LITEYA 10
Koloba na esengo
SOKI ozali koloba na esengo, yango ekosala ete olalisa lisolo te. Ezali na ntina mingi ete obongisa lisolo moko oyo ekoteya mpenza bato, kasi mpo lisolo yango ebenda likebi ya bato, osengeli kosala yango na esengo mpenza. Ezala okoli na esika nini to ozali na ezaleli nini, okoki mpenza kosala makasi ete olobaka na esengo.
Lobá na motema na yo mobimba. Ntango Yesu azalaki kosolola na mwasi Mosamalia moko, alobaki na ye ete basambeli ya Yehova basengeli kosambela ye “na elimo mpe na solo.” (Yoa. 4:24) Mitema na bango moko nde esengeli kotinda bango básambela Nzambe mpo na kopesa ye matɔndi mpe basengeli kosala yango na boyokani na solo oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Ntango motema ya moto etondi mpenza na esengo boye, yango ekomonana na ndenge azali koloba. Akozala na mposa makasi ya koyebisa bato bibongiseli ya Yehova oyo etondi na bolingo. Na elongi na ye, na bajɛstɛ na ye mpe na mongongo na ye, akomonisa mpenza ete azali kosepela na makambo yango.
Kasi mpo na nini ekómaka ete molobi, oyo alingaka Yehova mpe andimaka makambo oyo alobaka, azanga esengo ntango azali koloba? Mpo na molobi, ekoki kaka te ete abongisa makambo oyo akoloba. Asengeli mpenza kotya makanisi na ye nyonso mpe motema na ye na lisolo oyo akosala. Tózwa ndakisa: soki molobi asengeli kolobela mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. Ntango akosala lisolo yango, asengeli kaka te kokanga makambo mikemike etali mbeka ya Yesu, kasi asengeli mpe kokanga ntina ya mbeka yango, ezala mpo na ye moko molobi mpe mpo na bato oyo bakoyoka ye. Ye moko asengeli komonisa ete azali na botɔndi mpo na Yehova mpe Yesu Klisto mpo na ebongiseli wana kitoko. Asengeli mpenza kokanisa elikya monene oyo bato bazali na yango mpo na mikolo ekoya: bomoi, bolamu ya libela na libela mpe nzoto ya kokoka na kati ya mabele oyo ekokóma paladiso! Yango wana, makambo yango esengeli mpenza kokɔtela ye na motema.
Biblia elobi boye mpo na Ezela, mokomeli mpe moteyi na Yisalaele: “[Abongisaki] motema na ye ete asosola Mobeko ya [Yehova] mpe ete [alanda] yango mpe ete alakisa . . . kati na Yisalaele.” (Ezl. 7:10) Soki biso mpe tozali kosala bongo, elingi koloba soki tozali kobongisa kaka mateya te, kasi mpe mitema na biso, tokoloba makambo oyo euti mpenza na motema. Soki tozali mpenza komonisa na ndenge na biso ya koloba mpe na mongongo na biso ete solo oyo tozali koloba efandi na motema na biso, yango ekoki mpenza kosalisa bato oyo bazali koyoka biso bákóma na bolingo ya solosolo mpo na mateya yango.
Kanisaká bato oyo bakoyoka yo. Likambo mosusu ya ntina oyo ekosalisa yo mpo oloba na esengo ezali ete osengeli kondima mpenza ete bato yango bazali na mposa ya koyoka makambo oyo okoloba. Yango elimboli ete, ntango ozali kobongisa lisolo na yo, osengeli kaka te kobongisa makanisi ya ntina, kasi osengeli mpe kobondela Yehova ete asalisa yo mpo makambo oyo okoloba ezala na litomba mpo na bato oyo bakoyoka yo. (Nz. 32:8; Mat. 7:7, 8) Luká mpenza koyeba mpo na nini makambo oyo okoloba ezali na ntina mpo na bato oyo bakoyoka yo, makambo yango ezali na litomba nini mpo na bango, mpe ndenge nini okoki kolobela yango mpo bango mpe básepela na makambo yango.
Bongisá malamumalamu mateya yango tii ntango okokóma na mposa makasi ya kosala lisolo yango. Likambo yango esengeli kaka te kozala ya sika, kasi luká nde kolobela yango na lolenge ya sika, na lolenge na yo moko. Soki obongisi mpenza mateya oyo ekosalisa bato oyo bakoyoka yo ete báyeisa makasi boyokani na bango na Yehova, bámonisa botɔndi mpo na bibongiseli kitoko na ye, báyika mpiko na mitungisi ya bomoi na mokili oyo ya kala, to bábota mbuma na mosala ya kosakola, boye ozali mpenza na ntina ya koloba na esengo ntango okosala lisolo na yo.
Bongo soki osengeli kotánga na miso ya bato mingi? Mpo na kotánga na esengo, esengeli kaka te koyeba kotánga maloba mpe kokangisa yango na ndenge esengeli. Yekolá makambo oyo okotánga. Soki okotánga mokapo moko ya Biblia, lukáluká na mikanda makanisi mosusu oyo etali yango. Luká mpenza koyeba malamumalamu likanisi ya ntina oyo ezali wana. Luká koyeba ndenge nini ezali kosalisa yo mpe bato oyo bazali koyoka yo, mpe ntango ozali kotánga, luká kosalisa bato oyo bazali koyoka yo ete bákanga ntina ya likambo yango.
Ozali komibongisa mpo na kobima na mosala ya kosakola? Zongelá kotalela makambo oyo okosolola na bato mpe bavɛrsɛ oyo okosalela. Talelá mpe makanisi ya bato. Makambo nini bazali kolobela mikolo oyo? Mikakatano nini bazali kokutana na yango? Soki omibongisi mpo na komonisa bango ete Liloba ya Nzambe ezali kopesa biyano na mikakatano oyo ezali mpenza kotungisa bango, boye okoyoka mposa makasi ya kokende koyebisa bango yango mpe ekozala mpasi te mpo oloba na esengo mpenza.
Mpo na komonisa ete ozali na esengo, lobá na nsai mpenza. Esengo na yo ekomonana polele soki ozali koloba na nsai mpenza. Yango esengeli komonana polele na elongi na yo. Osengeli komonisa ete yo moko ondimi makambo yango, kasi koluka kotyela bato mibeko ya makasimakasi te.
Tosengeli kozala na bokatikati. Bato mosusu balukaka komonisa esengo na likambo nyonso oyo bazali koloba. Mbala mosusu esengeli kosalisa bango báyeba ete ntango moto azali koloba na esengo koleka ndelo, bato oyo bazali koyoka ye bakotya likebi na bango epai na ye, na esika ya kotya likebi na makambo oyo azali koloba. Nzokande, esengeli kolendisa bato oyo bazalaka nsɔninsɔni mpo bámonisaka mpenza ete bazali na esengo ntango bazali koloba.
Soki ozali na esengo, bato mosusu mpe bakokóma na esengo. Soki ozali kotala bato oyo bazali koyoka yo mpe soki ozali kosepela na lisolo na yo, bato yango bakoyoka mpe esengo oyo ezali na yo. Apolo azalaki koloba na esengo mpenza, yango wana abengami molobi moko malamu. Soki ozali kopela na elimo ya Nzambe, okoloba na esengo mpenza mpe yango ekotinda bato oyo bazali koyoka yo ete básalela makambo yango.—Mis. 18:24, 25; Lom. 12:11.
Na kotalela lisolo na yo, yebá esika oyo okobakisa esengo. Kebá ete olekisa ndelo te: soki na makanisi nyonso ya lisolo na yo, ozali koloba na esengo ya koleka ndelo, yango ekoki kolɛmbisa bato oyo bazali koyoka yo. Ata olendisi bango ndenge nini mpo básalela makambo oyo ozali koloba, bakotya likebi na yango te. Yango emonisi ete ezali na ntina mingi obongisaka makanisi ndenge na ndenge na lisolo na yo. Salá makasi ete lisolo na yo elala te. Soki oponi malamu mpenza makanisi oyo okoloba, yo moko okosepela na lisolo yango. Kasi na kati ya lisolo, ezalaka na makanisi oyo esɛngaka ete oloba yango na esengo mpenza koleka makanisi mosusu; osengeli koyokanisa makanisi yango malamu mpenza na lisolo na yo mobimba.
Makanisi ya ntina esɛngaka ete oloba yango na esengo mpenza. Ntango ozali kosala lisolo na yo, esengeli kozala lokola ozali komata bangomba mpe ozali koleka nsɔngɛ mokomoko. Lokola makanisi ya ntina ya lisolo na yo ezali lokola bansɔngɛ ya ngomba, yango nde ekolendisa bato oyo bakoyoka yo. Nsima ya kosalisa bayoki na yo bándima makambo oyo olobi, osengeli sikoyo kolendisa bango, komonisa bango matomba oyo bakozwa soki basaleli makambo oyo olobeli. Soki ozali koloba na esengo, yango ekosalisa yo osimba mpenza mitema ya bato yango. Maloba ya kosepelisa eyaka na makasi te. Esengeli kozala na ntina na yango, mpe makambo oyo okoloba na lisolo na yo nde ekosalisa yo oyeba ntina oyo osengeli kosepela ntango ozali koloba.