Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 2 nk. 6-7
  • Rebeka alingaki kosepelisa Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Rebeka alingaki kosepelisa Yehova
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Rebeka andimaki kosepelisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Nandimi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Bakei koluka mwasi mpo na Yisaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Lebeka​—Mwasi ya mpiko oyo azalaki kobanga Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 2 nk. 6-7
Eliezere, Rebeka, basaleli, mpe bakamela zomi, bazali kosala mobembo molai tii na Kanana

LITEYA 2

Rebeka alingaki kosepelisa Yehova

Rebeka azalaki mwasi moko oyo alingaki Yehova. Nkombo ya mobali na ye ezalaki Yisaka. Ye mpe alingaki Yehova. Ndenge nini Rebeka akutanaki na Yisaka? Ndenge nini Rebeka amonisaki ete alingi kosepelisa Yehova? Tólobela ye naino.

Abrahama ná Sara bazalaki baboti ya Yisaka. Bazalaki kofanda na mokili ya Kanana; kuna bato bazalaki kosambela Yehova te. Kasi Abrahama alingaki ete mwana na ye abala mwasi oyo asambelaka Yehova. Na yango, atindaki mosaleli na ye, mbala mosusu ezalaki Eliezere, mpo alukela Yisaka mwasi na mboka Harane, esika bandeko mosusu ya Abrahama bazalaki kofanda.

Rebeka azali kotyela bakamela ya Eliezere mai ya komɛla

Rebeka andimaki kosala mosala makasi ya kotoka mai mpo na bakamela

Eliezere ná basaleli mosusu ya Abrahama basalaki mobembo. Mobembo yango ezalaki molai mpenza. Bakendeki na bakamela zomi oyo ememaki bilei mpe makabo. Ndenge nini Eliezere ayebaki mwasi oyo akozwela Yisaka? Ntango Eliezere ná basaleli mosusu ya Abrahama bakómaki na Harane, batɛlɛmaki pene na libulu moko ya mai, mpo ayebaki ete etikali moke bato báya kotoka mai. Eliezere abondelaki Yehova mpe alobaki ete: ‘Soki nasɛngi elenge mwasi moko mai mpe apesi ngai mai ná bakamela na ngai, nakoyeba ete ye nde mwasi oyo oponi.’

Na ntango wana elenge mwasi Rebeka ayaki na libulu ya mai. Biblia elobi ete azalaki mpenza mwasi kitoko mingi. Eliezere asɛngaki ye mai ya komɛla mpe Rebeka alobaki: ‘Ɛɛ. Nakopesa yo mai, mpe nakotoka mpe mai mpo na bakamela na yo.’ Kanisá naino, bakamela soki bazali na mposa ya mai, bámɛlaka mai mingi mpenza; yango wana, Rebeka asengelaki kozwa mai na libulu mbala na mbala. Omoni ye na elilingi wana ndenge azali kosala mosala makasi?​— Eliezere akamwaki na ndenge oyo Yehova ayanolaki na libondeli na ye.

Eliezere apesaki Rebeka makabo ebele ya kitoko. Mpe Rebeka abengaki Eliezere ná basaleli mosusu oyo bazalaki elongo na ye bákende na ndako na bango. Eliezere ayebisaki bango ntina oyo Abrahama atindaki ye kuna mpe ndenge oyo Yehova ayanolaki na libondeli na ye. Libota ya Rebeka bandimaki ete Yisaka abala ye.

Rebeka akendaki na Kanana elongo na Eliezere mpe abalanaki na Yisaka

Okanisi ete Rebeka andimaki kobala Yisaka?​— Rebeka ayebaki ete Yehova nde atindaki Eliezere kuna. Ntango libota ya Rebeka batunaki ye soki alingi kokende na Kanana mpe kobala Yisaka, ayanolaki ete: ‘Nandimi kokende.’ Na mbala moko, Rebeka akendaki elongo na Eliezere. Ntango bakómaki na Kanana, abalanaki na Yisaka.

Lokola Rebeka asalaki oyo Yehova asɛngaki ye, azwaki mapamboli. Bambula mingi na nsima, Yesu abotamaki na libota ya Rebeka. Soki ozali lokola Rebeka mpe ozali kosepelisa Yehova, akopambola mpe yo.

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • Ebandeli 12:4, 5; 24:1-58, 67

MITUNA:

  • Rebeka azalaki nani?

  • Mpo na nini Abrahama alingaki te ete Yisaka abala mwasi na Kanana?

  • Ndenge nini Eliezere ayebaki ete Rebeka nde mwasi oyo Yisaka asengeli kobala?

  • Tosengeli kosala nini mpo tózala lokola Rebeka?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto