Mokapo 25
Nakoki kozala na esengo ata soki nazali na moboti kaka moko?
“Na libota oyo tata ná mama bazali, mwana na mwana akoki kozala na shambrɛ mpe bakoki kosomba bilamba ya sika. Kasi ngai nasengeli kozala na shambrɛ moko ná basusu; nazwaka mpenza te bilamba oyo nalingi. Mama alobi ete azali na mbongo te ya kosomba yango. Lokola nasengeli kosala misala nyonso ya ndako soki mama akei mosala, namonaka lokola nde nazali mwana ya mosala—lokola nde bazali kopekisa ngai nasala te makambo oyo mwana nyonso asengeli kosala.”—Shalonda, azali na mbula 13.
EZALI solo ete kozala na ndako oyo tata ná mama bazali kolinga yo eleki malamu. Papa ná mama oyo bazali elongo bakoki ntango nyonso kopesa bana litambwisi, libateli mpe lisungi oyo esengeli. Biblia elobi boye: “Kozala bato mibale po na kosala mosala ezali malamu koleka kozala moto moko. Soki bazali mibale bakoki kolonga na mosala na bango.”—Mosakoli 4:9, Bible na lingala ya lelo oyo.
Atako bongo, soki tata ná mama oyo tolobeli bazalaki nyama, elingaki kozala na kati ya banyama oyo elingi kolimwa. Na ndakisa, bana mingi na États-Unis, liboso bákóma na mbula 18, bafandaki kaka na moboti moko (tata to mama).
Atako bongo, bilenge mosusu oyo bafandi na moboti kaka moko bayokaka nsɔni ndenge bazali ndenge wana. Bamosusu babulunganaka mingi na mitungisi mpe mikakatano oyo bomoi na bango ememelá bango. Soki ozali na kati ya libota oyo ezali na moboti kaka moko, okutanaka na mitungisi nini? Na mokɔlɔtɔ oyo elandi, komá likambo oyo etungisaka yo mingi.
․․․․․
Lokola ozali kozanga bolingo mpe likebi ya moko ya baboti na yo, yango esalaka yo mawa? Soki moke te. Koyoka mawa to te etaleli kaka ndenge oyo ozali komonela likambo. Masese 15:15 elobi boye: “Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe; kasi ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.” Ndenge makanisi oyo emonisi yango, esengo to mawa ya moto eutaka mbala mingi na ezaleli na ye, kasi te na makambo oyo ekómeli ye. Okoki kosala nini mpo ozala na “motema ya esengo” atako makambo ya bomoi na yo ezali mpasi?
Oyo okoki kosala ntango mikakatano ezali kotungisa yo
Ya liboso, salá nyonso mpo makanisi mabe ya basusu elɛmbisa yo te. Na ndakisa, balakisi mosusu bazalaka na mawa ata moke te epai ya bana-kelasi oyo bafandaka na moboti kaka moko. Bamosusu kutu bakanisaka ete ezala bana yango basali likambo nini ya mabe, ezali mpo babɔkwami na moboti kaka moko. Kasi omituna boye: ‘Bato oyo bazali koloba ndenge wana bayebi mpenza ngai mpe libota na ngai? To bazali kaka kozongela makambo oyo bayokaki basusu bazali koloba mpo na bana oyo bazali na moboti kaka moko?’
Ndenge Makomami esaleli mbala mingi maloba “mwana mobali oyo tata akufá” esengeli kobenda likebi na biso. Maloba yango esalelamaka soki moke te na ndenge ya mabe. Kutu, na masolo pene na nyonso oyo elobeli likambo yango, Yehova amonisi ndenge atyelaka bana oyo bazali kobɔkwama kaka na moboti moko likebi.a
Epai mosusu, bato mosusu oyo bamonaka ete bazali na makanisi malamu, bakoki kozala ekɛngɛ ntango bazali kosolola na yo. Na ndakisa, bakoki kokakatana mpo na kosalela maloba lokola “tata,” “libala,” “koboma libala,” to “liwa,” mpo bazali kobanga ete maloba yango ekozokisa to ekosala yo mabe. Makambo ya ndenge wana etungisaka yo? Soki ezali bongo, monisá bango na mayele ete basengeli kobangabanga te ntango bazali kosolola na yo. Tony, oyo azali na mbula 14 ayebaka te tata oyo abotá ye. Alobi ete bato mosusu bamɛlaka maloba mosusu. Kasi, Tony asalelaka mpenza maloba yango ntango azali kosolola na bango. Alobi boye: “Nalingaka báyeba ete nayokaka mabe te ndenge nazali na moboti kaka moko.”
Kolobaka te “soki ezalaka boye”
Ya solo, soki baboti babomi libala to soki moboti moko akufi, epesaka mawa mpe ebulunganisaka. Atako bongo, osengeli kondima likambo oyo ekómeli yo. Biblia epesi toli oyo: “Koloba te ete: ‘Mpo na nini mikolo ya liboso elekaki mikolo oyo na malamu?’” (Mosakoli 7:10) Na likambo yango, Sarah, elenge moko ya mbula 13, oyo baboti na ye babomaki libala ntango azalaki na mbula 10, apesi toli oyo: “Kokanisakanisa te likambo oyo ekómeli yo, mpe kolobáká maloba lokola ‘soki ezalaka boye’; komona mpe te ete ozali na mikakatano mpo ozali kobɔkwama kaka na moboti moko, to mpe ete bana oyo bazali kobɔkwama na tata mpe mama bazali na bomoi ya esengo koleka.” Ezali toli ya malamu. Kutu, ata mabota oyo baboti nyonso mibale bazali, ezalaka mpe na mikakatano.
Mpo na nini te komona libota na bino lokola ekipi ya bato oyo bazali kobɛta bale? Ekozala malamu soki basani nyonso bazali kobɛta elongo. Libota oyo ezali na moboti moko, ezali lokola ekipi oyo mosani moko azangi, mpe baoyo batikali basengeli kosala makasi mingi. Elingi nde koloba ete libota yango ekolonga te? Te! Soki basani oyo batikali bazali koyokana, bakokoba kobɛta malamu mpe bakolonga.
Ozali kokokisa mikumba na yo?
Yo ná basangani mosusu ya libota bosengeli mpenza kosala nini? Talá makanisi oyo misato:
Yebá kobatela mbongo. Mbongo ezalaka mokakatano moko monene na mabota mingi oyo ezali na moboti moko. Nini ekoki kosalisa yo? Tony, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Bana-kelasi na biso basɛngaka baboti na bango básombela bango basapato mpe bilamba ya ntalo. Baboyaka kokende na kelasi soki basombeli bango yango te. Nazali te na bilamba oyo ebimi sika, kasi bilamba na ngai ezalaka pɛto mpe ebongisami malamu, mpe nabatelaka oyo nazali na yango. Mama asalaka nyonso oyo akoki; nalingi te nazala kilo mpo na ye.” Soki osali mwa milende, okoki komekola ntoma Paulo, oyo alobaki ete: “Nayekoli kosepela na oyo nazali na yango . . . mpo ete ezala epai wapi, na ntango nini, nazala na esengo.”—Bafilipi 4:11, 12, Biblia Today’s English Version.
Ndenge mosusu ya kobatela mbongo ezali ya kobebisa biloko te. (Yoane 6:12) Elenge moko na nkombo Rodney alobi boye: “Na ndako, nakebaka mpo nabuka biloko te to natya yango na esika ya mabe, mpo ekosɛnga mbongo ya kobongisa to kosomba mosusu soki ebebi. Nakataka kura to baaparɛyi oyo tozali kosalela te. Yango ekitisaka faktire ya kura.”
Zalá moto ya liboso. Baboti mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko bakakatanaka kotosisa mibeko ya ndako to kosɛnga bana na bango bápesa mabɔkɔ na misala ya ndako. Mpo na nini? Bamosusu bamonaka ete lokola moboti mosusu azali te, malamu atika bana bázala na bomoi moko ya pɛpɛlɛ. Bakoki koloba boye: ‘Nalingi te ete bana na ngai bázanga ntango ya kosepela.’
Ntango mosusu okoki kobanda kosalela kobanga wana ya moboti na yo mpo osalaka te misala na ndako. Kasi, soki osali bongo, okokitisela moboti na yo kilo te, kasi okobakisela nde ye yango. Na esika osala bongo, mpo na nini te kopesa mabɔkɔ na misala ya ndako kozanga bátinda yo? Talá oyo Tony andimaki kosala. Alobi boye: “Mama asalaka na lopitalo, mpe esɛngaka kongoma bilamba na ye ya mosala. Na yango nangomelaka ye yango.” Ezali nde mosala ya basi te? Tony ayanoli boye: “Bato mosusu bakoki kokanisa bongo. Kasi, esalisaka mama, yango wana nasalaka yango.”
Zalá na botɔndi. Longola kopesa mabɔkɔ na misala ya ndako, okoki kosala mingi mpo na kolendisa moboti na yo soki ozali kopesa ye matɔndi. Mwasi moko oyo abɔkɔlaka bana ye moko akomaki boye: “Mbala mingi, namonaka ete mokolo oyo nalɛmbi nzoto mpenza mpe nakómi nkandankanda mpo na makambo oyo nakutanaki na yango na mosala—mokolo yango nde mwana na ngai ya mwasi amonaka malamu abongisa mesa mpe alambaka biloko ya mpokwa.” Abakisi boye: “Mwana na ngai ya mobali ayaka pembeni na ngai mpe ayambaka ngai.” Makambo wana ya malamu esalaka mama yango ndenge nini? Alobi boye: “Nazongelaka esengo mpe nayokaka malamu.”
Na makambo misato oyo touti kolobela, komá likambo moko oyo osengeli mpenza kobongisa. ․․․․․
Kofanda na libota oyo moboti azali kaka moko epesi yo nzela ya kokolisa bizaleli lokola kozala na motema mawa, koboya moimi, mpe ezaleli ya bosembo. Lisusu, Yesu alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Okoki koyoka esengo mingi soki ozali komipesa mpo na kosalisa moboti na yo.
Ya solo, na ntango mosusu, okobanda kozala na mposa ya kozala na baboti mibale. Kasi, okoki kosala nyonso mpo omesana na ndenge ozali. Yango nde elenge mwasi moko na nkombo Nia amonaki. Alobi boye: “Ntango papa akufaki, moto moko alobaki na ngai ete ‘bomoi na yo ekozala ndenge yo moko olingi ezala,’ mpe nabosanaka maloba yango te. Esalisaki ngai nayeba ete nasengeli te kozanga esengo mpo kaka nazali na moboti moko.” Yo mpe okoki kotalela makambo ndenge wana. Kobosana te, ezali te makambo oyo ekómeli yo nde ekosala ete ozala na esengo to te. Ezali nde ndenge oyo ozali kotalela yango—mpe ndenge oyo ozali kosala mpo na kolonga yango.
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 4, NA VOLIMI 1
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ndakisa, talá Kolimbola Mibeko 24:19-21 mpe Nzembo 68:5.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”—Bafilipi 2:4.
TOLI
Soki omoni ete moboti na yo apesi yo mikumba mingi oyo okokoka te, yebisá ye na mayele ete ameka kosala boye:
● Asala liste ya misala nyonso oyo moto mokomoko na libota asengeli kosala.
● Soki esengeli, akabola misala na bato ya libota oyo bakokoka kosala yango.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Kondima kokokisa mikumba ebele na ndako na bino ekoki kosalisa yo okola noki koleka bilenge oyo bazali na baboti nyonso mibale mpe oyo mbala mingi, bazalaka na mikumba mingi te ya kokokisa.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mpo na kolongola makanisi ya mabe, nako ․․․․․
Soki bato bazali komitungisa mingi koleka mpo na ngai, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Mpo na nini bato mosusu bamonaka bana oyo bazali na moboti moko lokola eloko mpamba?
● Mpo na nini moboti na yo akoki kokakatana mpo na kosɛnga yo osalisa na misala ya ndako?
● Ndenge nini okoki komonisa botɔndi epai ya moboti na yo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 211]
‘‘Banda baboti na ngai babomá libala, ngai ná mama tokómá kosolola mpenza; tokómá na boyokani makasi.’’—Mélanie
[Elilingi na lokasa 210, 211]
Libota oyo ezali na moboti kaka moko ezali lokola ekipi ya bato oyo basengeli kosala lisano ya bwato, kasi moto moko azangi—bato oyo batikali bakosala makasi koleka, kasi bakoki kolonga soki basali na bomoko