Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rk eteni 1 lok. 3
  • Nzambe akipaka biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe akipaka biso?
  • Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Masolo mosusu
  • “Ngai nakobosana yo te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Kondima ya solosolo ezali nini?
    Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Kobotama ya mwana ekɔtisaka mbongwana na libala
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Minzoto emonisaka nguya ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
rk eteni 1 lok. 3

ETENI 1

Nzambe akipaka biso?

MOKILI ya lelo etondi na mikakatano. Bitumba, makama oyo eutaka na mipɛpɛ makasi to koningana ya mabele, maladi, bobola, kozanga bosembo, mpe makambo mosusu ya mabe ezali konyokola bamilio ya bato. Mbala mosusu, yo mpe ozali na makambo oyo ezali kotungisa yo mokolo na mokolo. Nani akoki kosalisa biso? Ezali nde na moto oyo akipaka biso?

Mama moko amemi mwana na ye

Bolingo oyo Nzambe alingaka biso eleki bolingo oyo mama alingaka mwana na ye

Tokoki kondima ete Nzambe akipaka mpenza biso. Alobi boye na Liloba na ye Mosantu: “Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ mpe ayokela mwana ya libumu na ye mawa te? Ata basi wana bakoki kobosana, kasi ngai nakobosana yo te.”a

Koyeba likambo yango ebɔndisi biso mpenza! Bolingo oyo Nzambe alingaka biso eleki mosika bolingo oyo mama alingaka mwana na ye, atako bolingo oyo mama alingaka mwana na ye ezalaka makasi. Nzambe akosundola biso ata mokolo moko te! Kutu, asilá kosalisa biso na ndenge ya kokamwa. Na ndenge nini? Na ndenge alakisi biso nzela ya kozala na bomoi ya esengo. Nzela yango ezali kondima ya solosolo.

Soki ozali na kondima ya solosolo, okokóma na esengo. Kondima ya ndenge wana ekosalisa yo okima mikakatano mingi mpe olonga mikakatano oyo okoki kokima te. Ekosalisa yo mpe opusana penepene na Nzambe, ozala na kimya na makanisi mpe na motema. Kondima ya solosolo ekopesa yo mpe libonza ya malamu na mikolo ezali koya: bomoi ya seko na Paradiso!

Kasi, kondima ya solosolo ezali nini? Mpe ndenge nini okoki kokóma na kondima ya ndenge wana?

a Talá Yisaya 49:15 na Makomami Mosantu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto