Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 5 nk. 12-13
  • Samwele akobaki kosala makambo ya malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Samwele akobaki kosala makambo ya malamu
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Samwele akangamaki na oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mwana moke asaleli Nzambe
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Azalaki se kokola liboso ya Yehova”
    Mekolá kondima na bango
  • “Azalaki se kokola liboso ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 5 nk. 12-13

LITEYA 5

Samwele akobaki kosala makambo ya malamu

Banda ntango Samwele azalaki mwana moke, akómaki kofanda mpe kosala na tabernakle, esika bato bazalaki koya kosambela Yehova. Oyebi nini esalaki ete Samwele akóma kofanda na tabernakle? Tólobela naino Hana, mama ya Samwele.

Banda kala Hana azalaki na mposa ya mwana, kasi azalaki kobota te. Na yango abondelaki Yehova asalisa ye. Alakaki ete soki aboti mwana mobali, akotinda ye akende kofanda mpe kosala na tabernakle. Yehova ayokelaki Hana, mpe Hana abotaki mwana mobali. Apesaki ye nkombo Samwele. Mpe kaka ndenge Hana alakaki, ntango Samwele akokisaki mbula misato to minei, Hana akendaki kotika ye na tabernakle mpo asalela Nzambe kuna.

Eli nde azalaki nganga-nzambe monene na tabernakle. Bana na ye mibale ya mibali mpe bazalaki kosala kuna. Kobosana te ete tabernakle ezalaki esika ya kosambela Nzambe, mpe bato basengelaki kosala makambo ya malamu kuna. Kasi bana ya Eli bazalaki kosala makambo ya mabe mpenza. Samwele azalaki komona makambo oyo bazalaki kosala. Samwele mpe akómaki kosala makambo ya mabe lokola bana ya Eli?​— Te, akobaki kosala makambo ya malamu, kaka ndenge baboti na ye bateyaki ye.

Na makanisi na yo, Eli asengelaki kosala bana na ye nini?​— Asengelaki kopesa bango etumbu. Asengelaki kopekisa bango kosala na ndako ya Nzambe. Kasi Eli asalaki bongo te, yango wana Yehova asilikelaki ye mpe bana na ye mibale. Yehova akanaki kopesa bango etumbu.

Elenge Samwele azali koloba na Nganga-nzambe monene Eli

Samwele ayebisaki Eli nsango ya Yehova

Mokolo moko na butu ntango Samwele alalaki, ayokaki moto abengi ye: ‘Samwele!’ Akendaki mbangu epai ya Eli, kasi Eli alobaki na ye ete: ‘Nabengi yo te.’ Esalemaki bongo mbala mibale lisusu. Ntango Samwele akendaki epai ya Eli na mbala ya misato, Eli alobaki na ye ete soki ayoki lisusu mongongo yango, aloba: ‘Nabondeli yo Yehova, lobá; nazali koyoka yo.’ Samwele asalaki mpe ndenge wana. Bongo, Yehova alobaki na Samwele: ‘Yebisá Eli ete nakopesa libota na ye etumbu mpo na mabe basali.’ Okanisi ete ezalaki pɛtɛɛ Samwele ayebisa Eli likambo yango?​— Te, ezalaki pɛtɛɛ te. Nzokande atako Samwele azalaki kobanga, asalaki likambo oyo Yehova asɛngaki ye. Makambo oyo Yehova alobaki esalemaki. Bana mibale ya Eli babomamaki, mpe Eli akufaki.

Samwele azali ndakisa malamu mpo na biso. Asalaki makambo ya malamu atako azalaki komona bato mosusu bazali kosala makambo ya mabe. Bongo yo? Okozala lokola Samwele, mpe okokoba kosala makambo ya malamu? Soki osali bongo, okosepelisa Yehova mpe baboti na yo.

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • 1 Samwele 2:22-26; 3:1-21

MITUNA:

  • Elaka nini mama ya Samwele asalaki?

  • Makambo nini Samwele amonaki bana ya Eli bazali kosala na tabernakle?

  • Yehova ayebisaki Samwele asala nini?

  • Mpo na nini Samwele azali ndakisa ya malamu mpo na biso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto