MOKAPO YA MIBALE
Mosakoli na “eleko ya nsuka ya mikolo”
1, 2. (a) Emonaneli nini Yirimia amonaki oyo emonisi makambo oyo asengelaki kosakola? (b) Mpo na nini osengeli kotya likebi na makambo oyo Yirimia asakolaki?
NZAMBE atuni Yirimia, mosakoli oyo auti kopona, ete: “Ozali komona nini?” Bongo Yirimia ayanolaki boye: “Nazali komona nzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ monene, oyo bazali kopupola, mpe monɔkɔ na yango etɛngami longwa na nɔrdi.” Kaka na ebandeli, emonaneli yango emonisaki mpenza makambo oyo Yirimia asengelaki kosakola. (Tángá Yirimia 1:13-16.) Soki bazalaki kopupola nzungu yango ya kolambela, ezalaki te mpo na kokomisa biloko na yango mpio, kasi nde mpo na kongalisa makasi koleka mɔtɔ oyo ezalaki na nse na yango. Ɛɛ, Yehova azalaki kosakola ete mpasi oyo ezali lokola pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ makasi ekosopana na nzungu yango mpe ekokɔta na mokili ya Yuda mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo etondaki mpenza na mokili yango. Mpo na yo, mpo na nini monɔkɔ ya nzungu yango etalaki na sudi? Yango elimbolaki ete mpasi ekouta na nɔrdi—Longwa na nɔrdi, Babilone ekoya kobundisa mokili ya Yuda. Mpe yango esalemaki bongo. Bambula oyo Yirimia azalaki mosakoli, amonaki ndenge nzungu yango oyo ezalaki kotɔka ezalaki kosopana mbala na mbala tii kobebisama ya Yerusaleme.
2 Atako Babilone ezali lisusu te, osengeli kotya likebi na makambo oyo Yirimia asakolaki. Mpo na nini? Mpamba te ozali kobika na “eleko ya nsuka ya mikolo” ntango oyo bato mingi bazali kotuta ntolo ete bazali bakristo, nzokande bango ná mangomba na bango bandimami na Nzambe te. (Yir. 23:20) Kasi lokola Yirimia, nsango oyo yo ná batatoli mosusu bozali kosakola ezali kaka nsango ya bitumbu te, kasi ezali mpe nsango ya elikya.
3. (a) Ndenge nini masolo oyo ezali na buku ya Yirimia ebongisami? (b) Mokapo 2 ya buku oyo ezali kolobela nini?
3 Yirimia akomaki makambo te ndenge yango ezalaki kolandana, kasi ekoki kozala ete pene na nsuka ya mosala na ye ya mosakoli nde atindaki sɛkrɛtɛrɛ na ye akoma masolo na ye. (Yir. 25:1-3; 36:1, 4, 32) Masolo ya mokanda ya Yirimia ekomamaki te na kotalela ndenge oyo makambo esalemaki na molɔngɔ, kasi akabolaki masolo ya mokanda na ye na biteni na kolanda ndenge oyo makambo ezalaki kosalema. Yango wana koyeba na mokuse makambo oyo ezalaki kosalema ntango mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli ekomamaki mpe ndenge oyo makambo yango elandanaki na molɔngɔ ekosalisa yo. Talá etanda na lokasa 19. Koyeba nani azalaki mokonzi ya Yuda na ntango boye to boye, mpe ntango mosusu koyeba makambo oyo ezalaki kosalema na Yuda mpe na bikólo ya zingazinga ekosalisa yo oyeba malamu makambo oyo Yirimia alobaki to asalaki. Yango ekosalisa yo ozwa matomba na makambo oyo Nzambe alobaki mpo na libota na ye na nzela ya Yirimia.
NDENGE OYO MAKAMBO EZALAKI NA NTANGO YA YIRIMIA
4-6. Na bambula oyo ezalaki liboso Yirimia abanda mosala na ye ya kosakola, makambo ezalaki ndenge nini na Yuda?
4 Ntango Yirimia azalaki kosakola, mbongwana moko monene esalemaki. Ezalaki ntango oyo Asiri, Babilone ná Ezipito bazalaki kowelana mpo na boyangeli ya mokili ya ntango wana. Mbula soki 93 liboso Yirimia abanda mosala na ye ya mosakoli, mampinga ya Asiri elongaki bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele oyo ezalaki na nɔrdi. Na ntango yango, Yehova abikisaki Yerusaleme mpe Hizikiya oyo azalaki mokonzi ya sembo na Yisraele ntango mampinga ya Asiri eyaki kobundisa bango. Mbala mosusu ozali komikundola ndenge anzelu ya Nzambe abomaki na mbala moko basoda ya Asiri 185 000. (2 Bak. 19:32-36) Manase azalaki moko ya bana ya Hizikiya. Mbala mosusu Yirimia abotamaki na ntango ya boyangeli ya Manase oyo eumelaki mbula 55. Na ntango yango, bato ya Asiri bazalaki kokonza Yuda.—2 Nt. 33:10, 11.
5 Yirimia akomaki mikanda ya 1 Bakonzi ná 2 Bakonzi, mpe mikanda yango emonisi ete Manase atongaki lisusu bisika ya losambo oyo etombwaná oyo tata na ye abebisaki. Manase atongelaki Baala mpe limpinga ya likoló bitumbelo, asalaki yango ata mpe na kati ya tempelo ya Yehova. Asopaki makila ya bato mingi oyo bazalaki na likambo te, mpe mpo na nzambe ya lokuta, alekisaki mwana na ye mbeka na mɔtɔ. Na mokuse, Manase “asalaki makambo mingi mpenza ya mabe na miso ya Yehova.” Mpo na mabe nyonso wana, Nzambe alobaki ete mpasi ekokwela Yerusaleme ná Yuda, ndenge ekwelaki Samaria ná Yisraele. (2 Bak. 21:1-6, 12-16) Ntango Manase akufaki, mwana na ye Amone akobaki na makambo ya losambo ya bikeko ya tata na ye, kasi makambo yango eumelaki te. Nsima ya mbula mibale, Amone abomamaki mpe na mobu 659 L.T.B., mwana na ye Yosiya oyo azalaki na mbula mwambe, akómaki mokonzi.
6 Na boyangeli ya Yosiya, oyo eumelaki mbula 31, mokemoke Babilone ekómaki na nguya koleka Asiri. Yosiya amonaki ete yango ezali libaku mpo Yuda elongwa na boombo ya boyangeli ya bapaya. Yosiya alandaki ndakisa ya tata ná nkɔkɔ na ye te; ye asalelaki Yehova na bosembo mpe abandisaki mosala monene ya kolongola losambo ya bikeko. (2 Bak. 21:19–22:2) Na mbula ya 12 ya boyangeli na ye, Yosiya abebisaki bisika ya losambo oyo etombwaná, banzete ya losambo, bikeko ya banzambe ya lokuta na Yuda mobimba mpe na nsima, apesaki mitindo ete bábongisa tempelo ya Yehova. (Tángá 2 Ntango 34:1-8.) Simbá ete na mbula ya 13 ya boyangeli ya Yosiya (na 647 L.T.B.) nde Nzambe aponaki Yirimia azala mosakoli.
Soki ozalaka mosakoli na ntango ya Yirimia, olingaki komiyoka ndenge nini?
7, 8. (a) Ndenge nini boyangeli ya Yosiya ekesanaki na oyo ya Manase ná Amone? (b) Yosiya azalaki moto ya ndenge nini? (Talá etanda na lokasa 20.)
7 Na mbula ya 18 ya boyangeli malamu ya mokonzi Yosiya, ntango bazalaki kobongisa tempelo, nganga-nzambe monene azwaki “buku mpenza ya mobeko.” Mokonzi asɛngaki sɛkrɛtɛrɛ na ye atángela ye buku yango. Yosiya andimaki mabe ya bato na ye, alukaki litambwisi ya Nzambe epai ya mosakoli-mwasi Huluda, mpe alendisaki bato na ye bábatela mibeko ya Nzambe. Huluda ayebisaki Yosiya ete Yehova akokweisela Bayuda mpasi mpo na kozanga bosembo na bango. Kasi lokola Yosiya asalaki makambo malamu mpo na losambo ya solo, mpasi yango esengelaki koya na bomoi na ye te.—2 Bak. 22:8, 14-20.
