Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jl liteya 22
  • Nini esalemaka na biro ya filiale?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini esalemaka na biro ya filiale?
  • Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya biro
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tosala na bomoko elongo na college central
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
jl liteya 22

LITEYA 22

Nini esalemaka na biro ya filiale?

Etuluku ya bandeko bazali kobongisa mosala mpo na filiale na Bisanga ya Salomon

Bisanga ya Salomon

Motatoli ya Yehova azali kosala na biro ya filiale ya Canada

Canada

Mituka minene ezali kokende kotika mikanda

Afrika ya Sudi

Bandeko ya Betele bapesaka mabɔkɔ na badepartema ndenge na ndenge, mpe mosala na bango esimbaka mosala ya kosakola na ekólo moko to na bikólo mingi. Bakoki kosala na ekipi ya kobongola mikanda, konyata bazulunalo, kokangisa babuku, na badepo ya mikanda, kobimisa ba-CD to bavideo, to kosala makambo mosusu.

Komite ya filiale etambwisaka mosala ya kosakola. Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyaka Komite ya filiale oyo ezali na bankulutu misato to koleka oyo babongi mpenza mpo bákamba biro ya filiale. Bandeko yango bayebisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi ndenge makambo ezali kotambola mpe mikakatano nyonso oyo ebimaka na mboka oyo bango bazali kotambwisa mosala. Yango esalisaka bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bápona makambo oyo ekolobelama na mikanda oyo ekobima, na makita mpe na mayangani. Mbala na mbala, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaka bamonisi na yango mpo na kotala babiro ya filiale mpe kopesa bandeko ya Komite ya filiale malako mpo bákokisa mikumba na bango. (Masese 11:14) Momonisi ya biro monene asalaka mpe diskur mpo na kolendisa bandeko ya masangá ya filiale yango.

Etalelaka mosala ya masangá. Bandeko mibali mosusu na biro ya filiale bazali na mokumba ya kondima ete masangá ya sika efungwama. Bandeko mibali mosusu batalelaka mosala ya babongisi-nzela, bamisionɛrɛ, bakɛngɛli ya zongazonga oyo bazali kosala na teritware ya filiale yango. Babongisaka mayangani ya mike mpe ya minene, batambwisaka mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ya sika, mpe basalaka nyonso mpo mikanda ekómela bandeko na masangá. Nyonso oyo esalemaka na biro ya filiale ezali mpo mosala ya kosakola esalema na molɔngɔ.​—1 Bakorinti 14:33, 40.

  • Ndenge nini Komite ya filiale esungaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi?

  • Makambo nini esalemaka na biro ya filiale?

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

Banda mokolo ya yambo tii ya mitano, bato bayaka kotala biro ya filiale, mpe soki moto ayei, ndeko moko akotambwisa ye mpo na kolakisa ye bisika nyonso. Tosɛngi yo mpe oya kotala biro ya filiale; mpe ntango okoya, latá malamu lokola okei na makita. Soki oyei kotala esika oyo babengi Betele, na ntembe te kondima na yo ekokóma makasi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto