MOKAPO 4
Mpo na nini osengeli kotosa bokonzi?
“Bókumisa bato ya ndenge nyonso.”—1 PETRO 2:17.
1, 2. (a) Mokakatano nini tozalaka na yango na likambo etali kotosa bokonzi? (b) Tokotalela mituna nini?
OSILÁ komona ndenge mwana moke asalaka soki batindi ye asala likambo moko, kasi asepeli te? Elongi na ye efundaka ete azali kokakatana. Ntango azali koyoka maloba ya moboti na ye, ayebaka malamu ete asengeli kotosa ye. Kasi, na likambo wana, alingi kotosa te. Ezaleli ya mwana wana emonisi likambo oyo biso nyonso tokutanaka na yango.
2 Kotosa bokonzi ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Ozalaka ntango mosusu na mokakatano mpo na kotosa baoyo bazali na bokonzi likoló na yo? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Na mikolo na biso, bato mingi bazali lisusu kotosa bokonzi te. Kasi, Biblia eyebisi biso ete tosengeli komemya baoyo bazali na bokonzi likoló na biso. (Masese 24:21) Kutu, tosengeli kosala bongo soki tolingi kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Kasi, likambo yango ezali kobimisa mwa mituna. Mpo na nini tokakatanaka mbala mosusu mpo na kotosa bokonzi? Mpo na nini Yehova asɛngi biso tótosa bokonzi, mpe nini ekosalisa biso tósala yango? Ndenge nini tokoki komonisa ete totosaka bokonzi?
MPO NA NINI KOTOSA BOKONZI EZALAKA MPASI?
3, 4. Ndenge nini lisumu mpe kozanga kokoka ebandaki, mpe mpo na nini kozanga kokoka ekómisaka kotosa bokonzi mpasi?
3 Tótalela na mokuse ntina mibale oyo ekoki kosala ete kotosa bato oyo bazali na bokonzi ezala mpasi. Ya liboso, biso moko tozali bato ya kozanga kokoka; ya mibale baoyo bazali na bokonzi bazali mpe bato ya kozanga kokoka. Lisumu mpe kozanga kokoka ebandaki na elanga ya Edene, ntango Adama ná Eva batombokelaki Nzambe. Na bongo, tomoni ete lisumu ebandaki na botomboki. Tii lelo oyo, tobotamaka na elimo ya botomboki.—Ebandeli 2:15-17; 3:1-7; Nzembo 51:5; Baroma 5:12.
4 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mingi kati na biso tomonisaka ezaleli ya lolendo; nzokande, komikitisa emonanaka mingi te mpe esɛngaka milende mpo na kolona mpe kobatela yango. Ata soki tolekisi bambula mingi na mosala ya Nzambe, tokoki kokóma motó makasi mpe lolendo. Tózwa ndakisa ya Kora, oyo atikalaki sembo na libota ya Yehova na eleko oyo bakutanaki na ebele ya mikakatano. Kasi na nsima, mobali yango akómaki na mposa makasi ya kokóma mokonzi mpe atindaki Bayisraele bátombokela Moize, moto oyo alekaki bato nyonso na komikitisa na ntango wana. (Mitángo 12:3; 16:1-3) Tózwa mpe ndakisa ya Uziya, mokonzi oyo akómaki na lolendo, akɔtaki na tempelo ya Yehova mpe akokisaki mokumba moko mosantu oyo, kaka banganga-nzambe nde basengelaki kokokisa yango. (2 Ntango 26:16-21) Bato yango bazwaki etumbu makasi mpo na botomboki na bango. Kasi, makambo oyo ekómelaki bango ezali mateya ya ntina mpo na biso. Tosengeli koboya lolendo mpo yango nde ekómisaka kotosa bokonzi mpasi.
5. Ndenge nini bato ya kozanga kokoka basalelaki mabe bokonzi na bango?
5 Epai mosusu, bato ya kozanga kokoka oyo bazalaki na bokonzi basalaki makambo mingi oyo etindaka bato bázala na limemya te mpo na bokonzi. Bakonzi mingi bazalaki makambo makasimakasi to mpe bazalaki konyokola bato. Kutu, masolo ya kala emonisaka ete mbala mingi bato basalelaki bokonzi na bango na ndenge ya mabe. (Tángá Mosakoli 8:9.) Na ndakisa, Saulo azalaki moto malamu mpe ya komikitisa ntango Yehova aponaki ye mpo azala mokonzi. Kasi, akómaki na lolendo mpe na zuwa; yango wana anyokolaki Davidi, moto ya sembo. (1 Samwele 9:20, 21; 10:20-22; 18:7-11) Na nsima, Davidi akómaki mokonzi na Yisraele mpe azalaki moko na bakonzi ya malamu; kasi ye mpe asalelaki mabe bokonzi na ye ntango abɔtɔlaki mwasi ya Uria Mohiti mpe atindaki mobali yango na molɔngɔ ya liboso na etumba mpo akufa. (2 Samwele 11:1-17) Tomoni mpenza ete kozanga kokoka epekisaka bato básalela malamu bokonzi na bango. Mpe bato oyo babangaka Yehova te, basalelaka bokonzi na ndenge ya mabe koleka. Kutu, nsima ya kolobela ndenge oyo bapápa mosusu batindaki bandimi ya Lingomba ya Katolike bányokola bato, mokonzi moko ya Leta na Angleterre akomaki boye: “Bokonzi ebebisaka moto mpe bokonzi oyo eleki ebebisaka mingi koleka.” Lokola toyebi makambo wana, tótalela sikoyo motuna oyo: Mpo na nini tosengeli kotosa bokonzi?
MPO NA NINI TOSENGELI KOTOSA BOKONZI?
6, 7. (a) Bolingo mpo na Yehova etindaka biso tósala nini, mpe mpo na nini? (b) Botosi esɛngaka nini, mpe ndenge nini tokoki komonisa yango?
6 Bantina eleki malamu oyo tosengeli kotosa bokonzi etaleli bolingo na biso mpo na Yehova, mpo na bazalani na biso, ata mpe mpo na biso moko. Lokola tolingaka Yehova koleka moto mosusu nyonso, tolingaka mpe kosepelisa motema na ye. (Tángá Masese 27:11; Marko 12:29, 30.) Toyebi ete banda na Edene, ntango Satana abimisaki botomboki, abimisaki mpe ntembe mpo na bokonzi ya Yehova, elingi koloba lotomo na ye ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba; toyebi mpe ete bato mingi bamitye na ngámbo ya Satana mpe baboyi bokonzi ya Yehova. Biso toponi na esengo nyonso kozala na ngámbo ya Yehova. Ntango totángaka Emoniseli 4:11, maloba na yango esimbaka mpenza mitema na biso. Mpo na biso, ntembe ezali te ete Yehova nde azali na lotomo ya kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba! Tosepelaka na boyangeli ya Yehova, tondimaka ete atambwisa biso na bomoi ya mokolo na mokolo.
7 Botosi na biso mpo na bokonzi esukaka kaka te na makambo oyo tolingaka to oyo ezali pɛtɛɛ. Totosaka Yehova na motema moko mpo tolingaka ye. Nzokande, mokolo mosusu tokoki kokutana na makambo oyo ekosala ete botosi yango ezala mpasi. Na ntango wana, tokosala lokola mwana oyo tolobelaki na ebandeli, elingi koloba tokondima kotosa. Toyebi ete Yesu atosaki mokano ya Tata na ye ata ntango ezalaki mpasi mpo na kosala yango. Alobaki epai ya Tata na ye boye: “Ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.”—Luka 22:42.
8. (a) Lelo oyo, mbala mingi kotosa bokonzi ya Yehova esɛngaka nini, mpe nini ezali komonisa biso makanisi ya Yehova na likambo yango? (b) Nini ekoki kosalisa biso tóyoka toli mpe tóndima disiplini? (Talá etanda “Yoká toli mpe ndimá disiplini.”)
8 Ya solo, toyokaka mongongo ya Yehova te; Yehova alobaka na biso na nzela ya Liloba na ye mpe ya bato oyo azali kosalela mpo na kokamba basaleli na ye awa na mabele. Yango wana, mbala mingi tomonisaka ete totosaka bokonzi ya Yehova ntango tozali kotosa bato oyo aponi, to atiki nzela ete bázala na bokonzi likoló na biso. Soki toboyi kotosa bato yango—na ndakisa, toboyi toli na bango oyo euti na Biblia mpe mpamela na bango—tokomonisa ete tozali na limemya te epai ya Nzambe na biso. Ntango Bayisraele baimaimaki mpe batombokelaki Moize, Yehova amonaki ete basalaki bongo epai na ye.—Mitángo 14:26, 27.
9. Mpo na nini bolingo mpo na bazalani na biso esengeli kotinda biso tótosa bokonzi? Pesá ndakisa.
9 Lisusu, totosaka bokonzi mpo tolingaka bazalani na biso. Na ndenge nini? Kanisá ete ozali soda. Mpo yo ná baninga na yo bókoka kolonga, to mpe bóbika, esengeli ete soda mokomoko ayoka mitindo oyo bakonzi bazali kopesa mpe atosa yango. Soki ozali motó makasi mpe ozali kotosa bakonzi te, okoki kotya baninga na yo nyonso na likama. Ya solo, lelo oyo basoda bazali kosala makambo mingi ya mabe na mokili. Nzokande, Yehova azali na basoda oyo basalaka kaka makambo ya malamu. Na bisika ebele, Biblia ebengi Nzambe ete “Yehova ya mampinga.” (1 Samwele 1:3) Azali Mokambi ya ebele ya bikelamu ya elimo. Na bisika mosusu, Yehova akokanisi basaleli na ye awa na mabele na basoda. (Nzembo 68:11; Ezekiele 37:1-10) Soki tozali kotosa te bato oyo Yehova apesi bokonzi mpo bátambwisa biso, tomoni te ete tokozala lokola basoda oyo bazali kotya baninga na bango na likama? Soki na kati ya lisangá mokristo moko azali kotosa bankulutu te, yango ekoki kobendela bandeko mosusu mikakatano. (1 Bakorinti 12:14, 25, 26) Ntango mwana moko akómi motomboki, libota mobimba ekoki konyokwama. Na yango, tomonisaka bolingo epai ya bazalani na biso ntango tozali na elimo ya botosi.
10, 11. Koyeba ete kotosa bokonzi ezali mpe mpo na matomba na biso etindaka biso tósala nini?
10 Longola yango, totosaka bokonzi mpo ete kosala bongo ezali mpo na bolamu na biso. Ntango Yehova asɛngaka biso tótosa bokonzi, mbala mingi alobelaka mpe matomba oyo tokozwa soki tosali yango. Na ndakisa, alobi na bana ete bátosaka baboti na bango mpo bázala na bomoi ya molai mpe ya malamu. (Kolimbola Mibeko 5:16; Baefese 6:2, 3) Alobi na biso ete tótosaka bankulutu mpamba te koboya kosala yango ezali likama mpo na elimo na biso. (Baebre 13:7, 17) Lisusu, alobi na biso ete tótosaka bakonzi ya mokili mpo na libateli na biso moko.—Baroma 13:4.
11 Omoni te ete kotosa bokonzi ezali mpasi te soki toyebi ntina oyo Yehova azali kosɛnga biso tósala yango? Yango wana, tótalela sikoyo ndenge oyo tokoki kotosa bokonzi na makambo misato ya bomoi na biso.
BOTOSI NA KATI YA LIBOTA
12. Mokumba nini Yehova apesi na mobali na kati ya libota, mpe ndenge nini mobali asengeli kokokisa mokumba yango?
12 Yehova nde abandisaki libota. Lokola azali Nzambe ya mobulu te, abongisi makambo mpo libota etambola malamu. (1 Bakorinti 14:33) Atye mobali mokonzi ya libota. Mobali akomonisa ete azali na limemya epai ya Kristo Yesu oyo azali Mokonzi na ye soki azali komekola ndenge oyo Yesu atambwisaka lisangá. (Baefese 5:23) Na yango, mobali asengeli te kosundola mikumba na ye, kasi asengeli mpenza kokokisa yango; asengeli mpe te konyokola bato ya libota na ye to kozala makambo makasimakasi; asengeli nde kozala na bolingo mpe na boboto. Asengeli kobosana te ete azali na bokonzi nyonso te; bokonzi na ye ezali na nse ya bokonzi ya Yehova.
Tata oyo azali mokristo alandaka ndakisa ya Kristo na ndenge ya kosalela bokonzi
13. Ndenge nini mwasi akoki kokokisa mokumba na ye na ndenge oyo ekosepelisa Yehova?
13 Mwasi azali mosungi ya mobali. Ye mpe azali na bokonzi na kati ya libota, mpamba te Biblia elobeli “mibeko [to malako] ya mama.” (Masese 1:8) Kasi, bokonzi ya mwasi ezali na nse ya bokonzi ya mobali na ye. Mwasi mokristo amonisaka limemya mpo na bokonzi ya mobali na ye na ndenge asungaka ye mpo akokisa mokumba na ye ya mokonzi ya libota. Akitisaka mobali na ye te, asalelaka mayele mabe te mpo na koluka matomba na ye, alukaka mpe te kobɔtɔla bokonzi ya mobali. Kasi, apesaka ye mabɔkɔ mpe asungaka ye. Ntango mobali azwi ekateli oyo esepelisi ye te, akoki komonisa makanisi na ye na limemya; kasi, na nsuka, akosala kaka oyo mobali alingi. Soki mobali na ye azali Motatoli te, yango ekoki kobimisela ye mikakatano mosusu, kasi soki azali kaka na botosi, yango ekoki kopesa mobali na ye mposa ya koyeba Yehova.—Tángá 1 Petro 3:1.
14. Ndenge nini bana bakoki kosepelisa Yehova mpe baboti na bango?
14 Bana basepelisaka motema ya Yehova ntango bazali kotosa tata ná mama. Lisusu, bapesaka baboti na bango lokumu mpe basepelisaka bango. (Masese 10:1) Soki tata to mama azali kobɔkɔla bana ye moko, bana basengeli kaka kotosa ye, basengeli kobosana te ete moboti na bango azali na mposa makasi ya lisungi mpe ya lisalisi. Na mabota oyo moto mokomoko akokisaka mokumba oyo Nzambe apesi ye, kimya mpe esengo ezalaka mingi. Yango epesaka nkembo epai ya Yehova Nzambe, Mobandisi ya mabota nyonso.—Baefese 3:14, 15.
BOTOSI NA KATI YA LISANGÁ
15. (a) Na kati ya lisangá, ndenge nini tokoki komonisa ete totosaka bokonzi ya Yehova? (b) Mitinda nini ekoki kosalisa biso tótosaka baoyo bazali kokamba biso? (Talá etanda “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino.”)
15 Yehova atye Mwana na ye Mokonzi ya lisangá ya bokristo. (Bakolose 1:13) Yesu mpe apesi “moombo ya sembo mpe ya mayele” mokumba ya kokokisa bamposa ya elimo ya basaleli ya Nzambe awa na mabele. (Matai 24:45-47) Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova nde moombo yango. Ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, lelo oyo mpe bankulutu bazwaka malako mpe batoli ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ezala na mikanda to na nzela ya batindami na yango, na ndakisa bakɛngɛli ya zongazonga. Ntango mokomoko na biso azali komemya bokonzi ya bankulutu, azali nde kotosa Yehova.—Tángá 1 Batesaloniki 5:12; Baebre 13:17.
16. Na ndenge nini bankulutu baponamaka na lisalisi ya elimo santu?
16 Bankulutu ná basaleli na misala bazali bato ya kozanga kokoka. Basalaka mpe mabunga lokola biso nyonso. Atako bongo, bazali “makabo oyo ezali bato,” oyo bapesami mpo na kosalisa lisangá etikala makasi na elimo. (Baefese 4:8) Bankulutu baponamaka na lisalisi ya elimo santu. (Misala 20:28) Na ndenge nini? Ya liboso, mibali yango bakokisaka masɛngami ya Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo santu. (1 Timote 3:1-7, 12; Tito 1:5-9) Longola yango, ntango bankulutu bazali kotalela soki ndeko moko akokisi masɛngami mpo na kozwa mikumba, babondelaka na etingya mpo na kosɛnga litambwisi ya elimo santu ya Yehova.
17. Mpo na nini basi bakristo balataka eloko mpo na kozipa motó ntango bazali kokokisa mikumba mosusu na lisangá?
17 Na bantango mosusu, ekoki kozala ete na lisangá moko, bankulutu mpe basaleli na misala bazali te mpo na kokokisa mokumba moko oyo bango nde basengeli kokokisa, na ndakisa kotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola. Na ntango wana, bandeko mibali mosusu oyo bazwá batisimo bakoki kosala yango. Soki mpe bandeko mibali bazali te, bandeko basi oyo bazali na makoki bakoki kosala yango. Nzokande, soki ndeko mwasi azali kokokisa mokumba moko oyo ndeko mobali oyo azwi batisimo nde asengeli kokokisa yango, asengeli kolata eloko mpo na kozipa motó.a (1 Bakorinti 11:3-10) Lisɛngami yango ezali kokitisa basi te. Kutu, ezali kopesa bango libaku ya komonisa limemya na ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá, ezala na libota to na lisangá.
BOTOSI EPAI YA BAKONZI YA MOKILI
18, 19. (a) Ndenge nini okoki kolimbola mitinda oyo ezali na Baroma 13:1-7? (b) Ndenge nini tomonisaka ete tomemyaka bakonzi ya mokili?
18 Bakristo ya solo balandaka mpenza mitinda oyo ezali na Baroma 13:1-7. (Tángá.) Soki otángi bavɛrsɛ yango nyonso, okomona ete “bakonzi oyo bazali liboso” oyo balobelami kuna ezali nde bakonzi ya Leta. Ntango nyonso oyo Yehova azali kotika nzela ete bakonzi yango bázala, bazali kokokisa mikumba ya ntina mingi, bazali kopekisa mobulu mpe bazali kosalisa bato na makambo ndenge na ndenge. Tomonisaka limemya epai ya bakonzi yango na ndenge totosaka mibeko. Tofutaka mpako nyonso oyo basɛngi, totondisaka malamu mikanda oyo bakoki kosɛnga biso, mpe totosaka mibeko na makambo oyo etali biso moko, libota na biso, mosala na biso, mpe biloko na biso. Nzokande, totosaka te ntango bakonzi ya mokili basɛngi biso tóboya kotosa Nzambe. Na ntango wana, tolobaka lokola bantoma ete: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”—Misala 5:28, 29; talá etanda “Nasengeli kotosa bokonzi ya nani?”
19 Tomonisaka mpe botosi epai ya bakonzi ya mokili na ezaleli na biso. Na bantango mosusu, tokoki kokutana na bakonzi ya Leta. Ntoma Paulo akutanaki na bato minene lokola Mokonzi Erode Agripa mpe Guvɛrnɛrɛ Festusi. Bato yango bazalaki mpenza na etamboli ya mbindo, kasi Paulo alobaki na bango na limemya. (Misala 26:2, 25) Tosengeli komekola ndakisa ya Paulo, ezala ntango tozali liboso ya bakonzi minene to bapolisi. Na kelasi, bilenge bakristo basalaka makasi bámonisa limemya ya ndenge wana epai ya balakisi mpe bakonzi mosusu ya eteyelo. Kasi, tosengeli kozala na limemya ya ndenge wana kaka te epai ya bato oyo basepelaka na mateya na biso, kasi ata epai ya baoyo balingaka Batatoli ya Yehova te. Bato oyo bazali Batatoli te basengeli mpenza komona ete tozali bato ya botosi.—Tángá Baroma 12:17, 18; 1 Petro 3:15.
20, 21. Wapi mwa mapamboli ya kotosa bokonzi?
20 Tókakatanaka te mpo na komonisa limemya. Ntoma Petro akomaki boye: “Bókumisa bato ya ndenge nyonso.” (1 Petro 2:17) Ntango bato bazali komona ete topesaka bango limemya na ndenge oyo esengeli, yango ekoki kosimba mitema na bango. Tóbosana te ete na mokili, bato mingi bazali lisusu na ezaleli yango te. Yango wana, ntango tozali komonisa botosi, tozali mpe kolanda toli ya Yesu oyo elobi boye: “Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.”—Matai 5:16.
21 Na mokili oyo etondi na molili, bato ya mitema sembo bazali kobendama na pole ya elimo. Na bongo, ntango tozali komonisa botosi na libota, na lisangá, mpe epai ya bakonzi ya mokili, yango ekoki kosepelisa bato mosusu mpe kopesa bango mposa ya kotambola na pole elongo na biso. Yango ekozala likambo ya malamu mingi! Kasi, ata soki esalemi bongo te, biso tondimisami na likambo moko. Botosi na biso esepelisaka Yehova Nzambe mpe esalisaka biso tótikala na kati ya bolingo na ye. Yango ezali mbano oyo eleki mbano mosusu nyonso oyo tokoki kozwa!
a Na Apɛndisi, lisolo “Kozipa motó—Ntango nini mpe na nini?”, elobeli mwa makambo oyo esɛngi kolanda etinda yango.