8 Mokonzi Yosiya asalaki milende lisusu mpo na kolongola makambo nyonso ya losambo ya bikeko oyo etikalaki. Lokola azalaki na molende mpenza, akendaki tii na teritware ya Yisraele na nɔrdi mpo na kobebisa esika ya losambo oyo etombwaná ná etumbelo ya Betele. Azwaki mpe bibongiseli mpo na kosala molulu moko monene ya Elekeli. (2 Bak. 23:4-25) Na ntembe te, Yirimia asepelaki mingi mpo na likambo yango! Atako bongo, ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kosalisa bato bábongola bomoi na bango. Manase ná mwana na ye Amone bakɔtisaki bato na makambo ya mbindo ya losambo ya bikeko; na yango, bato bakómaki na bopɔtu mpenza na makambo ya losambo. Atako Yosiya asalaki mbongwana na makambo ya losambo, Nzambe alobaki na nzela ya Yirimia ete banzambe ya Bayuda bakómaki ebele lokola bingumba na bango. Bato ya ekólo ya mosakoli Yirimia bazalaki lokola mwasi oyo azali sembo te epai ya mobali na ye—batikaki Yehova mpe basalaki ekobo na banzambe ya bapaya. Yirimia alobaki boye: “Botyeli eloko ya nsɔni bitumbelo ebele lokola babalabala ya Yerusaleme, bitumbelo mpo na kobimisela Baala milinga ya mbeka.”—Tángá Yirimia 11:1-3, 13.
9. Makambo nini esalemaki na bikólo oyo ezalaki zingazinga na bambula ya nsuka ya boyangeli ya Yosiya?
9 Atako Yirimia azalaki kosakola nsango ya bitumbu, Bayuda babongwanaki te mpe bikólo oyo ezalaki zingazinga bazalaki kaka kowelana mpo na boyangeli ya mokili ya ntango wana. Na mobu 632 L.T.B., mampinga ya Babilone oyo esanganaki na mampinga ya Bamede elongaki Ninive, engumba-mokonzi ya Asiri. Mbula misato na nsima, Farao Neko, mokonzi ya Ezipito, amemaki mampinga na ye na nɔrdi mpo na kosalisa mampinga ya Asiri oyo ezalaki kokoka lisusu te. Mpo na ntina oyo Biblia elobeli te, Yosiya amekaki kozongisa nsima mampinga ya Ezipito na Megido, kasi azokaki makasi mpe akufaki. (2 Nt. 35:20-24) Likambo yango ya mawa ememaki mbongwana nini na Yuda? Mpe mikakatano nini mosusu Yirimia akutanaki na yango?
MBONGWANA NA MAKAMBO YA LOSAMBO
10. (a) Na ndenge nini makambo oyo esalemaki nsima ya liwa ya mokonzi Yosiya ekokani na makambo oyo ezali kosalema na ntango na biso? (b) Ndenge nini etamboli ya Yirimia ekoki kosalisa yo?
10 Kanisá naino ndenge oyo Yirimia amiyokaki ntango ayokaki ete mokonzi Yosiya akufi. Ayokaki mawa makasi mpenza, yango wana ayembaki nzembo ya mawa mpo na mokonzi yango. (2 Nt. 35:25) Bato bazalaki kobanga mingi na ntango yango mpe yikiyiki oyo ezalaki na bikólo ya zingazinga ebakisaki mpasi na mokili ya Yuda. Bikólo misato ya nguya, elingi koloba Ezipito, Asiri, ná Babilone bazalaki kowelana mpo na boyangeli ya mokili ya ntango wana. Mpe ntango Yosiya akufaki, makambo ya losambo ebebaki lisusu na Yuda. Liwa yango etyaki nsuka na ntango moko oyo ezalaki malamu mingi mpo na mosala ya Yirimia mpe boyangeli mosusu ya mabe ebandaki. Na mikolo na biso, bandeko mingi bakutaná mpe na mbongwana ya ndenge wana; bazalaki na mwa bonsomi ya losambo, na nsima, mosala na bango epekisamaki mpe bakómaki konyokola bango. Toyebi te, mbala mosusu na mikolo ezali koya, mingi kati na biso bakokutana na makambo ya ndenge wana. Tokosala nini soki likambo yango ekómeli biso? Tosengeli kosala nini mpo tótikala sembo na ntango yango? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tóyeba mikakatano oyo Yirimia akutanaki na yango mpe ndenge alongaki yango.
11. Makambo nini esalemaki na Yuda nsima ya liwa ya Yosiya?
11 Bato ya Yuda batyaki Yehoahaze, mwana ya Yosiya, mokonzi na Yerusaleme. Yehoahaze, oyo ayebanaki mpe na nkombo Shalume, ayangelaki kaka sanza misato. Ntango Farao Neko azongaki na sudi nsima ya kobundisa mampinga ya Babilone, alongolaki mokonzi yango ya sika mpe amemaki ye na Ezipito, mpe Yirimia asakolaki ete Yehoahaze “akozonga lisusu te.” (Yir. 22:10-12; 2 Nt. 36:1-4) Na esika ya Yehoahaze, Neko akómisaki Yehoyakime mokonzi; Yehoyakime azalaki mwana mosusu ya Yosiya. Yehoyakime alandaki ndakisa malamu ya tata na ye te. Na esika akoba kosala mbongwana oyo tata na ye abandisaki, amipesaki nde na losambo ya bikeko.—Tángá 2 Bakonzi 23:36, 37.
12, 13. (a) Makambo ezalaki ndenge nini na ebandeli ya boyangeli ya Yehoyakime? (b) Bakonzi ya lingomba basalaki Yirimia nini?
12 Na ebandeli ya boyangeli ya Yehoyakime, Yehova ayebisaki Yirimia akende na tempelo mpe atɔndɔlela Bayuda mabe na bango. Bayuda bazalaki kokanisa ete tempelo ezali lokola nkisi oyo ekoki kobatela bango. Kasi, babosanaki ete Yehova akoki kosundola tempelo na ye soki batiki te “koyiba, koboma, kosala ekobo, kolapa ndai ya lokuta, kobimisa milinga ya mbeka epai na Baala mpe kolanda banzambe mosusu.” Yehova akokaki mpe kosundola bakosi oyo bazalaki kosambela na kati ya tempelo yango, kaka ndenge asundolaki tabernakle oyo ezalaki na Shilo na mikolo ya Eli, oyo azalaki nganga-nzambe monene. Mokili ya Yuda esengelaki ‘kokóma mpenza esika oyo ebebisami.’ (Yir. 7:1-15, 34; 26:1-6)a Na ntembe te, Yirimia asengelaki mpenza kozala na mpiko mpo na kosakola nsango yango! Kutu, asakwelaki polele bato minene mpe bato ya lokumu. Lelo oyo mpe, esɛngaka na bandeko mosusu bázala na mpiko mpo na kosakola na babalabala to mpo na kosolola na bato ya mbongo to bato minene. Na yango, tóbosana likambo oyo te: Nzambe akosunga biso ndenge asungaki Yirimia.—Ebr. 10:39; 13:6.
13 Lokola makambo ya politiki mpe ya lingomba ezalaki ndenge wana na Yuda, bakonzi ya lingomba basalaki nini ntango bayokaki maloba ya Yirimia? Mosakoli ye moko alobi ete, “banganga-nzambe mpe bato nyonso bakangaki ye, mpe balobaki boye: ‘Okokufa solo.’” Basilikaki makasi, mpe balobaki ete: “Moto oyo abongi na ekateli ya liwa.” (Tángá Yirimia 26:8-11.) Kasi banguna ya Yirimia balongaki ye te. Yehova azalaki na mosakoli na ye mpe abikisaki ye. Yirimia ye moko mpe atikaki te ete banguna na ye bábangisa ye, atako emonanaki ete bazali mingi mpe makasi koleka ye. Yo mpe osengeli kobanga banguna na yo te.
Bokeseni nini ezalaki kati na boyangeli ya Manase, ya Amone, ná ya Yosiya? Liteya nini okoki kozwa na ndenge oyo Yirimia akokisaki mokumba na ye atako akutanaki na mikakatano?
“OSENGELI KOKOMA . . . MALOBA NYONSO”
14, 15. (a) Mosala nini Yirimia ná sɛkrɛtɛrɛ na ye Baruke babandaki kosala na mbula ya minei ya boyangeli ya Yehoyakime? (b) Yehoyakime azalaki moto ya ndenge nini? (Talá etanda na lokasa 25.)
14 Na mbula ya minei ya boyangeli ya Yehoyakime, Yehova ayebisaki Yirimia akoma makambo nyonso oyo Yehova alobaki na ye banda mikolo ya mokonzi Yosiya. Na yango, Yirimia ayebisaki sɛkrɛtɛrɛ na ye Baruke makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki ye na boumeli ya mbula 23 oyo elekaki, mpe Baruke akomaki makambo yango. Nsango ya bitumbu oyo Yirimia asakolaki etalaki bakonzi mpe makonzi soki 20. Yirimia atindaki Baruke akende kotánga na mongongo makasi rulo yango na ndako ya Yehova. Mpo na nini? “Mbala mosusu bato ya ndako ya Yuda bakoyoka mpo na mpasi nyonso oyo nazali kokanisa kopesa bango, mpo bálongwa moto na moto na nzela na ye ya mabe, mpe nalimbisa libunga na bango mpe lisumu na bango.”—Yir. 25:1-3; 36:1-3.
15 Ntango kapita ya ndako ya mokonzi atángelaki Yehoyakime rulo yango, mokonzi apasolaki yango na mbeli mpe abwakaki yango na mɔtɔ. Na nsima Yehoyakime apesaki mitindo ete báyela ye Yirimia ná Baruke. “Kasi Yehova abombaki bango.” (Tángá Yirimia 36:21-26.) Lokola Yehoyakime azalaki na ezaleli ya mabe mpenza, Yehova alobaki na nzela ya mosakoli na ye ete mokonzi “akokundama ndenge mpunda ya mobali ekundamaka. Akobendama mpe akobwakama libanda mosika na baporte ya Yerusaleme.” (Yir. 22:13-19) Okanisi ete Yirimia alekisaki ndelo ntango asakolaki likambo yango?
16. Yirimia asakolaki nsango nini ya kolendisa?
16 Atako Yirimia asakolaki nsango wana ya kosambisa, azalaki mosakoli ya makambo ya mabe te. Asakolaki mpe nsango ya elikya. Asakolaki ete Yehova akosikola batikali ya Yisraele na mabɔkɔ ya banguna na bango mpe akozongisa bango na mokili na bango epai bakofanda na kimya. Nzambe akosala na bato na ye kondimana ya “sika” mpe “kondimana oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te” mpe akokoma mobeko na ye na motema na bango. Akolimbisa mabunga na bango mpe akokanisa lisusu masumu na bango te. Lisusu, mokitani moko ya Davidi “akosala mpenza na bosembo mpe na boyengebene na mokili.” (Yir. 31:7-9; 32:37-41; 33:15) Bisakweli yango esengelaki kokokisama na bambula mpe basiɛklɛ oyo ekoya, mpe kokokisama na yango etaleli bomoi na biso mpe ekoki kopesa biso elikya mpe bomoi ya malamu na mikolo ekoya. Kasi na ntango ya mosakoli Yirimia, banguna ya Yuda bazalaki kaka kowelana mpo na boyangeli ya mokili ya ntango wana.—Tángá Yirimia 31:31, 33, 34; Baebre 8:7-9; 10:14-18.
BABILONE EZWI BOKONZI
17, 18. Makambo nini esalemaki na bikólo ya zingazinga na bambula ya nsuka ya boyangeli ya Yehoyakime mpe na boyangeli ya Zidikiya?
17 Na mobu 625 L.T.B., mampinga ya Babilone mpe ya Ezipito ebundaki bitumba moko makasi na Karakemishe, pene na ebale Efrate na 600 km na nɔrdi ya Yerusaleme. Mokonzi Nebukadenezare alongaki mampinga ya Farao Neko mpe na ndenge yango, asukisaki boyangeli ya Ezipito na mokili yango. (Yir. 46:2) Nebukadenezare abandaki sikoyo koyangela Yuda, mpe akómisaki Yehoyakime mosaleli na ye. Nzokande, nsima ya mbula misato, Yehoyakime, mokonzi oyo azalaki koyangela na nkombo ya Mokonzi Nebukadenezare, atombokaki. (2 Bak. 24:1, 2) Na yango, na mobu 618 L.T.B., Nebukadenezare ná mampinga na ye bakɔtaki na Yuda mpe bazingaki Yerusaleme. Kanisá naino mpasi oyo ezalaki na ntango yango. Mosakoli Yirimia akutanaki mpe na mpasi yango. Emonani ete Yehoyakime akufaki na ntango oyo mampinga ya Babilone ezingaki mboka.b Mwana na ye Yehoyakine ayangelaki Yuda kaka sanza misato, nsima na yango, amikabaki na mabɔkɔ ya bato ya Babilone. Nebukadenezare abɔtɔlaki biloko ya motuya oyo ezalaki na Yerusaleme mpe amemaki na mboka mopaya Yehoyakine, mabota ya mokonzi, bankumu ya Yuda, mibali ya nguya, mpe bato nyonso ya Yuda oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ. Danyele, Hanania, Mikaele, mpe Azaria bamemamaki mpe na Babilone.—2 Bak. 24:10-16; Dan. 1:1-7.
18 Na nsima, Nebukadenezare atyaki Zidikiya mokonzi na Yuda; azalaki mwana mosusu ya Mokonzi Yosiya. Zidikiya nde azalaki mokonzi ya nsuka na molɔngɔ ya bakitani ya Davidi. Boyangeli na ye esukaki ntango Yerusaleme ná tempelo na yango ebebisamaki na mobu 607 L.T.B. (2 Bak. 24:17) Nzokande, na Yuda, yikiyiki ezalaki mingi na makambo ya politiki mpe na makambo ya bomoi ya bato na boumeli ya mbula 11 ya boyangeli ya Zidikiya. Ntembe ezali te ete Yirimia asengelaki kotyela Moto oyo apesaki ye mokumba ya kosakola motema mpenza.
19. Bato ya ntango ya Yirimia balobaki nini ntango bayokaki nsango oyo asakwelaki bango, mpe mpo na nini tosengeli kotyela likambo yango likebi?
19 Meká naino komitya na esika ya Yirimia. Banda na ntango ya Yosiya, Yirimia amonaki ndenge yikiyiki makasi ekɔtaki na makambo ya politiki mpe ndenge oyo makambo ya losambo ya libota ya Nzambe ezalaki kobeba mpenza. Nzokande ayebaki ete makambo ekobeba lisusu koleka. Bato ya engumba na ye balobaki na ye boye: “Osengeli kosakola na nkombo ya Yehova te, noki okufa na lobɔkɔ na biso.” (Yir. 11:21) Ata ntango bisakweli ya Yirimia ekokisamaki, Bayuda balobaki: “Mpo na liloba oyo olobeli biso na nkombo ya Yehova, tokoyoka yo te.” (Yir. 44:16) Nzokande, bomoi ya bato yango ezalaki na likama, ezali mpe bongo mpo na bato ya ntango na biso. Nsango oyo Yirimia asakolaki eutaki epai ya Yehova, ezali mpe bongo mpo na nsango ozali kosakola. Na yango, okoki kobakisa milende na yo na mosala ya kosakola soki otaleli ndenge oyo Yehova abatelaki mosakoli Yirimia na eleko oyo ezalaki liboso Yerusaleme ebebisama.
Ezaleli oyo Yirimia amonisaki na ntango oyo Yehoyakime azalaki mokonzi ezali koteya biso nini? Esakweli nini ya monene Yirimia asakolaki oyo ezali kokokisama tii na ntango na biso?
MIKOLO YA NSUKA YA BOYANGELI YA LIBOTA YA BAKONZI
20. Mpo na nini ntango Zidikiya azalaki mokonzi, ezalaki eleko moko ya mpasi mpo na Yirimia? (Talá etanda na lokasa 29.)
20 Mbala mosusu bambula ya mpasi koleka mpo na Yirimia na mosala na ye ezalaki na boyangeli ya Zidikiya. Lokola bakonzi mingi oyo bayangelaki liboso na ye, Zidikiya “akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova.” (Yir. 52:1, 2) Bato ya Babilone nde bazalaki kokonza ye, mpe Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, alapisaki ye ndai na nkombo ya Yehova ete asengeli kotosa ye. Atako bongo, nsukansuka Zidikiya atombokelaki mokonzi ya Babilone. Na ntango wana, banguna ya Yirimia batyaki ye mbamba makasi akɔta na botomboki na bango.—2 Nt. 36:13; Ezk. 17:12, 13.
21-23. (a) Bituluku nini ezalaki kowelana na Yuda ntango Zidikiya azalaki koyangela? (b) Bankumu basalaki Yirimia nini mpo na nsango oyo asakolaki, mpe mpo na nini yango esengeli kobenda likebi na biso?
21 Emonani ete na ebandeli ya boyangeli ya Zidikiya, bakonzi ya Edome, Moabe, Amone, Tire, ná Sidone batindaki bamemi-sango na Yerusaleme. Mbala mosusu mokano na bango ezalaki ete Zidikiya asangana na bango mpo na kobundisa Nebukadenezare. Kasi Yirimia asɛngaki Zidikiya atosa mokonzi ya Babilone. Kutu, apesaki bamemi-nsango yango bikanganeli mpo na komonisa ete bikólo na bango mpe basengeli kosalela mokonzi ya Babilone. (Yir. 27:1-3, 14)c Bato ya Yuda basepelaki te na likambo oyo Yirimia asalaki, mpe Hanania abakiselaki ye lisusu mpasi koleka. Azalaki mosakoli ya lokuta oyo azalaki koloba na bato na nkombo ya Nzambe ete ekanganeli ya Babilone ekobukana. Nzokande, Yehova alobaki na nzela ya Yirimia ete kaka na mbula wana, Hanania, mosakoli yango ya lokuta akokufa. Mpe yango nde esalemaki.—Yir. 28:1-3, 16, 17.
22 Na ntango yango Yuda ekabwanaki na bituluku mibale: bamosusu bandimaki kotosa mokonzi ya Babilone kasi bamosusu bazalaki kotinda bato bátombokela ye. Na mobu 609 L.T.B., Zidikiya atombokelaki Babilone na ndenge alukaki lisalisi ya mampinga ya Ezipito. Na ntango yango, Yirimia asengelaki koyika mpiko mpo bana-mboka oyo bazalaki kobundela ekólo na bango bazalaki na nkanda makasi. (Yir. 52:3; Ezk. 17:15) Nebukadenezare ná mampinga na ye bazongaki na Yuda mpo na kosukisa botomboki yango, balongaki bingumba nyonso ya Yuda mpe bazingaki lisusu Yerusaleme. Na ntango yango ya mpasi, Yirimia alobaki na Zidikiya ná bato na ye ete Yerusaleme ekokwea na mabɔkɔ ya Babilone. Baoyo bakotikala na engumba bakokufa kasi baoyo bakobima mpe bakoleka epai ya Bakaladea bakobika.—Tángá Yirimia 21:8-10; 52:4.
23 Bankumu ya Yuda balobaki ete Yirimia azali kotɛka mboka mpe azali na ngámbo ya Babilone. Ntango ayebisaki bankumu ete ezali bongo te, babɛtaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ. (Yir. 37:13-15) Atako bongo, Yirimia abongolaki nsango ya Yehova te. Na yango, bankumu batyaki Zidikiya mbamba ete aboma Yirimia. Babwakaki Yirimia na libulu ya kobomba mai oyo ezalaki na mai te mpo azinda na pɔtɔpɔtɔ mpe akufa. Kasi Ebede-meleke, moto ya Etiopi oyo azalaki kosala na ndako ya mokonzi, abikisaki Yirimia. (Yir. 38:4-13) Lelo oyo mpe, mbala mingi basaleli ya Yehova bakutanaka na mikakatano mpo baboyaka kokɔta na kowelana ya makambo ya politiki. Ntembe ezali te ete makambo oyo Yirimia akutanaki na yango ekoki kolendisa yo mpe kosalisa yo olonga mikakatano oyo ozali kokutana na yango.
24. Lobelá makambo oyo esalemaki na mobu 607 L.T.B.
24 Nsukansuka na mobu 607 L.T.B., bato ya Babilone babukaki bifelo ya Yerusaleme mpe engumba ekweaki na mabɔkɔ na bango. Basoda ya Nebukadenezare batumbaki tempelo ya Yehova, babukaki bifelo ya engumba, mpe babomaki bato ya lokumu ya Yuda. Zidikiya alukaki kokima kasi bakangaki ye mpe bamemaki ye liboso ya mokonzi ya Babilone. Nebukadenezare abomaki bana ya Zidikiya na miso na ye, mpe na nsima abomaki ye miso, akangaki ye na bikanganeli, mpe amemaki ye na Babilone. (Yir. 39:1-7) Ya solo, makambo oyo mosakoli Yirimia alobaki mpo na Yuda mpe Yerusaleme ekokisamaki. Kasi na esika mosakoli yango asepela mpo na mpasi ya bato ya ekólo na ye, alelaki mingi. Mokanda ya Bileli emonisi mpasi oyo ayokaki, mpe soki totángi mokanda yango, ekosimba mpenza mitema na biso.
MOSAKOLI NA KATI YA BATO YA YUDA OYO BATIKALAKI
25, 26. (a) Makambo nini esalemaki nsima ya kobebisama ya Yerusaleme? (b) Bato ya ntango ya Yirimia basalaki nini ntango bayokaki makambo oyo Yirimia asakwelaki bango nsima ya kobebisama ya Yerusaleme?
25 Yirimia azalaki wapi ntango makambo yango ezalaki kosalema? Bankumu ya Yerusaleme bakangaki ye, kasi bato ya Babilone bamoniselaki ye boboto, mpe babimisaki ye. Na nsima, batyaki Yirimia na molɔngɔ ya bato oyo basengelaki kokende na boombo, kasi batikaki ye. Nzokande mosala ya Yirimia esilaki naino te mpo asengelaki kosakwela bato ya Yuda oyo batikalaki. Nebukadenezare atyaki Gedalia guvɛrnɛrɛ ya Yuda, mpe alakaki Bayuda oyo batikalaki ete bakofanda na kimya soki basaleli ye, mokonzi ya Babilone. Kasi Bayuda mosusu oyo basepelaki te babomaki Gedalia. (Yir. 39:13, 14; 40:1-7; 41:2) Yirimia alendisaki bato oyo batikalaki na Yuda ete báfanda kaka na mokili na bango mpe bábanga mokonzi ya Babilone te. Kasi bakambi na bango balobaki ete Yirimia azali mokosi mpe bakimaki na Ezipito, bamemaki mpe Yirimia ná Baruke kuna na makasi. Kasi Yirimia asakolaki ete Nebukadenezare akokɔta mpe na Ezipito, akokonza yango, mpe akoyeisela Bayuda oyo bakimi kuna mpasi.—Yir. 42:9-11; 43:1-11; 44:11-13.
26 Na mbala oyo mpe, Bayuda baboyaki koyokela Yirimia oyo azalaki mosakoli ya solo ya Nzambe. Mpo na nini? Balobaki boye: “Banda totiki kobimisela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ milinga ya mbeka mpe kosopela ye makabo ya masanga, tozangi eloko nyonso, mpe tosili na mopanga mpe na nzala.” (Yir. 44:16, 18) Yango emonisi ete bato ya ntango ya Yirimia bakómaki na makanisi mabe mpenza! Kasi, lisolo yango ekoki mpe kolendisa biso mpo emonisi ete moto ya kozanga kokoka akoki kotikala sembo epai ya Yehova ata soki afandi na bato oyo bazali sembo te!
27. Makambo nini toyebi mpo na Yirimia na bambula ya nsuka ya mosala na ye?
27 Likambo ya nsuka oyo Yirimia alobeli, elingi koloba ndenge Evile-merodake, oyo akómaki mokonzi nsima ya Nebukadenezare, abimisaki Yehoyakine na bolɔkɔ, esalemaki na 580 L.T.B. (Yir. 52:31-34) Na ntango wana, mbala mosusu Yirimia azalaki na mbula soki 90. Toyebi malamu te ndenge oyo bomoi na ye esukaki. Ekoki kozala ete alekisaki bambula na ye ya nsuka na Ezipito, epai atikalaki sembo tii liwa na ye, nsima ya kosalela Yehova mosala ya ntina mingi na boumeli ya bambula soki 67. Asalelaki Yehova na bambula oyo makambo ya losambo ya solo ezalaki kotambola malamu mpe na boumeli ya bambula mingi oyo ebele ya Bayuda bamipesaki na losambo ya lokuta. Bato mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe bayokelaki ye. Nzokande, bato mingi bayokelaki ye te; kutu, batɛmɛlaki ye makasi. Yango elingi nde koloba ete Yirimia akokisaki mokumba na ye malamu te? Te! Banda na ebandeli Yehova ayebisaki ye ete: “Bakobunda na yo mpenza kasi bakolonga yo te, mpo ‘nazali elongo na yo.’” (Yir. 1:19) Lelo oyo, mosala na biso ekokani na oyo ya Yirimia. Na yango, tókamwa te soki basusu bandimi nsango na biso mpe basusu baboyi yango. (Tángá Matai 10:16-22.) Sikoyo, mateya nini tokoki kozwa na makambo oyo Yirimia akutanaki na yango, mpe ndenge nini tosengeli kotalela mosala na biso? Tiká tótalela mituna yango.
Nini ekómelaki Zidikiya ná bato na ye oyo baboyaki koyokela Yirimia? Sikoyo ndenge nini ozali komona Yirimia?
a Boyokani oyo ezali kati ya vɛrsɛ ya Yirimia 7:1-15 ná 26:1-6 etindaka bato mosusu bákanisa ete bavɛrsɛ yango mibale elobeli kaka likambo moko.
b Danyele 1:1, 2 elobi ete Nzambe akabaki Yehoyakime na lobɔkɔ ya Nebukadenezare na mbula ya misato ya boyangeli na ye; emonani ete ezalaki na mbula ya misato ya boyangeli na ye lokola mokonzi oyo azali koyangela na nkombo ya Nebukadenezare. Ekoki kozala ete mokonzi akufaki na ntango oyo Yerusaleme ezingamaki, mpe nsukansuka Yerusaleme ekweaki na mabɔkɔ ya Nebukadenezare. Vɛrsɛ moko te ya Biblia emonisi ete Nebukadenezare abomaki Yehoyakime, ete abwakaki ebembe na ye na libanda ya bifelo ya Yerusaleme mpe bakundaki ye te, ndenge Josèphe, moto ya istware, alobaki yango.—Yir. 22:18, 19; 36:30.
c Ekoki kozala ete mokomeli nde asalaki libunga ntango alobeli Yehoyakime na Yirimia 27:1, mpamba te bavɛrsɛ 3 ná 12 elobeli nde Zidikiya.