Loyembo 55
Bomoi ezangi nsuka!
Ya Papye
1. Kanisá ntango bato
Bakozwa kimy’a solo.
Mawa, mpasi esili.
Oyo nde bolamu!
(MONDIMO)
Yembá na esengo,
Yo mpe okobika.
Zelá ntang’okoloba:
“Nazwi bomoi seko!”
2. Mobange akozonga
Elenge na ntango’ango.
Mitungisi mpe mpasi,
Nsɔmɔ ekosila.
(MONDIMO)
Yembá na esengo,
Yo mpe okobika.
Zelá ntang’okoloba:
“Nazwi bomoi seko!”
3. Mokili, Paradiso
Nzambe akozwa nkembo.
Tokotɔnda Yehova
Ye Nzambe ya seko.
(MONDIMO)
Yembá na esengo,
Yo mpe okobika.
Zelá ntang’okoloba:
“Nazwi bomoi seko!”
(Talá mpe Yobo 33:25; Nz. 72:7; Em. 21:4.)