Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rk eteni 10 nk. 24-25
  • Monguna ya kondima amonisami polele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monguna ya kondima amonisami polele
  • Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima ya lokuta epalangani
  • Kondima ya solosolo ebatelami
  • Baanzelu basalaka biso nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ndakisa ya blé mpe matiti mabe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • “Bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Boklisto ya solo ekozala ndenge nini lobi?
    Lamuká!—2007
Makambo mosusu
Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
rk eteni 10 nk. 24-25

ETENI 10

Monguna ya kondima amonisami polele

BAMBULA ebele liboso ete Yehova Nzambe asala mabele, akelaki baanzelu kuna na likoló. Kasi, na nsima, anzelu moko akómaki na mposa bápesa ye losambo oyo ebongi kaka na Nzambe. Lokola apekisaki mposa yango te, amikómisaki Satana, oyo elimboli “Motɛmɛli,” elingi koloba moto oyo atɛmɛlaka Nzambe. Ndenge nini Satana atɛmɛlaki Nzambe?

Eva azali kotala mbumba oyo nyoka eyebisi ye alya

Satana asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva

Satana akosaki Eva mpo azanga botosi epai ya Nzambe. Na mayele mabe, ayebisaki Eva ete Yehova Nzambe abombelaki bango eloko moko ya malamu ndenge apekisaki bango bálya mbuma ya nzete moko boye. Alobaki polele ete Nzambe azali mokosi mpe atindaki Eva aboya litambwisi ya Nzambe na maloba oyo: “Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.” (Ebandeli 3:5) Na bozoba nyonso, Eva andimaki lokuta ya Satana. Abukaki mobeko ya Nzambe mpe atindaki Adama asala mpe bongo. Banda wana, Satana akómaki monguna ya bato nyonso oyo bazali na kondima ya solosolo. Azali kokoba kokosa bato kino lelo oyo. Ndenge nini?

Kondima ya lokuta epalangani

Bato bazali koyemba mpe kobinda liboso ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo

Satana asalelaki losambo ya bikeko mpe mimeseno ya bonkɔkɔ mpo na kopɛngwisa bato

Satana asalelaki losambo ya bikeko mpe mimeseno ya bonkɔkɔ mpo na kopɛngwisa bana ya Yisraele. Yesu Masiya ayebisaki bakonzi ya mangomba na bango ete lokola ‘mateya oyo bazalaki koteya ezali nde mibeko ya bato,’ losambo na bango ezalaki mpamba. (Matai 15:9) Ntango ekólo yango eboyaki Masiya, Nzambe mpe aboyaki bango. Yesu alobaki na bango boye: “Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.” (Matai 21:43) Na yango, bayekoli ya Yesu bakómaki bato oyo Nzambe andimaki.

Na nsima, Satana alukaki mayele mosusu mpo na kopɛngwisa bayekoli ya Yesu. Alongaki? Na nzela ya ndakisa moko, Yesu asakolaki makambo oyo ekosalema na nsima. Na ndakisa yango, mobali moko alonaki blé na elanga na ye. Na nsima, monguna moko alonaki matiti mabe na kati ya blé. Batikaki blé ná matiti mabe ekola elongo tii na eleko ya kobuka mbuma. Na nsima, balongolaki matiti mabe na kati ya blé mpe batumbaki yango. Kasi bayanganisaki blé na kati ya ndako ya kobomba biloko ya nkolo ya elanga.

Na nsima, Yesu alimbwelaki bayekoli na ye ndakisa yango. Ye moko azali Moloni. Abakisaki ete, “milona ya malamu, ezali bana ya bokonzi; kasi matiti mabe ezali bana ya moto mabe, mpe monguna oyo alonaki yango ezali Zabolo. Ntango ya kobuka mbuma ezali bosukisi ya makambo ya ntango moko boye, mpe babuki-mbuma ezali baanzelu.” (Matai 13:38, 39) Yesu akokanisaki bayekoli na ye na blé. Kasi, Satana alonaki matiti mabe, elingi koloba akɔtisaki bayekoli ya lokuta na kati ya bayekoli wana ya solo ya Yesu. Yango wana, ndenge Yesu ye moko asakolaki, na bikeke oyo elandaki liwa na ye, bayekoli ya lokuta babimaki. Bayekoli yango bakɔtisaki mateya ya bapɛngwi, na ndakisa liteya ya Bosato oyo elobaka: Nzambe moko na bapersona misato. Bayekoli ya lokuta babandaki mpe kosambela bikeko mpe komikɔtisa na makambo ya politiki. Kaka bayekoli moke nde bakangamaki na mateya ya solo ya Yesu.

Kondima ya solosolo ebatelami

Nzokande, ndenge Yesu alimbolaki yango, mbongwana moko esengelaki komonana. Baanzelu ya Nzambe basengelaki kotya pembeni baoyo bazalaki na kondima ya solosolo te mpo bábebisama. Na nsima, ekozala mpasi te koyeba baoyo bakozala na kondima ya solosolo. Nsukansuka, Satana Zabolo, monguna ya kondima akobebisama. Ɛɛ, kondima ya solosolo ekolonga!

Kasi ndenge nini okoki koyeba bato oyo bazali na kondima ya solosolo lelo oyo? Tokoyanola na motuna wana na eteni oyo elandi.

Bato ya mbula nyonso mpe mposo nyonso

Baanzelu ya Nzambe bazali koluka bato oyo balingi kozala na kondima ya solosolo

Okopesa eyano nini?

  • Satana autá wapi?

  • Satana asalaki nini mpo na kobebisa kondima?

  • Limbolá ndakisa ya blé mpe matiti mabe oyo Yesu apesaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto