Bandakisa ya kolanda—Lidia
Atako azalaki mondimi ya sika, Lidia azwaki likanisi ya koyamba Paulo ná baninga na ye na ndako. (Misala 16:14, 15) Mpo na yango, azwaki libaku ya kolekisa ntango ná bayekoli yango. Ntango babimisaki Paulo ná Silasi na bolɔkɔ, bakendaki wapi? Bazongaki mbala moko epai ya Lidia!—Misala 16:40.
Na ndakisa ya Lidia, okoki kozwa likanisi ya koyebana na basusu? Ndenge nini okoki kosala yango? Bandá na makambo ya mikemike. Salá makasi osolola ata na moto moko. Okoki komityela mokano ya kobanda kosolola ata na moto moko ntango nyonso oyo okei na makita. Meká kosɛka mwa moke. Soki oyebi likambo ya koloba te, tuná mituna to yebisá basusu likambo moko oyo etali yo. Zalá moyoki ya malamu. Nsukansuka, okobanda kobanga lisusu te kosolola na bato. Mbala mingi bato basepelaka koyoka maloba ya solo mpe ya boboto mpe ya bolingo. (Masese 16:24) Lokola Lidia azalaki na boboto mpe azalaki koyamba bapaya, akómaki na baninga ya malamu. Soki olandi ndakisa na ye, yo mpe okokóma na baninga ya malamu!