Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 6 lok. 101-lok. 104 par. 4
  • Koyeba konyata maloba ya ntina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyeba konyata maloba ya ntina
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Konyata malamu maloba ya ntina na bavɛrsɛ
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Konyata maloba ya ntina mpe kobongola mongongo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Ndenge nini nakoki kolonga mitungisi na kelasi?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Kotanga mikapo mpe kolimbola ntina oyo otangeli yango
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 6 lok. 101-lok. 104 par. 4

LITEYA 6

Koyeba konyata maloba ya ntina

Osengeli kosala nini?

Osengeli konyata maloba mpe bafraze mosusu mpo bato oyo bazali koyoka yo bázala na mpasi te mpo na kokanga ntina ya makanisi oyo ozali kobimisa.

Yango ezali na ntina nini?

Soki oyebi konyata maloba ya ntina, yango ekosalisa yo obenda mpenza likebi ya bato oyo bazali koyoka yo, osimba mitema na bango mpe olendisa bango.

NTANGO ozali koloba to kotánga na miso ya bato, ezali na ntina mingi ete osuka kaka te na kotánga liloba mokomoko ndenge esengeli, kasi osengeli lisusu konyata maloba ya ntina mpe maloba oyo ebombi makanisi ya ntina na lisolo na yo mpo bato bákanga ntina na yango polele.

Koyeba konyata maloba ya ntina, elimboli kaka te konyata liloba moko to maloba mingi. Osengeli nde konyata liloba oyo ebongi. Soki onyati liloba oyo ebongi te, bato oyo bazali koyoka yo bakokanga mpenza ntina ya makambo oyo olobi te mpe bakobanda kokanisa makambo mosusu. Ata lisolo na yo ezali na makanisi ya kitoko oyo ekoteya mpenza bato, soki oyebi konyata maloba malamu te, yango ekolendisa mpenza bato oyo bazali koyoka te.

Ezali na ndenge mingi mpo na konyata maloba ya ntina, oyo mbala mingi, esalelamaka nzela moko: okoki kotombola mongongo, okoki koloba na nsai mpenza, okoki koloba malɛmbɛ mpe kobenda maloba, kopema liboso to nsima ya koloba likambo yango (to okoki kopema liboso mpe nsima ya koloba yango), to mpe okoki kosala bajɛstɛ na mabɔkɔ mpe na elongi. Na nkota mosusu, okoki mpe konyata maloba ya ntina soki okitisi mongongo to mpe olobi na mongongo ya moke. Mpo opona oyo wapi okosalela, talelá makambo oyo okoloba mpe esika oyo okolobela yango.

Ntango ozali kopona likambo oyo okonyata, talelá makambo oyo. (1) Na kati ya fraze, mpo oyeba maloba oyo okoki konyata, osengeli kaka kotala maloba oyo elandi yango te, kasi osengeli mpe kotalela esika na yango kati na lisolo mobimba. (2) Okoki konyata maloba mosusu mpo na komonisa esika likanisi mosusu ebandi, ezala likanisi moko ya ntina to mpe olingi kokɔta na likambo mosusu. Ekoki mpe kozala mpo na komonisa ete okómi na nsuka ya makanisi oyo ozalaki komonisa. (3) Molobi akoki konyata maloba mosusu mpo na komonisa ndenge ye moko azali kotalela likambo yango. (4) Okoki mpe konyata maloba mosusu mpo na komonisa makanisi ya ntina ya lisolo na yo.

Mpo na konyata maloba ya ntina na ndenge oyo tolobeli awa, molobi to moto oyo azali kotánga na miso ya bato mingi asengeli ye moko kokanga mpenza ntina ya makambo oyo akoloba to akotánga mpe asengeli mpenza koluka ete bato oyo bazali koyoka ye bákanga ntina na yango. Nehemia 8:8 elobi boye mpo na mateya oyo epesamaki na mikolo ya Ezela: “Batángaki kati na mokanda ya Mobeko ya Nzambe polele; mpe bapesaki ntina ete básosola [botángi].” Emonani polele ete bato oyo batángaki mpe balimbolaki Mibeko ya Nzambe na ntango wana bayebaki mpenza ntina ya kosalisa baoyo bazalaki koyoka bango ete bákanga ntina ya makambo oyo bazalaki kotánga, bákanga yango na motó mpe básalela yango.

Mokakatano ekoki kouta wapi? Bato mingi, ntango basololaka na bato mosusu mokolo na mokolo, ezalaka mpasi te mpo na kokanga ntina ya makambo oyo bazali koloba. Nzokande, ntango batángaka mokanda oyo ekomami na moto mosusu, ezalaka mpasi mpo báyeba maloba to bafraze oyo basengeli konyata. Mpo na koyeba maloba oyo osengeli konyata, osengeli nde kokanga mpenza ntina ya makambo oyo ekomami wana. Yango esɛngi ete oyekola malamumalamu makambo oyo ezali na mokanda yango. Yango wana, soki basɛngi yo otánga na likita moko ya lisangá, osengeli komibongisa malamu mpenza.

Na esika ya kopona malamu maloba oyo basengeli konyata, bato mosusu batángaka lokola nde bazali koyemba. Ntango bazali kotánga, bazali komata mpe kokita ntango nyonso, ezala maloba oyo bazali konyata ezali na ntina to ezali na ntina te. Ezali mpe na bato mosusu oyo banyataka maloba oyo ekangisaka lisolo, maloba lokola: yango wana, na bongo, atako bongo, nzokande mpe bongo na bongo. Mpo na kotánga maloba yango, bamatisaka mongongo mingi koleka. Soki maloba oyo ozali konyata ezali kobimisa makanisi polele te, yango ekosala ete bato bátya lisusu likebi na lisolo yango te.

Mpo na konyata maloba ya ntina, bato mosusu bamatisaka mongongo makasi, lokola nde bazali kopamela bato oyo bazali koyoka bango. Na ntembe te, kosala bongo ebotaka mpenza mbuma malamu te. Soki ozali konyata maloba na ndenge ebongi te, bato oyo bazali koyoka bakoki komona lokola nde ozali kozwa bango lokola bana mike. Ekozala malamu koleka soki olobi na bango na bolingo mpenza mpo na kobenda likebi na bango mpe kosalisa bango bámona ete makambo oyo ozali koloba euti na Makomami mpe ebongi mpenza!

Ndenge ya kobongisa. Mbala mingi, moto ye moko ayebaka te ete azali na mikakatano mpo na konyata maloba ya ntina. Esengeli mbala mosusu ete moto mosusu ayebisa ye yango. Soki olingi mpenza koyeba konyata maloba ya ntina, mokɛngɛli na eteyelo ya lisangá na bino akoki kosalisa yo. Kobanga te kosɛnga ndeko mosusu oyo ayebi koloba malamu ete asalisa yo. Sɛngá ye ete alanda yo na likebi mpenza ntango ozali kotánga to koloba mpe na nsima, apesa yo toli mpo obongisa lisusu.

Na ebandeli, moto oyo azali kopesa yo toli akoki kosɛnga yo ete omeka kosalela lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na koyekola konyata maloba. Na ntembe te akoyebisa yo ete otalela fraze mokomoko malamu mpenza mpo na koyeba maloba to bafraze oyo osengeli konyata mpo bato bázala na mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Akoki koyebisa yo lisusu ete otya mpenza likebi na maloba mosusu oyo batɛngisi makomi. Kobosana te ete na kati ya fraze, maloba nyonso ezalaka na boyokani. Mbala na mbala, osengeli kaka konyata liloba mokomoko te, kasi maloba mingi ya fraze na mbala moko. Na nkota mosusu, bakoki kolendisa bana-kelasi ete bátya likebi na bilembo ya kotombola to kokitisa mongongo oyo ezali komonisa maloba oyo basengeli konyata.

Na nsima, mpo na kosalisa yo oyeba maloba oyo osengeli konyata, moto oyo azali kopesa yo toli akoki kolendisa yo ete osuka kaka na fraze moko te, kasi otalelaka mpe paragrafe to lisolo mobimba. Likanisi nini ya ntina elobelami na paragrafe yango? Ndenge nini yango ekotinda yo otalela maloba oyo osengeli konyata na kati ya fraze mokomoko? Na lisolo na yo, talá motó ya likambo monene mpe motó ya likambo moke oyo ezali na makomi ya moindo makasi. Boyokani nini ezali kati na mitó ya makambo yango mpe maloba oyo osengeli konyata? Nyonso wana ezali makambo oyo osengeli kotalela. Kasi kebá ete onyata maloba ebele ebele te.

Ezala ozali koloba makambo oyo euti mpenza na motema na yo to ozali kotánga, moto oyo azali kopesa yo toli akoki mpe kolendisa yo ete onyataka maloba ya ntina na kotalela ndenge makanisi ya lisolo na yo elandani. Osengeli koyeba esika oyo likanisi moko esuki to esika oyo ozali koleka na likanisi mosusu ya ntina. Bayoki bakosepela mpenza soki, na lisolo na yo, bazali komona esika likanisi moko esuki mpe esika oyo olingi koleka na likanisi mosusu ya ntina. Okoki kosalisa bango báyeba yango soki onyati maloba lokola libosoliboso, na nsima, na nsuka, na yango, mpe ebongi ete.

Moto oyo azali kopesa yo toli akosɛnga yo mpe ete otya likebi na makanisi oyo osengeli koloba to kotánga yango na nsai mpenza. Mpo na yango, okoki konyata maloba lokola mpenza, soki moke te, ebongi te ete, ezali na ntina mingi ete, mpe ntango nyonso. Soki ozali kosala bongo, makambo oyo ozali koloba ekoki mpenza kosimba mitema ya bato oyo bazali koyoka yo. Tokolobela makambo yango mingi lisusu na Liteya 11, “Koloba na nsai mpe kobimisa mayoki.”

Mpo onyataka maloba malamu koleka, ekosɛnga lisusu oyebaka mpenza makanisi ya ntina ya lisolo na yo, oyo olingi ete bayoki na yo bákanga na motó. Tokotalela makambo yango mosusu na Liteya 7, “Konyata makanisi ya ntina”, oyo etali kotánga na miso ya bato mingi mpe na Liteya 37, “Kobimisa makanisi ya ntina polele”, oyo etali koloba na miso ya bato mingi.

Soki ozali kosala makasi okola na mosala ya kosakola, tyá mpenza likebi na ndenge oyo ozali kotánga bavɛrsɛ. Zalá na momeseno ya komituna: ‘Mpo na nini nazali kotánga vɛrsɛ oyo?’ Mpo na moto oyo azali koteya, ekoki kaka te kotánga maloba ndenge esengeli, ata mpe kotánga yango na nsai mpenza. Ntango ozali koyanola na motuna ya moto moko to ozali koteya ye likambo moko oyo ezali mateya ya ebandeli na Biblia, ezali malamu ete onyata na kati ya vɛrsɛ oyo ozali kotánga maloba oyo esimbi likambo oyo bozali kolobela. Soki osali bongo te, moto oyo ozali kotángela ye vɛrsɛ yango akokoka kokanga likanisi yango te.

Konyata maloba mpe bafraze mosusu esɛngaka kopesa maloba to bafraze yango kilo oyo ebongi na yango. Mpo na yango, mbala mosusu moto oyo ayebi naino koloba na miso ya bato mingi te, akoki kolekisa ndelo ntango akómi na maloba to bafraze yango. Yango ekozala lokola mondule ya moto oyo abandi koyekola kobɛta miziki. Na ebandeli akobanda kobɛta kaka “banoti” ya mpamba, kasi soki ameseni na yango, ntango banoti yango esangisami malamu, ekopesa “miziki” oyo ebɛtami malamu mpe ekoyokana kitoko mpenza.

Nsima ya koyekola makambo oyo ya ntina mingi, sikoyo okozwa litomba mingi soki ozali kotya likebi na lolenge bato oyo bayebi mpenza koloba basalaka. Okomona mpenza matomba ya konyata liloba mokomoko ya ntina na ndenge ebongi. Okoyeba mpe ndenge mingi ya konyata maloba ya ntina mpo bato bákanga mpenza ntina ya makambo oyo ozali koloba. Koyeba konyata maloba ya ntina ekosala mpenza ete otángaka mpe olobaka malamu koleka.

Mpo olonga, kosuka kaka te na koyekola mwa moke makambo oyo emonisi ndenge osengeli konyata maloba ya ntina. Mpo olobaka malamu, salá milende ntango nyonso tii okoyeba mpenza konyata maloba ya ntina mpe kino bato mosusu bakomona ete ozali koloba ndenge omeseni koloba.

NDENGE YA KOSALA YANGO

  • Meká koyeba malamumalamu maloba ya ntina na kati ya bafraze. Mpo na yango, taleláká mpe makanisi ya paragrafe to ya lisolo mobimba.

  • Salá makasi onyataka maloba ya ntina mpo na komonisa ete (1) oleki na likanisi mosusu mpe (2) ndenge yo moko ozali kotalela makambo oyo ozali koloba.

  • Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, zalá na momeseno ya konyata maloba oyo ezali komonisa ntina oyo otángi bavɛrsɛ yango.

DEVUARE: (1) Poná bavɛrsɛ mibale oyo osalelaka mingi na mosala ya kosakola. Luká koyeba likambo nini olukaka komonisa ntango otángaka vɛrsɛ yango mokomoko. Tángá bavɛrsɛ yango na mongongo makasi mpe nyatá maloba to bafraze oyo ezali komonisa likambo yango. (2) Talelá Baebele 1:1-14. Mpo na nini osengeli konyata maloba “basakoli” (v. 1), “Mwana” (v. 2), mpe “baanzelu” (v. 4, 5) mpo na kobimisa likanisi ya ntina ya mokapo oyo? Zongelá kotánga mokapo yango na mongongo makasi mbala ebele mpe nyatáká maloba ya ntina oyo ezali komonisa polele ndenge makanisi yango elandani na kati ya mokapo wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto