Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wt mok. 12 nk. 110-119
  • Ntina ya batisimo na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina ya batisimo na yo
  • Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batisimo ya Yoane
  • Batisimo ya mai mpo na bayekoli baklisto
  • Tókokisa mikumba na biso
  • Batisimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Salá ete mokano na yo ezala ya kosalela Nzambe libela
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
wt mok. 12 nk. 110-119

Mokapo ya zomi na mibale

Ntina ya batisimo na yo

1. Mpo na nini mokomoko na biso asengeli kotalela malamumalamu likambo ya batisimo ya mai?

NA MOBU 29 ya ntango na biso (T.B.), Yesu azwaki batisimo, Yoane Mobatisi azindisaki ye na mai na Ebale Yolodani. Yehova ye moko azalaki kotala mpe andimaki ye. (Matai 3:16, 17) Na yango, Yesu apesaki ndakisa oyo bayekoli na ye nyonso basengelaki kolanda. Nsima ya mbula misato na ndambo, Yesu apesaki bayekoli na ye mitinda oyo: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabele. Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo na Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Matai 28:18, 19) Ozwaki batisimo na kolanda mitinda oyo Yesu apesaki? Soki te, ozali komibongisa mpo na kosala bongo?

2. Na oyo etali batisimo, mituna nini esengeli koyanola?

2 Ezala ozwá batisimo to ozali komibongisa mpo na kozwa batisimo, koyeba ndimbola ya batisimo malamumalamu ezali likambo ya ntina mingi mpo na moto nyonso oyo alingi kosalela Yehova mpe kofanda na mokili na ye ya sika ya boyengebene. Kati na mituna oyo esengeli kopesama eyano, ezali mpe na oyo: Lelo oyo batisimo ya boklisto ezali na ndimbola ndenge moko na oyo ya Yesu? Kozwa batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu” elimboli nini? Komitambwisa na boyokani na ndimbola ya batisimo ya boklisto ya mai esɛngaka nini?

Batisimo ya Yoane

3. Batisimo ya Yoane ezalaki kaka mpo na banani?

3 Sanza soki motoba liboso Yesu azwa batisimo, Yoane Mobatisi akendaki kosakola na esobe ya Yudea, mpe azalaki koloba ete: “Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.” (Matai 3:1, 2) Bato bayokaki makambo Yoane alobaki mpe balandaki toli na ye. Bayambolaki masumu na bango polele, babongolaki mitema mpo na yango, mpe bayaki epai ya Yoane mpo na kozwa batisimo na Ebale Yolodani. Batisimo wana ezalaki kaka mpo na Bayuda.​—Luka 1:13-16; Misala 13:23, 24.

4. Mpo na nini Bayuda ya ekeke ya liboso basengelaki kobongola mitema nokinoki?

4 Bayuda yango basengelaki mpenza kobongola mitema nokinoki. Na Ngomba Sinai na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bankɔkɔ na bango basalaki kondimana ekólo mobimba elongo na Yehova Nzambe​—elingi koloba boyokani oyo esalemaki na miso ya bato nyonso ndenge mobeko esɛngaki. Kasi, lokola basalaki masumu minene, bakokisaki mikumba na bango te oyo esɛngamaki na kondimana yango, bongo kondimana wana ekweisaki bango. Na mikolo ya Yesu, bomoi na bango ekómaki na likama. “Mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya [Yehova]” oyo Malaki asakolaki ekómaki pene. Na mobu 70 T.B., “mokolo” yango eyaki ntango mampinga ya basoda ya Baloma babebisaki Yelusaleme, tempelo, mpe babomaki Bayuda koleka milio moko. Yoane Mobatisi, na molende oyo azalaki na yango mpo na losambo ya solo, atindamaki liboso ete bábebisa mboka yango, “mpo na kolɛngɛlɛla Yehova ekólo moko oyo ebongisami.” Basengelaki kobongola mitema mpo na masumu na bango oyo basalaki ndenge babukaki kondimana ya Mibeko ya Moize mpe basengelaki komibongisa mpo na koyamba Mwana ya Nzambe, Yesu, oyo Yehova alingaki kotindela bango.​—Malaki 4:4-6; Luka 1:17; Misala 19:4.

5. (a) Ntango Yesu ayaki mpo na kozwa batisimo, mpo na nini Yoane akakatanaki mpo na kopesa ye batisimo? (b) Batisimo ya Yesu ezalaki elembo ya nini?

5 Yesu ye moko mpe azalaki kati na bato oyo bayaki epai ya Yoane mpo na kozwa batisimo. Kasi mpo na nini? Lokola ayebaki ete Yesu azalaki na lisumu moko te ya koyambola, Yoane alobaki ete: “Ngai moto nasengeli kobatisama na yo, mpe yo ozali koya epai na ngai?” Kasi, batisimo ya Yesu ezalaki na ndimbola mosusu. Yango wana, Yesu azongisaki ete: “Tiká yango esalema, na mbala oyo, mpo na ndenge wana nde ebongi na biso kokisa nyonso oyo ezali na boyengebene.” (Matai 3:13-15) Lokola Yesu azalaki na lisumu te, batisimo na ye elimbolaki te kobongola motema na lisumu; asengelaki mpe komipesa na Nzambe te, mpamba te azalaki moto ya ekólo oyo esilaki komipesa na Yehova. Nzokande, batisimo oyo azwaki ntango azalaki na mbula 30, ekeseneki na batisimo ya bato mosusu nyonso, mpe elimbolaki ete amilakisi liboso ya Tata na ye ya likoló mpo na kosala mokano na Ye.

6. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela likambo ya kokokisa mokano ya Nzambe?

6 Mokano ya Nzambe mpo na Klisto Yesu esɛngaki mpe asala mosala oyo etali Bokonzi. (Luka 8:1) Esɛngaki mpe apesa bomoi na ye ya moto ya kokoka lokola mbeka mpo na kosikola bato mpe ezala lokola moboko ya kondimana ya sika. (Matai 20:28; 26:26-28; Baebele 10:5-10) Yesu atalelaki batisimo na ye ya mai na ntina mingi. Atikaki te ete likebi na ye ekenda na makambo mosusu. Tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, akokisaki mokano ya Nzambe na bosembo mpenza, atyaki mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso.​—Yoane 4:34.

Batisimo ya mai mpo na bayekoli baklisto

7. Banda na Pantekote ya mobu 33 T.B., bayebisaki baklisto básala nini na likambo etali batisimo?

7 Yoane moto abatisaki bayekoli ya Yesu ya liboso mpe na nsima atindaki bango epai ya Yesu mpo na kozala bato oyo bakokɔta na Bokonzi ya likoló. (Yoane 3:25-30) Na kolandáká etinda ya Yesu, bayekoli yango babatisaki mpe bato mosusu, batisimo oyo ezalaki na ndimbola ndenge moko na oyo Yoane azalaki kopesa. (Yoane 4:1, 2) Kasi, banda na Pantekote ya mobu 33 T.B., babandaki kokokisa etinda ya kobatisa na “nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Matai 28:19) Soki ozongeli kotalela ndimbola na yango, ekopesa yo matomba mingi.

8. Kozwa batisimo “na nkombo ya Tata” elimboli nini?

8 Kozwa batisimo “na nkombo ya Tata” elimboli nini? Elimboli kondima nkombo na ye, esika na ye, bokonzi na ye, mokano na ye, mpe mibeko na ye. Tótalela oyo yango esɛngaka. (1) Mpo na nkombo na ye, Nzembo 83:18 elobi ete: “Yo oyo ozali na nkombo [Yehova], bobele Yo Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.” (2) Mpo na esika na ye, 2 Mikonzi 19:15 elobi ete: “[Yehova] . . . , bobele yo moko, ozali Nzambe [ya solo, NW].” (3) Mpo na bokonzi na ye, Emoniseli 4:11 eyebisi biso ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (4) Tosengeli mpe kondima ete Yehova azali Mopesi-na-bomoi, oyo amityelaki mokano ya kobikisa biso na lisumu mpe na liwa: “Kobikisa ezali na [Yehova].” (Nzembo 3:8; 36:9) (5) Tosengeli kondima ete Yehova azali Mopesi-na-mibeko Monene: “Yehova azali Mosambisi na biso, Yehova azali Mopesi-mibeko na biso, Yehova azali Mokonzi na biso; ye akobikisa biso.” (Yisaya 33:22, NW) Lokola akokisi makambo nyonso wana, Biblia esɛngi biso boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.”​—Matai22:37.

9. Kozwa batisimo “na nkombo . . . ya Mwana” elimboli nini?

9 Batisimo na “nkombo . . . ya Mwana” elimboli nini? Elimboli kondima nkombo, mokumba, mpe bokonzi ya Yesu Klisto. Nkombo Yesu elimboli “Yehova azali Lobiko.” Azwi mokumba yango mpo azali Mwana-mobotami-se-moko ya Nzambe, ekelamu ya liboso oyo Nzambe asalaki. (Matai 16:16; Bakolose 1:15, 16) Yoane 3:16 eyebisi biso mpo na Mwana yango ete: “Nzambe alingaki mokili [bato oyo bakoki kosombama] mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” Lokola Yesu akufaki sembo, Nzambe asekwisaki ye mpe abakiselaki ye bokonzi mosusu. Ntoma Paulo alobi ete Nzambe “atombolaki [Yesu] na esika moko ya likoló” na molɔ́ngɔ́ mobimba, kaka Yehova nde aleki ye. Yango wana, “na nkombo ya Yesu mabɔlɔngɔ nyonso egumbama . . . mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.” (Bafilipi 2:9-11) Yango elimboli kotosa mitinda ya Yesu, oyo eutaka epai ya Yehova ye moko.​—Yoane 15:10.

10. Kozwa batisimo “na nkombo ya . . . elimo santu” elimboli nini?

10 Kozwa batisimo na “nkombo ya . . . elimo santu” elimboli nini? Elimboli kondima mokumba mpe mosala ya elimo santu. Kasi elimo santu ezali nini? Ezali nguya ya Yehova oyo asalaka na yango misala, oyo akokisaka na yango mikano na ye. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu mpo azala elongo na bino mpo na libela, elimo ya solo.” (Yoane 14:16, 17) Yango ekokaki kosalisa bango básala nini? Yesu alobaki na bango lisusu ete: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yelusaleme mpe na kati ya Yudea mobimba mpe na Samalia mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:8) Na nzela ya elimo santu, Yehova akomisaki mpe Biblia: “Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, nde bato balobaki oyo eutaki epai ya Nzambe wana bazalaki kopusama na elimo santu.” (2 Petelo 1:21) Yango wana, tondimaka mokumba ya elimo santu ntango tozali koyekola Biblia. Lolenge mosusu oyo tondimaka elimo santu ezali ntango tozali kosɛnga Yehova asalisa biso tólona “mbuma ya elimo,” elingi koloba “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.”​—Bagalatia 5:22, 23.

11. (a) Ndimbola ya solosolo ya batisimo na mikolo na biso ezali nini? (b) Na ndenge nini batisimo ezali lokola kokufa mpe kosekwisa?

11 Bato ya liboso oyo bazwaki batisimo na kolanda mitinda oyo Yesu apesaki ezalaki Bayuda mpe baprozelite ya Lingomba ya Bayuda, kobanda na mobu 33 T.B. Mwa moke na nsima, Basamalia mpe bazwaki libaku malamu ya kokóma bayekoli baklisto. Na nsima lisusu, na mobu 36 T.B., Bapakano oyo bakatamaki ngɛnga te, bango mpe babengamaki. Liboso ya kozwa batisimo, Basamalia mpe Bapakano basengelaki komipesa bango moko epai ya Yehova mpo na kosalela ye lokola bayekoli ya Mwana na ye. Yango nde ezali ndimbola ya batisimo ya mai tii na mikolo na biso. Kozindisama mobimba na mai ezali elembo oyo ebongi mpo na komonisa komipesa ya moto, mpamba te batisimo ezali elembo ya kokundama. Kozinda na kati ya mai ezali komonisa kokufa na bomoi na yo ya kala. Kobima na yo na mai ezali komonisa kosekwisama mpo na kosala mokano ya Nzambe. “Batisimo moko” wana ezali mpo na bato nyonso oyo bakómaka baklisto ya solo. Na batisimo, bakómaka baklisto Batatoli ya Yehova, baministre oyo Nzambe andimi.​—Baefese 4:5; 2 Bakolinti 6:3, 4.

12. Batisimo ya baklisto na mai ekokani na nini, mpe na ndenge nini?

12 Batisimo ya ndenge wana, na miso ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo moto azwa bomoi. Na ndakisa, nsima ya kolobela mosala ya Noa ya kotonga masuwa, oyo kati na yango ye na libota na ye babikisamaki na ntango ya Mpela, ntoma Petelo akomaki ete: “Eloko oyo ekokani na yango ezali mpe sikoyo kobikisa bino, elingi koloba, batisimo, (ezali kolongolama ya mbindo ya nzoto te, kasi lisɛngi oyo esalemi epai ya Nzambe mpo na kozala na lisosoli ya malamu) na nzela ya liskwa ya Yesu Klisto.” (1 Petelo 3:21) Masuwa ezalaki mpenza eloko oyo emonisaki ete Noa asalaki na bosembo mpenza mosala oyo Nzambe apesaki ye. Ntango mosala ya kotonga masuwa esilaki, “mokili ya ntango wana ezwaki libebi ntango ezindisamaki na mai.” (2 Petelo 3:6) Kasi Noa na libota na ye, “milimo mwambe, bamemamaki kozanga likama na mai.”​—1 Petelo 3:20.

13. Batisimo ya mai ebikisi moklisto na eloko nini?

13 Lelo oyo, baoyo bazali komipesa na Yehova mpo bandimi Klisto oyo asekwisamaki, bazwaka batisimo mpo na komonisa ete bamipesi. Bazali ntango nyonso kosala mokano ya Nzambe mpo na mikolo na biso mpe babikisami na mokili mabe ya ntango oyo. (Bagalatia 1:3, 4) Bazali lisusu bato oyo bazali kokende na liwa te elongo na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Babikisami na mokili yango mpe Nzambe apesi bango lisosoli ya malamu. Ntoma Yoane andimisi basaleli ya Nzambe ete: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”​—1 Yoane 2:17.

Tókokisa mikumba na biso

14. Mpo na nini kaka batisimo yango moko ekoki te mpo na kozwa lobiko?

14 Ezali libunga koloba ete kaka batisimo yango moko ekoki mpo na kozwa lobiko. Ezali na ntina kaka soki moto amipesi mpenza na Yehova na nzela ya Yesu Klisto mpe azali kokokisa mokano ya Nzambe, atikali sembo tii na nsuka. “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana akobika.”​—Matai 24:13.

15. (a) Mokano ya Nzambe ezali nini lelo mpo na baklisto oyo bazwi batisimo? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela likambo ya kozala moyekoli moklisto na bomoi na biso?

15 Mokano ya Nzambe mpo na Yesu etalelaki mpe ndenge asalelaki bomoi na ye ya moto. Asengelaki kokufa mpo na kopesa bomoi yango lokola mbeka. Mpo na biso, tosengeli kopesa nzoto na biso epai ya Nzambe, mpe tosengeli komipimelaka makambo mosusu mpo na kosala mokano ya Nzambe. (Baloma 12:1, 2) Tokosala mpenza mokano ya Nzambe te soki tozali mbala mosusu komekola na nko mpenza mokili oyo tozali to soki tozali komipesa na koluka matomba na biso moko, mpe tokómi kosala kaka mwa mosala ya bongo na bongo mpo na Nzambe. (1 Petelo 4:1-3; 1 Yoane 2:15, 16) Ntango Moyuda moko atunaki mpo na koyeba nini asengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko, Yesu andimaki ete kozala na etamboli malamu ezali na ntina. Kasi, na nsima alobelaki eloko moko oyo eleki lisusu ntina: kozala moyekoli moklisto oyo azali kolanda matambe ya Yesu. Yango esengeli kozala likambo ya ntina mingi na bomoi. Yango ekoki te kozwa esika ya mibale, nsima ya mposa ya biloko ya mokili.​—Matai 19:16-21.

16. (a) Mokumba nini baklisto nyonso bazali na yango na oyo etali Bokonzi? (b) Lokola yango emonisami na lokasa 116 mpe 117, tángá mwa ndenge mosusu ya malamu ya kosala mosala ya Bokonzi? (c) Soki tozali kosala mosala ya kopesa litatoli na motema mobimba, yango ezali komonisa nini?

16 Esengeli lisusu tóloba ete mokano ya Nzambe mpo na Yesu etalelaki mpe komipesa na mosala ya ntina mingi oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Yesu apakolamaki mpo na kozala Mokonzi. Kasi ntango azalaki awa na mabele, apesaki litatoli mpo na Bokonzi na molende mpenza. Tozali mpe na mosala ya kopesa litatoli na ndenge yango, mpe tozali na bantina ya komipesa na mosala yango na motema mobimba. Soki tosali bongo, tokomonisa botɔndi na biso mpo na boyangeli ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe tokomonisa bolingo na biso mpo na bazalani na biso. (Matai 22:36-40) Tokomonisa mpe ete tozali na bomoko elongo na baninga na biso oyo bazali kosambela Yehova na mokili mobimba, oyo bazali bango nyonso basakoli ya Bokonzi. Tozali kokende liboso elongo mpe na bomoko mpenza kati na mokili mobimba, na mokano ya kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekoyangelama na Bokonzi yango.

Bozongeli

• Bokokani nini mpe bokeseni nini ezali kati na batisimo ya Yesu mpe batisimo ya mai lelo oyo?

• Kobatisama “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu” elimboli nini?

• Moklisto oyo azwi batisimo, asengeli kokokisa mikumba nini?

[Bililingi na lokasa 116, 117]

MWA NDENGE YA KOSAKOLA BOKONZI

Ndako na ndako

Epai ya bandeko ya libota

Epai ya baninga ya mosala

Epai ya baninga ya kelasi

Na babalabala

Kozongela bato oyo basepelaki na solo

Kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndako

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto