ‘Bósepela elongo na Yelusaleme mpe bózala na esengo mpo na ye, bino nyonso oyo bolingaka ye; bósepela na ye na esengo, bino nyonso oyo bozali kolela mpo na ye; ete bónunga mpe bótonda, na mabɛlɛ na ye ya kobɔndisa; ete bómɛla mingi na esengo mpo na monene ya nkembo na ye.’ (Yisaya 66:10, 11) Awa, Yehova asaleli ndakisa ya mwasi oyo azali komɛlisa mwana mabɛlɛ. Soki mwana moke ayoki nzala, akotika kolela te. Kasi soki mama apesi ye libɛlɛ, mbala moko kolela na ye ebongwani esengo. Bobele bongo, batikali ya sembo ya Bayuda oyo bazali na Babilone bakotika mbala moko kolela mpe bakokóma na esengo wana ntango ya kosikolama mpe ya kozonga na bango ekokoka. Bakozala na esengo. Nkembo ya Yelusaleme ekozonga ntango bakotonga yango mpe bato bakofanda lisusu na kati na yango. Lisusu, nkembo ya mboka yango ekomonana mpe epai ya bato na yango ya sembo. Bakoleisama lisusu na elimo na nzela ya banganga-nzambe oyo bakosala mosala na bango ya bonganga-nzambe.—Ezekiele 44:15, 23.

19 Nsima ya kozongisama ya Yisalaele ya elimo na 1919, bazwaki mpe ebele ya bilei ya elimo. Kobanda ntango yango, ebele ya bilei ya elimo oyo ezali kopesama na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezangaka soki moke te. (Matai 24:45-47) Ya solo, yango ezali mpenza ntango ya kobɔndisama mpe ya esengo mpo na batikali bapakolami. Kasi, mapamboli mosusu mpe ezali.

20. Na ndenge nini Yelusaleme ezwi mapamboli lokola “etima oyo ezali kosopana,” na ntango ya kala mpe na mikolo na biso?

20 Esakweli ekobi koloba boye: ‘Yehova alobi boye ete, Talá nakokómisa kimya epai na ye lokola ebale, mpe bozwi ya bikólo lokola etima oyo ezali kosopana; mpe bokonunga, bokokumbama na loketo na ye, akosakana na bino na mabɔlɔngɔ na ye.’ (Yisaya 66:12) Awa, balobeli ndakisa ya konungisa to komɛlisa mwana nzela moko na ndakisa oyo ezali komonisa ebele ya mapamboli—“ebale” mpe “etima oyo ezali kosopana.” Yehova akopesa Yelusaleme kaka kimya mingi te, kasi mpe “bozwi ya bikólo,” oyo ekosopanela basaleli ya Nzambe mpe ekopesa bango mapamboli. Yango elingi koloba ete bato ya bikólo bakoya ebele epai ya basaleli ya Yehova. (Hagai 2:7) Ntango esakweli yango ekokisamaki na ntango ya kala, bato ya bikólo ndenge na ndenge bakangamaki mpenza na Yisalaele, bakómaki bandimi ya Lingomba ya Bayuda. Kasi kokokisama oyo eleki monene emonani nde na mikolo na biso, “ebele ya bato . . . bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso”—ebele mpenza ya bato lokola mai ya ebale oyo ezali kosopana—bazali kokangama na batikali ya Bayuda ya elimo.—Emoniseli 7:9; Zekalia 8:23.

21. Na nzela ya ndakisa moko oyo ezali kosimba motema, libɔndisi ya ndenge nini esakolami?

21 Yisaya 66:12 esaleli mpe maloba oyo emonisaka bolingo ya mama—na ndakisa, kosakanisa mwana na mabɔlɔngɔ mpe komema ye na loketo. Na vɛrsɛ oyo elandi, bamonisi likanisi ya ndenge yango mpe mbongwana moko ya malamu oyo ekosalema. ‘Lokola mobali oyo mama na ye azali kobɔndisa ye, boye ngai nakobɔndisa bino; bokobɔndisama kati na Yelusaleme.’ (Yisaya 66:13) Sikoyo mwana akómi “mobali,” mokóló. Kasi mama na ye azali kaka na mposa ya kobɔndisa ye na ntango ya mpasi.

22. Ndenge nini Yehova amonisi ete bolingo na ye ezali makasi mpe etondi na boboto?

22 Na ndenge wana oyo ezali kosimba motema, Yehova amonisi ete alingi basaleli na ye na bolingo makasi oyo etondi na boboto. Ata soki mama akoki kolinga mwana na ye makasi ndenge nini, kasi bolingo yango ezali eloko te liboso ya bolingo makasi oyo Yehova alingaka basaleli na ye ya sembo. (Yisaya 49:15) Ezali mpenza na ntina mingi ete baklisto nyonso bámonisaka ezaleli wana ya Tata na bango ya likoló! Ntoma Paulo amonisaki ezaleli yango, mpe na ndenge yango atikaki ndakisa malamu mpenza mpo na bankulutu na lisangá ya boklisto. (1 Batesaloniki 2:7) Yesu alobaki ete kolinga bandeko nde ekozala elembo ya libosoliboso oyo ekomonisa bayekoli na ye.—Yoane 13:34, 35.

23. Lobelá esengo ya basaleli ya Yehova oyo bazongisami.

23 Yehova amonisaka bolingo na ye na misala. Yango wana alandi koloba boye: “Bokomona mpe motema na bino ekosepela, mikuwa na bino ekokola lokola matiti; mpe ekoyebana ete lobɔkɔ ya [Yehova] ezali elongo na baombo na ye, mpe nkanda na ye ekotɛmɛla bayini na ye.” (Yisaya 66:14) Moto moko oyo ayebi gramɛrɛ ya Liebele malamu apesi likanisi ete liloba “bokomona” emonisi ete, na mboka na bango oyo ezongisami, ezala epai wapi Bayuda oyo bazongi na boombo bakotombola miso mpo na kotala, “bakomona kaka makambo oyo ekopesa bango esengo.” Ya solo, bakosepela, bakotonda mpenza na esengo na ndenge bazongisi bango na mboka na bango oyo balingi mingi. Bakoyoka lokola nde bazongi bilenge, mikuwa na bango ezali lisusu kokóma makasi, ekozonga mobesu lokola matiti na ntango ya mbula. Bato nyonso bakoyeba ete mapamboli yango ezali mpo na makasi ya moto te, kasi mpo na “lobɔkɔ ya Yehova.”

24. (a) Okanisaka nini soki otali makambo oyo ezali kokómela basaleli ya Yehova na mikolo na biso? (b) Tosengeli kozala na ekateli nini?

24 Ozali komona ndenge lobɔkɔ ya Yehova ezali kosala kati na basaleli na ye na mikolo na biso? Moto moko te akokaki mpenza kozongisa losambo ya pɛto. Moto te akokaki kosala ete bamilio ya bato ya motuya oyo bauti na bikólo nyonso báya kosangana elongo na batikali ya sembo na mokili na bango ya elimo. Kaka Yehova Nzambe nde akoki kosala makambo yango. Makambo wana oyo ezali komonisa bolingo ya Yehova ezali kopesa biso esengo monene. Tómeka ata moke te komona bolingo na ye lokola eloko mpamba. Tiká ‘tólɛngaka na liloba na ye’ ntango nyonso. Tózala na ekateli makasi ya kolandaka mitinda ya Biblia na bomoi na biso mpe ya kosepela na mosala ya Yehova.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na mikolo na biso bato mingi ya mangomba ya boklisto baboyaka kosalela nkombo ya Yehova, balongoli kutu yango na mabongoli mingi ya Biblia. Bamosusu bazali kosɛka basaleli ya Nzambe mpo basalelaka nkombo ya Nzambe. Nzokande, mingi kati na bato yango basalelaka liloba “Aleluya,” oyo elimboli “Kumisá Ya,” mpo na komonisa ete basambelaka.

b Maloba ‘bibembe ya bakonzi na bango,’ oyo ezali na Ezekiele 43:7, 9, elobeli bikeko. Bakonzi mpe bato ya Yelusaleme oyo bazalaki batomboki bakómisaki tempelo ya Nzambe mbindo na bikeko, oyo bakómisaki yango mpenza bakonzi na bango.

c Kobotama oyo basakoli awa ekeseni na oyo balobeli na Emoniseli 12:1, 2, 5. Na mokapo wana ya Emoniseli, “mwana mobali” ezali komonisa Bokonzi ya Masiya, oyo ebandaki koyangela na 1914. Nzokande, “mwasi” ya bisakweli yango nyonso mibale ezali kaka mwasi moko.

[Elilingi na lokasa 395]

“Lobɔkɔ na ngai esali biloko oyo nyonso”

[Elilingi na lokasa 402]

Yehova akopesa Siona “bozwi ya bikólo”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto