Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wt mok. 11 nk. 101-109
  • “Bókoba koluka liboso bokonzi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókoba koluka liboso bokonzi”
  • Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotika te ete solo ya Bokonzi ebebisama
  • Bayekoli ya liboso bapesaki ndakisa
  • Tyá Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na yo
  • Otyelaka mpenza Nzambe elikya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bokonzi ya Nzambe​—⁠Ozali kosimba ntina na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Osengeli koluka liboso Bokonzi ya Nzambe lelo oyo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Matai 6:33​—“Bokoba koluka liboso Bokonzi ya Nzambe”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
Makambo mosusu
Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
wt mok. 11 nk. 101-109

Mokapo ya zomi na moko

“Bókoba koluka liboso bokonzi”

1. (a) Mpo na nini Yesu asɛngaki mpenza na bato oyo bazalaki koyoka ye ete báluka liboso Bokonzi? (b) Motuna nini tosengeli komituna biso moko?

ESILI koleka mbula 1900, ntango azalaki kosala lisolo moko na Galilai, Yesu alendisaki bato oyo bazalaki koyoka ye na maloba oyo: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe].” Kasi mpo na nini yango ezalaki likambo ya kosala na lombangu bongo? Ntango etyamaki te mpo Klisto azwa Bokonzi bikeke mingi na nsima, boye te? Ezali bongo, kasi Bokonzi ya Masiya esengelaki kozala esaleli oyo Yehova akosalela mpo na kolongisa lotomo na ye ya koyangela mpe mpo na kokokisa mokano na ye monene mpo na mabele. Moto nyonso oyo akangaki ntina ya makambo yango akokaki kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ye. Soki likambo yango ezalaki bongo na ekeke ya liboso, ezali mpenza bongo lisusu koleka lelo, sikoyo lokola Klisto asilá kotyama Mokonzi! Yango wana, motuna yango oyo: Lolenge ya bomoi na ngai ezali mpenza komonisa ete nazali koluka liboso Bokonzi?​—Matai 6:33.

2. Bato mingi bazali koluka na mposa nyonso kozwa nini?

2 Lelo oyo, emonani ete bamilio ya bato na mokili mobimba bazali koluka liboso Bokonzi. Bazali komonisa ete basimbi Bokonzi ndenge batii bomoi na bango mobimba mpo na kosala mokano ya Yehova, mpe bamipesi na ye. Nzokande, ebele ya bato mosusu bamipesi na koluka biloko ya mokili. Bazali koluka mbongo, bozwi mpe bisengo oyo mbongo ekoki kosomba. Bazali kosala makasi mpo na komata mpɛtɛ na misala na bango. Lolenge ya bomoi na bango ezali komonisa ete bazali kotalela kaka bomoi na bango moko, biloko ya mosuni mpe bisengo. Soki balobi ete bandimaka Nzambe, batyaka ye na esika ya mibale na bomoi na bango.​—Matai 6:31, 32.

3. (a) Biloko nini ya motuya Yesu alendisaki bayekoli na ye bálukaka, mpe mpo na nini? (b) Mpo na nini ezali na ntina te ya komitungisa koleka ndelo mpo na bamposa ya biloko ya mokili?

3 Kasi, Yesu apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele,” mpamba te biloko ya ndenge wana eumelaka mpo na libela te. Alobi ete “nzokande bómibombela biloko ya motuya na likoló” na kosaleláká Yehova. Yesu asɛngaki bayekoli na ye ete bábatela liso na bango “alima,” bátya likebi na bango mpe bápesa makasi na bango na kosala mokano ya Nzambe. Ayebisaki bango ete: “Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.” Bongo ezali boni mpo na bamposa na bango ya mosuni​—bilei, bilamba, mpe esika ya kolala? Yesu apesaki toli ete: “Bótika komitungisa.” Abendaki likebi na bango likoló na bandɛkɛ​—oyo Nzambe aleisaka. Yesu alendisaki bayekoli na ye bázwa liteya na bafololo​—Nzambe alatisaka yango. Bato oyo bazali na mayele mpe bazali basaleli ya Yehova balɛki bandɛkɛ na bafololo yango nyonso na valɛrɛ te? Bongo Yesu alobaki ete: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:19-34) Misala na yo emonisaka ete ondimaka yango?

Kotika te ete solo ya Bokonzi ebebisama

4. Soki moto moko azali kotalela biloko ya mokili na ntina mingi koleka, nini ekoki kokómela ye?

4 Ezali mabe te ete moto amibanzabanza mpo na koluka kozwa mwa makoki ya kokokisa bamposa na ye moko mpe ya libota na ye. Kasi, soki moto moko azali komitungisa mingi koleka mpo na biloko ya mosuni, yango ekoki kozala mabe mpenza. Ata alobi ete andimaka Bokonzi, kasi soki na kati ya motema na ye azali kotya makambo mosusu na esika ya liboso, solo ya Bokonzi ekozima. (Matai 13:18-22) Na ndakisa, mokolo moko, elenge moko mokonzi oyo azalaki na bozwi mingi atunaki Yesu ete: “Nasengeli kosala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?” Azalaki na bizaleli malamu mpe azalaki na boboto epai na bato mosusu, kasi akangamaki makasi na bozwi na ye ya mosuni. Akokaki kotika yango te mpo na kokóma moyekoli ya Klisto. Mpo na yango, azangaki libaku oyo ekokaki kokómisa ye esika moko na Klisto na Bokonzi na ye ya likoló. Mokolo wana, Yesu alobaki ete: “Ekozala likambo ya mpasi mpenza mpo baoyo bazali na mbongo bákɔta na bokonzi ya Nzambe!”​—Malako 10:17-23.

5. (a) Paulo alendisaki Timote asepela na biloko nini, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini Satana asalelaka “bolingo ya mbongo” lokola motambo ya kobebisa moto?

5 Nsima ya bambula mingi, ntoma Paulo akomelaki Timote, oyo azalaki na ntango wana na Efese, engumba moko ya mombongo mpe ya bozwi mingi. Paulo akundolelaki ye ete: “Toyaki na eloko te na kati ya mokili, mpe tokoki komema eloko te. Na yango, kozaláká na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tokosepela na biloko wana.” Kosala mpo na kozala na “bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto” mpo na moto ye moko mpe mpo na libota na ye, ezali likambo ya malamu. Kasi Paulo akebisaki ete: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama.” Satana azali na mayele mabe. Na ebandeli akoki komeka moto na mwa banzela ya mikemike. Mpe na nsima akoki kokɔtela ye mpenza makasi, mbala mosusu libaku ya kokóma moto monene to kozwa mosala ya malamu oyo ezali kofuta mbongo mingi kasi ezali kosɛnga ntango oyo etyamaki liboso mpo na makambo ya elimo. Soki tokebi te, “bolingo ya mbongo” ekoki koboma mposa na biso mpo na makambo maleki ntina oyo etali Bokonzi. Paulo alobelaki yango boye: “Na kokolisáká bolingo wana bamosusu babungisami nzela uta na kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.”​—1 Timote 6:7-10.

6. (a) Mpo tókangama te na motambo ya koluka kozala na biloko ya mosuni mingi, tosengeli kosala nini? (b) Elikya nini tokoki kozala na yango atako makambo ya nkita ekómi mabe lelo oyo?

6 Lokola alingaki ndeko na ye moklisto mingi, Paulo alendisaki Timote ete: “Kimá makambo wana” mpe “bundá etumba ya malamu mingi ya kondima.” (1 Timote 6:11, 12) Tosengeli kosala molende soki tolingi te ete tóbendama na lolenge ya bomoi ya mokili oyo tozali na yango, oyo etindi bato bámipesa mingi na biloko ya mosuni. Kasi soki tomitambwisi na boyokani na kondima na biso, Yehova akobwaka biso soki moke te. Atako ntalo ya biloko ezali ntango nyonso komata mpe bipai nyonso bato bazali kozanga misala, akosala ete tózala na oyo tosengeli na yango mpenza. Paulo akomaki ete: “Tiká ete ezaleli na bino na bomoi ezanga bolingo ya mbongo, wana bozali kosepela na oyo bozali na yango na biloko ya sikoyo. Mpo [Nzambe] alobi ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’ Mpo tókoka kozala na mpiko mpenza mpe tóloba ete: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?’” (Baebele 13:5, 6) Mpe Mokonzi Davidi akomaki ete: “Nazalaki elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga.”​—Nzembo 37:25.

Bayekoli ya liboso bapesaki ndakisa

7. Malako nini etali mosala ya kosakola Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe mpo na nini yango ebongaki bongo?

7 Nsima ya koteya bantoma na ye malamumalamu, Yesu atindaki bango bipai nyonso na Yisalaele kosakola nsango malamu mpe koloba ete: “Bokonzi ya likoló ekómi pene.” Ezalaki mpenza nsango moko kitoko! Yesu Klisto, Mokonzi Masiya, azalaki kati na bango. Lokola bantoma bamipesaki mobimba na mosala ya Nzambe, Yesu alendisaki bango ete bázala na elikya epai ya Nzambe ete akokokisa bamposa na bango. Na yango alobaki ete: “Bómema eloko te mpo na mobembo, lingenda te saki ya bilei te, limpa te, mbongo ya palata te; bózwa mpe bilamba mibale ya nse te. Kasi na esika nyonso bokokɔta na ndako moko, bófanda wana mpe bólongwa wana.” (Matai 10:5-10; Luka 9:1-6) Yehova asalaki ete baninga na bango Bayisalaele bákokisa bamposa na bango, mpo bazalaki koyamba bapaya.

8. (a) Mwa moke liboso ya liwa na ye, mpo na nini Yesu apesaki malako mosusu ya sika etali mosala ya kosakola? (b) Nini esengelaki kaka kozala na esika ya liboso na bomoi ya bayekoli ya Yesu?

8 Na nsima, mwa moke liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bantoma na ye ete na mikolo ekoya makambo ekozala lisusu ndenge moko te ntango bakozala kosala mosala na bango ya kosakola. Lokola bakonzi bakotɛmɛla mosala na bango ya kosakola, bakoyamba bango bisika nyonso te na Yisalaele. Lisusu, basengelaki kosakola nsango ya Bokonzi na mikili ya bapakano. Sikawa basengelaki komema “pɔtɔmɔni” mpe “saki ya bilei.” Atako bongo, basengelaki kokoba koluka liboso Bokonzi ya Yehova mpe boyengebene na ye, kotya motema ete Nzambe akopambola milende na bango mpo na kozwa bilei mpe eloko ya kozipa nzoto.​—Luka 22:35-37.

9. Ndenge nini Paulo atyaki Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ye atako ye moko azalaki kokokisa bamposa na ye ya mosuni, mpe toli nini apesi na likambo yango?

9 Ntoma Paulo azalaki ndakisa moko malamu ya moto oyo asalelaki toli ya Yesu. Paulo atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na ye. (Misala 20:24, 25) Ntango azalaki kokende kosakola na mboka moko boye, azalaki kokokisa bamposa na ye ya mosuni, azalaki kutu kosala mosala ya kotonga bandako ya kapo. Azalaki kozela te ete bato mosusu bápesa ye biloko. (Misala 18:1-4; 1 Batesaloniki 2:9) Kasi, ntango bato mosusu bazalaki koyamba ye epai na bango mpe kopesa ye makabo mpo na komonisa bolingo na bango epai na ye, azalaki kondima yango na motema mobimba mpe kotɔnda bango. (Misala 16:15, 34; Bafilipi 4:15-17) Paulo alendisaki baklisto ete básundola mikumba na bango ya libota te mpo na mosala ya kosakola, kasi báyeba kozala nde na bokatikati na mikumba na bango nyonso. Apesaki bango toli ete básala mosala, bálinga mabota na bango, mpe bákabelaka basusu biloko. (Baefese 4:28; 2 Batesaloniki 3:7-12) Alendisaki bango bátya motema epai na Nzambe, kasi na bozwi ya mosuni te, mpe bátambwisa bomoi na bango na lolenge oyo ezali komonisa ete bayebi mpenza makambo oyo eleki ntina. Na boyokani na mateya ya Yesu, yango elingaki koloba koluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye.​—Bafilipi 1:9-11.

Tyá Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na yo

10. Koluka liboso Bokonzi elimboli nini?

10 Tosalaka mpenza makasi moto na moto mpo tósakwela bato mosusu nsango malamu na molende? Yango etali moto na moto, ezalela na ye mpe botɔndi na ye mpo na likambo yango. Tóbosana te ete Yesu alobaki te ete, ‘Bóluka Bokonzi ntango bozali na eloko mosusu ya kosala te.’ Lokola ayebaki ntina ya Bokonzi, Yesu amonisaki mokano ya Tata na ye na maloba oyo: “Bólukaka ntango nyonso bokonzi na ye.” (Luka 12:31) Atako bandeko mingi kati na biso basengeli kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na bango mpe bamposa ya mabota na bango, soki tozali na kondima, bomoi na biso ekotongama likoló ya mosala ya Bokonzi oyo Nzambe apesi biso. Bobele na ntango yango, tokokokisa mpe mikumba na biso ya libota.​—1 Timote 5:8.

11. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki na lisese ete bato nyonso bakokoka kosala ndenge moko te na mosala ya kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi? (b) Makambo nini ekoki kosala ete moto asala mingi to moke na mosala ya kosakola?

11 Bandeko mosusu kati na biso bazali na likoki ya kosala bangonga mingi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, koleka bamosusu. Kasi na lisese na ye etali mabele ndenge na ndenge, Yesu amonisaki ete baoyo nyonso mitema na bango ezali lokola mabele malamu, bakobota mbuma. Bazali mpenza kobota mbuma boni? Makambo ya bomoi ya bato ekesanaka. Mbula ya moto, bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye, mpe mikumba ya libota ezali makambo mosusu oyo esengeli kotalela. Kasi, soki moto azali mpenza na botɔndi mpo na nsango malamu ya Bokonzi, akoki kosala mingi.​—Matai 13:23.

12. Mokano nini ya malamu na elimo balendisi bilenge bátalela?

12 Ezali malamu kozala na mikano oyo ekosalisa biso tókolisa mosala na biso ya kosakola. Bilenge basengeli kokanisa ndakisa malamu ya Timote, elenge moklisto ya molende. (Bafilipi 2:19-22) Ezali na eloko mosusu oyo ezali malamu mpo na bango koleka kosala mosala ya ntango nyonso wana basilisi kelasi? Mikóló mpe bakoki kozwa matomba soki bamityeli mikano malamu na elimo.

13. (a) Nani azwelaka biso bikateli mpo na oyo biso moko tokoki kosala na mosala ya Bokonzi? (b) Soki tozali mpenza koluka liboso Bokonzi, tozali komonisa nini?

13 Na esika ya kotɔngatɔnga baoyo bazali kosala mingi te, kondima esengeli kotinda biso tósala mpo na kokolisa mosala na biso moko mpo ete tósalela Nzambe na meko nyonso oyo ezalalela na biso moko epesi nzela. (Baloma 14:10-12; Bagalatia 6:4, 5) Lokola emonisami na oyo ekómelaki Yobo, Satana alobaka ete lobanzo na biso ezalaka kaka bozwi na biso ya biloko ya mosuni, bolamu na biso moko, mpe matomba na biso moko mpe ete soki tozali kosalela Nzambe ezali mpo na mikano mabe. Kasi, soki tozali mpenza koluka liboso Bokonzi, tozali komonisa ete Zabolo azali mpenza mokosi monene. Tozali mpenza komonisa ete mosala ya Nzambe ezali na esika ya liboso na bomoi na biso. Na maloba mpe na misala, tozali mpenza komonisa ete tozali na bolingo mozindo mpo na Yehova, tozali kopesa mabɔkɔ na mosala ya boyangeli na ye, mpe tozali kolinga bazalani na biso.​—Yobo 1:9-11; 2:4, 5; Masese 27:11.

14. (a) Mpo na nini kosala programɛ mpo na mosala ya kosakola ezali na litomba? (b) Na lolenge nini ebele ya Batatoli ya Yehova bazali kosala mingi na mosala ya kosakola?

14 Kosala programɛ ekoki kosalisa biso tósala mosala mingi koleka oyo tokokaki kosala kozanga programɛ. Yehova ye moko azali na “ntango oyo etyamá” mpo na kokokisa mokano na ye. (Exode 9:5; Malako 1:15) Soki likoki ezali, ezali malamu kobima na mosala ya kosakola mbala moko to mbala mingi pɔsɔ na pɔsɔ na ntango oyo etyamá mpo na yango. Ebele ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba basalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi, basalaka ngonga soki mibale na mokolo mpo na kosakola nsango malamu. Ebele ya bankóto ya Batatoli mosusu bazali kosala mosala ya mobongisi-zela ya sanza na sanza, bazali kolekisa ngonga soki mibale na ndambo mokolo na mokolo kosakoláká nsango ya Bokonzi. Babongisi-nzela monene mpe bamisionɛrɛ basalaka kutu ngonga mingi koleka na mosala ya Bokonzi. Tokoki mpe koluka mabaku malamu mpo na kosakola elikya ya Bokonzi epai ya moto nyonso oyo akoyoka biso. (Yoane 4:7-15) Mposa na biso esengeli kozala ya kosala mingi na mosala yango soki ezalela na biso epesi biso nzela, mpamba te Yesu asakolaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14; Baefese 5:15-17.

15. Na oyo etali mosala na biso ya kosakola, mpo na nini omoni ete toli ya 1 Bakolinti 15:58 eyei mpenza na ntango malamu?

15 Batatoli ya Yehova bazali kosala na molende mpenza mpe na bomoko kati na mosala yango kitoko bipai nyonso na mokili mobimba, ezala ata na ekólo nini bango bazali. Basalelaka toli ya Biblia oyo elobi ete: “Bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo, koyebáká ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na oyo etali Nkolo.”​—1 Bakolinti 15:58.

Bozongeli

• Ntango Yesu alobaki “bókoba koluka liboso bokonzi,” eloko nini esengelaki kozala na esika ya mibale?

• Likanisi nini tosengeli kozala na yango mpo na likambo etali kokokisa bamposa na biso moko ya mosuni mpe oyo ya libota na biso? Lisalisi nini Nzambe akopesa biso?

• Misala nini ya Bokonzi tokoki kosala?

[Elilingi na lokasa 107]

Na mikili nyonso, Batatoli ya Yehova bazali lelo kosakola nsango malamu, liboso nsuka eya

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto