Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jr mok. 15 nk. 182-192
  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”
  • Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOBÁ KOSAKOLA ATA SOKI BATO BAZALI KOSEPELA TE
  • BATƐMƐLI BAKOKI KOSALA BISO MABE KASI BAKOLONGA TE
  • “KOBANGA TE”
  • MALOBA OYO EKOMAMAKI MPO NA YO
  • “Osengeli koloba na bango liloba oyo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Okopona baninga ya lolenge nini?
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Nakosilisa mposa ya molimo oyo elɛmbi”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
jr mok. 15 nk. 182-192

MOKAPO YA ZOMI NA MITANO

“Nakoki kofanda nyɛɛ te”

1. Mpo na nini Yirimia mpe basakoli mosusu bakangaki monɔkɔ te?

“YOKÁ liloba ya Yehova.” Maloba yango ya kolendisa eyokanaki mingi na babalabala mpe bisika minene ya bato mingi na Yerusaleme kobanda na mobu 647 L.T.B. Mpe Yirimia, mosakoli ya Nzambe, afandaki nyɛɛ te. Ata ntango engumba ya Yerusaleme ebebisamaki mbula 40 na nsima, Yirimia azongelaki maloba yango ya kolendisa. (Yir. 2:4; 42:15) Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azalaki kotinda basakoli mpo alingaki ete Bayuda báyoka toli na Ye mpe bábongola motema. Ndenge tomonaki yango liboso na buku oyo, Yirimia azalaki molobeli ya Nzambe oyo akesanaki mingi na basakoli mosusu. Ntango Nzambe apesaki Yirimia mokumba ya kosakola, ayebisaki ye ete: “Osengeli kotɛlɛma mpe koloba na bango makambo nyonso oyo nazali kopesa yo mitindo. Kolɛnga na nsɔmɔ te mpo na bango.” (Yir. 1:17) Mokumba yango ezalaki pɛtɛɛ te. Atako Yirimia anyokwamaki na nzoto mpe na makanisi, amonaki ete asengeli kaka kokokisa mokumba na ye. Yango wana alobaki ete: “Motema na ngai ezali na yikiyiki na kati na ngai. Nakoki kofanda nyɛɛ te.”​—Yir. 4:19.

2, 3. (a) Ndenge nini bayekoli ya Yesu balandaki ndakisa ya Yirimia? (b) Mpo na nini osengeli kolanda ndakisa ya Yirimia?

2 Lolenge oyo mosakoli Yirimia akokisaki mokumba na ye esengelaki kozala ndakisa mpo na basaleli mosusu ya Yehova. (Yak. 5:10) Mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bakonzi ya Bayuda bakangaki ntoma Petro ná ntoma Yoane, mpe bapekisaki bango kosakola. Na ntembe te oyebi eyano oyo bapesaki; balobaki boye: “Tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Mis. 4:19, 20) Nsima ya kobangisa bango ete soki batiki te kosakola bakonyokola bango makasi koleka, bakonzi yango batikaki Petro ná Yoane bákende. Oyebi malamu likambo oyo basalaki. Mibali yango ya sembo batikaki te, bakobaki kaka kosakola.

3 Maloba ya Petro ná Yoane oyo ezali na Misala 4:20 emonisi ete bazalaki na molende lokola oyo ya Yirimia, boye te? Lokola ozali mosaleli ya Yehova Nzambe na mikolo oyo ya nsuka, na ntembe te yo mpe ozwi ekateli lokola bango ete ‘okofanda nyɛɛ te!’ Tiká tómona sikoyo ndenge nini tokoki kozala ntango nyonso na molende lokola Yirimia mpe kokoba kosakola nsango malamu ata soki makambo ezali se kobeba.

KOBÁ KOSAKOLA ATA SOKI BATO BAZALI KOSEPELA TE

4. Ndenge nini bato mingi na Yerusaleme bazalaki kotalela nsango oyo bazalaki kosakwela bango?

4 Na ntembe te ondimaka ete elaka oyo Nzambe apesi ete ntango Mwana na ye akoyangela bomoi ekozala malamu, ezali nsango ya malamu koleka oyo bato basengeli koyoka, boye te? Kasi lelo oyo, bato mingi bazali lokola Bayuda ya ntango ya Yirimia oyo bazalaki koloba ete: “Mpo na liloba oyo olobeli biso na nkombo ya Yehova, tokoyoka yo te.” (Yir. 29:19; 44:16) Mbala mingi Yirimia ayokaki bato bazali koloba bongo. Ezali mpe bongo mpo na basaleli ya Yehova lelo oyo, mpamba te bato mingi balobaka ete, “Nasepelaka na yango te.” Soki bato mingi bazali kosepela na nsango malamu te, yango ekoki kolɛmbisa molende ya basakoli ya Bokonzi. Na yango, okosala nini soki bandeko mosusu na lisangá na bino to yo moko bokutani na bato ya ndenge wana na teritware na bino?

5. (a) Atako bato bazalaki kosepela na liloba ya Nzambe te, Yirimia amonisaki ezaleli nini? (b) Mpo na nini bato oyo basepelaka na nsango malamu te bazali na likama monene?

5 Tótalela naino makanisi oyo Yirimia azalaki na yango ntango bato mingi ya Yuda bazalaki kosepela na nsango na ye te. Ntango Yirimia abandaki mosala na ye, Yehova amonisaki ye liboso bitumbu oyo akokweisela bato ya Yuda. (Tángá Yirimia 4:23-26.) Na yango, Yirimia asosolaki ete bomoi ya bato mingi ya Yuda ezalaki na likama mpe ete mpo bato bábika, basengelaki koyoka mpe kotosa makambo oyo azalaki kosakwela bango. Lelo oyo mpe, bomoi ya bato, ata mpe oyo ya bato ya teritware na bino, ezali na likama. Mpo na “mokolo yango” oyo bitumbu ya Nzambe ekokwela mokili mabe ya lelo, Yesu alobaki ete: “Yango ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mabele mobimba. Yango wana, bólala mpɔngi te, bópesa malɔmbɔ ntango nyonso mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.” (Luka 21:34-36) Maloba yango ya Yesu emonisi polele ete baoyo bazali koboya nsango malamu bazali na likama monene.

MOTO AKOKI KOBONGOLA MAKANISI NA YE

Mwasi moko oyo afandaka na Nouvelle-Zélande alobaki ete liboso azalaki koboya koyoka Batatoli, kasi sikoyo akómi kosepela na nsango na bango. Mokolo moko akendaki na molulu ya kokunda ebembe ya mwasi moko oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Mobali na ye azalaki kosala elongo na mobali ya ndeko-mwasi yango oyo akufaki. Mwasi yango amonaki ete bato mingi oyo bazalaki wana basololaki na mobali ya mwasi oyo akufaki mpe babɔndisaki ye. Lisusu, alobaki ete akangaki mpenza ntina ya diskur oyo elimbolaki elikya na biso ya lisekwa oyo euti na Biblia.

Mwasi yango alobaki ete apesaka formasyo na minganga-basi oyo basalisaka bato ya maladi oyo bakómi pene na liwa. Na nsima ya molulu yango, alendisaki minganga-basi yango ete bákendaka na milulu ya kokunda ebembe oyo Batatoli ya Yehova basalaka. Mpo na nini? Alobaki na Batatoli oyo bayaki kotala ye ete ayebisaki minganga oyo apesaka formasyo ete Batatoli balimbolaka malamu ndenge oyo bakufi bazalaka, mpe bapesaka bato elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. Amonaki ete minganga yango bakoki kosalela makanisi yango mpo na kobɔndisa bato ya maladi oyo bazali kosalisa.

Ya solo, ata soki liboso moto azalaki kosepela na nsango malamu te, yango elingi koloba te ete Yehova akoki te ‘kopesa [moto yango] motema moko mpo ayeba ye.’ (Yir. 24:7) Ɛɛ, bato mosusu ya teritware na bino oyo bazalaki liboso kosepela na nsango malamu te bakoki mbala mosusu kobongola makanisi na bango.

Elilingi na lokasa 184

6. Mpo na nini osengeli kokoba kosakwela bato, ata baoyo basepelaka mingi te na nsango malamu?

6 Nzokande, baoyo bazalaki liboso kosepela na nsango malamu te kasi bakómi sikoyo kosepela na maloba ya Yehova oyo tozali kosakwela bango bakozwa matomba ebele mpenza. Nzambe azali kopesa biso libaku ya kobika na likama yango oyo ezali liboso mpe kokɔta na mokili ya sika. Tokoki koloba ete ezalaki mpe bongo ntango Yirimia azalaki kokokisa mosala na ye. Nzambe apesaki bafandi ya Yuda libaku ya kobika na likama oyo ezalaki liboso na bango. (Tángá Yirimia 26:2, 3.) Mpo na kosalisa bato yango, na boumeli ya bambula mingi Yirimia azalaki kolendisa bango ete ‘báyoka mpe bázonga,’ elingi koloba bátosa liloba ya Nzambe ya solo. Toyebi te soki bato boni babongolaki motema mpe babongwanaki ntango Yirimia asakwelaki bango. Kasi bato mosusu basalaki bongo, mpe bato mingi bazali kosala bongo na mikolo na biso. Lokola tozali kotika te kosakola nsango malamu, mbala mingi toyokaka masolo ya bato oyo kala bazalaki kosepela na nsango malamu te kasi bakómi sikoyo kosepela na yango. (Talá etanda “Moto akoki kobongola makanisi na ye,” na lokasa 184.) Yango ezali ntina mosusu oyo esengeli kotinda biso tótika te kosakola na molende nsango malamu oyo ezali kobikisa bomoi ya bato, boye te?

Mpo na nini ozwi ekateli ya kokoba kosakola nsango malamu ata soki bato bazali kosepela na nsango yango te?

BATƐMƐLI BAKOKI KOSALA BISO MABE KASI BAKOLONGA TE

7. Ndenge nini banguna ya Yirimia balukaki kobebisa mosala na ye ya kosakola?

7 Likambo mosusu oyo ezali kobenda likebi na oyo etali mosala ya Yirimia ezali ndenge oyo mbala mingi batɛmɛli na ye balukaki koboma ye mpe kobebisa mosala na ye. Basakoli ya lokuta bazalaki kotɛmɛla maloba na ye na miso ya bato nyonso. (Yir. 14:13-16) Ntango Yirimia azalaki koleka na babalabala ya Yerusaleme, bato bazalaki kowolola ye, kotyola ye mpe kofinga ye. (Yir. 15:10) Banguna na ye mosusu basalelaki myango ya ndenge na ndenge mpo na kobebisa lokumu na ye. (Yir. 18:18) Basusu bazalaki kotambwisa nsango ya lokuta mpo bato ya mitema sembo báboya koyoka mateya ya solo oyo Yirimia azalaki kosakwela bango. (Bil. 3:61, 62) Yirimia akangaki monɔkɔ? Te, akobaki na mosala na ye ya kosakola. Nini esalisaki ye?

8. Wana batɛmɛli na ye bazalaki koluka kolɛmbisa ye, Yirimia amonisaki bizaleli nini?

8 Likambo ya libosoliboso oyo esalisaki Yirimia alonga botɛmɛli nyonso oyo akutanaki na yango ezali ete atyelaki Yehova motema. Ntango Yirimia abandaki mosala na ye, Nzambe ayebisaki ye ete akosunga ye mpe akobatela ye. (Tángá Yirimia 1:18, 19.) Yirimia atyelaki elaka yango motema, mpe Yehova atikaki ye te. Wana batɛmɛli na ye bazalaki kotya ye mpanzi likoló mpe konyokola ye makasi koleka, ezaleli ya Yirimia ya koyika mpiko, ya kozanga kobanga mpe ya kolendendela ekómaki makasi koleka. Tótalela sikoyo ndenge nini bizaleli yango esalisaki ye mpenza.

9, 10. Makambo nini oyo Yirimia akutanaki na yango ekoki kosalisa yo ozala na mpiko?

9 Mokolo mosusu, banganga-nzambe mpe basakoli oyo batombokelaki Nzambe bakangaki Yirimia mpe bamemaki ye epai ya bankumu ya Yuda mpo báboma ye. Makaneli na bango ebangisaki nde Yirimia mpe etindaki ye atika kosakola? Te. Eyano na ye ekweisaki mpenza bifundeli ya bapɛngwi yango; yango wana bankumu babikisaki ye.​—Tángá Yirimia 26:11-16; Luka 21:12-15.

10 Kobosana te ete ntango Pashure, oyo azalaki kapita na tempelo, ayokaki nsango ya bitumbu ya Nzambe oyo Yirimia azalaki kosakola, atyaki Yirimia na bikanganeli ya nzete. Pashure akanisaki mbala mosusu ete lokola apesi Yirimia etumbu, yango ekoteya ye mpe akofanda nyɛɛ. Na yango mokolo oyo elandi, Pashure atikaki ye akende. Kasi atako azalaki naino koyoka mpasi mpo na ndenge oyo banyokolaki ye, Yirimia alobelaki Pashure polele mpe ayebisaki ye etumbu oyo Nzambe akopesa ye. Ɛɛ, atako anyokwamaki, Yirimia akangaki monɔkɔ te! (Yir. 20:1-6) Mpo na nini? Yirimia ye moko alobi: “Yehova azalaki elongo na ngai lokola elombe moko ya nsɔmɔ. Yango wana baoyo bazali konyokola ngai bakobɛta libaku mpe bakolonga te.” (Yir. 20:11) Ata ntango Yirimia akutanaki na botɛmɛli makasi, abangaki te mpo kondima na ye epai ya Yehova ezalaki makasi. Yo mpe okoki kozala na kondima ya ndenge wana.

11, 12. (a) Ndenge nini Yirimia amonisaki bososoli ntango Hanania atɛmɛlaki ye? (b) ‘Komipekisa ntango basali biso mabe’ ekoki kobimisa matomba nini?

11 Tosengeli mpe koyeba ete atako Yirimia azalaki na molende, azalaki mpe na bokɛngi. Liboso ya batɛmɛli na ye, ayebaki kosalela bososoli mpe ayebaki ntango nini kobenda nzoto. Tózwa ndakisa ya likambo na ye ná Hanania. Ntango mosakoli yango ya lokuta atɛmɛlaki liloba ya esakweli ya Yehova na miso ya bato nyonso, Yirimia asembolaki ye mpe amonisaki ndenge bakoki koyeba mosakoli ya solo. Na ntango yango Yirimia amemaki ekanganeli ya nzete na nkingo mpo na komonisa ndenge oyo Babilone ekokonza Bayuda. Hanania asilikaki makasi mpe abukaki ekanganeli yango. Eyebani te soki Hanania alingaki kosala Yirimia nini na nsima. Na yango, Yirimia asalaki nini? Biblia elobi ete: “Mosakoli Yirimia asimbaki nzela akei.” Ɛɛ, Yirimia abendanaki mpe akendaki na ye. Na nsima, ntango Yehova atindaki ye, Yirimia azongaki mpe ayebisaki Hanania oyo Nzambe akosala mosika te; alobaki ete Bayuda bakokóma baombo ya mokonzi ya Babilone mpe ete Hanania akokufa.​—Yir. 28:1-17.

12 Lisolo yango ya Biblia emonisi ete na mosala ya kosakola, longola molende tosengeli mpe kozala na bososoli. Soki moto moko aboyi kondima mateya ya Biblia mpe asilikeli biso, to mbala mosusu alingi kosala biso mabe, tosengeli kosɛnga bolimbisi na limemya mpe kokende na ndako mosusu. Ntina ya kowelana na moto mpo na nsango malamu ya Bokonzi ezali te. Soki tozali ‘komipekisa ntango basali biso mabe,’ tokoki kopesa nzela ete mokolo mosusu moto yango andima koyoka nsango malamu.​—Tángá 2 Timote 2:23-25; Mas. 17:14.

Elilingi na lokasa 187

Mpo na nini kotyela Yehova motema ezali na ntina mingi ntango tozali kosakola nsango malamu? Longola kozala na mpiko, mpo na nini tosengeli mpe kozala na bososoli?

“KOBANGA TE”

13. Mpo na nini Yehova ayebisaki Yirimia ete: “Kobanga te,” mpe liteya nini tokoki kozwa na maloba yango?

13 Basaleli ya solo ya Nzambe bamonaki mpe mpasi mpo na makambo ya nsɔmɔ mpenza oyo ezalaki kosalema na Yerusaleme liboso ebebisama na mobu 607 L.T.B. Tomoni sikoyo mpo na nini Nzambe ayebisaki Yirimia ete: “Kobanga te.” (Yir. 1:8; Bil. 3:57) Mpe Yehova atindaki Yirimia ayebisa bato na ye mosusu maloba yango mpo na kolendisa bango. (Tángá Yirimia 46:27.) Likambo yango ekoki koteya biso nini? Na mikolo ya nsuka oyo etondi na makambo mabe, makambo mosusu ekoki kobangisa biso. Yango wana, tosengeli koyokela Yehova oyo azalaki koyebisa biso ete: “Kobanga te,” boye te? Na ebandeli ya buku oyo, tomonaki ete Nzambe asungaki Yirimia na ntango wana oyo makambo ya nsɔmɔ ezalaki kosalema. Tiká tótalela na mokuse ndenge makambo esalemaki na ntango wana mpo tómona liteya oyo tokoki kozwa.

14, 15. (a) Yirimia akutanaki na likama nini? (b) Ndenge nini Yehova akokisaki elaka na ye ya kobatela Yirimia?

14 Ntango bato ya Babilone bazalaki se konyonga Yerusaleme, nzala ekɔtaki na engumba mpe bato mingi bazangaki biloko ya kolya. (Yir. 37:21) Longola kozanga biloko ya kolya, Yirimia akangamaki na esika moko oyo akokaki kokufa. Bankumu ya Yuda bayaki epai ya Mokonzi Zidikiya, oyo azalaki bindimandima, mpe batyaki ye mbamba ete aboma Yirimia. Na yango, babwakaki Yirimia na kati ya libulu moko ya mai oyo ezalaki mozindo. Kasi mai ezalaki na kati ya libulu yango te, kaka pɔtɔpɔtɔ ebele. Ntango Yirimia abandaki kozinda na pɔtɔpɔtɔ, amonaki ete mpo na ye esili. Soki okutani na likambo ya ndenge wana, na ntembe te yo mpe okobanga.​—Yir. 38:4-6.

15 Atako Yirimia azalaki moto lokola biso, atyaki motema na elaka oyo Yehova apesaki ye ete akosundola ye ata moke te. (Tángá Yirimia 15:20, 21.) Kondima na ye epai ya Yehova ezwaki lifuti? Ndenge toyebi yango, Yehova abikisaki ye. Nzambe atindaki Ebede-meleke akweisa mokano ya bankumu mpe abikisa Yirimia. Mokonzi apesaki Ebede-meleke nzela ete abimisa Yirimia na libulu ya pɔtɔpɔtɔ, mpe na ndenge yango abikisaki ye na liwa.​—Yir. 38:7-13.

16. Yehova abatelaki basaleli na ye ya sembo na makama nini?

16 Ata ntango babimisaki Yirimia na libulu yango, likama ezalaki kaka. Ebede-meleke abondelaki mokonzi mpo na Yirimia mpe ayebisaki mokonzi yango ete: “[Yirimia] akokufa na nzala na esika oyo azali. Mpo mampa ezali lisusu te na engumba.” (Yir. 38:9) Lokola biloko ya kolya ezalaki lisusu te, bato bakómaki kolya misuni ya bato. Kasi Yehova abikisaki lisusu mosakoli na ye. Na nsima Yirimia ayebisaki Ebede-meleke ete Yehova alaki ete akobatela ye. (Yir. 39:16-18) Yirimia abosanaki te maloba ya kolendisa oyo Yehova ayebisaki ye ete: “Nazali elongo na yo mpo na kobikisa yo.” (Yir. 1:8) Lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azalaki kobatela mibali yango mibale ya sembo, ezala banguna to nzala ekokaki koboma bango te. Babikaki na liwa na kati ya engumba yango oyo esengelaki kobebisama. Yango eteyi biso nini? Yehova alakaki ete akobatela basaleli na ye mpe akokisaki elaka na ye.​—Yir. 40:1-4.

17. Mpo na nini osengeli kondima mpenza ete Yehova akokokisa elaka na ye ya kobatela basaleli na ye?

17 Kokokisama ya esakweli ya Yesu oyo etali bosukisi ya makambo ya ntango oyo ezali kokende mpenza na nsuka na yango. Mosika te, “bilembo ekozala na moi mpe na sanza mpe na minzoto, mpe awa na mabele bikólo bakozala na nsɔmɔ, bakoyeba te ndenge ya kosala . . . na ntango yango, bato bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi.” (Luka 21:25, 26) Tosengeli kozela mpo tómona soki bilembo yango ekozala ya ndenge nini mpe nsɔmɔ oyo bato mingi bakoyoka ntango makambo yango ekosalema. Kasi, ezala makambo yango ekokokisama ndenge nini, tosengeli kondima mpenza ete Yehova azali na nguya mpe na mposa ya kobikisa bato na ye. Nzokande, akosala bongo te mpo na baoyo bandimami na ye te. (Tángá Yirimia 8:20; 14:9.) Ata soki basaleli ya Nzambe bakutani na mikakatano makasi lokola nde bazali na kati ya libulu moko ya mai oyo ezali mozindo mpe emonani ete elikya ezali lisusu te, Nzambe akobikisa bango! Maloba oyo Nzambe ayebisaki Ebede-Meleke ekokokisama mpe mpo na basaleli ya Nzambe. Nzambe alobaki na ye ete: “‘Nakobikisa yo mpenza, mpe okokwea na mopanga te; mpe okozwa mpenza molimo na yo lokola eloko oyo epunzami, mpo otyeli ngai motema,’ yango nde liloba ya Yehova.”​—Yir. 39:18.

Elilingi na lokasa 190

MALOBA OYO EKOMAMAKI MPO NA YO

18. (a) Maloba nini ebongolaki bomoi ya Yirimia? (b) Etinda ya Nzambe oyo ezali na Yirimia 1:7 elimboli nini mpo na yo?

18 Yehova alobaki na Yirimia ete: “Okokende epai ya baoyo nyonso nakotinda yo; mpe okoloba likambo nyonso oyo nakopesa yo mitindo.” (Yir. 1:7) Etinda yango oyo Nzambe apesaki Yirimia ebongolaki bomoi na ye mpo na libela. Kobanda na ntango wana, mposa na ye ya libosoliboso ekómaki ya kosakola “liloba ya Yehova.” Maloba yango ezongelami mbala mingi na mokanda ya Yirimia. Na mokapo ya nsuka, Yirimia alobeli ndenge oyo Yerusaleme ekweaki na mabɔkɔ ya bato ya Babilone mpe ndenge oyo Zidikiya, oyo azalaki mokonzi ya nsuka, amemamaki na boombo. Ya solo, Yirimia akobaki koteya mpe kolendisa bato ya Yuda ete bátosa Yehova tii emonanaki polele ete asilisi mosala na ye.

19, 20. (a) Mpo na nini mosala ya Yirimia ekoki kozala ndakisa mpo na yo? (b) Mpo na nini mosala ya kosakola ekoki kosalisa yo ozala na esengo mpe omiyoka ete okokisi likambo moko ya ntina na bomoi na yo? (c) Ndenge nini kotalela mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli esalisi yo?

19 Na makambo mingi, mosala ya Yirimia ekokani na mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala lelo oyo. Lokola Yirimia, ozali kosalela Nzambe ya solo na ntango moko ya lisambisi. Misala na yo mosusu esɛngaka yo ntango mpe makasi; ata bongo, osengeli koyeba ete kosakola nsango malamu ezali mosala ya ntina koleka oyo okoki kosala na mokili oyo. Ntango ozali kosakola, ozali kokumisa nkombo monene ya Nzambe mpe ozali komonisa ete ondimi lotomo mpe nguya oyo azali na yango ya kozala Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Tángá Bileli 5:19.) Ozali mpe komonisa ete ozali na bolingo mingi mpo na bato ntango ozali kosalisa basusu báyeba Nzambe ya solo mpe makambo oyo azali kosɛnga.​—Yir. 25:3-6.

20 Mpo na mosala oyo Yehova apesaki ye, Yirimia alobaki ete: “Maloba na yo ezwamaki, mpe nalyaki yango; mpe liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai; mpo ngai nabengami na nkombo na yo, Ee Yehova Nzambe ya mampinga.” (Yir. 15:16) Bato nyonso oyo mitema na bango etindaka bango báloba mpo na Nzambe ya solo bakoki mpe kozwa esengo ya ndenge wana mpe komiyoka ete bakokisi likambo moko ya ntina na bomoi na bango. Yango wana, osengeli mpenza kokoba kosakola nsango ya Yehova, ndenge Yirimia asalaki.

Ndenge nini ndakisa ya Yirimia mpe ya Ebede-meleke ekoki kosalisa yo ozala na mpiko? Ezaleli nini ya Yirimia olingi komekola ntango ozali kosakola?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto